Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/10 nk. 12-16
  • Limbisá na motema moko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Limbisá na motema moko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mposa na biso ya kolimbisama ekokisami
  • Tosengeli kosala makasi mpo tólimbisaka basusu
  • Luká kimya, limbisá
  • ‘Bókóba kolimbisana bamoko na bamosusu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tólimbisanaka na motema moko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mpo na nini koyeba kolimbisa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Olimbisaka lokola Yehova alimbisaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/10 nk. 12-16

Limbisá na motema moko

“Tata na ngai na Likoló akosalela bino bongo soko bokolimbisa na mitema na bino moto na moto ndeko na ye te.”—MATAI 18:35.

1, 2. (a) Ndenge nini mwasi moko oyo ayebanaki lokola moto ya masumu akumisaki Yesu? (b) Liteya nini Yesu apesaki na nsima?

MBALA mosusu mwasi yango azalaki mwasi ya ndumba, moto oyo okoki kokanisa te ete okoki kokuta ye na ndako ya moto oyo asambelaka. Bato mosusu basepelaki te ndenge bakutaki ye kuna. Kasi, bayokaki lisusu mabe koleka na likambo oyo mwasi yango asalaki. Apusanaki pene na moto ya bizaleli malamu koleka, akumisaki ye, atangisaki mpisoli na makolo ya moto yango mpe apangwisaki yango na nsuki na ye.

2 Moto yango ezalaki Yesu. Nzokande, akimaki mwasi yango te, atako bayebaki ye na “mboka” mobimba lokola ‘mwasi ya masumu.’ Mpo na Simona Mofalisai, mokóló ndako, mwasi yango azalaki moto ya masumu mpe likambo yango etungisaki ye mingi mpenza. Mpo na kosalisa Simona, Yesu apesaki lisese ya bato mibale oyo bazalaki na nyongo. Moko azalaki na nyongo monene. Asengelaki kofuta mbongo oyo bazalaki kofuta mongamba na mbula mibale ya mosala. Nyongo ya moto mosusu ezalaki mbongo oyo bazalaki kofuta mongamba na mosala ya sanza soko misato. Lokola bakokaki kofuta nyongo yango te, modefisi “alimbisaki bango nyonso mibale.” Na ntembe te, oyo azalaki na nyongo monene koleka asengelaki mpenza kolinga modefisi mingi. Nsima ya komonisa boyokani ya lisese oyo na likambo mwasi yango asalaki, Yesu abimisaki liteya oyo: “Ye oyo alimbisami moke azali na bolingo moke.” Na nsima alobaki na mwasi yango: “Masumu na yo malimbisami.”—Luka 7:36-48.

3. Ndenge nini mokomoko kati na biso asengeli komitalela?

3 Omituna motuna ete: ‘Soki ngai nazalaki na esika ya mwasi yango to soki nazalaki na bizaleli lokola oyo ya ye mpe bayokeli ngai mawa bongo, nakoboya na nko mpenza kolimbisa bato mosusu?’ Ntango mosusu, okoloba ete: ‘Ata moke te!’ Kasi, kanisá naino: Olingaka mpenza kolimbisa bato mosusu? Ezalaka mpenza ezaleli na yo? Olimbisaka bato na mbala moko, mpe bato mosusu bayebi yo mpenza lokola moto oyo alimbisaka? Tótala mpo na nini mokomoko na biso asengeli komitalela na bosembo nyonso na likambo yango.

Mposa na biso ya kolimbisama ekokisami

4. Na likambo nini tosengeli komindimisa?

4 Yo moko oyebi malamu ete ozali moto ya kozanga kokoka. Soki batuni yo, okondima yango mpe okoki ntango mosusu kokanisa maloba ya 1 Yoane 1:8 ete: “Soko tolobi ete tozali na lisumu te, tozali [komikosa, NW ] mpe solo ezali kati na biso te.” (Baloma 3:23; 5:12) Bato mosusu bazali mpenza bato ya masumu mpo bamipesi na kosala masumu minene mpe ya nsɔni koleka. Ata soki ozali komipesa ngambo te mpo osalá masumu minene ndenge wana te, na ntembe te mbala mingi mpe na lolenge mingi ekómelaka yo obuka mitinda ya Nzambe to osala masumu, boye te?

5. Mpo na nini tosengeli kozala na botɔndi epai na Nzambe?

5 Na bongo, makambo oyo ntoma Paulo alobaki ekoki kotalela yo. Akomaki ete: “Bino bozalaki bakufi mpo na bikweli mpe mpo na kozanga kokatama ngenga na nzoto, nde azalisi bino na bomoi na ye [Yesu] esika moko. Alimbisi biso bikweli na biso nyonso.” (Bakolose 2:13; Baefese 2:1-3) Talá maloba oyo: “Alimbisi biso bikweli na biso nyonso.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Alimbisi bongo masumu mingi mpenza. Mokomoko na biso asengeli mpenza kobondela Nzambe lokola Mokonzi Davidi ete: “Ɛ [Yehova], mpo na nkombo na yo, limbisá mabe na ngai, zambi ezali monene.”—Biso nde totɛngisi makomi; Nzembo 25:11.

6. Mpo na kolimbisa, ezaleli nini Yehova azalaka na yango?

6 Ndenge nini yo, to mokomoko kati na biso, akoki kolimbisama? Likambo ya liboso mpenza ezali ete Yehova Nzambe alingaka kolimbisa. Ezali ezaleli na ye. (Exode 34:6, 7; Nzembo 86:5) Na bongo, Nzambe azelaka tóbondela ye mpo na kosɛnga ye bolimbisi, bongo alimbisa biso. (2 Ntango 6:21; Nzembo 103:3, 10, 14) Asili kotya ebongiseli moko mpo na kolimbisa masumu ya bato: mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa bato.​—Baloma 3:24; 1 Petelo 1:18, 19; 1 Yoane 4:9, 14.

7. Na likambo nini osengeli kolanda ndakisa ya Yehova?

7 Nzambe alingaka kolimbisa bato. Tosengeli komona yango lokola ndakisa oyo azali kopesa biso mpo tólimbisaka bato mosusu. Ntoma Paulo abendaki likebi na likambo yango ntango akomaki ete: “Bózalanaka na boboto, moko epai na mosusu, na motema na mawa, na kolimbisanaka mokomoko [lokola] Nzambe asili kolimbisa bino kati na Klisto.” (Baefese 4:32) Ntoma Paulo azali mpenza kolendisa biso tólanda ndakisa ya Nzambe mpamba te na vɛrsɛ oyo elandi alobi lisusu ete: “Bózala [bamekoli, NW ] na Nzambe, lokola bana balingami.” (Baefese 5:1) Omoni boyokani yango? Yehova Nzambe alimbisi yo, yango wana yo mpe, lokola ntoma Paulo amonisi yango, osengeli kolanda ndakisa na Ye mpe kozala ‘na boboto mpe na motema mawa, kolinga kolimbisa’ basusu. Kasi omituna motuna oyo: ‘Nasalaka yango? Soki nazalaka na ezaleli yango te, nasalaka makasi mpo namekolaka Nzambe na kolimbisáká?’

Tosengeli kosala makasi mpo tólimbisaka basusu

8. Nini tosengeli kobosana te mpo na bandeko ya lisangá?

8 Ekozala malamu mpenza soki makambo oyo tosengeli kolimbisa bandeko ezali mingi te kati na lisangá ya boklisto. Nzokande ezali bongo te. Ya solo, bandeko na biso baklisto bazali kosala makasi mpo na kolanda ndakisa ya bolingo oyo Yesu atikelaki biso. (Yoane 13:35; 15:12, 13; Bagalatia 6:2) Na boumeli ya bambula, bazali kosala makasi mpo na kobwaka makanisi, maloba mpe bizaleli mabe ya bato ya mokili oyo. Balingaka mpenza komonisa bomoto ya sika. (Bakolose 3:9, 10) Kasi tóbosana te ete lisangá ya Yehova epai tozali koyangana to lisangá ya Yehova na mokili mobimba, esangisi bato ya kozanga kokoka. Atako bakómá na bizaleli malamu koleka bizaleli mabe oyo bazaláká na yango liboso, bazali kaka bato ya kozanga kokoka.

9, 10. Mpo na nini tokoki kokamwa te soki matata ebimi kati na bandeko?

9 Nzambe ye moko ayebisi biso polele na Biblia ete bandeko na kati ya lisangá bakoki kosala mabunga. Tózwa na ndakisa maloba ya ntoma Paulo na Bakolose 3:13. Yango elobi ete: “Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, bóyikanaka mpiko, bólimbisanaka. [Lokola Yehova, NW] alimbisi bino, bino mpe bobele bongo.”

10 Biblia ebendi likebi na biso na esika oyo ete lokola Nzambe alimbisaka biso, biso mpe tosengeli kolimbisa bazalani na biso. Mpo na nini ezalaka mpasi? Mpamba te, lokola ntoma Paulo alobaki yango, moto moko akoki kozala ‘na likambo na moto mosusu,’ mpe ayebaki ete mikakatano ya ndenge wana ekobima. Yango ebimaki na ekeke ya liboso, kati na baklisto oyo bazalaki “bandeko na bulɛɛ,” oyo ‘babombelaki bango elikya na likoló.’ (Bakolose 1:2, 5) Ekoki kozala mpe bongo na ntango na biso oyo ebele na baklisto bazali te “baponami ya Nzambe, babulami mpe balingami.” (Bakolose 3:12, NW) Na yango, tosengeli kokamwa te mpe koloba te ete lisangá na biso ezali kotambola malamu te kaka mpo mikakatano ebimi, ezala ya solo to bobele makanisi mpamba.

11. Moyekoli Yakobo akebisi biso na likambo nini?

11 Maloba ya Yakobo, ndeko ya Yesu, emonisi mpe ete na bantango mosusu tokozwana na mikakatano na bandeko na biso mpe yango ekosɛnga tólimbisa bango. “Nani kati na bino azali moto na mayele mpe na kososola malamu? Tiká ete amonisa misala na ye na bizaleli malamu kati na bopɔlɔ mpe na mayele. Nde soko bozali na [zuwa mpe kowelana, NW] na mitema na bino, bómikumisa te, bólobaka na lokuta te mpo na kotɛmɛla makambo na solo.” (Yakobo 3:13, 14) ‘Zuwa mpe kowelana’ na mitema ya baklisto ya solo? Ɛɛ, maloba ya Yakobo emonisi polele ete zuwa mpe kowelana ezalaki na kati ya lisangá na ekeke ya liboso mpe ekozala na masangá ya lelo.

12. Likambo nini ebimaki na lisangá ya Filipi na ntango ya kala?

12 Tózali na ndakisa ya baklisto mibale bapakolami oyo bazalaki na etamboli malamu mpe basalaki elongo na ntoma Paulo. Ntango mosusu osilá kotánga lisolo na bango: Ewodia na Suntuke, bandeko ya lisangá ya Filipi. Atako Bafilipi 4:2, 3 elobeli likambo yango polele te, emonisi ete matata ezalaki kati na bango. Ekoki kozala ete ebandaki na mwa maloba mabe oyo moko na bango alobaki na moninga kasi na nko te, to ndeko ya moko na bango atyolaki moninga, to makambo mosusu ya zuwa. Ata soki bazalaki na matata mpo na likambo nini, likambo yango ekómaki monene tii ekómelaki ntoma Paulo oyo azalaki mosika kuna na Loma. Bandeko basi oyo, bato na elimo, ntango mosusu baboyaki kolobana, kopesana mbote na makita to bakómaki kotɔngana epai ya baninga na bango.

13. Ekoki kozala ete matata ya Ewodia na Suntuke esilaki ndenge nini, mpe liteya nini tokoki kozwa?

13 Likambo ya ndenge wana ezali likambo ya sika epai na yo to esalemaka kati na bandeko mosusu ya lisangá na bino to esilá kokómela yo moko? Ntango mosusu likambo ya motindo wana, ezala likambo monene to likambo moke, ezali kosalema na lisangá na bino. Tokosala nini? Na likambo ya Ewodia na Suntuke, ntoma Paulo alendisaki bandeko basi yango mibale oyo bamipesaki epai ya Nzambe ete “bándimana kati na Nkolo.” Ekoki kozala ete bandimaki kosolola mpo na likambo yango, koloba polele mpo na kobongisa yango, komonisa mposa ya kolimbisana mpe na bongo komonisa solo ete bazalaki kolanda ndakisa ya Yehova, moto oyo alimbisaka. Na ntembe te, Ewodia na Suntuke basilisaki matata na bango. Biso mpe tokoki kosilisa matata kati na biso. Tokoki kolimbisana lelo ndenge bango balimbisanaki.

Luká kimya, limbisá

14. Mpo na nini ezalaka malamu mingi kolandela makambo ya mikemike te?

14 Okosala nini mpo na kolimbisa ndeko na yo moklisto oyo ozali na ye na likambo? Ya solo, ezali na lolenge bobele moko te ya kobongisa matata. Nzokande, Biblia epesi biso myango malamu mpe toli ya ntina mpo na kosilisa matata. Toli ya liboso, oyo ezalaka mpasi mpo na kondima mpe kosalela yango, ezali bobele kotika likambo yango eleka mpe kobosana yango. Mingimingi, soki likambo ebimi, lokola ebimaki kati na Ewodia na Suntuke, moto nyonso alingaka kopesa moninga na ye foti. Yango wana esalemaka ete ntango ozwani na likambo na ndeko na yo moklisto, olukaka libosoliboso kopesa ye foti to koloba ete ye nde asali yo mabe koleka. Ata ndenge wana, okoki bobele koboma mɔ́tɔ mpe kolimbisa te? Soki ozali kondima mpenza ete mabe nyonso ezali epai na ndeko na yo moklisto to ye nde moto asali foti monene koleka, yebá ete yo nde ozali na mokumba ya liboso ya kotika likambo yango eleka lokola likambo moko oyo olimbisi mpe esili mpo na yo.

15, 16. (a) Mika alobaki nini mpo na Yehova? (b) Ntango Biblia ezali koloba ete Nzambe ‘abosanaka mabunga’ yango elimboli nini?

15 Tóbosana te ete Nzambe apesaka biso ndakisa monene na likambo etali kolimbisa. (Baefese 4:32–5:1) Mosakoli Mika alobelaki ndakisa na Ye mpo na kolimbisa mabunga ntango akomaki ete: “Nani azali Nzambe lokola yo, ye oyo alimbisaka libunga mpe abosanaka lisumu ya batikali ya libula na ye? Akobomba nkanda na ye mpo na libela te mpo ete asepelaka kosala boboto.”—Mika 7:18, NW.

16 Ntango Biblia ezali koloba ete Yehova ‘abosanaka lisumu,’ elingi koloba te ete amikundolaka mabe yango te, lokola moto oyo bɔɔngɔ na ye esalaka lisusu malamu te. Tókamata ndakisa ya Samasona na Davidi, bato oyo basalaki mabunga minene. Ata nsima ya bambula mingi, Nzambe amikundolaki masumu na bango. Mpe soki toyebi yango lelo, ezali mpo Yehova akomisaki yango na Biblia. Kasi, Nzambe na biso oyo alimbisaka ayokelaki bango mawa. Kutu atii bango liboso na biso lokola bandakisa ya kondima oyo tosengeli kolanda.​—Baebele 11:32; 12:1.

17. (a) Ndakisa nini ekoki kosalisa biso tóbosana mabunga mike to makambo mabe ya basusu? (b) Soki tosali milende mpo na kobosana, ndenge nini tokolanda Yehova? (Talá maloba na nse na lokasa.)

17 Ɛɛ, Yehova ‘abosanaki’a mabunga na bango, ndenge Davidi asɛngaki ye mbala na mbala ete alimbisa ye. (2 Samwele 12:13; 24:10) Tokoki kolanda ndakisa ya Nzambe na likambo yango mpe kolinga kobosana mabunga mike to minene oyo baninga na biso basaleli ya Nzambe bazali kosala mpo bazali bato ya kozanga kokoka? Kanisá ete ozali na kati ya mpɛpɔ oyo elingi komata. Ntango otali libándá, omoni moninga na yo mwasi azali na nse, azali koloba to kosala makambo lokola moto azali na nkanda. Oyebi ete azalaka na nkanda na yo mpe ozali kokanisa ete azali kosala yango mpo na yo. Nzokande, ntango mosusu, azali kosala yango mpo na yo te. Atako bongo, wana mpɛpɔ ezali kobaluka mpo na komata, boleki likoló ya mwasi yango, mpe akómi komonana lokola mwa eloko moke mpenza. Nsima ya ngonga moko, bokómi mosika mpenza na likoló, mpe obosani likambo yango oyo etikali nsima na yo. Ndenge moko mpe, soki tozali kolanda ndakisa ya Yehova mpe tozali kobosana mabunga, yango ekosalisa biso mingi mpo na kolimbisa. (Masese 19:11) Omoni te ete libunga yango ekokóma likambo moke mpenza nsima ya mbula zomi to nsima ya mbula nkama mibale soki tokokanisi yango na Boyangeli ya Mbula Nkóto? Mpo na nini kobosana yango te?

18. Soki tozali kokoka te kolimbisa mabe oyo basali biso, toli nini tokoki kolanda?

18 Ekoki kosalema ete obondeli Nzambe mpo apesa yo makasi olimbisa ndeko na yo oyo asali yo mabe kasi ozali kokoka te. Okosala nini? Yesu alendisi yo okenda kokutana na moto oyo ozali na ye na likambo mpo bósilisa matata yango bino mibale mpe bózongisa boyokani. “Soko okoyeisa likabo na yo na etumbelo mpe okokanisa wana ete ndeko na yo azali na yo na likambo, tiká likabo na yo kuna liboso na etumbelo mpe kendá naino ete obongisa likambo na ndeko na yo, mpe na nsima ozonga mpo na kopesa likabo na yo.”—Matai 5:23, 24.

19. Nini tosengeli kosala mpe kosala te ntango tozali koluka kozongisa boyokani na ndeko na biso?

19 Tomoni ete Yesu alobaki te ete okenda epai na ndeko na yo mpo na kondimisa ye ete yo ozali na elonga kasi ye nde asalaki mabe. Ntango mosusu ekoki kozala bongo. Kasi na ntembe te, bino nyonso bozalaki na mwa libunga. Mposa na yo esengeli kozala te ya koluka libosoliboso ete moto yango andima kaka libunga na ye to mpe afukamela yo. Soki olukaka kosilisa matata na ndenge wana, ekozala mpasi mpo olonga. Esengeli mpe te koluka kozongela likambo mokomoko, ata ezalaki likambo ya solo to kaka makanisi na yo moko. Wana bozali kosolola na kimya mpe na bolingo nyonso lokola baklisto, bongo bomoni ete bozali koyokana malamu te na likambo mpenza ya ntina, ebongi bóluka kosilisa yango. Kasi ata soki boyokani na makambo mikemike nyonso te nsima ya kosolola, esɛngami mpenza bóyokana na makambo nyonso? Ekozala malamu mingi koleka te ete yo, ondima ata mwa moke ete, bino nyonso mibale bolingaka mpenza na motema moko kosalela Nzambe na biso oyo alimbisaka? Soki mokakatano ebimi, ekozala mpasi te mpo na kosilisa yango soki moto na moto alobi na motema na ye ete: “Nayoki mawa mingi mpenza na ndenge ezaleli na biso ya bato ya kozanga kokoka epusi biso tókóma na matata. Kasi, tótika likambo yango eleka.”

20. Ndakisa ya bantoma eteyi biso nini?

20 Tóbosana te ete bantoma mpe bazalaki na matata kati na bango, mingi mpenza ntango bamoko balukaki kozwa lokumu mingi koleka basusu. (Malako 10:35-39; Luka 9:46; 22:24-26) Ntango mosusu boyokani na bango ebebaki, esalaki bango mpasi na motema to babɛtisanaki mpenza libaku. Kasi basilisaki matata yango mpe bakobaki kosala na bomoko. Na nsima, ntoma moko akomaki boye: “Mpo ete Ye oyo azali na mposa na kosepela bomoi mpe komona mikolo malamu, tiká ete apekisa lolemo na ye makambo mabe mpe bibebu na ye maloba na kozimbisa. Apɛngwa longwa na mabe mpe asala malamu, aluka kimya mpe [akoba na, NW] yango.”—1 Petelo 3:10, 11.

21. Toli nini ya ntina Yesu apesaki mpo na kolimbisa?

21 Touti komona ngambo moko ya likambo oyo etali kolimbisa. Tomoni ndenge Nzambe alimbisaki masumu mingi oyo tosalá kala. Na bongo, tosengeli kolanda ndakisa na ye mpe kolimbisa bandeko na biso. (Nzembo 103:12; Yisaya 43:25) Kasi ngambo mosusu ezali. Nsima ya koyebisa bayekoli na ye ndenge nini kobondela, Yesu alobaki ete: “Soko bokolimbisa bato bikweli na bango, Tata na bino na Likoló akolimbisa mpe bino.” Koleka mbula moko na nsima, azongelaki likambo yango ntango ateyaki bayekoli na ye kobondela ete: “Limbisá biso masumu na biso, mpo ete biso tokolimbisaka bato nyonso bazali na nyongo na biso.” (Matai 6:12, 14; Luka 11:4) Na nsima, mwa mikolo liboso ya liwa na ye, Yesu alobaki lisusu ete: “Ezali bino kotɛma kobondela, soko bozali na moto mosusu likambo, bólimbisa yango ete tata na bino oyo na Likoló alimbisa bino bikweli na bino.”—Malako 11:25.

22, 23. Likama nini ekoki kokómela biso soki toboyaka kolimbisa?

22 Yango wana, soki tolingi ete Nzambe alimbisa biso ntango nyonso, biso mpe tosengeli kolimbisa bandeko na biso. Soki ozwani na likambo na moklisto moko, malamu omituna motuna oyo: ‘Koluka bolimbisi ya Nzambe eleki mpenza te koluka komonisa libunga ya ndeko na ngai, ezala mwa libunga to mwa likambo ya kozokisa to likambo nini asalaki lokola azali moto ya kozanga kokoka?’ Yo moko oyebi eyano.

23 Kasi okosala boni soki likambo ezali monene mpenza, soki ezali lisumu monene? Mpe ntango nini okoki kosalela toli ya Yesu oyo ezali na Matai 18:15-18? Tokozwa biyano na mituna oyo na lisolo oyo elandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Molimboli moko ya Biblia alobaki ete na Liebele, Mika 7:18 esaleli maloba ya elilingi oyo “elobeli moto moko oyo azali kosala mobembo mpe aleki esika moko kasi amoni eloko moko te mpo amoni ntina te ya kotalela eloko yango. Elingi koloba te ete Nzambe amonaka masumu te, elingi koloba mpe te ete amonaka masumu lokola likambo moke to eloko mpamba, kasi azwaka lisumu te lokola libaku mpo na kopesa bato etumbu; alukaka kopesa etumbu te kasi kolimbisa.”—Basambisi 3:26; 1 Samwele 16:8.

Okoki koyeba lisusu?

◻ Ndakisa nini Yehova apesi biso mpo na kolimbisa?

◻ Tosengeli koyeba likambo nini mpo na baoyo tozali na bango na lisangá?

◻ Nini tokoki kosala mbala na mbala oyo basusu bazali kozokisa biso to kosalela biso mabe?

◻ Tokosala nini mpo na kozongisa boyokani na ndeko na biso soki esengeli mpenza bongo?

[Elilingi na lokasa 15]

Soki ozwani matata na ndeko na yo moklisto, meká kolimbisa; wana ntango ezali koleka, likambo yango ekosila mokemoke.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto