Oyo tosengeli kosalelaka basusu
“Kaka ndenge bino bolingaka ete bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.”—LUKA 6:31.
1, 2. (a) Lisolo Likoló ya Ngomba ezali nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo mpe na oyo ekolanda?
YESU KLISTO azalaki mpenza Moteyi Monene. Ntango banguna na ye bakonzi ya mangomba batindaki bato bákende kokanga ye, bato yango bazongaki mabɔkɔ mpamba mpe balobaki ete: “Naino moto mosusu alobá lokola moto wana te.” (Yoa. 7:32, 45, 46) Moko ya masolo ya kafukafu oyo Yesu asalaki ezali Lisolo Likoló ya Ngomba. Lisolo yango ezwami na Evanzile ya Matai, mokapo ya mitano kino ya nsambo; okoki mpe kokuta yango na Luka 6:20-49.a
2 Ekoki kozala ete likambo oyo eyebani mingi na makambo oyo Yesu alobaki na Lisolo Likoló ya Ngomba ezali oyo: “Kaka ndenge bino bolingaka ete bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.” (Luka 6:31) Ye moko mpe asalelaki bato makambo ya malamu mingi! Abikisaki bato ya maladi mpe asekwisaki ata bakufi. Nzokande, bato bazwaki mapamboli mingimingi ntango bandimaki nsango malamu oyo asakwelaki bango. (Tángá Luka 7:20-22.) Biso Batatoli ya Yehova tomipesaka mpe na mosala ya kosakola Bokonzi na esengo mpenza. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Na lisolo oyo mpe na oyo ekolanda, tokotalela makambo oyo Yesu alobaki na Lisolo Likoló ya Ngomba mpo na mosala yango mpe mpo na ndenge ya kotalela basusu.
Tózalaka na elimo ya boboto
3. Elimo ya boboto elimboli nini mpo na yo?
3 Yesu alobaki boye: “Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabelé.” (Mat. 5:5) Na kati ya Makomami, kozala boboto ezali bolɛmbu te. Ezali nde bolamu oyo tosalaka mpo na kotosa mibeko ya Nzambe. Tomonisaka ezaleli yango na makambo oyo tosalelaka basusu. Na ndakisa, ‘tozongisaka mabe na mabe te.’—Lom. 12:17-19.
4. Mpo na nini bato oyo bazali na elimo ya boboto bazali bato ya esengo?
4 Bato ya elimo ya boboto bazali bato ya esengo mpo “bakozwa libula ya mabelé.” Yesu, oyo azalaki “na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema,” atyamá “mozwi-ya-libula ya biloko nyonso,” mpe na ndenge yango, azali moto ya liboso oyo azwi libula ya mabelé. (Mat. 11:29; Ebe. 1:2; Nz. 2:8) Biblia esakolaki ete ekozala na bato mosusu oyo bakoyangela elongo na Masiya, “mwana ya moto,” na bokonzi na ye kuna na likoló. (Dan. 7:13, 14, 21, 22, 27) Lokola bazali “bazwi-ya-libula elongo na Klisto,” baklisto bapakolami 144 000 oyo bazali na elimo ya boboto bakosangola mpe mabelé elongo na Yesu. (Lom. 8:16, 17; Emon. 14:1) Bato mosusu ya elimo ya boboto bakozwa bomoi ya seko na mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi ya Nzambe.—Nz. 37:11.
5. Ndenge nini kozala na boboto lokola oyo ya Klisto ekoki kobongola bomoto na biso?
5 Soki tozali makambo makasimakasi, bato mosusu bakobanda kosepela na biso te mpe bakokóma kokima biso. Nzokande, soki tozali na boboto lokola oyo ya Klisto, bandeko ya lisangá bakobanda kosepela na biso mpe tokolendisa bango na elimo. Boboto ezali moko ya bizaleli oyo elimo ya Nzambe epesaka biso “soki tozali na bomoi na elimo” mpe tozali “kotambola” na yango. (Tángá Bagalatia 5:22-25.) Na ntembe te, tosepelaka kozala na elimo ya boboto mpe kotambwisama na elimo santu!
Esengo na bato ya motema mawa!
6. Bizaleli nini emonanaka epai ya “bato ya motema mawa”?
6 Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki mpe ete: “Esengo na bato ya motema mawa, mpo bakomonisamela motema mawa.” (Mat. 5:7) “Bato ya motema mawa” bayebaka komitya na esika ya bato oyo bazali komona mpasi, bamonisaka bango boboto, mpe bayokelaka kutu bango mawa. Yesu abikisaki bato ya maladi mpo “ayokelaki bango mawa.” (Mat. 14:14; 20:34) Yango wana, koyokela basusu mawa mpe koyeba komitya na esika na bango esengeli kotinda biso tózala motema mawa.—Yak. 2:13.
7. Motema mawa etindaki Yesu asala nini?
7 Ntango Yesu alingaki kokende kopema mpe ebele ya bato balandaki ye, “mawa ekangaki ye mpo na bango, mpamba te bazalaki lokola bampate bazangi mobateli.” Yango wana, “abandaki koteya bango makambo mingi.” (Mko. 6:34) Biso mpe tozalaka na esengo mpenza ntango tozali koyebisa basusu nsango ya Bokonzi mpe motema mawa monene ya Nzambe!
8. Mpo na nini bato ya motema mawa bazali bato ya esengo?
8 Bato ya motema mawa bazali bato ya esengo mpo “bakomonisamela motema mawa.” Mbala mingi, soki tozali komonisela basusu motema mawa, bango mpe bakozongisela biso motema mawa. (Luka 6:38) Longola yango, Yesu alobaki boye: “Soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango, Tata na bino ya likoló akolimbisa mpe bino.” (Mat. 6:14) Kaka bato ya motema mawa nde Nzambe akoki kolimbisa masumu na bango mpe kondima bango.
Ntina oyo “bato batyaka kimya” bazali bato ya esengo
9. Makambo nini tokosala soki tozali bato oyo batyaka kimya?
9 Yesu alobelaki ntina mosusu ya kozala na esengo. Alobaki boye: “Esengo na bato batyaka kimya, mpo bakobengama ‘bana ya Nzambe.’” (Mat. 5:9) Soki tozali bato oyo batyaka kimya, tokondima to tokomikɔtisa te na makambo lokola matɔngi, oyo ‘ekabolaka baninga, ata baoyo bazali na bolingo monene.’ (Mas. 16:28) Na maloba mpe na misala, tokoluka kimya na basusu, ezala na libándá to na lisangá. (Ebe. 12:14) Oyo eleki, tokosala nyonso mpo tózala na kimya na Yehova Nzambe.—Tángá 1 Petelo 3:10-12.
10. Mpo na nini “bato batyaka kimya” bazali bato ya esengo?
10 Yesu alobaki ete “bato batyaka kimya” bazali bato ya esengo, “mpo bakobengama ‘bana ya Nzambe.’” Lokola bazali kondimela Masiya, baklisto bapakolami bazwi “lotomo ya kokóma bana ya Nzambe.” (Yoa. 1:12; 1 Pet. 2:24) Ezali boni mpo na “bampate mosusu” ya Yesu oyo bazali mpe bato batyaka kimya? Yesu akokóma “Tata [na bango] ya seko” na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, ntango akoyangela elongo na baklisto bapakolami. (Yoa. 10:14, 16; Yis. 9:6; Emon. 20:6) Na nsuka ya Boyangeli na ye ya Mbula Nkóto, bato oyo batyaka kimya bakokóma bana ya Nzambe ya solosolo awa na mabelé.—1 Kol. 15:27, 28.
11. Ndenge nini tokofanda na bato soki totambwisami na “bwanya oyo euti na likoló”?
11 Mpo na kozala baninga ya Yehova, “Nzambe ya kimya,” tosengeli komekola bizaleli na ye, ezala mpe kimya. (Filp. 4:9) Soki tondimi kotambwisama na “bwanya oyo euti na likoló,” tokozala na kimya na basusu. (Yak. 3:17) Ɛɛ, tokozala bato ya esengo oyo batyaka kimya.
“Tiká ete pole na bino engɛnga”
12. (a) Yesu alobaki nini na ntina ya pole ya elimo? (b) Ndenge nini tokoki kongɛngisa pole na biso?
12 Likambo eleki malamu oyo tokoki kosalela bato ezali kosalisa bango bámona pole oyo euti na Nzambe. (Nz. 43:3) Yesu alobaki na bayekoli na ye ete bazali “pole ya mokili,” mpe alendisaki bango bátika pole na bango engɛnga mpo bato bámona “misala na [bango] ya malamu.” Yango elingaki kosala ete pole na bango engɛnga “liboso ya bato,” to ememela bango bolamu. (Tángá Matai 5:14-16.) Lelo oyo, tongɛngisaka pole na biso ntango tozali kosalela basusu malamu mpe ntango tozali kosakola nsango malamu “na mokili mobimba”, elingi koloba “na kati ya bikólo nyonso.” (Mat. 26:13; Mko. 13:10) Oyo nde libaku kitoko!
13. Bato bayebi biso na bizaleli nini?
13 Yesu alobaki ete “engumba ekoki te kobombama ntango ezali likoló ya ngomba.” Engumba oyo etongami likoló ya ngomba emonanaka ata na mosika. Ndenge moko mpe, biso basakoli ya Bokonzi toyebani mpo na misala na biso ya malamu mpe mpo na bizaleli lokola bokatikati mpe bopɛto na bizaleli.—Tito 2:1-14.
14. (a) Miinda oyo bazalaki kosalela na ekeke ya liboso ezalaki ndenge nini? (b) Kobomba te mwinda na biso ya elimo na nse ya “ekɔlɔ ya komekela” elimboli nini?
14 Yesu alobaki ete bapelisaka mwinda te mpo bátya yango na nse ya ekɔlɔ, kasi mpo bátya yango likoló ya etɛlɛmiseli-ya-mwinda mpo engɛngɛla bato nyonso oyo bazali na kati ya ndako. Mwinda oyo bazalaki kosalela na ekeke ya liboso ezalaki mbɛki moko oyo bazalaki kotya mafuta (mingimingi mafuta ya olive) mpe nsinga moko ya elamba oyo ezalaki kobenda mafuta mpo na kopelisa yango. Mbala mingi bazalaki kotya yango likoló ya etɛlɛmiseli-ya-mwinda, ya libaya to ya ebende, mpo mwinda ‘engɛngɛla baoyo nyonso bazali na kati ya ndako.’ Bato bakokaki te kopelisa mwinda mpo na kotya yango na nse ya “ekɔlɔ ya komekela.” Yesu alingaki te ete bayekoli na ye bábomba mwinda na bango ya elimo na nse ya ekɔlɔ ya komeka ya elilingi. Yango wana, biso tosengeli kongɛngisa mwinda na biso mpe kopesa nzela soki moke te ete botɛmɛli mpe minyoko etinda biso tóbomba solo ya Biblia to tóbatela yango mpo na biso moko.
15. ‘Misala na biso ya malamu’ etindaka bato mosusu básala nini?
15 Nsima ya kolobela mwinda oyo ezali kongɛnga, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Ndenge moko mpe tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa nkembo epai ya Tata na bino oyo azali na likoló.” Mpo na ‘misala na biso ya malamu,’ bato mosusu ‘bazali kopesa Nzambe nkembo’ na ndenge bazali kokóma basaleli na ye. Yango ezali kolendisa biso mpo tókoba “kongɛnga lokola miinda na mokili.”—Filp. 2:15.
16. Tosengeli kosala nini mpo tózala “pole ya mokili”?
16 Kozala “pole ya mokili” esɛngaka tómipesa na kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. Kasi tosengeli mpe kosala likambo mosusu. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bókoba kotambola lokola bana ya pole, mpo mbuma ya pole esalemi na ndenge nyonso ya bolamu mpe boyengebene mpe solo.” (Ef. 5:8, 9) Tosengeli ntango nyonso kozala na etamboli ya malamu. Na yango, tosengeli kolanda toli ya ntoma Petelo oyo: “Bósala ete etamboli na bino ezalaka malamu na kati ya bikólo, mpo, na likambo oyo bazali kolobela bino mabe lokola nde na basali-mabe, bákoka kopesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akoya kotala mpo basili komona na miso na bango moko misala na bino ya malamu.” (1 Pet. 2:12) Kasi, tosengeli kosala nini soki tozwani matata ná ndeko moko na lisangá?
“Yokaná yo ná ndeko na yo”
17-19. (a) “Likabo” oyo balobeli na Matai 5:23, 24 ezali nini? (b) Mpo na nini ezali na ntina kozongisa boyokani na ndeko na yo, mpe ndenge nini Yesu amonisi likambo yango?
17 Na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu akebisaki bayekoli na ye na likambo etali kokangela ndeko nkanda. Kasi, basengelaki nde kozongisaka kimya nokinoki ná ndeko oyo bazwani na ye matata. (Tángá Matai 5:21-25.) Kozwa toli ya Yesu wana na lisɛki te. Soki ozalaki komema likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na yo likambo, osengelaki kosala nini? Osengelaki kotika likabo na yo liboso ya etumbelo mpe kokende kozongisa kimya ná ndeko na yo. Nsima ya kosala bongo, okokaki kozonga mpe kopesa likabo na yo.
18 Mbala mingi, “likabo” ezalaki mbeka oyo moto azalaki kopesa Yehova na tempelo. Bambeka ya nyama ezalaki na ntina mingi, mpamba te ezalaki na kati ya losambo oyo Nzambe asɛngaki Yisalaele na Mobeko ya Moize. Kasi, soki moto akanisi ete ndeko na ye azali na likambo na ye, kosilisa likambo yango nokinoki ezalaki na ntina koleka kopesa likabo. Yesu alobaki ete: “Tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo ná ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.” Kozongisa boyokani na ndeko ezalaki na ntina koleka kopesa likabo ndenge Mibeko ezalaki kosɛnga.
19 Yesu alobelaki kaka bambeka to masumu ya lolenge moko boye te. Na yango, moto asengelaki kopesa mbeka na ye naino te soki akanisi ete ndeko na ye azali na likambo na ye. Soki mbeka yango ezali nyama ya bomoi, asengelaki kotika yango “liboso ya etumbelo” ya mbeka ya kotumba na lopango ya banganga, oyo ezalaki na kati ya tempelo. Kaka soki babongisi likambo nde moto yango akokaki kozonga mpo na kopesa mbeka na ye.
20. Soki tozwani matata na ndeko moko, mpo na nini tosengeli kosilisa yango nokinoki?
20 Na miso ya Nzambe, boyokani na biso na bandeko na biso ezali na ntina mingi na kati ya losambo ya solo. Bambeka ya nyama ezalaki na ntina moko te na miso ya Yehova soki bato oyo bapesi yango bazali te kosalela bandeko na bango makambo na ndenge ebongi. (Mika 6:6-8) Yango wana, Yesu alendisaki bayekoli na ye ‘básalaka noki mpo na kobongisa makambo.’ (Mat. 5:25) Na boyokani ya likanisi yango, Paulo akomaki ete: “Bóyoka nkanda, mpe atako bongo bósala lisumu te; tiká ete moi elala te bino bozali kaka na nkanda, mpe bótikela Zabolo esika te.” (Ef. 4:26, 27) Ata soki tosiliki na ntina, tosengeli kosilisa likambo yango nokinoki, mpo soki tobombi nkanda, wana tokotika Zabolo alonga biso.—Luka 17:3, 4.
Tókoba kosalela basusu makambo na limemya
21, 22. (a) Ndenge nini tokoki kosalela toli ya Yesu oyo touti kolobela? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo ekolanda?
21 Mwa makambo mosusu oyo tomoni na lisolo wana oyo Yesu asalaki likoló ya ngomba esengeli kosalisa biso tósalelaka basusu makambo na boboto mpe na limemya. Atako biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kosalela toli ya Yesu, mpamba te ye ná Tata na biso ya likoló basɛngaka biso te makambo oyo eleki biso motó. Na nzela ya mabondeli, ya milende mpe na lisungi ya Yehova, tokoki kozala bato ya boboto, ya motema mawa mpe ya kimya. Tokoki kongɛngisa mwinda ya elimo mpo na lokumu ya Yehova. Longola yango, tokoki kozongisa kimya na ndeko na biso soki esengeli kosala yango.
22 Losambo oyo Nzambe andimaka esɛngaka mpe kosalela bazalani makambo na ndenge ebongi. (Mko. 12:31) Na lisolo oyo elandi, tokotalela makambo mosusu oyo Yesu alobaki na Lisolo Likoló ya Ngomba, oyo esengeli kosalisa biso tókoba kosalela basusu malamu. Nsima ya kotalela makambo kitoko oyo Yesu alobaki na lisolo na ye, tokoki komituna boye, ‘Ngai nasalelaka basusu makambo ndenge nini?’
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liboso ya kobongisa lisolo oyo mpe oyo ekolanda, ekozala malamu otánga naino mikapo yango.
Okopesa eyano nini?
• Kozala na elimo ya boboto elimboli nini?
• Mpo na nini “bato ya motema mawa” bazali bato ya esengo?
• Ndenge nini tokoki kongɛngisaka pole na biso?
• Mpo na nini tosengeli kosalaka nokinoki mpo na ‘koyokana ná ndeko na biso’?
[Elilingi na lokasa 4]
Kosakola nsango ya Bokonzi ezali lolenge eleki malamu ya kongɛngisa pole na biso
[Elilingi na lokasa 5]
Baklisto basengeli ntango nyonso kozala na etamboli ya malamu
[Elilingi na lokasa 6]
Salaká nyonso ozongisa kimya ná ndeko na yo