Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mabondeli nini mandimami na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1991 | 15 Septembre
    • MABONDELI mosusu makondimama mpenza kozanga ntembe. Makambo ya ntina na mabondeli yango mazwami kati na libondeli oyo Yesu apesaki lokola elakiseli epai na bayekoli na ye. Alobaki ete: “Bino bobondelaka boye: ‘Tata na biso oyo azali na likoló, Nkombo na yo ezala mosantu! Tika bokonzi na yo eya! Tika mokano na yo esalama na nsé lokola na likoló!’”​—Matai 6:9-13.

  • Mabondeli nini mandimami na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1991 | 15 Septembre
    • “Tika bokonzi na yo eya!”

      Yesu alakisaki lisusu bayekoli na ye ete babondelaka boye: “Tika bokonzi na yo eya!” Mabondeli oyo mazali kosɛnga koya na Bokonzi na Nzambe makondimama mpenza. Bokonzi yango ezali boyangeli na Jéhovah na molóngó mobimba, oyo emonisami na boyangeli na Masiya na likoló, bopesami epai na Mwana na ye, Yesu Klisto, mpe epai na “basantu” oyo bakosala elongo na ye. (Danyele 7:13, 14, 18, 22, 27; Yisaya 9:6, 7) Uta kala, ba Témoins de Jéhovah bazali komonisa na nzela na Makomami ete Yesu atyamaki lokola Mokonzi na likoló na 1914. Mpo na nini tosengeli bongo kobondela ete Bokonzi “eya”?

      Kobondela na ntina na koya na Bokonzi elimboli kosɛnga ete eya koboma banguna nyonso ya boyangeli na Nzambe awa na mabele. Mosika te “bokonzi [na Nzambe] . . . ekobuka mpe ekosilisa bikonzi nyonso [na mabelé] mpe ekotikala lobiko na lobiko.” (Danyele 2:44) Likambo yango likosala ete nkombo mosantu na Jéhovah ekumisama.

      “Tika mokano na ye esalama!”

      Kati na maloba malandi ya Tata na Biso, Yesu alakisaki bayekoli na ye ete basɛngaka boye: “Tika mokano na yo esalama!” Bazali bongo kosɛnga na Jéhovah ete asala na boyokani na mokano na ye na ntina na mabelé. Lilɔmbɔ oyo lizali kokundola maloba na mokomi na nzembo, ete: “Yango elingi Jéhovah kosala, akosalaka yango, soko na lola, soko na mokili, soko na mai monene, soko na bisika na bozindo. Ye akobutisaka mapatá na likoló longwa na nsuka na mokili; ye akozalisaka mokalikali mpo na mbula mpe akobimisaka mopepe na bibombelo na ye. Ezali bobele ye oyo abomaki bana na liboso na Ezipito, na bato mpe na bibwele lokola. Ye oyo atindaki bilembo mpe bikamwiseli kati na yo, ɛ Ezipito, likoló na Farao mpe basali na ye nyonso. Oyo abɛtaki mabota mingi mpe abomaki mikonzi makasi.”​—Nzembo 135:6-10.

      Na kosɛngáká ete mokano na Jéhovah esalama awa na mabelé, tozali bongo kobondela ete Nzambe akokisa mikano na ye na ntina na etando na biso. Kati na mikano yango, kobomama ya banguna na ye mpo na libela, lokola asalaki yango na etando moke na ntango na kala. (Nzembo 83:9-18; Emoniseli 19:19-21) Mabondeli oyo mazali kosɛnga ete mokano na Jéhovah esalama awa na mabelé mpe kati na molóngó mobimba, makondimama mpenza.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto