Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/5 nk. 7-11
  • Bókoba kosala malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bókoba kosala malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Bólinga banguna na bino’
  • Mpo na nini tosengeli kolimbisaka?
  • “Bótika kosambisa”
  • Ndenge oyo tosengeli kosalela basusu makambo
  • Tósalaka basusu malamu ntango nyonso
  • Mateya maleki mateya nyonso
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Lisolo likoló ya Ngomba
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Tozala batosi na liloba, nde bayoki mpamba te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Ndenge ya kofanda na basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/5 nk. 7-11

Bókoba kosala malamu

“Bókoba . . . kosala malamu.”​—LUKA 6:35.

1, 2. Mpo na nini mbala mingi ezalaka pɛtɛɛ te kosalela basusu malamu?

KOSALA basusu malamu ekoki kozala mpasi. Ekoki kozala ete bato oyo tozali kolinga balingaka biso te. Atako tozali koluka kosalisa bato na ndenge tozali kosala makasi mpo na koyebisa bango “nsango malamu ya nkembo ya Nzambe ya esengo” ná Mwana na ye, bato yango bakoki kosepela na nsango yango te to bakoki kozanga botɔndi. (1 Tim. 1:11) Basusu bakoki kozala mpenza “banguna ya nzete ya mpasi ya Klisto.” (Filp. 3:18) Ndenge nini biso baklisto tosengeli kotalela bato yango?

2 Yesu Klisto ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kosala malamu.” (Luka 6:35) Tiká tótalela sikoyo toli yango na mozindo. Tokozwa mpe mateya na makambo mosusu oyo Yesu alobaki na likambo etali kosalela basusu malamu.

‘Bólinga banguna na bino’

3. (a) Na maloba na yo moko, zongelá na mokuse maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 5:43-45. (b) Likanisi nini bakonzi ya mangomba ya Bayuda ya ekeke ya liboso bazalaki na yango na oyo etali Bayuda mpe bato oyo bazalaki Bayuda te?

3 Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu ayebisaki bayoki na ye ete bálingaka banguna na bango mpe bábondelaka mpo na bato oyo bazali konyokola bango. (Tángá Matai 5:43-45.) Baoyo bazalaki kolanda lisolo yango bazalaki Bayuda oyo bayebaki mobeko ya Nzambe oyo: “Okozongisa mabe mpo na mabe te, mpe okobatela nkanda na motema na yo epai na bato na yo mpenza te, kasi okolinga moninga na yo lokola yo mpenza.” (Lev. 19:18) Bakonzi ya mangomba ya Bayuda ya ekeke ya liboso bazalaki kokanisa ete “bato na yo mpenza” mpe “moninga na yo” bazali kaka Bayuda. Mibeko ya Moize ezalaki kosɛnga ete Bayisalaele bákabwana na bikólo mosusu, kasi Bayuda bakómaki na likanisi ete bato nyonso oyo bazali Bayuda te bazali banguna, oyo esengeli koyina.

4. Bayekoli ya Yesu basengelaki kosalaka nini mpo na banguna na bango?

4 Kasi, Yesu alobaki boye: “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino.” (Mat. 5:44) Bayekoli na ye basengelaki kolinga bato oyo bazalaki kosala bango mabe. Luka, moko ya bato oyo bakomaki Baevanzile azongelaki maloba ya Yesu oyo: “Ngai nazali koloba na bino baoyo bozali koyoka, Bókoba kolinga banguna na bino, kosala malamu na bato oyo bayinaka bino, kopambola baoyo bazali kolakela bino mabe, kobondela mpo na baoyo bazali kofinga bino.” (Luka 6:27, 28) Lokola bato ya ekeke ya liboso oyo balandaki toli wana ya Yesu, ‘tosalaka malamu na bato oyo bayinaka’ biso ntango tozali kozongisela bango malamu atako bango bazali kosala biso mabe. ‘Topambolaka baoyo bazali kolakela’ biso mabe ntango tozali kozongisela bango maloba ya boboto. Mpe ‘tobondelaka mpo na baoyo bazali konyokola’ biso na kobɛta to na lolenge ekeseni ya “kofinga.” Mabondeli ya ndenge wana emonisaka ete tolingaka banguna na biso, mpo tosɛngaka Yehova abongola mitema na bango mpo básala makambo oyo ekotinda ye asepela na bango.

5, 6. Mpo na nini tosengeli kolingaka banguna na biso?

5 Mpo na nini tosengeli kolinga banguna na biso? Yesu alobaki ete: “Mpo bómimonisa bana ya Tata na bino oyo azali na likoló.” (Mat. 5:45) Soki tolandi toli wana, tokokóma “bana” ya Nzambe mpe tokobanda komekola Yehova, oyo “asalaka ete moi na ye ebima likoló ya bato mabe mpe bato malamu mpe asalaka ete mbula enɔka likoló ya bayengebene mpe bato bazangi boyengebene.” Ndenge lisolo ya Luka emonisi yango, Nzambe “azali na boboto epai ya bato oyo bazangi botɔndi mpe bato mabe.”​—Luka 6:35.

6 Mpo na komonisa mpenza ntina oyo bayekoli na ye basengelaki ‘kokoba kolinga banguna na bango,’ Yesu alobaki ete: “Soki bozali kolinga baoyo balingaka bino, mbano nini bozali na yango? Bakɔngɔli-mpako basalaka mpe bongo te? Mpe soki bozali kopesa mbote kaka na bandeko na bino, likambo nini ya kokamwa bozali kosala? Bato ya bikólo mosusu basalaka mpe bongo te?” (Mat. 5:46, 47) Soki tozali kolinga kaka bato oyo balingaka biso, Nzambe akopesa biso “mbano” te to akondima biso te. Ata bakɔngɔli-mpako, bato oyo bazalaki kotyolama, bazalaki mpe kolinga bato oyo bazalaki kolinga bango.​—Luka 5:30; 7:34.

7. Mpo na nini ekoki kozala te likambo ya kokamwa soki tozali kopesa mbote kaka na “bandeko” na biso?

7 Liloba “kimya” ezali mpe na kati ya maloba oyo Bayuda bazalaki kosalela mingi mpo na kopesa mbote. (Bas. 19:20; Yoa. 20:19) Yango ezalaki komonisa ete bazalaki kotombela moto oyo bapesi mbote ete azala na nzoto kolɔngɔnɔ mpe makambo na ye etambola malamu. Ekozala “likambo ya kokamwa” te soki tozali kopesa mbote kaka na bato oyo totalelaka lokola “bandeko” na biso. Ndenge Yesu amonisaki yango, “bato ya bikólo mosusu” bazalaki mpe kosala bongo.

8. Yesu alingaki koloba na bayoki na ye nini ntango alobaki ete: “Bosengeli kozala bato ya kokoka”?

8 Mpo na lisumu oyo tosangolá, bayekoli ya Yesu bakokaki kozala bato ya kokoka te. (Lom. 5:12) Nzokande, Yesu asukisaki toli wana na maloba oyo: “Na yango bosengeli kozala bato ya kokoka, ndenge Tata na bino ya likoló azali moto ya kokoka.” (Mat. 5:48) Na maloba wana, azalaki kolendisa bayoki na ye bámekola Yehova, ‘Tata na bango ya likoló,’ na komonisa bolingo na bango na ndenge ya kokoka, elingi koloba kolinga banguna na bango. Biso mpe tosengeli kosalaka bongo.

Mpo na nini tosengeli kolimbisaka?

9. Maloba “limbisá biso banyongo na biso” elimboli nini?

9 Tokobaka kosala malamu ntango toyokeli moto oyo asali biso mabe mawa mpe tolimbisi ye. Kutu, libondeli ya ndakisa oyo Yesu alakisaki ezali na maloba oyo: “Limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tosili kolimbisa bato oyo bazali na banyongo na biso.” (Mat. 6:12) Banyongo oyo Yesu alobeli awa ezali ya mbongo te. Evanzile ya Luka emonisi ete “banyongo” oyo Yesu alobelaki ezali nde masumu, mpamba te evanzile yango elobi ete: “Limbisá biso masumu na biso, mpo biso moko mpe tolimbisaka moto nyonso oyo azali na nyongo na biso.”​—Luka 11:4.

10. Na likambo ya kolimbisa, ndenge nini tokoki komekola Nzambe?

10 Tosengeli komekola Nzambe oyo alimbisaka na motema moko basumuki oyo babongoli motema. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mawa mingi, kolimbisanáká na motema moko ndenge Nzambe mpe na nzela ya Klisto alimbisaki bino na motema moko.” (Ef. 4:32) Davidi, moko ya bakomi ya Nzembo ayembaki boye: “[Yehova] azali motema molai, azali mpe mawa; akosamba seko te mpe boboto na ye ekoyikanaka. . . . Asalaki epai na biso [lokola] masumu na biso te; apesaki biso libonza lokola ekoki na lofundo na biso te. . . . Mosika [lokola] yango kati na epai ya ebimelo ya ntango mpe epai ya elimwelo na yango, mosika boye asili kolongola bipɛngweli na biso. [Ndenge] tata akoyokela bana na ye mawa, boye [Yehova] akoyokela bango mawa baoyo bakobangaka ye. Zambi ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele putulu.”​—Nz. 103:8-14.

11. Yehova alimbisaka banani?

11 Nzambe akoki kolimbisa bato kaka soki bango mpe balimbisá baoyo basalá bango mabe. (Mko. 11:25) Mpo na komonisa mpenza ntina ya likambo yango, Yesu abakisaki boye: “Mpo soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango, Tata na bino ya likoló akolimbisa mpe bino; kasi soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango te, Tata na bino akolimbisa mpe mabunga na bino te.” (Mat. 6:14, 15) Ya solo, Nzambe alimbisaka kaka baoyo balimbisaka basusu na motema moko. Mpe lolenge moko ya kokoba kosalela basusu malamu ezali ya kolanda toli ya Paulo oyo: “Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.”​—Kols. 3:13.

“Bótika kosambisa”

12. Toli nini Yesu apesaki na likambo ya kosambisa basusu?

12 Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobelaki lolenge mosusu ya kosalela basusu malamu ntango ayebisaki bayoki na ye bátika kosambisa basusu mpe asalelaki ndakisa moko ya ntina mingi mpo na komonisa likambo yango. (Tángá Matai 7:1-5.) Tóluka koyeba oyo Yesu alingaki koloba ntango alobaki: “Bótika kosambisa.”

13. Ndenge nini bato oyo bayokaki Yesu basengelaki ‘kokoba kofungola’?

13 Evanzile ya Matai elobi ete Yesu alobaki boye: “Bótika kosambisa mpo bino bósambisama te.” (Mat. 7:1) Na Evanzile ya Luka, Yesu alobaki ete: “Bótika kosambisa, mpe bokosambisama ata moke te; mpe bótika kokweisa bato likambo, mpe bokokweisama likambo ata moke te. Bókoba kofungola, mpe bokofungolama.” (Luka 6:37) Bafalisai ya ekeke ya liboso bazalaki kosambisa basusu na ndenge ya mabe, mpo bazalaki kolanda mimeseno oyo eyokanaki na Biblia te. Moto nyonso oyo ayokaki mateya ya Yesu mpe azalaki kosala bongo asengelaki ‘kotika kosambisa.’ Basengelaki nde ‘kokoba kofungola,’ elingi koloba kolimbisa mabunga ya basusu. Ndenge tomonaki yango liboso, ntoma Paulo apesaki mpe toli ya ndenge wana mpo na oyo etali kolimbisa.

14. Soki bayekoli ya Yesu bakobi kolimbisa, yango ekoki kotinda basusu básalaka nini?

14 Soki bayekoli ya Yesu bakobi kolimbisa, yango ekotinda basusu mpe bálimbisaka. Yesu alobaki ete: “Na lisambisi oyo bozali kosambisa, bokosambisama na yango; mpe na emekelo oyo bozali komekela, bakomekela bino na yango.” (Mat. 7:2) Makambo oyo tozali kosalela basusu, yango nde bakosalela mpe biso.​—Gal. 6:7.

15. Ndenge nini Yesu amonisaki ete kosambisa basusu koleka ndelo ezali mabe?

15 Tóbosana te ete mpo na komonisa ete kosambisa basusu koleka ndelo ezali mabe, Yesu atunaki boye: “Mpo na nini ozali kotala lititi na liso ya ndeko na yo, kasi ozali te kokanisa libaya ya motɔndɔ na liso na yo moko? To ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo, ‘Tiká nalongola lititi na liso na yo’; ntango, talá! libaya ya motɔndɔ ezali na liso na yo moko?” (Mat. 7:3, 4) Moto oyo azalaka na momeseno ya kolobela mabe ya moto mosusu amonaka ata mbeba ya moke na “liso” ya ndeko na ye. Moto yango akanisaka ete ndeko na ye atalelaka makambo na ndenge ya malamu te. Atako libunga yango ezali moke lokola lititi, moto yango akosɛnga ete alongola ye yango. Akomonisa lokola nde alingi kosalisa ndeko na ye akóma kotalela makambo na ndenge ebongi.

16. Mpo na nini tokoki koloba ete Bafalisai bazalaki na “libaya ya motɔndɔ” na liso na bango?

16 Bakonzi ya mangomba ya Bayuda nde bazalaki mpenza kosambisa basusu. Na ndakisa: Ntango moto moko oyo akufá miso oyo Yesu abikisaki alobaki ete Yesu auti epai ya Nzambe, Bafalisai bayanolaki ye na nkanda nyonso ete: “Yo obotamaki mobimba na kati ya masumu, kasi ozali koteya biso?” (Yoa. 9:30-34) Mpo na oyo etali kotalela makambo na ndenge ya elimo mpe kosambisa makambo na ndenge ebongi, Bafalisai bazalaki na “libaya ya motɔndɔ” na liso na bango mpe bazalaki mpenza bakufi-miso. Na yango, Yesu alobaki boye: “Mokosi! Liboso longolá libaya ya motɔndɔ na liso na yo moko, mpe boye okomona polele ndenge ya kolongola lititi na liso ya ndeko na yo.” (Mat. 7:5; Luka 6:42) Soki tozali na ekateli ya kosala malamu mpe kosalela basusu makambo na ndenge ebongi, tokobanda te ntango nyonso kolobaka mabe ya ndeko na biso to na maloba ya elilingi koluka lititi na liso na ye. Na esika ya kosala bongo, tosengeli kobosana te ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe na ndenge yango tokoboya koloba mabe ya bandeko na biso baklisto.

Ndenge oyo tosengeli kosalela basusu makambo

17. Na kotalela Matai 7:12, ndenge nini tosengeli kosalelaka basusu makambo?

17 Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki ete Nzambe amonisaka motema ya tata epai ya basaleli na ye na ndenge ayanolaka na mabondeli na bango. (Tángá Matai 7:7-12.) Yango wana Yesu apesaki etinda oyo: “Makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.” (Mat. 7:12) Tokomonisa ete tozali baklisto ya solo, soki tozali kosalela basusu makambo ndenge vɛrsɛ wana elobi.

18. Ndenge nini “Mibeko” emonisaki ete tosengeli kosalela basusu makambo ndenge biso tolingaka basalela biso?

18 Nsima ya koloba ete tosengeli kosalela basusu makambo oyo tolingaka basusu basalela biso, Yesu abakisaki boye: “Wana nde, ya solo, ndimbola ya Mibeko mpe Basakoli.” Soki tosaleli basusu makambo ndenge Yesu alobaki, wana tozali kolanda makambo oyo ekomami na “Mibeko,” kobanda na Genese tii na Deteronome. Longola kolobela mokano ya Nzambe ya kobimisa momboto oyo ekolongola mabe, mikanda yango elobeli Mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo ya Yisalaele na nzela ya Moize na 1513 L.T.B. (Gen. 3:15) Mibeko yango emonisaki mpe polele ete Bayisalaele basengelaki kozala sembo, kozala te bato oyo baponaponaka bilongi mpe basengelaki kosala malamu epai ya babola mpe bapaya.​—Lev. 19:9, 10, 15, 34.

