Nkombo ya Nzambe—Ndimbola na yango mpe ebéngeli na yango
MOKO na bakomi na Biblia atunaki ete: “Nani asili koyanganisa mopepe na mabɔkɔ na ye? Nani asili kokanga mai na elamba? Nani akokisi nsuka nyonso ya mokili? Nkombo na ye nani mpe nkombo ya mwana na ye nani? Oyebi yango?” (Masese 30:4) Lolenge nini biso tokoki koyeba nkombo ya Nzambe? Oyo ezali motuna ya ntina mingi. Biloko bizalisami bizali mpenza komonisa ete Nzambe azali, kasi yango emonisi biso nkombo na ye te. (Baloma 1:20) Na yango, tokoki koyeba nkombo ya Nzambe bobele soki Mozalisi ye moko ayebisi biso yango. Mpe asili kosala yango kati na Mokanda na ye, Biblia Mosantu.
Na libaku moko monene, Nzambe ayebisaki nkombo na ye mpenza, mpe azongelaki yango mbala mingi liboso na Mose. Mpe Mose akomaki lisoló yango oyo libatelami kati na Biblia kino na mikolo na biso. (Exode 34:5) Nzambe akomaki mpe nkombo na ye na “mosapi” na ye moko. Esilaki ye kopesa na Mose oyo tozali kobénga lelo Mibeko Zomi, Nzambe ye moko akomaki yango na likamwisi na libangá. Lisoló liyebisi ete: “Wana esilaki ye [Nzambe] kolobela Mose likoló na ngomba na Sinai, apesaki ye bitando mibale na litatoli, bitando na mabanga bikomami na mosapi na Nzambe.” (Exode 31:18) Nkombo ya Nzambe ezwami mbala mwambe kati na Mibeko Zomi ya ebandeli. (Exode 20:1-17) Na bongo, Nzambe ye moko amonisaki nkombo na ye epai na moto, na maloba mpe na makomi. Bongo, nkombo yango ezali nini?
Na monoko ya Liebele, ekomami ete יהוה. Makomi minei oyo mabéngami “Tétragramme,” mazali kotangama longwa na lobɔkɔ ya mobali kino na lobɔkɔ ya mwasi, na Liebele; mpe na minoko mingi ya ntango na biso, ekoki kokomama YHWH to JHVH. Nkombo ya Nzambe, oyo ekomami na makomi oyo minei, ezwami soko mbala 7 000 kati na “Kondimana ya Kala” to Makomami na Liebele.
Nkombo wana ezali motindo na liloba moko ya Liebele ha·wahʹ (הוה), libongolami na “kokóma,” mpe elimboli mpenza “Azali koyeisa.”a Bongo, nkombo ya Nzambe ezali komonisa ye lokola Moto oyo azali kokokisa bilaká na ye mokemoke mpe oyo azali kokokisa mikano na ye nyonso. Bobele Nzambe ya solo nde asengeli kozala na nkombo oyo ezali na ntina mingi.
Ozali komikundola lolenge oyo nkombo ya Nzambe emonisamaki na mitindo mikeseni na Nzembo 83:18 [to 19], engebene makambo oyo tomonaki na eteni ya liboso (lokasa 5)? Mibale kati na mabongoli yango etyaki bobele nkombo oyo ete “MOKONZI” to “Oyo-na-seko” na esika na nkombo ya Nzambe. Nzokande na mibale mosusu, okoki mwa moke kokuta mwa mosusu kati na makomi minei na nkombo ya Nzambe, kati na Yehova mpe Yawe. Atako bongo, ebéngeli na yango ekeseni. Mpo na nini?
Lolenge nini bakobéngaka nkombo ya Nzambe?
Ezali solo ete, moto moko te ayebi mpenza lolenge ya sikisiki oyo nkombo ya Nzambe ezalaki kobéngama na ebandeli. Mpo na nini? Mpo ete Biblia ekomamaki liboso na monoko ya Liebele, mpe na ntango yango bakomi bazalaki kokoma bobele mileli (consonnes), kasi milelisi (voyelles) mizalaki kokomama te. Yango wana, na ntango bakomi oyo bapemamaki bakomaki nkombo ya Nzambe, balandaki bobele mwango wana moko, bongo bakomaki bobele mileli.
Na ntango oyo Liebele ya kala ezalaki kolobama mingi, mokakatano moko mozalaki te. Bayisraele bayebaki mpenza kobénga nkombo yango malamu mpe wana bazalaki kokuta yango na makomami, bazalaki kobakisa milelisi oyo misengeli na ebéngeli na yango kozanga kokakatana (lokola tokoki lelo kotanga “bd” ete “boulevard,” mpe “bldg” ete “building”).
Kasi, ezalela wana eyaki kobongwana mpo na makambo mibale. Ya liboso, biyambayamba bimemaki Bayuda na kokanisa ete kotanga nkombo ya Nzambe ezalaki mabe; mpe na ntango bazalaki kokuta nkombo yango kati na Biblia, na esika na yango, bazalaki kokitanya liloba mosusu ya Liebele ’Adho·naiʹ (“Nkolo Moyangeli”). Ya mibale, nsima na bikeke, Liebele ya kala ezalaki lisusu kolobama mingi te na masoló ya mokolo na mokolo, kino ebéngeli ya nkombo ya Nzambe na Liebele ya ebandeli etikaki kosalelama mingi.
Mpo ete bato batika te kosalela monoko ya Liebele, Balakisi na Mibeko ya Bayuda basalaki bilembo bimonisaki milelisi oyo mizangaki, mpe bakɔtisaki yango katikati na makomi ya Biblia na Liebele. Uta ntango wana, milelisi mpe mileli mizalaki nyonso kokomama, likambo oyo lipesaki nzela ete ebéngeli oyo esalelamaki na eleko wana ekoka koumela.
Na esika ya kotya milelisi misengeli wana ezalaki bango kokuta nkombo ya Nzambe, mbala mingi, balakisi wana bazalaki nde kotya bilembo mosusu ya milelisi mpo na kokundwela batangi ete basengelaki kobénga ’Adho·naiʹ. Nkombo Iehouah euti na kosangisama ya makomi wana, oyo na nsima ekómaki Yehova, ebéngeli oyo endimami mpo na nkombo ya Nzambe na minoko mingi. Ebéngeli oyo esili kobatela makomi ya ntina mingi ya nkombo ya Nzambe na Liebele ya ebandeli.
Lolenge nini okobénga yango?
Kasi, lolenge mosusu ya kokoma nkombo ya Nzambe lokola Yawe euti wapi? Euti na bato oyo bayekoli monoko ya Liebele na ntango na biso, baoyo bamekaki komonisa lolenge oyo nkombo ya Nzambe ezalaki kobéngama na ebandeli. Bamoko kasi bango nyonso te—bandimi ete Bayisraele oyo bazalaki liboso ya eleko na Yesu, bazalaki mbala mosusu kobénga nkombo ya Nzambe ete, Yahweh. Kasi moko te akoki kondimisa yango. Mbala mosusu bazalaki kobénga yango lolenge mosusu.
Atako bongo, bato mingi basepelaka kosalela ebéngeli oyo ete Yehova. Mpo na nini? Mpo ete yango eyebani mingi mpe esalelami koleka Yawe. Na yango, mbɛlɛ ekozala malamu te kosalela ebéngeli oyo ekokani mwa moke na ebéngeli ya ebandeli? Yango mpenza te, mpamba te, bakosalaka motindo wana te mpo na bankombo oyo ezwami na Biblia.
Mpo na kozwa ndakisa ya sikisiki, totalela nkombo ya Yesu. Yo oyebi lolenge oyo baboti na ye mpe baninga na ye bazalaki kobénga ye na masoló na bango ya mokolo na mokolo, na boumeli ya bomwana na ye na Nazarete? Ya solo, moto moko te ayebi yango malamu; mbala mosusu bazalaki kobénga ye ete Yeshua (to mpe Yehoshua), kasi Yesu te.
Nzokande, na ntango bakomaki lisoló ya bomoi na ye na monoko ya Greke, bakomi wana bapemami na Nzambe bamekaki te kotika nkombo na ye lokola yango ezalaki na Liebele ya ebandeli. Kasi, babongolaki yango na Greke ete, I·e·sousʹ. Lelo oyo, nkombo yango ebongolami na mitindo mikeseni na minoko oyo Biblia ekomami. Na Biblia ya Espagnol, batangi bazali kokuta Jesús (kasi babéngaka yango ete Hes·soosʹ). Bato ya Italia bakomaka Gesù (babéngaka yango Djay·zooʹ). Bato ya Allemagne bakomaka Jesus (babéngaka yango Yayʹsoos).
Tosengeli kotika kosalela nkombo na Yesu mpo ete bobele bato moke lelo to moto moko te ayebi mpenza lolenge oyo bazalaki kobénga yango na ebandeli? Ata mobongoli moko te akanisaki motindo wana mpo na yango. Tolingaka mpenza kosalela nkombo wana, mpamba te ezali komonisa Yesu Klisto, Mwana molingami na Nzambe, oyo asopaki makila na ye mpo na biso. Tokoki nde kokumisa Yesu na kolongoláká nkombo na ye kati na Biblia mpe kotya bankombo mosusu lokola “Moteyi,” to “Moyokanisi” na esika na yango? Soko moke te! Tokoki kolobela lisoló na Yesu malamu wana ezali biso kosalela nkombo na ye na lolenge oyo tozali kobénga yango na monoko na biso.
Tokoki koloba motindo moko mpo na bankombo nyonso oyo tozali kotanga kati na Biblia. Totangaka yango engebene ebéngeli na yango na monoko na biso, kasi tomekolaka te lolenge oyo yango ebéngamaki na ebandeli. Na yango, tobéngaka “Yilimia,” kasi Yir·meyaʹhu te. Bobele bongo, tobéngaka Yisaya, nzokande na eleko na ye, mosakoli wana abéngamaki ete Yesha‘·yaʹhu. Nkutu, balimboli ya Biblia oyo bayebi ebéngeli ya ebandeli ya bankombo wana, bazali kosalela ebéngeli ya sika kasi oyo ya kala te, wana ezali bango kolobela bankombo yango.
Motindo oyo mosalelami mpe mpo na nkombo ya Yehova. Atako Yehova ezali mpenza lolenge ya sikisiki te oyo bazalaki kobénga nkombo ya Nzambe na ebandeli, kasi yango elongoli motuya na yango soko moke te. Nkombo wana ezali komonisa Mozalisi, Nzambe ya bomoi, Oyo-Aleki-Likoló oyo Yesu alobaki na ntina na ye ete: “Tata na biso oyo azali na likoló, tika ete nkombo na yo ezala mosantu!”—Matai 6:9, NW.
‘Nkombo mosusu ekoki kokitana yango te’
Atako babongoli mingi bazali kosalela Yawe, nzokande, Traduction du monde nouveau mpe mwa mabongoli mosusu mazali kosalela bobele Jéhovah, mpamba te bato basili komesena na yango uta bikeke mingi. Lisusu, ezali na makomi minei ya Tétragramme, YHWH to JHVH.b
Na kala, Gustav Friedrich Oehler, molakisi na université na Allemagne, azwaki ekateli motindo moko bobele mpo na ntina wana. Atalelaki bibéngeli bikeseni mpe asukisaki ete: “Mpo na yango, nazali kosalela liloba Jéhovah, mpo ete tomeseni mpenza na kosalela nkombo yango kati na lokóta na biso, mpe tokoki kokitanya nkombo mosusu te.”—Theologie des Alten Testaments (Teoloji ya Kondimana na Kala), ebimeli ya mibale, na 1882, lokasa 143.
Bobele bongo, kati na mokanda na ye Grammaire de l’hébreu biblique, ebimeli ya 1923, note ezali na nsé na lokasa 49, molakisi Paul Joüon ayebisi ete: “Kati na mabongoli na biso, tozali kosalela liloba Jéhovah . . . oyo ekomami mpe elobami na Lifalansé, na esika ya kosalela Yahweh (oyo endimami mpenza te).” Na minoko mingi misusu, babongoli ya Biblia bakomaki lolenge wana, lokola yango emonisami na makambo oyo matyami na encadré na lokasa 8.
Bongo, kosalela liloba Yawe ezali mabe? Soko moke te. Litomba lizwami na liloba Yehova ezali oyo ete, ekoki nokinoki kobénda likebi ya motangi mpamba te liloba wana “lisalelami” kati na minoko mingi. Likambo ya ntina mingi lizali oyo ete tosalela nkombo yango mpe tosakola yango epai na bato mosusu. “Botɔndo Yehova, bino mabota! Bobelela nkombo na ye. Boyebisa misala na ye epai na mabota. Boloba ete nkombo na ye ezali likolo.”—Yisaya 12:4, NW.
Totala sikawa lolenge oyo basaleli ya Nzambe batósaki etinda oyo na boumeli ya bikeke.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala Appendice 1A ya Les Saintes Ecritures — Traduction du monde nouveau, ebimeli ya 1984 na Lingelesi.
b Tala Appendice 1A ya Les Saintes Ecritures — Traduction du monde nouveau, ebimeli ya 1984 na Lingelesi.
[Etanda na lokasa 7]
Balimboli nyonso ya Biblia bazali na likanisi moko te likoló na lolenge oyo nkombo YHWH ezalaki kobéngama na ebandeli.
Kati na mokanda The Mysterious Name of Y.H.W.H. (Y.H.W.H., Nkombo oyo ekoki kolimbolama te, lokasa 74), Dr. M. Reisel alobaki ete “na ebandeli, lolenge oyo batyaki milelisi na Tétragrammme, esengelaki kozala YeHūàH to YaHūàH.”
Na ntina na liloba Yahvé, Alexandre Westphal ayebisi mpenza kati na mokanda na ye Dictionnaire encyclopédique de la Bible (1932-35), ete: “Tozali na elembeteli moko te emonisi ete nkombo yango ezalaki mpenza lolenge wana. Likambo oyo ete Bayuda ya mboka Eléphantine (na Ezipito) bazalaki kokoma yango ete Jahou, epesi nzela na kokanisa ete milelisi misalelamaki mpo na nkombo ya Nzambe ya Yisraele eyebani naino te.”—Tome I, lokasa 295.
Kati na bankasa oyo balimboli maloba mosusu na libongoli ya Segond (1978, lokasa 9), tozali kokuta likanisi oyo ete: “Ebéngeli oyo ete Yahvé, oyo etyami na mabongoli ya sika, ezwi moboko na yango likoló ya mwa matatoli ya kala oyo mazali mpenza na nguya te. Mbɛlɛ ekoki mpe ete tozongisa ébengeli Yaho to Yahou, na kotaleláká bankombo ya bato, oyo ekangisami na nkombo ya Nzambe, na ndakisa nkombo na Liebele ya mosakoli Eliya: Eliyahou.”
Na 1749, Teller, moto ya Allemagne oyo azalaki molimboli na Biblia, alobelaki lolenge oyo nkombo ya Nzambe ebéngamaki na mitindo mikeseni, ete: “Diodore ya Sicile, Macrobe, Clémens Alexandrinus, Santu Jérôme mpe Origène bakomaki ete Jao; Basamaria, Epiphane, Théodoret bakomaki ete Jahé, to Javé; Ludwig Cappel akomaki ete Javoh; Drusius, Jahvé; Hottinger, Jehva; Mercerus, Jehovah; Castellio, Jovah; mpe le Clerc akomaki Jawoh, to Javoh.”
Emonani bongo ete ebéngeli ya nkombo ya Nzambe na ebandeli eyebani lisusu te. Kasi yango ezali mpenza na ntina mingi te, soki te, mbɛlɛ Nzambe ye moko asɛnzelaki ete ebatelama mpo ete biso tosalela yango. Likambo ya ntina ezali ete tosalela nkombo ya Nzambe ata lolenge nini yango ebéngami na monoko na biso.
[Etanda na lokasa 8]
Lolenge oyo nkombo ya Nzambe ekomami na minoko mikeseni, emonisi ete ebéngeli Yehova endimami na mokili mobimba
Allemand - Jehova
Anglais - Jehovah
Awabakal - Yehóa
Bugotu - Jihova
Cantonais - Yehwowah
Danois - Jehova
Efik - Jehovah
Espagnol - Jehová
Fidjien - Jiova
Finnois - Jehova
Français - Jéhovah
Futunien - Ihova
Hongrois - Jehova
Igbo - Jehova
Italien - Geova
Japonais - Ehoba
Maori - Ihowa
Motou - Iehova
Mwala-Malu - Jihova
Narrinyeri - Jehovah
Néerlandais - Jehovah
Nembe - Jihova
Petats - Jihouva
Polonais - Jehowa
Portugais - Jeová
Roumain - Iehova
Samoan - Ieova
Sotho - Jehova
Suédois - Jehova
Swahili - Yehova
Tagal - Jehova
Tahitien - Iehova
Tonga - Jihova
Venda - Yehova
Xhosa - uYehova
Yorouba - Jehofah
Zoulou - uJehova
[Etanda na lokasa 11]
Nkombo “Yehova” eyebani mingi mpenza lokola nkombo ya Nzambe ata kati na mikanda ya mokili.
Franz Schubert abongisaki miziki ya loyembo lokomamaki na Johann Ladislav Pyrker, oyo ezalaki na motó na likambo ete “Nguya-Eleki-Nguya-Nyonso,” kati na yango nkombo Yehova ezwami mbala mibale. Nkombo yango esalelami lisusu na eteni ya nsuka ya loyembo lokomamaki na Verdi, na motó na likambo “Nabucco.”
Lisusu, nkombo Yehova ezwami mbala mingi na lisoló “Mokonzi Davidi,” oyo ekomamaki na Arthur Honegger, moto ya Suisse, mokomi na lokotá ya Lifalansé, mpe Victor Hugo, Mofalansé mokomi na lokumu, asalelaki yango koleka mbala 30 kati na mikanda na ye. Lokola Lamartine, ye akomaki nkutu maloba kitoko ezalaki na motó na likambo “Yehova.”
Kati na mokanda Deutsche Taler (Mosolo ya Allemagne), ebimisamaki na 1967 na Banque fédérale d’Allemagne, tozali kokuta elilingi ya mosolo moko na paláta ya kala mpenza oyo ezali na nkombo “Yehova”; ezali bongo mosolo thaler eutaki Silésie, oyo esalemaki na 1634. Na ntina na elilingi oyo ezali na ngambo mosusu ya paláta wana, mokanda yango elobi ete: “Na nsé na nkombo YEHOVA, nkombo na kongɛnga mpe etombwani kuna na mapatá, tozali komona mosolo mokembisami na bililingi ya Silésie.”
Na ebombelo ya biloko ya kala, na mboka Rudolstadt, na Allemagne, okoki komona ete nkombo YEHOVA ekomami na makomi minene na ekɔti na moláto ya etumba oyo elatamaki na ekeke ya zomi na nsambo, na Gustave II Adolphe, mokonzi ya Suède.
Na bongo, uta bikeke mingi, bikólo mingi bayebi ete Yehova ezali lolenge oyo esengeli mpenza mpo na kobénga nkombo ya Nzambe, mpe baoyo bazali koyoka yango, bazali nokinoki kososola nani nkolo nkombo yango. Lokola elobaki yango molakisi Oehler, “tomeseni mpenza kosalela nkombo yango kati na elobeli na biso, mpe tokoki kokitanya nkombo mosusu te.”—Theologie des Alten Testaments (Teoloji ya Kondimana na Kala), lokasa 143.
[Elilingi na lokasa 6]
Elilingi ya anzelu moko azali na nkombo ya Nzambe, etyami na nkunda ya Pápa Clément XIII, na ndakonzambe St. Pierre, na Vatican
[Elilingi na lokasa 7]
Nkombo ya Nzambe etyamaki na bapaláta mingi. Paláta oyo esalemaki na 1661, euti na engumba Nuremberg, na Allemagne. Likomi oyo ya Latin lilimboli ete: “Na nsé na mapapu na yo”
[Bililingi na lokasa 9]
Ndakonzambe Notre-Dame de Fourvière, Lyon, France
Cathédrale ya Bourges, France
Ndakonzambe ya La Celle-Dunoise, France
Ndakonzambe ya Digne, na sud ya France
Ndakonzambe ya São Paulo, Brezile
Cathédrale ya Strasbourg, France
Cathédrale Saint-Marc, Venise, na Italia
Na boumeli ya bikeke, nkombo ya Nzambe na lolenge ya Tétragramme, etyamaki na bililingi ya bandakonzambe mingi
[Bililingi na lokasa 10]
Lolenge oyo nkombo ya Yehova ekomami na monastère ya Bordesholm, na Allemagne;
na paláta moko ya Allemagne, na 1635;
likoló ya ekuke ya ndakonzambe ya Fehmarn, na Allemagne;
mpe likoló na libangá ya nkunda lisalemaki na 1845, na Harmannschlag, na Basse-Autriche