Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/10 nk. 4-7
  • Kanisáká mpe lobi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kanisáká mpe lobi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bótika komitungisa”
  • Tata na bino ayebi bamposa na bino
  • ‘Bókoba koluka liboso bokonzi ya Nzambe’
  • “Tiká bokonzi na yo eya”
  • Bómibombela biloko ya motuya na likoló
  • Osengeli kosala nini?
  • Matai 6:34—‘Bómitungisa te mpo na makambo ekoya lobi’
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • Bómitungisa te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Ndenge nini nakoki kotika komitungisa?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitungisi
    Lamuká!—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/10 nk. 4-7

Kanisáká mpe lobi

NA LISOLO oyo Yesu asalaki na ngomba moko ya Galilai, alobaki boye: “Bómitungisa te mpo na lobi; lobi ekomitungisa mpo na yango mpenza.”​—Matai 6:34, haut fleuve.

Mpo na yo, maloba “lobi ekomitungisa mpo na yango mpenza” elimboli nini? Yango elingi nde koloba ete osengeli kokanisaka kaka makambo ya lelo mpe kokipe te makambo oyo ekoki kobima lobi? Likanisi yango eyokani mpenza na makambo oyo Yesu ná bayekoli na ye bazalaki kondima?

“Bótika komitungisa”

Tosɛngi yo otánga maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:25-32. Na esika moko alobaki boye: “Bótika komitungisa mpo na milimo na bino na oyo etali nini bokolya to nini bokomɛla, to mpo na banzoto na bino na oyo etali nini bokolata. . . . Bótala malamumalamu bandɛkɛ ya likoló, mpamba te balonaka te mpe babukaka te mpe bayanganisaka te na ndako ya kobomba biloko; nzokande Tata na bino ya likoló aleisaka bango. . . . Nani na kati na bino na komitungisáká akoki kobakisa mwa lipeko moko na bolai ya bomoi na ye? Lisusu, na oyo etali bilamba, mpo na nini bozali komitungisa? Bózwa liteya na bafololo kilinono ya esobe, ndenge yango ezali kokola; emonaka mpasi te, mpe etongaka te . . . Boye bómitungisa soki moke te mpe bóloba te ete, ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo mosusu balukaka na lokoso mpenza. Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na mposa ya biloko nyonso wana.”

Na nsima, Yesu apesaki toli mibale. Ya liboso: “Bókoba koluka liboso bokonzi [ya Nzambe] mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.” Ya mibale: “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo moko na moko ekoki na mabe na yango moko.”​—Matai 6:33, 34.

Tata na bino ayebi bamposa na bino

Okanisi ete na maloba yango Yesu apekisaki bayekoli na ye, oyo basusu bazalaki basali-bilanga, ‘kolona, mpe kobuka mpe koyanganisa na bandako ya kobomba biloko’? To apekisaki bango ‘komona mpasi mpe kotonga’ mpo na kozwa biloko oyo basengelaki na yango mpo na kozipa nzoto? (Masese 21:5; 24:30-34; Mosakoli 11:4) Te. Soki batikaki kosala, balingaki kosuka na ‘kosɛngasɛnga na ntango ya kobuka mbuma’; balingaki kozanga bilei mpe bilamba.​—Masese 20:4, NW.

Ezali boni mpo na komitungisa? Yesu alingaki nde koloba ete bayekoli na ye bakokaki mpenza kozanga mitungisi? Yango ekokaki kosalema te. Yesu ye moko atungisamaki makasi na butu oyo bakangaki ye.​—Luka 22:44.

Na maloba wana, Yesu ateyaki likambo moko ya ntina mingi. Komitungisa koleka ndelo ekosalisa yo te osilisa mikakatano na yo. Na ndakisa, ekosalisa yo te ozala na bomoi ya molai. Yesu alobaki ete komitungisa ekoki te “kobakisa mwa lipeko moko na bolai ya bomoi na [yo].” (Matai 6:27) Kutu, komitungisa ntango molai mpe na koleka ndelo ekoki koboma yo noki.

Yesu apesaki toli oyo ebongi mpenza. Makambo mingi oyo tomitungisaka mpo na yango esalemaka te. Winston Churchill, mokonzi moko ya Leta na Angleterre, amonaki bosolo ya likambo yango na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Akomaki boye mpo na makambo mosusu oyo azalaki komitungisa mpo na yango: “Soki nakanisi makambo nyonso oyo nazalaki komitungisa mpo na yango, nakanisaka lisolo ya mobange moko oyo, ntango alingaki kokufa alobaki ete makambo mingi oyo azalaki kobanga etikalaki kosalema te.” Ya solo, ezali malamu kondima mokolo mokomoko ná makambo na yango, mingimingi soki mikakatano oyo tozali kokutana na yango ekoki kotinda biso tómitungisa mingi.

‘Bókoba koluka liboso bokonzi ya Nzambe’

Tomoni ete maloba ya Yesu etalelaki kaka te bolamu ya nzoto mpe kimya ya makanisi ya bayekoli na ye. Ayebaki ete komitungisa mpo na kozwa biloko ya kobikela, mpe kozala na mposa makasi ya kozala na bozwi mpe bisengo, ekoki komema moto abosana makambo oyo eleki ntina. (Bafilipi 1:10) Mbala mosusu okomituna, ‘Nini ekoki kozala na ntina koleka kozwa biloko ya kobikela?’ Ezali makambo ya elimo, makambo oyo etaleli losambo. Yesu amonisaki ete likambo oyo esengeli koleka ntina na bomoi na biso ezali ‘kokoba koluka liboso bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye.’​—Matai 6:33.

Na ntango ya Yesu, bato mingi bazalaki komipesa na koluka biloko ya mokili. Konduka bomɛngo ezalaki likambo eleki ntina na bomoi na bango. Kasi, Yesu alendisaki bayekoli na ye bátalelaka makambo ndenge mosusu. Lokola bamipesaki na Nzambe, “likambo oyo esɛngisamaki” na bango ezalaki ‘kobanga Nzambe ya solo mpe kotosa mibeko na ye.’​—Mosakoli 12:13, NW.

“Motungisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo,” elingi koloba komibanzabanza mpo na biloko ya mokili ekokaki kolɛmbisa elimo ya bayekoli wana. (Matai 13:22) Ntoma Paulo akomaki boye: “Baoyo balingaka kaka kozala bato ya bomɛngo bakweaka na kati ya komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na kati ya libebi mpe na likama.” (1 Timote 6:9) Mpo na kosalisa bayekoli na ye bákwea na “motambo” wana te, Yesu ayebisaki bango ete Tata na bango ya likoló ayebaki ete bazalaki na mposa ya biloko wana nyonso. Nzambe alingaki kokokisa bamposa na bango ndenge akokisaka oyo ya “bandɛkɛ ya likoló.” (Matai 6:26, 32) Na esika bámizindisa na mitungisi, basengelaki kosala oyo bakoki mpo na kokokisa bamposa na bango mpe na nsima, kotika makambo nyonso na mabɔkɔ ya Yehova.​—Bafilipi 4:6, 7.

Ntango Yesu alobaki ete “lobi ekomitungisa mpo na yango mpenza,” alingaki kaka koloba ete tosengeli te komitungisa koleka ndelo mpo na makambo oyo ekoki kobima lobi, mpe na bongo komibakisela mikakatano. Libongoli mosusu ya Biblia elobi boye: “Bómitungisa té po na makambo ekoya lobi; lobi ekozala na makambo na yango. Mokolo na mokolo ezali na pasi ekoki na yango.”​—Matai 6:34, Bible na Lingala ya lelo oyo.

“Tiká bokonzi na yo eya”

Koboya komitungisa koleka ndelo mpo na makambo oyo ekoki kobima lobi ekeseni na kokipe yango ata moke te. Yesu alobaki soki moke te na bayekoli na ye ete bákipaka te makambo oyo ekoki kobima lobi. Kutu, alendisaki bango bálukaka koyeba makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya. Basengelaki kobondelaka mpo na kozwa limpa ya mokolo na mokolo, elingi koloba, mpo na bamposa na bango. Kasi, basengelaki kobondelaka libosoliboso mpo na makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya​—Bokonzi ya Nzambe mpe mokano na ye awa na mabelé.​—Matai 6:9-11.

Tosengeli te kozala lokola bato ya ntango ya Noa. Bango bamipesaki na “kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama,” yango wana “batyaki likebi te” na makambo oyo ezalaki koya. Basukaki ndenge nini? “Mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.” (Matai 24:36-42) Ntoma Petelo alobelaki lisolo yango mpo na komonisa biso ntina ya kobosana makambo ya lobi te. Akomaki boye: “Lokola biloko nyonso wana esengeli kosilela bongo, bosengeli kozala bato ya ndenge nini na misala ya etamboli ya bosantu mpe na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe, kozeláká mpe kobateláká na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova!”—2 Petelo 3:5-7, 11, 12.

Bómibombela biloko ya motuya na likoló

‘Tóbatela na makanisi’ mokolo ya Yehova. Soki tosali bongo, tokosalela ntango, makasi, mayele, bozwi mpe makoki na biso na ndenge ya malamu. Tosengeli te koboma nzoto mpo na koluka biloko ya mokili to komipesa na bisɛngo, mpamba te yango ekotikela biso ntango moke mpo na misala oyo emonisaka “ezaleli ya kokangama na Nzambe.” Kotya makanisi nyonso na makambo ya lelo ekoki komonana lokola nde ezali na matomba, kasi matomba yango ezalaka kaka mpo na ntango mokuse. Ndenge Yesu alendisaki, eleki malamu ‘tómibombela biloko ya motuya na likoló,’ kasi na mabelé te.​—Matai 6:19, 20.

Yesu amonisaki likambo yango polele na lisese ya moto oyo asalaki makambo minene mpo na kobongisa avenire na ye, kasi abosanaki Nzambe. Elanga ya moto yango ebotaki mingi. Abukaki bandako na ye ya kobomba biloko mpe atongaki ya minene koleka mpo akoka kozala na bomoi ya kimya, alyaka, amɛlaka mpe asepelaka. Kasi, nini esalemaki? Akufaki liboso kutu asepela na mosala ya mabɔkɔ na ye. Likambo ya mabe koleka, abongisaki te boyokani malamu na Nzambe. Yesu asukisaki lisese yango na maloba oyo: “Ezali mpe bongo mpo na moto oyo abombi eloko ya motuya mpo na ye moko kasi azali moto ya bomɛngo te epai ya Nzambe.”​—Luka 12:15-21; Masese 19:21.

Osengeli kosala nini?

Kosala te lokola moto ya lisese ya Yesu. Luká koyeba makambo oyo Nzambe akani kosala mpo na mikolo ezali koya, mpe yokanisá bomoi na yo na yango. Nzambe abombeli biso te makambo oyo akani kosala. Mosakoli Amosa akomaki boye: “Nkolo [Yehova] akosala likambo te bobele ete akoyebisa mwango na ye epai ya baombo na ye, bango basakoli.” (Amosa 3:7) Okoki koyeba makambo oyo Yehova ayebisaki basakoli na ye mpo ezali na kati ya Liloba na ye, Biblia.​—2 Timote 3:16, 17.

Moko na makambo yango ezali ete, na mikolo ezali koya, mbongwana monene ekosalema na mabelé mobimba na ndenge oyo esalemá naino te. Yesu alobaki boye: “Ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino boye te banda na ebandeli ya mokili tii sikoyo.” (Matai 24:21) Moto moko te akoki kopekisa likambo yango. Kutu, basambeli ya solo bakoki koboya te ete likambo yango esalema. Mpo na nini? Mpamba te likambo yango ekolongola mabe nyonso na mokili mpe ekotya “likoló moko ya sika,” elingi koloba, boyangeli ya sika mpo na mokili mobimba, mpe “mabelé ya sika,” elingi koloba, bato oyo bakofanda awa na mabelé. Na mokili ya sika, Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso [ya bato], mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi lisusu mpe te.”​—Emoniseli 21:1-4.

Na yango, omoni te ete ezali na ntina kozwa ntango ya kotalela oyo Biblia elobi mpo na yango? Okosepela ete moto moko asalisa yo? Tolendisi yo okutana na Batatoli ya Yehova. To mpe okomela babimisi ya zulunalo oyo. Na nyonso wana, salá makasi ete okanisaka kaka makambo ya lelo te kasi mpe makambo malamu mingi oyo ekoya.

[Bililingi na lokasa 7]

“Bótika komitungisa . . . Mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto