-
Ndenge ya kozala na bomoi ya malamuLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | Décembre 15
-
-
13. Yesu apesaki toli nini na oyo etali kobomba biloko ya motuya?
13 Na likambo etali biloko ya motuya, Yesu alobaki boye: “Bótika komibombela biloko ya motuya na mabele, epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka, mpe epai miyibi bakɔtaka na makasi mpe bayibaka. Nzokande, bómibombela biloko ya motuya na likoló, epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka te, mpe epai miyibi bakoki kokɔta te mpe koyiba te. Mpo epai eloko na yo ya motuya ezali, motema na yo ekozala mpe kuna.”—Mat. 6:19-21.
-
-
Ndenge ya kozala na bomoi ya malamuLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | Décembre 15
-
-
15. Bomoi nini ya malamu tosengeli kosala makasi tózala na yango?
15 Bakonzi mosusu ya mangomba bateyaka ete ezali mabe kosala makasi mpo na kozala na bomoi ya malamu mpe ete esengeli kotika kosala milende mpo na yango. Kasi, tóyeba ete Yesu alobaki te ete kosala milende ya ndenge wana ezali mabe. Ayebisaki nde bayekoli na ye ete básala milende na ndenge ya malamu; ayebisaki bango ete bámibombela “biloko ya motuya [oyo ebebaka te] na likoló.” Mposa na biso ya libosoliboso ezali ya kozala na bomoi ya malamu ndenge Yehova atalelaka yango. Ya solo, maloba ya Yesu ezali kosalisa biso tóbosana te moto na moto aponaka bomoi oyo akosala makasi mpo azwa. Nzokande, likambo ya solo ezali ete makambo oyo ezali na motema na biso, to oyo ezali na motuya mingi mpo na biso nde tokosala makasi mingi mpo na kozwa yango.
16. Tokoki mpenza kondima likambo nini?
16 Soki na motema na biso tozali na mposa ya kosepelisa Yehova, tokoki kondima ete akomona yango mpe akopesa biso biloko oyo tozali na mposa na yango. Ndenge asalaki mpo na ntoma Paulo, akoki kotika ete tóyoka nzala to mposa ya mai mpo na ntango mokuse. (1 Ko. 4:11) Atako bongo, tokoki mpenza kondima toli oyo ya Yesu: “Bómitungisa ata moke te mpe bóloba te ete: ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo balukaka na lokoso mpenza. Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana. Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.”—Mat. 6:31-33.
-