Epai wapi tokoki kozwa batambwisi ya malamu?
BIBLIA elobi ete: ‘Ndako na ndako etongami na moto moko nde motongi na nyonso ezali Nzambe.’ (Baebele 3:4; Emoniseli 4:11) Yehova, Nzambe ya solo, “ayebi nzoto na biso” malamu, mpamba te ye nde azali Mozalisi na biso. (Nzembo 103:14) Ayebi malamumalamu bolɛmbu na biso mpe bamposa na biso. Lokola azali Nzambe ya bolingo, alingaka kokokisa bamposa yango. (Nzembo 145:16; 1 Yoane 4:8) Alingaka mpe kokokisa mposa na biso ya kozala na motambwisi ya malamu.
Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alobaki boye: “Talá nazalisi ye motatoli epai na bato, motambwisi mpe mokóló mpo na bato.” (Yisaya 55:4) Lelo oyo, mpo na kolanda nzela ya malamu, tosengeli koyeba Motambwisi oyo Mozwi-na-Nguya-Nyonso aponi mpe kondima ye atambwisa biso. Yango wana, tokoki kotuna mituna boye: Motambwisi mpe Mokóló yango ezali nani? Makambo nini asalá oyo ezali kondimisa biso ete azali motambwisi ya malamu? Akomema biso wapi? Tosengeli kosala nini mpo tózwa bolamu na ndenge azali kotambwisa biso?
Motambwisi oyo Nzambe alakaki ayei
Eleki sikoyo mbula soki 2 500, anzelu Gabaliele abimelaki mosakoli Danyele mpe alobaki na ye boye: “Yebá mpe sosolá ete longwa na kobima ya liloba ya kotɛmisa mpe ya kotonga Yelusaleme kino koya ya [Masiya Motambwisi, NW], ekozala pɔsɔ nsambo. Na nsima mpo na pɔsɔ ntuku motoba na mibale ekotongama lisusu esika moko na zando mpe libulu ya kozinga mboka, nde na ntango ya mpasi.”—Danyele 9:25.
Na maloba yango, anzelu ayebisaki Danyele ntango oyo Motambwisi oyo Yehova aponi asengelaki koya. “Masiya Motambwisi” asengelaki komonana na nsuka ya pɔsɔ 69 (elingi koloba mbula 483) banda na mobu 455 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ntango bapesaki etinda ya kotonga lisusu Yelusaleme.a (Nehemia 2:1-8) Likambo nini esalemaki na nsuka ya bambula wana? Luka akomaki na kati ya Evanzile na ye boye: “Na mbula ya zomi na mitano ya boyangeli ya Tibɛli Kaisala, ntango Ponsi Pilato azalaki guvɛrnɛrɛ ya Yudea, mpe Elode azalaki moyangeli ya etúká ya Galilai [mobu 29 ya ntango na biso (T.B.)], . . . liloba ya Nzambe eyaki epai na Yoane mwana ya Zekalia na esobe. Bongo ayaki na bamboka nyonso oyo ezali bipai na bipai ya Yolodani, mpe asakolaki batisimo lokola elembo ya kobongola motema mpo na kolimbisama ya masumu.” Na ntango wana, “bato nyonso bazalaki kozela” Masiya Motambwisi. (Luka 3:1-3, 15, NW) Atako ebele ya bato bazalaki kokende epai ya Yoane, ye te moto azalaki Motambwisi wana.
Na nsima, soki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 29 T.B., Yesu moto ya Nasalete akendaki epai ya Yoane kozwa batisimo. Na nsima, Yoane atatolaki ete: “Namonaki elimo eutaki na likoló lokola ebenga, mpe etɛlɛmaki likoló na ye. Ngai mpe nayebaki ye te, kasi Moto oyo atindaki ngai kobatisa na mai alobaki na ngai ete, ‘Moto oyo okomona ete elimo ekiti mpe etɛlɛmi likoló na ye, ye wana nde abatisaka na elimo santu.’ Mpe namonaki yango, mpe natatolaki ete ye oyo azali Mwana ya Nzambe.” (Yoane 1:32-34, NW) Ntango Yesu azwaki batisimo, akómaki Motambwisi oyo Nzambe apakoli, Masiya, to Klisto.
“Motambwisi mpe mokóló mpo na bato” oyo Nzambe alakaki, ezalaki nde Yesu Klisto. Soki totaleli makoki na ye lokola motambwisi, tokomona mbala moko ete eleki mpenza makoki oyo bato bazali koluka epai ya moto oyo abongi kozala motambwisi lelo oyo.
Masiya: Motambwisi oyo abongi mpenza
Motambwisi ya solosolo alakisaka polele nzela ya kolanda mpe asalisaka bato oyo ye azali kokamba báyeba ndenge ya kosilisa mikakatano na bango mpe bákoka kosilisa yango. Buku moko (21st Century Leadership: Dialogues With 100 Top Leaders) elobi ete ‘yango ezali lisɛngami mpo na motambwisi oyo abongi na ekeke ya 21.’ Yesu abongisaki mpenza bato oyo bazalaki koyoka ye mpo bákoka koyeba ndenge ya kosilisa mikakatano ya mokolo na mokolo! Kanisá kaka makambo oyo alobaki na kati ya lisolo moko oyo eyebani mingi, oyo tobengaka Lisolo Likoló ya Ngomba. Maloba yango ekomami na Evanzile ya Matai mokapo 5 tii mokapo 7 ezali toli malamu mpenza.
Na ndakisa, tókanisa toli ya Yesu mpo na ndenge oyo bato bakoki kosilisa matata kati na bango. Alobaki boye: “Yango wana, soki ozali komema likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na likambo na yo, tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende liboso koyokana na ndeko na yo; mpe na nsima, soki ozongi, pesá likabo na yo.” (Matai 5:23, 24, NW) Kokende kokutana na moto mosusu mpo bóyokana mpe kimya ezala kati na bino ezali likambo oyo tosengeli kotya na esika ya liboso, liboso kutu ya kosala ata mosala nini mpo na Nzambe, na ndakisa kopesa mbeka na etumbelo na tempelo na Yelusaleme ndenge Mibeko ya Mose ezalaki kosɛnga. Soki moto asali ndenge wana te, misala oyo azali kosalela Nzambe, Nzambe akondima yango te. Toli ya Yesu ezali toli malamu lelo oyo, se ndenge ezalaki eleki bankama ya bambula.
Yesu asalisaki mpe bato oyo azalaki koloba na bango ete bákima pite mpe ekobo. Apesaki bango toli oyo: “Boyokaki balobaki ete, ‘Osengeli kosala ekobo te.’ Kasi ngai nazali koloba na bino ete moto nyonso oyo azali kotala mwasi moko tii akóma koyoka mposa na ye, asili kosala na ye ekobo na motema na ye.” (Matai 5:27, 28, NW) Oyo ezali likebisi ya malamu mpenza! Ebongi te ete tókanisaka makambo ya mbindo mpamba te kosala yango ezali lokola kokɔta na nzela oyo ekomema biso na kosala mpenza ekobo. Yesu alobaki ete makanisi ya kosala pite mpe ekobo eutaka na motema. (Matai 15:18, 19) Ebongi mpenza ete tóbatela mitema na biso.—Masese 4:23.
Lisolo Likoló ya Ngomba ezali mpe na toli malamu oyo elobeli kolinga banguna, kokaba, koyeba kotya biloko ya mokili na esika oyo ebongi na yango mpe kotya makambo ya elimo na esika oyo ebongi na yango, mpe makambo mosusu ya ndenge yango. (Matai 5:43-47; 6:1-4, 19-21, 24-34) Yesu alakisaki bato oyo azalaki koteya ndenge ya kobondela mpo na kosɛnga Nzambe asalisa bango. (Matai 6:9-13) Masiya Motambwisi alendisaka mpe abongisaka bayekoli na ye mpo na koyeba ndenge ya kosilisa mikakatano oyo bato nyonso bazali kokutana na yango.
Na kati ya Lisolo Likoló ya Ngomba, mbala motoba mobimba Yesu alobaki “boyokaki balobaki ete” to “lisusu balobaki ete,” mpe na nsima azalaki koyebisa likanisi ya sika ete, “kasi, ngai nalobi na bino.” (Matai 5:21, 22, 27, 28, 31-34, 38, 39, 43, 44, NW) Yango ezali komonisa ete bato oyo azalaki koloba na bango bamesanaki kosala makambo na kolanda bonkɔkɔ ya Bafalisai. Kasi, Yesu alakisaki bango ndenge mosusu, oyo eyokani mpenza na makanisi ya Mibeko ya Mose. Yesu azalaki kolakisa bango makambo ya sika, mpe asalaki yango na ndenge oyo ezalaki mpasi te mpo bayekoli na ye bándima yango. Yesu asalisaki bato bábongola mpenza bomoi na bango, ezala na makambo ya elimo to mpe na bizaleli. Motambwisi ya solosolo azalaka ndenge wana.
Mokanda moko oyo elobeli ndenge ya kotambwisa bato, emonisi ete kobongola elimo mpe bizaleli ya bato ndenge wana ezalaka mpasi. Elobi boye: “Moto oyo alingi ete bato bábongwana [motambwisi] asengeli koyeba komitya na esika ya bato mosusu lokola moto oyo asalisaka bato ya mikakatano; asengeli kozala na bososoli lokola moto oyo ayekolaka bizaleli ya bato, na mpiko lokola mopoti-mbangu, asengeli kozongaka nsima te lokola mbwa ya matata oyo ekɛngɛlaka lopango, asengeli kozala na elikya epai na ye moko lokola moto oyo afandaka mosika na bato mosusu, mpe asengeli kozala na motema molai ya mosantu. Kasi, ata soki azali na bizaleli nyonso wana, elingi koloba te ete akolonga kaka.”
Mokapo moko na buku yango ezali motuna oyo elobi ete: “Bizaleli ya motambwisi ezalaka mpenza na ntina?”; kati na yango bamonisi ete “batambwisi basengeli kozala na bizaleli oyo balingi ete bato oyo bakolanda bango bázala na yango.” Motambwisi ya malamu asalaka makambo oyo ateyaka. Yesu Klisto asalaki mpenza bongo! Na maloba, ateyaki bato ezaleli ya komikitisa; kasi, apesaki bango mpe ndakisa na ndenge asukolaki bango makolo. (Yoane 13:5-15) Asukaki kaka te na kotinda bayekoli na ye ete bákende kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, kasi ye moko mpe amipesaki na molende mpenza na mosala yango. (Matai 4:18-25; Luka 8:1-3; 9:1-6; 10:1-24; Yoane 10:40-42) Yesu apesaki mpe ndakisa na oyo etali kolanda nzela oyo motambwisi azali kolakisa. Ye moko alobaki ete: “Mwana akoki kosala likambo ye moko te, kasi bobele yango emoni ye ete Tata azali kosala.”—Yoane 5:19.
Makambo touti kotalela, oyo Yesu alobaki mpe asalaki, emonisi polele ete azali Motambwisi oyo abongi mpenza. Azali na makoki oyo eleki mpenza makoki oyo bato balukaka epai ya motambwisi. Yesu azali moto ya kokoka. Lokola nsima ya lisekwa na ye akómaki na bomoi oyo akoki kokufa lisusu te, azali na bomoi libela na libela. (1 Petelo 3:18; Emoniseli 1:13-18) Ezali na motambwisi moko awa na mokili oyo akoki kozala na makambo ndenge yango?
Tosengeli kosala nini?
Lokola “Masiya Motambwisi” azali koyangela na Bokonzi ya Nzambe, akopesa bato ya botosi ebele ya mapamboli. Mpo na yango, Makomami epesi bilaka oyo: “Mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova] lokola mbonge ekozipaka mai-na-monana.” (Yisaya 11:9) “Bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.” (Nzembo 37:11) “Bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse ya [nzete na ye ya vinyo, NW] mpe na nzete na ye ya mosuke, moto moko akobangisa bango te.” (Mika 4:4) “Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te, mpo ete makambo ya liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:3, 4.
Lelo oyo, mokili ezali koluka batambwisi ya malamu. Nzokande, Yesu Klisto azali kokamba bato ya komikitisa mpo na komema bango na mokili ya sika ya kimya epai bato ya botosi bakosangana na losambo ya Yehova Nzambe mpe bakokende liboso tii bakokóma na ezaleli ya kokoka. Ezali mpenza na ntina tóyekola koyeba Nzambe ya solo mpe Motambwisi oyo ye aponi mpe tómitambwisa ndenge boyebi yango ezali kotinda!—Yoane 17:3.
Moko na lolenge eleki malamu oyo tokoki kopesa moto lokumu ezali kolanda ndakisa na ye. Na bongo, omoni te ete tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu Klisto, Motambwisi oyo aleki batambwisi nyonso oyo baleká na mokili oyo? Ndenge nini tokoki kosala yango? Soki tondimi kotambwisama na ye, bomoi na biso ekokóma ndenge nini? Tokozwa biyano na mituna yango mpe na mituna mosusu na masolo mibale oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mokanda Tyá likebi na esakweli ya Danyele!, nkasa 186-192, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 4]
Danyele asakolaki koya ya Motambwisi oyo Nzambe aponi
[Bililingi na lokasa 7]
Mateya ya Yesu ebongisaki bato na koyeba ndenge ya kosilisa mikakatano ya bomoi
[Elilingi na lokasa 7]
Yesu akokamba bato ya botosi tii na mokili ya sika mpe ya kimya