-
Yesu amonisi “bwanya oyo euti na Nzambe”Pusaná penepene na Yehova
-
-
6-8. (a) Wapi bantina ya polele oyo Yesu apesi biso mpo tómitungisaka te? (b) Nini emonisi ete toli ya Yesu ezali na bwanya oyo euti na likoló?
6 Na ndakisa, tótalela toli ya bwanya oyo Yesu apesaki na likambo etali komitungisa mpo na biloko ya mosuni, ndenge ezali na Matai mokapo 6. Yesu apesi biso toli oyo: “Bótika komitungisa mpo na milimo na bino na oyo etali nini bokolya to nini bokomɛla, to mpo na banzoto na bino na oyo etali nini bokolata.” (Vɛrsɛ 25) Bilei mpe bilamba ezali biloko ya libosoliboso ya ntina mingi, mpe ezali mabe te moto akanisa ndenge nini akozwa yango. Kasi Yesu ayebisi biso tótika “komitungisa” mpo na biloko yango.b Mpo na nini?
7 Yoká bantina ya polele oyo Yesu apesi. Lokola Yehova apesi biso bomoi mpe nzoto, akoki te kopesa biso bilei mpo na kobatela bomoi yango mpe bilamba mpo na kolatisa nzoto yango? (Vɛrsɛ 25) Soki Nzambe apesaka bandɛkɛ bilei mpe alatisaka bafololo kitoko mpenza, akoki mpenza kokanisa bato oyo basambelaka ye koleka ndenge asalelaka bandɛkɛ mpe bafololo! (Vɛrsɛ 26, 28-30) Ya solo, ata ndenge nini, komitungisa koleka ndelo ezali na ntina te. Ekoki kobakisa mikolo ya bomoi na biso ata moke te.c (Vɛrsɛ 27) Ndenge nini tokoki kotika komitungisa? Yesu apesi biso toli oyo: Kosambela Nzambe esengeli ntango nyonso kozala na esika ya liboso na bomoi na biso. Baoyo basalaka bongo bakoki mpenza kotya motema ete Tata na bango ya likoló ‘akobakisela’ bango nyonso oyo basengeli na yango mokolo na mokolo. (Vɛrsɛ 33) Na nsuka, Yesu apesi toli moko oyo ebongi mpenza—mokolo na mokolo ezali na makambo na yango. Mpo na nini kobakisa mitungisi ya lobi likoló ya oyo ya lelo? (Vɛrsɛ 34) Lisusu, mpo na nini komitungisa mpamba mpo na makambo oyo mbala mosusu ekosalema te? Kolanda toli yango ya bwanya ekoki kosala ete bampasi mosusu ya mokili oyo ekómela biso te.
-
-
Yesu amonisi “bwanya oyo euti na Nzambe”Pusaná penepene na Yehova
-
-
b Liloba ya Grɛki oyo babongoli “komitungisa” elimboli “kotika makanisi eyengayenga.” Ndenge basaleli liloba yango na Matai 6:25, ezali komonisa kobanga oyo etindaka moto na komitungisa mpe esalaka ete makanisi ezala esika moko te to ekabwana, mpe elongolaka esengo ya moto.
-