19. Ndenge nini mikanda ya “Basakoli” emonisi ete tosengeli kosalaka malamu?

19 Ntango Yesu atángaki mikanda ya “Basakoli,” azalaki nde kolobela mikanda ya bisakweli ya Makomami ya Liebele. Mikanda yango ezali na bisakweli oyo ekokisamaki epai ya Yesu. Mikanda yango emonisi mpe ete Nzambe apambolaka basaleli na ye ntango bazali kosala oyo ezali malamu na miso na ye mpe bazali kosalela basusu makambo na ndenge ebongi. Na ndakisa, esakweli ya Yisaya epesaki Bayisalaele toli oyo: “[Yehova] alobi boye ete, Bósambisa sembo, bósala mpe boyengebene; . . . Mapamboli epai na moto oyo asali bongo mpe na mwana na moto oyo asimbi yango makasi; . . . akoboyisaka lobɔkɔ na ye ete losala mabe te.” (Yis. 56:1, 2) Ya solo, Nzambe alingaka ete basaleli na ye bákoba kosala malamu.

Tósalaka basusu malamu ntango nyonso

20, 21. Bato oyo bayokaki lisolo ya Yesu likoló ya ngomba basalaki nini mpe mpo na nini tosengeli kokanisa lisolo yango na mozindo?

20 Touti kotalela kaka mwa makambo ya ntina na Lisolo ya Yesu Likoló ya Ngomba. Atako bongo, tokoki koyeba ntina oyo baoyo bayokaki lisolo yango basalaki bongo. Biblia elobi boye: “Nzokande ntango Yesu asilisaki maloba yango, esalaki ete bibele yango ya bato bakamwaki na ndenge na ye ya koteya; mpo azalaki koteya bango na ndenge ya moto oyo azali na bokonzi, kasi lokola bakomeli na bango te.”​—Mat. 7:28, 29.

21 Na ntembe te, Yesu Klisto azalaki mpenza “Mopesi-toli ya kokamwa” oyo Biblia esakolaki. (Yis. 9:6, NW) Lisolo Likoló ya Ngomba emonisi mpenza ete Yesu ayebaki ndenge Tata na ye ya likoló atalelaka makambo. Longola makambo oyo tolobeli, lisolo yango elobeli mpe makambo mingi lokola kozala na esengo ya solosolo, ndenge ya kokima pite to ekobo, ndenge ya komonisa bosembo, oyo tosengeli kosala mpo tózala na kimya mpe na esengo na mikolo ezali koya mpe bongo na bongo. Mpo na nini te kotánga lisusu na likebi nyonso mpe na kati ya libondeli Matai mokapo ya 5 kino 7. Kanisá na mozindo toli oyo Yesu apesi na mikapo yango. Salelá makambo oyo Klisto alobaki na lisolo yango na bomoi na yo. Soki osali bongo, okosepelisa Yehova, okosalela basusu makambo na ndenge ebongi mpe okokoba kosala malamu.

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini tosengeli kotalelaka banguna na biso?

• Mpo na nini tosengeli kolimbisaka?

• Yesu alobaki nini na likambo ya kosambisa basusu?

• Na kotalela Matai 7:12, ndenge nini tosengeli kosalelaka basusu makambo?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 10]

Oyebi mpo na nini Yesu alobaki: “Bótika kosambisa”?

[Elilingi na lokasa 8]

Mpo na nini tosengeli kobondelaka mpo na baoyo bazali konyokola biso?

[Elilingi na lokasa 10]

Osalelaka basusu ntango nyonso makambo oyo olingaka basalela yo?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto