Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/01 lok. 1
  • Kumisá Yehova na misala malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kumisá Yehova na misala malamu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Misala malamu oyo mikumisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Ozali na “molende na misala ya malamu”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Tólendisana mpenza mpo na kosala misala ya malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Tomipesi na misala na kufa to na mosala ya Jéhovah?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 2/01 lok. 1

Kumisá Yehova na misala malamu

1 Ntango mbula ya mopɛpɛ makasi ezali kobɛta, ezalaka mpenza esengo soki ozwi esika mpo na kobombana! Soki esika yango ezali na mɔ́tɔ mpe na libateli mpe soki bato oyo bazali wana bayebi koyamba bapaya, okosepela mpenza kofanda wana. Mosala ya kosakola Bokonzi ebimisaka bato na ebongiseli ya Satana mpo na komema bango na esika malamu motindo wana. Etamboli na biso ya mokolo na mokolo ekoki kosalisa bato bámona ete esika yango ezali mpenza ya libateli, epai basengeli kokende? Ɛɛ, mpo Yesu alobaki ete bato bakomona misala malamu na biso mpe bakopesa nkembo epai ya Tata na biso oyo azali na Likoló.​—Mat. 5:16.

2 Ndenge nini tokoki komitambwisa mpo misala malamu na biso ebenda bato mosusu epai ya Yehova mpe na Ebongiseli na ye? Soki tozali kotika ete maloba ya Yesu oyo ezali na Luka 6:31 mpe na Luka 10:27 ebongisa bomoi na biso mokolo na mokolo. Yango ekolendisa biso tómonisa bolingo epai ya bazalani na biso, tómikesenisa na bato mosusu ya mokili oyo bazangi bolingo mpe tómibanzabanzaka mpo na bato mosusu.

3 Ndeko mwasi moko oyo azalaki kati ya masuwa ya mai monene amonaki mwasi moko oyo azalaki koyoka kizunguzungu mpo na mai monene mpe azalaki na likoki te ya kobatela mwana na ye ya moke. Ndeko mwasi asɛngaki ye soki akoki kosalisa ye na kobatela mwana na ye. Ntango mwasi yango atunaki ye nini akoki kosala mpo na komonisa botɔndi na ye na likambo oyo ndeko mwasi asalaki, ndeko mwasi alobaki ete: ‘Nasɛngi yo ete oyoka Batatoli ya Yehova ntango bakoya kotala yo.’ Mwasi yango asalaki bongo, mpe lelo oyo ye na mobali na ye bazali Batatoli ya Yehova. Misala malamu esalaki ete bábongola lolenge na bango ya kotalela nsango malamu ya Bokonzi.

4 Likambo yango etali bomoi na biso mobimba: Etamboli na biso na kartye, ntango tozali na mosala to na eteyelo, mpe na ntango ya kominanola ekosala ete bato mosusu bayeba biso mpe lingomba na biso. Yango wana, ezali malamu tómituna boye: ‘Ndenge nini bato mosusu bamonaka ngai mpe libota na ngai? Bato oyo tozalaka na bango kartye moko bamonaka ete ndako na biso mpe lopango na biso ezali pɛto mpe ebatelami malamu? Baninga na biso ya mosala mpe baninga na biso ya eteyelo bamonaka ete toyebi kotosa ngonga mpe tozali na molende mingi na mosala? Molato na biso emonisaka epai ya bato mosusu ete tozali na bopɔlɔ mpe toyebi komipesa limemya?’ Misala malamu na biso ekoki kosala ete bato mosusu bábendama na losambo ya Yehova.

5 Petelo ayebisaki baklisto ete bato bakotyola bango. (1 Pet. 4:4) Tosengeli komindimisa ete bato mosusu bazali koloba mabe te mpo na etamboli na biso. (1 Pet. 2:12) Soki makambo oyo tozali kosala mokolo na mokolo ezali kokumisa Nzambe oyo tosambelaka, na bongo tokozala lokola miinda oyo etyami likolo, mpe ezali kobenda bato na esika ya libateli oyo Yehova abongisi.​—Mat. 5:14-16.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto