Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/2 nk. 31-32
  • Bana-kelasi ya Gileadi balendisami ‘bábanda kotimola’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bana-kelasi ya Gileadi balendisami ‘bábanda kotimola’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Bazali kosepela kosala mokano ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Eteyelo ya Galaad: Eumeli mibu 50 mpe ezali kosala na nguya mingi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Eteyelo ya Gileadi ekokisi mbula 60 ya kopesa formasyo mpo na mosala ya misionɛrɛ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Balendisaki Bamisionere bázala Lokola Yilimia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/2 nk. 31-32

Kelasi ya Gileadi ya mbala ya 123

Bana-kelasi ya Gileadi balendisami ‘bábanda kotimola’

MOKOLO ya pɔsɔ, 8 Sɛtɛmbɛ 2007, bato 6 352 oyo bautaki na mikili 41 bayanganaki na likita ya kopesa badiplome na bana-kelasi ya mbala ya 123 ya Gileadi, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Na ngonga ya 10 na ntɔngɔ, prezida ya likita, Ndeko Anthony Morris, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, atombelaki bayangani boyei malamu. Nsima ya maloba ya ebandeli, abengaki molobi ya liboso, Ndeko Gary Breaux, oyo azali na komite ya filiale ya États-Unis.

Ndeko Breaux amonisaki bana-kelasi ete bato oyo basalaka mokano ya Yehova bazali kitoko na miso na Ye, ata soki bazali komonana ndenge nini libándá. (Yil. 13:11) Alendisaki bana-kelasi ete bábatela kitoko wana. Nsima na ye, Ndeko Gerrit Lösch, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, amonisaki ete ezali mabe te kolikya kozwa mbano na ndenge tozali kosalela Yehova. (Ebe. 11:6) Atako bongo, bolingo nde esengeli kotinda biso na kosalela Yehova.

Na nsima, Ndeko William Samuelson, mokɛngɛli ya Departema ya biteyelo ya Teokrasi, alendisaki bana-kelasi bákangama na mokumba ya ntina mingi ya kosakola Mokonzi oyo azali koyangela mpe bázala ntango nyonso na etamboli ya malamu mpo bábatela lokumu na bango.a Ndeko Sam Roberson, mokɛngɛli-molandi na Departema ya biteyelo ya Teokrasi, alendisaki bana-kelasi ete bátyaka likebi na makambo ya malamu ya basusu. Na ndenge yango, ‘bakolinga lisangá mobimba ya bandeko.’​—1 Pet. 2:17.

Nsima ya masukulu yango ya kolendisa, Ndeko Mark Noumair, molakisi na Gileadi, atunaki bana-kelasi mosusu mituna mpe bayebisaki makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola na boumeli ya basanza oyo bazalaki na Gileadi. Bayangani bamonaki mpenza ete bana-kelasi yango balingi mosala ya kosakola mpe bazali na mposa ya kosalisa bato mosusu. Na nsima, Ndeko Kent Fischer, oyo asalaka na Betele ya Patterson, atunaki bandeko ya bakomite ya filiale ya bikólo misato epai batindá bamisionɛrɛ. Bayangani nyonso, kati na bango bandeko ya bana-kelasi, balendisamaki na ndenge bandeko yango bamonisaki ete basalaka nyonso mpo bamisionɛrɛ oyo batindeli bango básala mosala na bango malamu. Na nsima, Ndeko Izak Marais, oyo asalaka na Departema oyo etalelaka mosala ya kobongola, atunaki bamisionɛrɛ oyo baumeli na mosala, mpe maloba na bango epesaki bana-kelasi mwa likanisi ya makambo malamu oyo bakokutana na yango.

Lisukulu monene ya likita yango, oyo esalemaki na Ndeko Geoffrey Jackson, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, ezalaki na motó ya likambo oyo: “Nsima ya makambo nyonso oyo boyoki, bokosala nini?” Ndeko Jackson, oyo azalaki misionɛrɛ na boumeli ya mbula soki 25 na mikili ya sudi ya Mbu ya Pasifike, amonisaki likambo oyo Yesu alobelaki na nsuka ya Lisolo Likoló ya Ngomba. Yesu alobelaki bato mibale oyo batongaki bandako, moko azalaki na mayele, mosusu azalaki zoba. Molobi amonisaki ete mbala mosusu bandako yango mibale etongamaki esika moko. Moto oyo azalaki zoba atongaki ndako na ye likoló ya zɛlɔ; kasi, moto oyo azalaki mayele atimolaki tii na mabanga mpo atya fondasyo. Ntango mbula ya mopɛpɛ makasi ebɛtaki, ndako oyo etongamaki likoló ya mabanga etikalaki, kasi oyo etongamaki likoló ya zɛlɔ ekweaki.​—Mat. 7:24-27; Luka 6:48.

Yesu akokanisaki moto oyo azalaki zoba na bato oyo basukaki kaka na koyoka mateya na ye. Moto ya mayele azali lokola bato oyo, nsima ya koyoka, basalelaki mpe makambo oyo Yesu ateyaki bango. Ndeko Jackson alobaki na bana-kelasi ete, “Soki na mosala ya misionɛrɛ bosaleli makambo oyo boyekoli na Biblia, bokozala lokola moto ya mayele.” Mpo na kosukisa, alendisaki bana-kelasi ete ‘bábanda kotimola’ na bisika oyo bakotinda bango lokola bamisionɛrɛ.

Na nsuka, bapesaki bana-kelasi badiplome mpe bayebisaki bango bamboka oyo batindi bango. Lisusu, Ndeko Morris apesaki bango malako ya nsuka. Alendisaki bana-kelasi bákoba kolanda Yesu mpe bátyelaka ntango nyonso nguya ya Yehova motema. Na nsima, likita ya kopesa badiplome esilaki.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Departema ya biteyelo ya Teokrasi, oyo etambwisami na Komite ya Mateya, etalelaka eteyelo ya Gileadi, eteyelo ya basangani ya bakomite ya filiale, mpe eteyelo ya bakɛngɛli-batamboli.

[Etanda na lokasa 31]

MAKAMBO ETALI BANA-KELASI

Bauti na mikili: 10

Batindami na mikili: 24

Bana-kelasi bazalaki: 56

Mwayene ya mbula ya kobotama: 33,5

Mwayene ya mbula balekisi na kati ya solo: 17,9

Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 13,8

[Elilingi na lokasa 32]

Bana-kelasi ya mbala ya 123 ya Gileadi, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia

Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ, banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsima.

(1) Esparza, E.; Papaya, S.; Bilal, A.; Suárez, M.; Evers, E.; Dimichino, K. (2) Rosa, M.; Fujii, R.; Ratey, O.; Leveton, J.; Van Leemputten, M. (3) Boscaino, A.; Beck, K.; Budanov, H.; Braz, C.; Peltz, K.; Siaw, A. (4) Leveton, S.; Santikko, H.; Conte, S.; Wilson, J.; Rylatt, J.; Pierce, S.; Fujii, K. (5) Rosa, D.; Boscaino, M.; Austin, V.; Rodiel, P.; Bilal, P.; Dimichino, P. (6) Ratey, B.; Czyzyk, D.; Clarke, C.; Riedel, A.; Esparza, F.; Siaw, P.; Van Leemputten, T. (7) Rodiel, J.; Evers, J.; Green, J.; Czyzyk, J.; Santikko, M.; Rylatt, M. (8) Peltz, L.; Austin, D.; Riedel, T.; Beck, M.; Pierce, W.; Conte, S.; Green, S. (9) Suárez, J.; Clarke, J.; Papaya, S.; Budanov, M.; Wilson, R.; Braz, R.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto