Bikateli oyo ememaka esengo
“SOKI nayebaka!” Mbala boni oloba bongo? Biso nyonso tolingaka te kozwa bikateli oyo ekopesa biso mpasi na nsima, mingimingi soki bikateli yango etali bomoi na biso. Ndenge nini tokoki kozwa bikateli oyo ekomemela biso esengo?
Ya liboso, tosengeli na mitinda oyo ebongi mpenza. Mitinda yango ezali? Bato mingi bandimaka te ete ezali. Na ankɛtɛ moko oyo basalaki epai ya bayekoli 400 ya iniversite na États-Unis, 300 kati na bango balobaki ete mitinda ya malamu ná mabe ezalaka te; mpe likambo ya kokesenisa malamu ná mabe etali “moto na moto mpe mboka na mboka.”
Ezali mpenza solo ete likambo ya kokesenisa malamu ná mabe etalaka kaka moto na moto to makanisi oyo bato mingi bandimaka? Te, ezali bongo te. Soki bátikaka moto na moto asala makambo ndenge alingi, mobulu elingaki kozala makasi. Nani akolinga kofanda na esika oyo mibeko ezali te, batribinale ezali te, mpe bapolisi bazali te? Lisusu, makanisi ya moto ememaka ye ntango nyonso na nzela ya malamu te. Tokoki kosala likambo moko oyo tokanisi ete ezali malamu, kasi na nsima tomoni ete tomikosaki. Kutu, bomoi ya bato banda mokili ebandá emonisi bosolo ya maloba ya Biblia oyo: “Ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Soki ezali bongo, epai wapi tokoki koluka toli ntango tolingi kozwa bikateli ya minene na bomoi?
Na bwanya mpenza, elenge mozwi oyo tolobelaki na lisolo eleki akendeki koluka toli epai ya Yesu. Ndenge tomonaki yango, Yesu asalelaki Mobeko ya Nzambe ntango apesaki elenge yango eyano na motuna na ye. Yesu ayebaki ete Yehova Nzambe azali Liziba eleki monene ya boyebi mpe ya bwanya mpe ete ayebi oyo eleki malamu mpo na bikelamu na ye. Yango wana, Yesu alobaki ete: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoane 7:16) Ya solo, Liloba ya Nzambe ekoki mpenza kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu na bomoi. Tiká tólobela mwa mitinda oyo ezali na Liloba ya Nzambe, oyo soki tosaleli yango ekoki kopesa biso esengo.
Lolenge oyo tosengeli kotalelaka basusu
Na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu ateyaki likambo moko ya ntina mpenza oyo ekoki kosalisa biso tózwaka bikateli ya malamu na oyo etali boyokani na biso ná basusu. Alobaki boye: “Na yango, makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.”—Matai 7:12.
Bato mosusu balobaka yango boye: “Kosala basusu te makambo oyo okolinga te básala yo.” Mpo na komona bokeseni oyo ezali na kati ya makanisi mibale wana, tótalela lisese oyo Yesu apesaki ya Mosamalia ya motema malamu. Babɛtaki Moyuda moko pene ya liwa mpe basundolaki ye na balabala. Nganga-nzambe mpe Molevi bamonaki ye, kasi balekaki na bango. Lokola basalaki moto yango mabe te, tokoki koloba ete babuki mobeko moko te, na kotalela likanisi wana ya mibale. Nzokande, Mosamalia moko oyo azalaki koleka wana atɛlɛmaki mpo na kosalisa ye. Atyaki nkisi na bampota ya moto yango mpe amemaki ye na otɛlɛ moko. Asalelaki moto wana oyo ye moko akokaki kolinga básalela ye, mpe na bongo azwaki ekateli malamu mpenza.—Luka 10:30-37.
Ezali na ndenge mingi oyo tokoki kolanda toli wana. Mpe soki tosali bongo, tokozwa ebele ya matomba. Tózwa ndakisa: libota moko eyei sika na kartye na bino. Mpo na nini te kokende kotala bango mpe kopesa bango mbote? Okoki kosalisa bango bámesana na kartye, koyanola na mituna na bango mpe kosalisa bango na makambo mosusu. Soki bosali bongo, bokokóma mpenza baninga ná bato wana oyo bayei sika na kartye na bino. Okozala mpe na esengo ya koyeba ete osali likambo oyo esepelisi Nzambe. Oyo ezali te ekateli ya malamu?
Bikateli oyo tozwaka mpo tolingi basusu
Longola toli wana, Yesu apesaki mpe batoli mosusu oyo ekoki kosalisa yo ozwaka bikateli ya malamu. Ntango batunaki Yesu soki mobeko nini eleki monene na kati ya Mobeko ya Moize, ayanolaki ete: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde komandema oyo eleki monene mpe ya liboso. Ya mibale, oyo ekokani na yango, ezali oyo, ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Na bakomandema oyo mibale Mibeko nyonso ekakisami, mpe Basakoli.”—Matai 22:36-40.
Na butu, liboso ya mokolo oyo Yesu akufaki, apesaki bayekoli na ye “komandema ya sika,” ete bálinganaka. (Yoane 13:34) Mpo na nini Yesu alobaki ete komandema yango ezali ya sika? Alobaki liboso te ete kolinga mozalani ezali moko ya bakomandema mibale oyo esimbi Mibeko nyonso? Na Mobeko ya Moize, bapesaki Bayisalaele mobeko oyo: “Okolinga moninga na yo lokola yo mpenza.” (Levitike 19:18) Kasi sikoyo, Yesu asɛngi bayekoli na ye básala lisusu mingi koleka. Na butu wana kaka, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete etikali moke akaba bomoi na ye mpo na bango. Na nsima, ayebisaki bango ete: “Komandema na ngai yango oyo, ete bólinganaka ndenge ngai nalingi bino. Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo, ete moto akaba molimo na ye mpo na baninga na ye.” (Yoane 15:12, 13) Ya solo, komandema yango ezalaki ya sika mpo esɛngaki kotya matomba ya bato mosusu liboso ya oyo ya yo moko.
Ezali na ndenge mingi oyo tokoki komonisa bolingo oyo elukaka liboso bolamu ya basusu. Na ndakisa, kanisá ete ofandi na ndako mpe ozali kobɛta miziki makasi mpo esepelisa yo, kasi ezali kotungisa moninga na yo. Okosepela kokitisa miziki na yo moke mpo moninga wana azala na kimya? Na maloba mosusu, okosepela kotya bolamu ya moninga na yo liboso ya oyo ya yo moko?
Tózwa ndakisa mosusu. Mokolo moko, malili ezalaki makasi na Canada. Batatoli ya Yehova mibale bayaki kotala nkɔkɔ moko ya mobali. Ntango bazalaki kosolola, nkɔkɔ wana ayebisaki bango ete lokola abɛlaka motema, akoki te kolongola mabanga ya mbula mpɛmbɛ oyo etondaki liboso ya ndako na ye. Soki ngonga moko na nsima, mobali yango ayokaki makelele ya bapau. Batatoli wana mibale bazongaki mpo na kolongola mabanga ya mbula mpɛmbɛ na lopango ya nkɔkɔ wana tii na liboso ya monɔkɔ ya ndako na ye. Na mokanda moko oyo atindaki na biro ya Batatoli ya Yehova na Canada, akomaki boye: “Lelo namoni bolingo ya solosolo ya boklisto. Elendisi ngai mingi mpe esalisi ngai nalongola makanisi mabe oyo nazalaki na yango mpo na mokili oyo. Ebakisi mpe limemya oyo nazalaka na yango mpo na mosala oyo bozali kosala na mokili mobimba.” Ya solo, kosalisa basusu, ata na makambo ya mikemike, ekoki kosala bango malamu mingi. Tokozwa mpenza esengo soki tozali komipimela makambo mosusu mpo na kosalisa basusu!
Bikateli oyo tozwaka mpo tolingaka Nzambe
Likambo mosusu oyo tosengeli kotalela ntango tozali kozwa bikateli ezali oyo Yesu abengaki komandema oyo eleki monene: kolinga Nzambe. Yesu alobaki maloba wana na Bayuda, ekólo oyo emipesaki na Yehova mpe ezalaki na boyokani na ye. Atako bongo, Moyisalaele mokomoko asengelaki kopona soki akosalela Nzambe na molimo na ye mobimba mpe na motema mobimba.—Deteronome 30:15, 16.
Ndenge moko mpe, bikateli oyo ozwaka, emonisaka makanisi oyo ozali na yango na ntina na Nzambe. Na ndakisa, soki okómi na boyebi ya Biblia mpe okómi kosepela na yango, ekosɛnga yo mpe opona. Okosepela koyekola Biblia malamumalamu mpo okóma moyekoli ya Yesu? Soki oponi kosala bongo, okozala mpenza na esengo, mpamba te Yesu alobaki ete: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”—Matai 5:3.
Toyebi te soki elenge mozwi wana amonaki na nsima ete azwaki ekateli ya mabe. Nzokande, toyebi ndenge ntoma Petelo ayokaki nsima ya kolanda Yesu Klisto bambula ebele. Pene na nsuka ya bomoi na ye, soki na mobu 64 ya ntango na biso (T.B.), Petelo alendisaki baninga na ye bandimi ete: “Bósala nyonso oyo ekoki na bino mpo nsukansuka akuta bino kozanga litɔnɔ mpe kozanga mbeba mpe na kati ya kimya.” (2 Petelo 1:14; 3:14) Na ntembe te, Petelo ayokaki mawa te mpo na ekateli oyo azwaki mbula koleka 30 liboso, mpe alendisaki basusu ete bákangama kaka na ekateli wana oyo bazwaki.
Kolanda toli ya Petelo elimboli kozwa ekateli ya kondima mokumba ya kozala moyekoli ya Yesu mpe kotosa mibeko ya Nzambe. (Luka 9:23; 1 Yoane 5:3) Ekoki kozala mpasi mpo na kosala bongo, kasi Yesu alendisi biso na elaka oyo: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.”—Matai 11:28-30.
Tózwa ndakisa ya Arthur. Ntango azalaki na mbula zomi, abandaki koyekola kobɛta violɔ na mokano ya kozala mobɛti-miziki bomoi na ye mobimba. Ntango akómaki na mbula 14, akɔtaki na ekipi moko ya babɛti violɔ. Atako bongo, azalaki na esengo te. Tata na ye azalaki ntango nyonso komituna mituna na ntina na bomoi, mpe azalaki kobenga bateyi ya mangomba na ndako; kasi, bazalaki kopesa ye biyano ya malamu te. Ntango bazalaki kosolola na libota na bango, bazalaki komituna soki Nzambe azali, mpe mpo na nini atiki mabe ezala? Na nsima, tata ya Arthur abandaki kosolola na Batatoli ya Yehova. Masolo yango esepelisaki tata ya Arthur, mpe na nsima libota na ye mobimba ebandaki koyekola Biblia.
Nsukansuka, Arthur ayaki koyeba, na lisalisi ya Makomami, ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala mpe amonaki polele ntina ya bomoi. Elongo ná bato mosusu misato ya libota na ye, Arthur azwaki ekateli oyo akoyokela mawa ata mokolo moko te. Amipesaki epai ya Yehova. Alobi boye: “Nazali na esengo ete Yehova apesi ngai boyebi ya solo mpe abikisi ngai na kowelana oyo ezalaka kati na baalangá-nzembo. Mpo na kolonga, bato bandimaka kosala ata makambo ya mabe ndenge nini.”
Tii lelo, Arthur akobaka kaka kobɛta violɔ mpo na kosepelisa baninga na ye, kasi bomoi na ye mobimba esuki na kobɛta miziki te. Kutu, amipesi mobimba nde na mosala ya Nzambe. Lelo oyo, azali kosala na biro moko ya filiale ya Batatoli ya Yehova. Lokola Arthur mpe bamilio mosusu ya bato, kasi te lokola elenge mozwi, yo mpe okoki kozwa ekateli oyo ekomemela yo esengo monene: kondima kokóma moyekoli ya Yesu.
[Elilingi na lokasa 6]
Ekateli na yo ekoki kobongola bomoi ya bato mosusu
[Elilingi na lokasa 7]
Okoyekola Biblia mpo na kokóma moyekoli ya Yesu?