Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/6 lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo mosusu
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • “Nkolo, teyá biso ndenge ya kobondela”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Bokonzi ya Nzambe eleki na makambo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/6 lok. 31

Mituna ya batángi

Na bantango mosusu toyokaka bandeko balobaka to basambelaka na ntina na Bokonzi ya Nzambe ete eya awa na mabelé. Elobeli yango elongobani?

Na bosikisiki mpenza, koloba bongo eyokani na Makomami te. Bokonzi ya Nzambe ezali bokonzi ya likoló. Na yango, ntoma Paulo akokaki kokoma ete: “Ɛɛ, Nkolo akobotola ngai na misala mabe nyonso mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na ye na Likoló. Nkembo ezala na ye libela na libela. Amen.”​—2 Timoté 4:18; Matai 13:44; 1 Bakolinti 15:50.

Bokonzi etyamaki na likoló na 1914, mpe ekotindama te na mabelé oyo makozongisama Paladiso to na esika mosusu nyonso. Yesu Klisto azali Mokonzi ya Bokonzi yango. Lokola azali Mokonzi, Yesu azali na bokonzi likoló na baanzelu. Na yango, esika ebongi mpo na bokonzi na ye ezali bongo na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe na makoló. Baklisto bapakolami bazali kosangana elongo na ye lokola bakonzi mpe banganga na likoló.​—Baefese 1:19-21; Emoniseli 5:9, 10; 20:6.

Na bongo, yango elimboli ete tosengeli lisusu te kotinda epai na Nzambe malɔ́mbɔ oyo mazwami kati na losambo ya Tata wa biso, oyo elobaka ete: “Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalema na nsé pelamoko na likoló”? (Matai 6:10) Kútu, yango elongobani mpe ezali naino na ndimbola mingi.

Na mikolo mizali koya, Bokonzi ya Nzambe ekosala makambo minene mpo na mabelé, mpe tokanisaka nde na ntina na yango na ntango tosambelaka mpe tosalelaka maloba oyo mazwami kati na losambo ya Tata wa biso. Na ndakisa, Danyele 2:44 esakoli ete Bokonzi ekoya ‘koboma’ bikólo nyonso mpe ekoyangela mabelé. Emoniseli 21:2 ezali koloba na ntina na Yelusaleme ya sika oyo ezali kokita uta na likoló. Yelusaleme ya sika esalemi na baklisto 144 000 oyo bakozala mwasi na libala ya Klisto. Bazali mpe basangoli na libula elongo na Klisto kati na Bokonzi. Na yango, Emoniseli 21:2 ezali kolobela lolenge oyo bakotya likebi na bango na mabelé, mpe yango ekopesa mapamboli mingi epai na bato ya sembo.​—Emoniseli 21:3, 4.

Liboso ete bisakweli wana ya kokamwa mpe mosusu bikokisama, ekozala mabe te kobondela Yehova Nzambe na boyokani na maloba oyo ya Yesu: “Tiká Bokonzi na yo eya.” Kasi tosengeli kosimba malamu likambo oyo ete Bokonzi ekoya te awa na mabelé na lolenge oyo ekoki komonana mpenza na miso ya bato. Boyangeli ya Bokonzi yango ezali na likoló, kasi na mabelé te.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]

Mabelé: Engebene fɔ́tɔ́ ya Naza

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto