Tyelá Yehova motema mobimba na ntango ya mpasi
“Nzambe azali esika na biso ya komibomba mpe makasi na biso, lisungi ya nokinoki na bantango ya mpasi.”—NZEMBO 46:1, NW.
1, 2. (a) Ndakisa nini ezali komonisa ete tosengeli kosuka kaka te na koloba ete totyelaka Nzambe motema? (b) Mpo na nini tosengeli te kosuka kaka na koloba ete totyelaka Yehova motema?
KOLOBA ete totyelaka Nzambe motema ná komonisa yango na misala ezali makambo mibale ekeseni. Na ndakisa, maloba “Totyelaka Nzambe motema” ezalaka banda kala na mbongo ya États-Unis.a Na 1956, badepite ya ekólo yango bandimaki ete maloba yango ezala devize ya ekólo na bango. Likambo ya kokamwa, ezala na ekólo yango to na bisika mosusu, bato mingi batyelaka mbongo mpe biloko ya mokili motema koleka Nzambe.—Luka 12:16-21.
2 Biso baklisto ya solo tosengeli kosuka kaka te na koloba ete totyelaka Yehova motema. Se ndenge oyo “kondima oyo ezangi misala ekufi,” koloba ete totyelaka Nzambe motema ezali mpamba soki tozali komonisa yango na misala te. (Yakobo 2:26) Na lisolo eleki, tomonaki ete tomonisaka ete totyelaka Yehova motema ntango tozali kobondela ye, koluka toli ya Liloba na ye, mpe kolanda malako ya ebongiseli na ye. Sikoyo, tótalela ndenge oyo tokoki kosalela makambo yango misato na ntango ya mpasi.
Ntango balongoli biso na mosala to tozali kozwa mbongo moke
3. Wapi mikakatano ya nkita oyo basaleli ya Yehova bazali kokutana na yango na “mikolo ya ndenge mosusu” oyo mpe nini ezali kondimisa biso ete Nzambe azali pene mpo na kosalisa biso?
3 Na “bantango ya ndenge mosusu” oyo tozali, biso baklisto tozali kokutana na mikakatano ya nkita ndenge kaka bato mosusu bazali kokutana na yango. (2 Timote 3:1) Yango wana, ekoki kokóma ete bálongola biso na mosala na mbalakaka. To, tozali na mosala oyo ezali kozwa biso ntango mingi, kasi bazali kofuta biso mbongo moke. Na ntango wana, tokoki kozala na mokakatano mpo na ‘kokokisa bamposa ya bato na biso.’ (1 Timote 5:8) Nzambe oyo Aleki-Likoló azalaka pene mpo na kosalisa biso na makambo ya ndenge wana? Ɛɛ! Ezali solo ete Yehova abatelaka biso na mikakatano nyonso te ya bomoi na mokili oyo. Kasi, soki totyeli ye motema, maloba ya Nzembo 46:1 (NW) ekokokisama: “Nzambe azali esika na biso ya komibomba mpe makasi na biso, lisungi ya nokinoki na bantango ya mpasi.” Na bongo, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kotyela Yehova motema mobimba ntango tokutani na mokakatano ya mbongo?
4. Ntango tokómi na mokakatano ya mbongo, tosengeli kosɛnga nini na mabondeli na biso, mpe ndenge nini Yehova ayanolaka na mabondeli ya ndenge wana?
4 Lolenge moko ya komonisa ete totyelaka Yehova motema mobimba ezali kobondela ye. Kasi tokoki kobondela mpo na makambo nini? Ntango tozali na mikakatano ya mbongo, tokoki kosɛnga Yehova apesa biso bwanya mingi lisusu. Yango wana, tóbosanaka te kobondela mpo na kozwa yango! Liloba ya Yehova elobi na biso boye: “Soki moko na bino azali kozanga bwanya, tiká akoba kosɛnga Nzambe, mpo ye apesaka na bokabi epai ya bato nyonso mpe kozanga kotyola; mpe yango ekopesama na ye.” (Yakobo 1:5) Tósɛngaka Yehova bwanya, elingi koloba likoki ya kosalela boyebi, mayele, mpe bososoli, mpo na kozwa bikateli ya malamu mpe kopona banzela ya malamu. Tata na biso ya bolingo oyo azali na likoló alobi na biso ete akoyoka mabondeli ya ndenge wana. Azalaka ntango nyonso na mposa ya kosembola banzela ya bato oyo batyelaka ye motema na bango mobimba.—Nzembo 65:2; Masese 3:5, 6.
5, 6. (a) Mpo na nini tokoki koluka lisalisi na Liloba ya Nzambe mpo na kolonga mokakatano ya mbongo? (b) Tokoki kosala nini mpo na kokima mitungisi mosusu ntango tozali lisusu na mosala te?
5 Lolenge mosusu ya komonisa ete tozali kotyela Yehova motema ezali kotika Liloba na ye etambwisa biso. Biblia ezali na makebisi na ye oyo etondi na bwanya, oyo tokoki ‘mpenza kotyela motema.’ (Nzembo 93:5) Atako esali mbula koleka 1 900 banda basilisá kokoma buku yango oyo epemami na Nzambe, ezali na toli malamu mpe bososoli oyo ekoki kosalisa biso ntango tozali na mokakatano ya mbongo. Tótalela mwa bandakisa oyo ezali komonisa bwanya ya Biblia.
6 Kala, Mokonzi Salomo alobaká ete: “Mpɔngi ya moto ya mosala ezali kitoko ata alei moke to mingi; kasi biloko mingi ya mozwi ekopekisa mpɔngi na ye.” (Mosakoli 5:12) Esɛngaka biso ntango mpe mbongo mingi mpo na kotya bopɛto, kobongisa mpe kobatela biloko na biso. Yango wana, soki tozali lisusu na mosala te, ekozala malamu tótalela lisusu bomoi na biso, tóluka kokesenisa makambo oyo tosengeli na yango mpenza mpe oyo ezali kaka bamposa ya motema. Mpo na kokima mitungisi mosusu, ekozala malamu tóbongola makambo mosusu. Tokoki kokómisa bomoi na biso pɛpɛlɛ, na ndakisa koluka ndako ya moke to kotika biloko mosusu oyo ezali na ntina te.—Matai 6:22.
7, 8. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki ete ayebi malamu ete bato ya kozanga kokoka bamitungisaka koleka ndelo mpo na biloko ya mokili? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.) (b) Yesu apesaki toli nini mpo na oyo etali komitungisa mpambampamba?
7 Na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu apesaki toli oyo: “Bótika komitungisa mpo na milimo na bino na oyo etali nini bokolya to nini bokomɛla, to mpo na banzoto na bino na oyo etali nini bokolata.”b (Matai 6:25) Yesu ayebaki ete bato ya kozanga kokoka bamibanzabanzaka mpo na koluka biloko ya bomoi. Kasi, ndenge nini tokoki ‘kotika komitungisa’ mpo na biloko wana? Yesu alobaki ete: “Bókoba koluka liboso bokonzi.” Ezala mikakatano nini tokutani na yango, tosengeli kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso. Soki tozali kosala bongo, Tata na biso ya likoló ‘akobakisela’ biso biloko oyo tosengeli na yango mpo na mokolo na mokolo. Ezala ata ndenge nini, akokokisa bamposa na biso.—Matai 6:33.
8 Yesu apesaki lisusu toli oyo: “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko.” (Matai 6:34) Komitungisa mpambampamba mpo na makambo oyo ekoki kokómela biso lobi ezali kozanga bwanya. Moto moko ya mayele alobaki ete: “Mbala mingi tobangaka na biso kaka mpamba.” Soki, na komikitisa nyonso, tozali kotosa toli ya Biblia ya kotya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso mpe mokolo na mokolo tozali kosala oyo tokoki, yango ekoki kosalisa biso tómitungisaka mpambampamba te.—1 Petelo 5:6, 7.
9. Ntango tokómi na mokakatano ya mbongo, ndenge nini mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” ekoki kosalisa biso?
9 Ntango tokómi na mokakatano ya mbongo, tokoki mpe komonisa ete totyelaka Yehova motema soki tozali kotánga mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kozwa lisalisi. (Matai 24:45) Mbala na mbala, Lamuká! ezalaka na masolo oyo epesaka toli mpe makanisi oyo ekoki kosalisa mpo na kolonga mokakatano ya mbongo. Lamuká! ya 8 Augusto 1991 ezalaki na lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo “Au chômage—Que faire?” oyo epesaki malako mwambe oyo esalisaki bato mingi na kolonga mokakatano ya mbongo mpe mitungisi ntango bazangaki mosala.c Kasi wana tozali kolanda malako yango, tosengeli mpe kotalelaka mbongo na ndenge ebongi. Lamuká! yango ezalaki na lisolo mosusu oyo ezalaki na motó ya likambo “Plus important que l’argent” oyo elobelaki likambo wana.—Mosakoli 7:12.
Ntango totungisami na maladi
10. Ndenge nini ndakisa ya Mokonzi Davidi ezali komonisa ete ebongi mpenza kotyela Yehova motema ntango tozali na maladi makasi?
10 Ebongi mpenza kotyela Yehova motema ntango tozali na maladi makasi? Ɛɛ! Yehova ayebaka komitya na esika ya basaleli na ye oyo bazali kobɛla. Longola yango, azalaka na mposa ya kosalisa bango. Tózwa ndakisa ya Mokonzi Davidi. Ekoki kozala ete ye moko azalaki kobɛla makasi ntango akomaki ete Yehova asungaka moto ya sembo oyo azali kobɛla. Alobaki boye: “[Yehova] akolendisa ye na mbeto na ye ya maladi; kati na maladi na ye, okobikisa ye na mpasi na ye nyonso.” (Nzembo 41:1, 3, 7, 8) Mokonzi Davidi akobaki kotyela Nzambe motema makasi, mpe nsukansuka, maladi na ye esilaki. Kasi, ndenge nini biso tokoki kotyela Nzambe motema ntango maladi ezali kotungisa biso?
11. Ntango tozali na maladi, tokoki kosɛnga nini epai ya Tata na biso ya likoló?
11 Ntango tozali na maladi, lolenge moko ya komonisa ete tozali kotyela Yehova motema ezali kobondela ye mpo na kosɛnga ye makasi ya koyika mpiko. Tokoki kosɛnga ye apesa biso “bwanya oyo ebongi” mpo tóyeba kobatela nzoto na biso na ndenge oyo makoki na biso ezali kopesa nzela. (Masese 3:21, NW) Tokoki kosɛnga ye asalisa biso tózala na motema molai mpe na makasi ya koyikela maladi na biso mpiko. Oyo eleki nyonso, tosengeli kosɛnga Yehova asalisa biso mpe apesa biso makasi ya kotikala sembo epai na ye mpe ya kobatela makanisi malamu, ezala likambo nini ekómeli biso. (Bafilipi 4:13) Kotikala sembo epai ya Nzambe ezali na ntina koleka kobatela bomoi oyo tozali na yango na mokili oyo. Soki totikali sembo, Mopesi-mbano Monene akopesa biso bomoi ya seko mpe nzoto kolɔngɔnɔ libela na libela.—Baebele 11:6.
12. Wapi mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso na kozwa bikateli ya malamu na oyo etali kosalisa nzoto?
12 Kotyela Yehova motema ekotinda biso mpe na koyekola Liloba na ye, Biblia, mpo na kozwa toli oyo ekoki kotambwisa biso. Mitinda ya Biblia ekoki kosalisa na kozwa bikateli ya malamu na oyo etali kosalisa nzoto. Na ndakisa, ntango toyebi ete Biblia eboyi “misala ya bilimu mabe,” tokoboya lisalisi oyo ezali na boyokani na bilimu mabe. (Bagalatia 5:19-21; Deteronome 18:10-12) Likanisi mosusu oyo ezali komonisa bwanya ya Biblia oyo tokoki kotyela motema elobi boye: “Zoba andimaka makambo nyonso oyo balobelaka ye; kasi moto ya ekenge akanisaka liboso ya kosala likambo.” (Masese 14:15, Bible na lingala ya lelo oyo) Yango wana, ntango tozali na maladi mpe tozali koluka lisalisi, bwanya ezali kosɛnga ete tóluka makanisi ya solo na esika ya ‘kondima makambo nyonso.’ “Makanisi malamu” ndenge wana ekoki kosalisa biso tótalela malamumalamu likanisi nyonso oyo bapesi biso mpe tózwa ekateli ya malamu.—Tito 2:12.
13, 14. (a) Masolo nini ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ná Lamuká! epesaki makanisi malamu na ntina na kosalisa nzoto? (Talá etanda na lokasa 17.) (b) Lamuká! ya 22 Yanuali 2001 epesaki toli nini mpo na bamaladi oyo eumelaka?
13 Tokoki mpe komonisa ete tozali kotyela Yehova motema soki tozali kotánga mikanda ya moombo ya sembo. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ná Lamuká! ebimisá masolo oyo ezali kolobela bamaladi ndenge na ndenge.d Ntango mosusu, masolo ya bazulunalo yango elobelaki bato oyo babundaki na maladi moko boye. Masolo mosusu mpe epesaki toli ya Biblia mpe makanisi malamu oyo tokoki kosalela ntango tozali na maladi oyo eumeli.
14 Na ndakisa, Lamuká! ya 22 Yanuali 2001 ezalaki na motó ya likambo ete “Maladie, infirmité: du réconfort.” Masolo na yango emonisaki mitinda ya Biblia mpe makanisi oyo bato oyo baumelaki na maladi bambula ebele bapesaki. Lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Comment vivre au mieux avec votre déficience physique” epesaki toli oyo: Luká koyeba makambo nyonso oyo okoki mpo na maladi na yo. (Masese 24:5) Omityela mikano oyo okoki kokokisa, ata mpe mokano ya kosalisa bato mosusu; kasi, kobosana te ete mbala mosusu okolonga te kosala makambo oyo bato mosusu bakoki kosala. (Misala 20:35; Bagalatia 6:4) Kebá na ezaleli ya kokima bato mpe kozala kaka yo moko. (Masese 18:1) Ntango bato bazali koya kotala yo, lukáká kosepelisa bango. (Masese 17:22) Na koleka nyonso, batelá boyokani makasi na Yehova mpe na lisangá. (Nahumu 1:7; Baloma 1:11, 12) Tozali mpenza na botɔndi mpo na toli oyo tokoki kotyela motema oyo Yehova azali kopesa biso na nzela ya ebongiseli na ye, boye te?
Ntango ozali kobunda na bolɛmbu moko ya nzoto
15. Nini esalisaki ntoma Paulo alonga bolɛmbu ya nzoto, mpe elikya nini tokoki kozala na yango?
15 Ntoma Paulo akomaki ete: “Na kati ya mosuni na ngai, eloko moko te ya malamu efandi kuna.” (Baloma 7:18) Paulo ayebaki malamu ete kolonga bamposa mpe bolɛmbu ya nzoto oyo ezangi kokoka ezalaka mpasi mingi. Kasi, azalaki mpe na elikya ete akoki kolonga. (1 Bakolinti 9:26, 27) Na ndenge nini? Soki atyeli Yehova motema mobimba. Yango wana alobaki boye: “Ngai moto ya mawa! Nani akobikisa ngai na nzoto oyo ezali kozwa liwa oyo? Nzambe azwa matɔndi na nzela ya Yesu Klisto Nkolo na biso!” (Baloma 7:24, 25) Ezali boni mpo na biso? Biso mpe tosengeli kobunda na bolɛmbu ya nzoto na biso. Ntango tozali kobunda na bolɛmbu yango, ekoki mpe kosalema ete tótika kotyela Nzambe motema mpe tókóma kokanisa ete tokolonga te. Kasi, Yehova akosalisa biso soki, lokola Paulo, tozali mpenza kotyela Ye motema, kasi makasi na biso moko te.
16. Ntango tozali kobunda na bolɛmbu moko ya nzoto, tosengeli kosɛnga nini na mabondeli na biso, mpe tosengeli kosala nini soki tokwei lisusu?
16 Ntango bolɛmbu moko ya nzoto ezali kosila te, tokoki komonisa ete tozali kotyela Yehova motema soki tozali kolelela ye na mabondeli. Tosengeli kosɛnga Yehova, ata mpe kobondela ye mpenza, asalisa biso na nzela ya elimo santu na ye. (Luka 11:9-13) Tokoki kosɛnga ye mpenzampenza komipekisa, moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo. (Bagalatia 5:22, 23) Tokosala nini soki tokwei lisusu na bolɛmbu yango? Tosengeli kolɛmba nzoto te. Na komikitisa nyonso, tótika te kobondela Nzambe na biso ya motema mawa mpo na kosɛnga ye bolimbisi mpe lisalisi. Yehova akoboya te moto oyo azali na motema ‘etutami mpe ezali na mawa’ mpo lisosoli na ye ezali kotungisama. (Nzembo 51:17) Soki tozali kolelela Yehova na bosolo mpe na mawa na motema, akosalisa biso na kolonga komekama yango.—Bafilipi 4:6, 7.
17. (a) Mpo na nini kozwa ntango ya komanyola ndenge oyo Yehova atalelaka bolɛmbu oyo tozali kobunda na yango ekoki kosalisa biso na kolonga yango? (b) Bavɛrsɛ nini tokoki kokanga na motó soki tosilikaka mpambampamba? soki tokokaka kopekisa lolemo na biso te? soki tosepelaka na masano ya mabe?
17 Tokoki mpe komonisa ete totyelaka Yehova motema soki tozali koyekola Liloba na ye mpo na kozwa lisalisi. Tokoki kosalela Concordance to mpe Index mpo na koluka eyano na motuna oyo, ‘Ndenge nini Yehova atalelaka bolɛmbu oyo nazali kobunda na yango?’ Soki tozwi ntango ya komanyola ndenge oyo Yehova atalelaka yango, tokoki kolendisama mpo na kosepelisa ye. Na ndenge yango, tokobanda komona makambo ndenge oyo ye amonaka yango mpe koyina oyo ye ayinaka. (Nzembo 97:10) Bato mosusu bamonaki ete kokanga na motó bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezali kolobela bolɛmbu oyo bazali kobunda na yango esalisaki bango. Na ndakisa, soki tosilikaka mpambampamba, tokoki kokanga na motó bavɛrsɛ lokola Masese 14:17 mpe Baefese 4:31. Soki tokokaka kopekisa lolemo na biso te, tokoki kokanga bavɛrsɛ lokola Masese 12:18 mpe Baefese 4:29. Soki tosepelaka na masano ya mabe, tokoki kokanga bavɛrsɛ lokola Baefese 5:3 mpe Bakolose 3:5.
18. Mpo na nini tosengeli kotika te ete nsɔni ezongisa biso nsima mpo na kosɛnga bankulutu lisalisi mpo na kolonga bolɛmbu na biso?
18 Ndenge mosusu ya komonisa ete totyelaka Yehova motema ezali koluka lisalisi ya bankulutu na lisangá. (Misala 20:28) Kutu, ezali Yehova, na nzela ya Klisto nde atye “makabo oyo ezali bato” mpo na kobatela bampate na ye. (Baefese 4:7, 8, 11-14) Toboyi te, ekoki kozala mpasi kosɛnga lisalisi ntango tozali kobunda na bolɛmbu moko. Tokoki koyoka nsɔni, kokanisa ete valɛrɛ na biso ekosila na miso ya bankulutu. Kasi, ntembe ezali te ete mibali yango oyo bateli na elimo bakopesa biso limemya na ndenge tozwi mpiko ya kosɛnga lisalisi. Lisusu, ntango bankulutu bazali kobatela etonga, basalaka makasi bámonisa bizaleli ya Yehova. Toli malamu oyo bapesaka ebɔndisaka mpe makanisi na bango oyo euti na Liloba ya Nzambe ekoki kozala eloko oyo tosengeli na yango mpo na kolendisa ekateli na biso ya kolonga bolɛmbu na biso.—Yakobo 5:14-16.
19. (a) Ndenge nini Satana asalelaka bomoi ezangi ntina oyo tozali na yango na mokili oyo? (b) Kotya motema esɛngaka nini, mpe ekateli nini tosengeli kozwa?
19 Tóbosana te ete Satana ayebi ete atikali na mikolo ya kotánga. (Emoniseli 12:12) Azali kosalela bomoi ezangi ntina oyo tozali na yango na mokili oyo mpo na kolɛmbisa biso mpe kozongisa biso nsima. Tózala na elikya makasi ete maloba ya Baloma 8:35-39 ekokokisama: “Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto? Bolɔzi to mpasi to monyoko to nzala to bolumbu to likama to mopanga? . . . Kutu, na kati ya makambo nyonso wana tozali mpenza kolonga na lisalisi ya moto oyo alingaki biso. Mpo nandimi solo ete ezala liwa to bomoi to baanzelu to baguvɛrnema to makambo ya sikoyo to makambo oyo ekoya to banguya to bosanda to bozindo to ekelamu nini mosusu ekokoka te kokabola biso na bolingo ya Nzambe oyo ezali na kati ya Klisto Yesu Nkolo na biso.” Maloba oyo ezali mpenza komonisa elimo ya kotyela Yehova motema! Kasi, kotya motema ndenge yango ezali te kaka mposa oyo moto akoki koyoka. Kotya motema ndenge yango esɛngaka tókanisaka malamu ntango tozali kozwa bikateli na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Yango wana, tiká ete tózwa ekateli makasi ya kotyela Yehova motema mobimba na ntango ya mpasi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mokolo ya 20 Novɛmbɛ 1861, Salmon Chase, ministre ya Finances ya États-Unis, atindaki mokanda na hôtel des monnaies oyo elobaki boye: “Ekólo moko te ekoki kozala makasi soki Nzambe apesi yango makasi te, to kozala na kimya soki Nzambe abateli yango te. Na mbongo ya ekólo na biso, tosengeli kokoma ete bana-mboka na biso batyelaka Nzambe motema.” Yango wana, banda mobu 1864, bakomaka na mbongo ya États-Unis ete “Totyelaka Nzambe motema.”
b Motungisi oyo balobeli awa ezali nde “kobanga oyo esilisaka moto esengo nyonso ya bomoi.” Kobongola maloba wana ete “bómitungisa te” ezali kopesa likanisi ete tosengeli te kobanda komitungisa. Buku moko oyo elimbolaka Biblia elobi boye: “Awa, verbe yango ya Grɛki esalelami lokola etinda, ezali na likanisi ya kopekisa moto atika kosala likambo moko oyo azali kosala.”
c Malako mwambe yango yango oyo: (1) Kobanga te; (2) kolɛmba nzoto te; (3) koboya te misala mosusu oyo ekomonana; (4) koluka te olyaka to olataka lokola bato oyo baleki yo na makoki; (5) kebá na banyongo; (6) batelá bomoko ya libota na yo; (7) pesáká nzoto na yo kilo; mpe (8) bongisáká liboso ndenge okosalela mbongo na yo.
d Bazulunalo yango oyo elimbolaka Biblia eyebisaka to etindaka bato te ete bálanda lisalisi boye to boye, etikaka moto na moto azwa ekateli ye moko. Kasi, lisolo nyonso oyo elobeli na bosikisiki maladi moko boye esalisaka motángi ayeba makambo nyonso oyo minganga bayebi mpo na maladi yango.
Ozali koyeba lisusu?
• Ntango tozali na mokakatano ya mbongo, ndenge nini tokoki komonisa ete totyelaka Yehova motema?
• Ntango tozali na maladi, ndenge nini tokoki komonisa ete totyelaka Nzambe motema?
• Ntango tozali kobunda na bolɛmbu moko ya nzoto, ndenge nini tokomonisa ete totyelaka mpenza Yehova motema?
[Etanda na lokasa 17]
Oyebi lisusu masolo oyo?
Ntango totungisami na maladi, kotánga masolo ya bato mosusu oyo balongaki mokakatano ya nzoto to maladi ya makasi, ekoki kolendisa biso. Talá mitó ya makambo ya masolo oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!
“Nasili kolonga bolɛmbu na ngai” elobelaki ndeko moko oyo alongaki makanisi ya kolɛmba nzoto oyo ezalaki kotungisa ye.—Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 1990.
“Même un poumon d’acier n’a pu l’empêcher de prêcher.”—Lamuká! ya 22 Yanuali 1993, ebimeli ya Lifalanse.
“Une balle a bouleversé ma vie” elobelaki ndeko oyo azalaki kobunda na maladi ya paralize.—Lamuká! ya 22 Ɔkɔtɔbɛ 1995, ebimeli ya Lifalanse.
“Oyebi te ndenge bomoi na yo ekozala lobi” elobelaki ndeko moko oyo abɛlaki maladi ya motó.—Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 2000.
“Loida, ou la victoire sur le silence” elobelaki elenge moko oyo azalaki na maladi ya bɔɔngɔ.—Lamuká! ya 8 Mai 2000, ebimeli ya Lifalanse.
“Mon combat contre l’endométriose.”—Lamuká! ya 22 Yuli 2000, ebimeli ya Lifalanse.
“Mon combat contre la sclérodermie.”—Lamuká! 8 Augusto 2001, ebimeli ya Lifalanse.
“Ma victoire contre la dépression postnatale.”—Lamuká! ya 22 Yuli 2002, ebimeli ya Lifalanse.
[Elilingi na lokasa 15]
Ntango tozali lisusu na mosala te, ekozala malamu tótalela lisusu bomoi na biso
[Elilingi na lokasa 16]
Lisolo ya Loida ezali komonisa ndenge oyo kotyela Yehova motema esalisaka moto na koyika mpiko. (Talá etanda na lokasa 17)
[Elilingi na lokasa 18]
Tosengeli koyoka nsɔni te mpo na kosɛnga lisalisi mpo na kolonga bolɛmbu