Yehova—liziba ya bosembo mpe boyengebene ya solosolo
“Ye libanga, mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe na sembo mpe na mabe te.”—DETERONOME 32:4.
1. Mpo na nini tozalaka na mposa ya bosembo kati na motema na biso?
MOTO nyonso azalaka na mposa ete bámonisela ye bolingo, bobele bongo biso nyonso tolingaka ete básalela biso bosembo. Lokola Thomas Jefferson, moto ya politiki na États-Unis, akomaká yango, “[bosembo] ezali liyoki oyo tobotamaka na yango, . . . ezali mpenza kati na bomoto na biso lokola koyoka mposa, komona, to koyoka.” Ezali likambo ya kokamwa te, mpamba te Yehova azalisaki biso na elilingi na ye. (Genese 1:26) Ɛɛ, apesaki biso bizaleli oyo ezali komonisa bomoto na ye moko, mpe moko na yango ezali bosembo. Yango wana, kati na mitema na biso, tozalaka na mposa ya bosembo mpe tolingaka kofanda na mokili oyo ezali na bosembo mpe boyengebene ya solosolo.
2. Ndenge nini Yehova atalelaka bosembo, mpe mpo na nini tosengeli kososola malamu bosembo ya Nzambe?
2 Na ntina na Yehova, Biblia endimisi biso ete: “Nzela na ye nyonso [ezali] boyengebene.” (Deteronome 32:4) Kasi, na mokili oyo ezangi bosembo, ezali pɛtɛɛ te mpo na kokanga ntina ya bosembo ya Nzambe. Atako bongo, kati na Liloba ya Nzambe, tokoki kososola lolenge oyo Nzambe amonisaka boyengebene, mpe tokoki koyeba malamumalamu banzela kitoko ya Nzambe. (Baloma 11:33) Kososola bosembo na ndenge oyo Biblia elimboli yango ezali na ntina mingi mpamba te likanisi na biso na ntina na bosembo ekoki kotongama likoló ya makanisi ya bato. Mpo na bato, bosembo ekoki kozala bobele kotosa mibeko mpe ntomo ya bato. To, ndenge Francis Bacon, moto ya filozofi akomaki, “bosembo elimboli kopesa moto na moto oyo ebongi na ye.” Nzokande, bosembo ya Yehova esuki wana te.
Bosembo ya Yehova esepelisaka motema
3. Tokososola likambo nini soki totaleli maloba ya nkota ya ebandeli oyo mabongolami na bosembo mpe boyengebene kati na Biblia?
3 Tokoki kososola malamu bozindo ya boyengebene ya Yehova soki totaleli ndenge maloba ya lokota ya ebandeli masalelami na Biblia.a Likambo oyo ezali kobenda likebi ezali ete kati na Makomami, bokeseni ezali mpenza mingi te kati na bosembo mpe boyengebene. Kutu, na bisika mosusu maloba ya Liebele makokanisami, lokola tozali komona yango na Amosa 5:24, epai Yehova alendisi libota na ye na maloba oyo: “Tiká ete [bosembo, NW] epunzwapunzwa lokola mai mpe boyengebene lokola ebale monene.” Lisusu, mbala mingi “bosembo mpe boyengebene” ezali komonana esika moko mpo na kolobela likambo moko makasi.—Nzembo 33:5; Yisaya 33:5; Yilimia 33:15; Ezekiele 18:21; 45:9.
4. Komonisa bosembo elimboli nini, mpe etinda ya moboko mpo na bosembo ezali nini?
4 Maloba yango na Liebele mpe na Greke mazali na ndimbola nini? Na ndimbola ya Makomami, komonisa bosembo elimboli kosala oyo elongobani mpe na kozanga koponapona. Lokola Yehova nde apesaka mibeko mpe mitinda ya bizaleli malamu, to oyo elongobani to ezali na koponapona te, boye lolenge oyo Yehova asalaka makambo ezali moboko ya solosolo ya bosembo. Buku moko (Theological Wordbook of the Old Testament) elimboli ete liloba ya Liebele oyo ebongolami na boyengebene (tseʹdheq) “etaleli etinda ya bizaleli malamu mpe, ezali solo ete kati na Kondimana ya Kala etinda yango ezali bongo bomoto mpe mokano ya Nzambe.” Yango wana, ndenge oyo Nzambe azali kosalela mitinda na ye, mpe mingimingi, makambo oyo asalaka epai ya bato ya kozanga kokoka, emonisi ndimbola ya solosolo ya bosembo mpe boyengebene.
5. Bizaleli nini bikangisami na bosembo ya Nzambe?
5 Makomami mamonisi polele ete bosembo ya Nzambe esepelisaka motema kasi ezali makasimakasi te. Davidi ayembaki ete: “[Yehova] alingi sembo; akobatela bayengebene na ye.” (Nzembo 37:28) Bosembo ya Nzambe epusaka ye na kozala sembo mpe komonisela basaleli na ye motema mawa. Boyengebene ya Nzambe etalelaka bamposa na biso mpe etalelaka ezaleli na biso ya kozanga kokoka. (Nzembo 103:14) Yango elingi koloba te ete Nzambe azipaka miso na mabe, mpamba te kosala bongo ekolendisa kozanga bosembo. (1 Samwele 3:12, 13; Mosakoli 8:11) Yehova alimbwelaki Mose ete Ye azali “na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.” Atako azali pene na kolimbisa mabunga mpe masumu, Nzambe azangaka kopesa etumbu te na baoyo babongi kozwa etumbu.—Exode 34:6, 7.
6. Ndenge nini Yehova asalaka makambo epai ya bana na ye awa na mabelé?
6 Ntango tozali komanyola na ndenge oyo Yehova amonisaka bosembo, tosengeli te kotalela ye lokola zuzi oyo azangi mawa, oyo akanisaka bobele kopesa basali na mabe etumbu. Nzokande, tosengeli kotalela ye lokola tata ya bolingo kasi azalaka mpe na bikateli ya makasi, asalelaka bana na ye makambo na ndenge oyo eleki malamu. Mosakoli Yisaya alobaki ete: “Ɛ [Yehova], ozali nde tata na biso.” (Yisaya 64:8) Lokola Tata oyo azali mosembwi mpe moyengebene, Yehova asalelaka bokatikati na oyo etali kozala na ekateli makasi mpo na likambo ya sembo mpe motema mawa epai ya bana na ye awa na mabelé, baye bazali na mposa ya lisungi mpe bolimbisi na ntina na mikakatano oyo bazali kokutana na yango to bolɛmbu ya nzoto.—Nzembo 103:6, 10, 13.
Alimboli bosembo polele
7. (a) Esakweli ya Yisaya ezali koteya biso nini na ntina na bosembo ya Nzambe? (b) Yesu azalaki na mokumba nini na likambo ya koteya mabota bosembo?
7 Bosembo ya Yehova oyo esangani na motema mawa emonisamaki polele na boyei ya Masiya. Yesu ateyaki bosembo ya Nzambe mpe amonisaki yango kati na bomoi na ye, lokola mosakoli Yisaya ayebisaki yango. Ya solo, bosembo ya Nzambe etaleli mpe komonisa boboto epai na bato oyo bazali konyokolama. Na ndenge yango, bakolɛmba mingi te. Yesu, “moombo” ya Yehova ayaki awa na mabelé mpo na ‘kolimbolela mabota’ lolenge wana ya boyengebene ya Nzambe. Asalaki bongo, na koleka, na ndenge apesaki biso ndakisa ya bosembo ya Nzambe kati na bomoi na ye. Lokola “etape na boyengebene” ya Mokonzi Davidi, Yesu azalaki na mposa makasi ya ‘koluka bosembo mpe kosala nokinoki na boyengebene.’—Yisaya 16:5, NW; Yis. 42:1-4; Matai 12:18-21; Yilimia 33:14, 15.
8. Na ekeke ya liboso, mpo na nini bosembo mpe boyengebene ya solosolo ebungaki?
8 Ezalaki mpenza na ntina ete boyengebene ya Yehova elimbolama polele motindo oyo na ekeke ya liboso T.B. Bankumu ya Bayuda mpe bakonzi ya mangomba—Bakomeli, Bafalisai, mpe basusu—bazalaki koteya mpe bapesaki ndakisa mabe ya bosembo mpe boyengebene. Yango wana, bato mpamba, oyo bamonaki ete bakolonga te kokokisa masɛngami oyo Bakomeli mpe Bafalisai batyaki, na ntembe te bakanisaki ete bakokaki komonisa boyengebene ya Nzambe te. (Matai 23:4; Luka 11:46) Yesu amonisaki ete ezalaki bongo te. Aponaki bayekoli na ye kati na bato mpamba, mpe ateyaki bango mitinda ya sembo ya Nzambe.—Matai 9:36; 11:28-30.
9, 10. (a) Ndenge nini Bakomeli mpe Bafalisai balukaki komonisa boyengebene na bango moko? (b) Ndenge nini mpe mpo na nini Yesu amonisaki ete misala ya Bakomeli mpe Bafalisai mizalaki mpamba?
9 Nzokande, Bafalisai balukaki mabaku ya komonisa “boyengebene” na bango na ndenge bazalaki kosala mabondeli mpe kopesa makabo na miso ya bato nyonso. (Matai 6:1-6) Balukaki mpe komonisa boyengebene na bango na komityeláká ebele ya mibeko—mingi kati na yango eutaki na makanisi na bango moko. Milende motindo wana ememaki bango na “kotika [bosembo, NW] mpe bolingo na Nzambe.” (Luka 11:42) Na libándá, bamonanaki ete bazali bayengebene, kasi na kati ‘batondaki na bokosi,’ to kozanga bosembo. (Matai 23:28) Na maloba ya polele, bayebaki mpenza boyengebene ya Nzambe te.
10 Mpo na yango, Yesu akebisaki bayekoli na ye ete: “Soko boyengebene na bino ekoleka yango na Bakomeli na Bafalisai te, bokoingela na Bokonzi na Likoló te.” (Matai 5:20) Bokeseni monene kati na bosembo ya Nzambe oyo Yesu amonisaki mpe komitalela lokola moyengebene mpe kotyola bato mosusu oyo Bakomeli mpe Bafalisai bamonisaki, mbala mingi ezalaki kobimisa ntembe kati na bango.
Bosembo ya Nzambe etɛmɛli bosembo ya mabe
11. (a) Mpo na nini Bafalisai batunaki Yesu likambo ya kobikisa na mokolo ya Sabata? (b) Eyano ya Yesu emonisaki nini?
11 Wana azalaki kosakola na Galilai na eleko ya molunge ya mobu 31 T.B., Yesu amonaki, kati na eyanganelo, moto moko oyo lobɔkɔ na ye ekauká. Lokola ezalaki mokolo ya Sabata, Bafalisai batunaki Yesu: ‘Kobikisa mokolo ya sabata endimami na mibeko?’ Motuna na bango emonisaki te ete bamibanzabanzaki mpenza mpo na moto oyo azalaki na mokakatano, kasi balukaki nde kozwa efundeli mpo na kokweisa Yesu. Tokoki kokamwa te ete Yesu ayokaki mawa mpo na motema makasi na bango! Na yango, azongiselaki Bafalisai motuna lolenge moko: “Na sabata ekoki nde kosala malamu?” Lokola bafandaki nyɛɛ, Yesu ayanolaki ye moko na motuna na ye na kotunáká bango soki bakobikisa te mpate oyo ekwei na libulu na mokolo ya Sabata.b Yesu abimisaki makanisi oyo bakokaki kobɛtela yango ntembe te, alobaki ete, “Moto aleki mpate na motuya boni!” Asukisaki na kolobáká ete, “Ekoki nde kosala malamu na mokolo na sabata.” Bonkɔkɔ ya bato esengeli kopekisa ata moke te bosembo ya Nzambe. Nsima ya kolimbola likambo yango, Yesu asukaki wana te: abikisaki lobɔkɔ ya moto yango.—Matai 12:9-13; Malako 3:1-5.
12, 13. (a) Na bokeseni na Bakomeli mpe Bafalisai, ndenge nini Yesu amonisaki komibanzabanza na ye mpo na kosalisa basumuki? (b) Bokeseni nini ezali kati na bosembo ya moto ya Nzambe mpe bosembo ya moto ye moko?
12 Soki Bafalisai bamibanzabanzaki mpo na bibɔsɔnɔ te, na koleka bamibanzabanzaki te mpo na baoyo bazalaki babola na elimo. Makanisi mabe na bango na ntina na boyengebene ememaki ete bátyela bakongoli ya mpako mpe basumuki likebi te mpe bátyola bango. (Yoane 7:49) Atako bongo, bato mingi ya lolenge wana bandimaki mateya ya Yesu, na ntembe te basosolaki mposa na ye ya kosalisa bango kasi kosambisa te. (Matai 21:31; Luka 15:1) Nzokande, Bafalisai bazalaki kotyola milende ya Yesu mpo na kobikisa baoyo bazalaki na maladi ya elimo. Baimaimaki ete, “Moto oyo akonyangelaka bato na masumu mpe akolyaka na bango elongo.” (Luka 15:2) Mpo na koyanola na efundeli na bango, Yesu asalelaki lisusu elilingi ya bibwele. Se lokola mobateli na mpate asepelaka ntango amoni mpate oyo ebungaki, baanzelu na likoló mpe basepelaka na ntango mosumuki abongoli motema. (Luka 15:3-7) Yesu ye moko asepelaki ntango azwaki libaku ya kosalisa Zakai ete atika bomoi ya kala lokola moto ya masumu. Alobaki ete: “Mwana na moto ayei koluka mpe kobikisa yango ebungani.”—Luka 19:8-10.
13 Kowelana motindo wana emonisi polele bokeseni kati na bosembo ya Nzambe, oyo elukaka kosilisa mpasi mpe kobikisa, mpe boyengebene ya moto ye moko, oyo elukaka kokumisa bato moke mpe kokweisa bato mingi. Milulu mizangi ntina mpe bonkɔkɔ ya bato epesaki Bakomeli na Bafalisai lolendo mpe komitombola, kasi Yesu amonisaki na bosolo mpenza ete “batikaki kosala makambo maleki [ntina, NW] kati na Mibeko, yango: [bosembo, NW] mpe koyoka mawa mpe kondima.” (Matai 23:23) Tiká ete tómekola Yesu na komonisáká bosembo ya solosolo na nyonso oyo tozali kosala mpe kokeba na libunga ya koluka boyengebene ya biso moko.
14. Ndenge nini ekamwiseli moko ya Yesu emonisi ete bosembo ya Nzambe etalelaka ezalela ya moto?
14 Atako Yesu aboyaki mibeko makasimakasi ya Bafalisai, kasi atosaki Mibeko ya Mose. (Matai 5:17, 18) Na kosaláká bongo, atikaki te ete makambo oyo makomamaki na Mibeko yango ya boyengebene ezipa mitinda oyo ezalaki kati na yango. Ntango mwasi moko oyo azalaki na maladi ya kotanga makila na boumeli ya mbula 12 asimbaki bilamba na ye mpe abikaki, Yesu alobaki na ye ete: “Mwana, kondima na yo esili kobikisa yo. Kendá na kimya.” (Luka 8:43-48) Maloba ya boboto oyo Yesu alobaki endimisaki ete bosembo ya Nzambe etalelaki mpe ezalela ya mwasi yango. Atako azalaki mbindo soki tolandi milulu ya kopɛtolama mpe na kotalela makambo makomami, abukaki mibeko ya Mose na ndenge azalaki na kati ya bato, kondima na ye ebongaki kozwa mbano.—Levitike 15:25-27; kokanisá na Baloma 9:30-33.
Boyengebene ezali mpo na bato nyonso
15, 16. (a) Lisese ya Yesu oyo elobeli Mosamalia oyo amimonisaki mozalani malamu eteyi biso nini na ntina na bosembo? (b) Mpo na nini tosengeli kozala na ‘boyengebene na koleka te’?
15 Longola likambo ya komonisa boboto, Yesu ateyaki mpe bayekoli na ye ete esengeli komonisa bosembo ya moto ya Nzambe epai na bato nyonso. Mokano ya Yehova mpo na ye ezalaki ete ‘asambisa mabota na bosembo.’ (Yisaya 42:1) Yango nde likanisi emonisami kati na lisese moko ya Yesu oyo eyebani mingi, lisese ya Mosamalia oyo amimonisaki mozalani malamu. Alobaki lisese yango mpo na kopesa eyano na motuna ya moto moko ya Mibeko oyo ‘azalaki na mposa ya komilongisa.’ Moto yango atunaki ete, “Mozalani na ngai azali nani?” Na ntembe te mposa na ye ezalaki ete mikumba na ye epai ya mozalani esuka bobele na Bayuda. Mosamalia ya lisese ya Yesu amonisaki boyengebene ya solosolo, mpamba te andimaki kolekisa ntango na ye mpe kopesa mbongo na ye mpo na kosunga moto ya ekólo mosusu. Yesu asukisaki lisese na ye na kopesáká toli na moto oyo atunaki ye ete: “Kendá na yo kosala bobele bongo.” (Luka 10:25-37) Soki biso mpe tokosala malamu lolenge wana epai ya bato nyonso kozanga kotalela mposo to ekólo na bango, ekomonisa ete tozali komekola bosembo ya moto ya Nzambe.—Misala 10:34, 35.
16 Nzokande, ndakisa ya Bakomeli mpe Bafalisai, ezali kokundwela biso ete soki tolingi komonisa bosembo ya moto ya Nzambe, tosengeli kozala na “boyengebene na koleka te.” (Mosakoli 7:16) Nzambe akondima biso te soki tozali koluka kobenda likebi ya bato na komonisáká boyengebene na miso ya bato to kopesa motuya mingi koleka na mibeko ya bato.—Matai 6:1.
17. Mpo na nini ezali na ntina ete tómonisa bosembo ya moto ya Nzambe?
17 Yesu alimbolaki mpe bosembo ya moto ya Nzambe epai ya mabota mpo ete bayekoli na ye bákoka koyekola komonisa ezaleli yango. Mpo na nini likambo yango ezali na ntina? Makomami mazali kolendisa biso ete ‘tózala bamekoli ya Nzambe,’ mpe banzela nyonso ya Nzambe ezali bosembo. (Baefese 5:1, NW) Bobele bongo, Mika 6:8 (NW) elimboli ete lisɛngami moko ya Nzambe ezali ete ‘tósala na bosembo’ wana tozali kotambola na Nzambe na biso. Lisusu, Sefania 2:2, 3 ezali kokundwela biso ete soki tolingi kobatelama na mokolo ya nkanda ya Yehova, tosengeli ‘koluka boyengebene’ liboso ete mokolo yango eya.
18. Lisolo ekolanda ekoyanola mituna nini?
18 Na yango, mikolo ya nsuka oyo etondi na mpasi ezali “ntango ebongi” mpo na komonisa bosembo. (2 Bakolinti 6:2) Tokoki kozala na elikya ete soki ‘tomilatisi boyengebene lokola elamba’ mpe ‘bosembo lokola monkoto,’ ndenge Yobo asalaki, Yehova akopambola biso. (Yobo 29:14) Ndenge nini kondima boyengebene ya Yehova ekosalisa biso ete tózela mikolo mizali koya na motema mpio? Lisusu, wana tozali kozela “nse ya sika” epai boyengebene ekozala, ndenge nini bosembo ya Nzambe ekobatela biso na elimo? (2 Petelo 3:13) Lisolo elandi ekoyanola mituna yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Makomami ya Liebele, ezali na maloba misato. Moko na yango (mish·patʹ) ebongolamaka mbala mingi na “bosembo.” Mosusu mibale (tseʹdheq mpe liloba oyo eyokani na yango sedha·qahʹ) mbala mingi ebongolamaka na “boyengebene.” Liloba ya Greke oyo ebongolami na “boyengebene” (di·kai·o·syʹne) elimbolami lokola “ezalela ya kozala mosembwi to moyengebene.”
b Yesu aponaki ndakisa ya malamu mpenza mpamba te mobeko ya Bayuda oyo ekomamaki na mikanda te emonisaki polele ete bakokaki kosunga nyama oyo ezali na mokakatano na mokolo ya Sabata. Mbala mingi, ntembe ezalaki kobima mpo na likambo yango, elingi koloba, soki kobikisa na mokolo ya Sabata endimamaki na mibeko.—Luka 13:10-17; 14:1-6; Yoane 9:13-16.
Okoki kolimbola?
◻ Bosembo ya Nzambe elimboli nini?
◻ Ndenge nini Yesu ateyaki mabota bosembo?
◻ Mpo na nini boyengebene ya Bafalisai elongobanaki te?
◻ Mpo na nini tosengeli komonisa bosembo?
[Elilingi na lokasa 8]
Yesu amonisaki bozindo ya bosembo ya Nzambe