Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/10 nk. 16-21
  • Oteyaka lokola Yesu ateyaki?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oteyaka lokola Yesu ateyaki?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mateya na ye mazalaki kosimba motema
  • Yesu azalaki na makambo makasi te ntango bolingo esɛngaki bongo
  • Akómi “Mwana wa mibeko”
  • Yesu alingaki bana mpe azalaki kokanga ntina na makambo na bango
  • “Ntango esi’ ekoki”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Yesu Klisto—Misionere Monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu amonisi “bwanya oyo euti na Nzambe”
    Pusaná penepene na Yehova
  • “Napesi bino ndakisa”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/10 nk. 16-21

Oteyaka lokola Yesu ateyaki?

“Ebele bakamwi mateyo na ye. Jambi alakisi bango lokola ajali na bokonji nde lokola bakomeli na bango tɛ.”​—MATAI 7:28, 29.

1. Banani balandaki Yesu ntango azalaki koteya na Galilai, mpe Yesu asalaki nini?

ESIKA nyonso Yesu azalaki kokende, bibele bazalaki koya epai na ye. “Atamboli na Galilai mobimba, alakisi na biyanganelo na bango mpe asakoli Nsango Malamu na Bokonji mpe abikisi malali yɔnsɔ mpe ndenge yɔnsɔ na bolɛmbu kati na bato.” Lokola nsango na misala na ye epalanganaki, “mingi babili ye uta na Galilai mpe na Dekapoli mpe na Yelusaleme mpe na Yuda mpe na ngambo na Yaladene.” (Matai 4:23, 25) Wana emonaki ye bango, “ayoki mawa mpɔ na bango ete balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bajali na mobateli tɛ.” Wana ezalaki ye koteya, bakokaki komona mawa mpe bolingo ya motema oyo azalaki na yango mpo na bango; ezalaki lokola nkisi oyo ezali kokitisa mpasi na mpota na bango, yango nde ezalaki kobenda bango epai na ye.​—Matai 9:35, 36.

2. Longola bikamwiseli oyo Yesu azalaki kosala, nini ezalaki kobenda bibele epai na ye?

2 Oyo nde kobikisama na nzoto na lolenge ya kokamwa Yesu asalaki​—apɛtolaki bato na maba, bakufi matoi bayokaki, bakufi-miso bamonaki, bato bazalaka kotambola te batambolaki, bakufi bazongaki lisusu na bomoi! Ya solo, bilakiseli wana minene ya nguya ya Yehova oyo ezalaki kosala mosala na nzela na Yesu esengelaki mpenza kobenda bibele mingi! Kasi bikamwiseli ezalaki yango moko te eloko oyo ezalaki kobenda bato epai na ye; bibele mingi babendamaki mpe na ntina na kobikisama ya elimo oyo Yesu azalaki kopesa na ntango azalaki koteya. Na ndakisa, talá mayoki na bango nsima na koyoka Lisoló na ye likoló na Ngomba oyo eyebani mingi: “Esilaki Yesu koloba maloba oyo, ebele bakamwi mateyo na ye. Jambi alakisi bango lokola ajali na bokonji nde lokola bakomeli na bango tɛ.” (Matai 7:28, 29) Balakisi na mibeko na bango bazalaki kotánga balakisi na mibeko ya Bayuda oyo bazalaká liboso na bango mpo na kondimisa mateya na bango. Yesu ateyaki bango na bokonzi oyo azwaki epai na Nzambe: “Yango ekosolola ngai, nakosolola lokola Tata asili koyebisa ngai.”​—Yoane 12:50.

Mateya na ye mazalaki kosimba motema

3. Na nini lolenge oyo Yesu azalaki koteya ekesenaki na oyo ya Bakomeli mpe Bafalisai?

3 Bokeseni kati na mateya ya Yesu mpe oyo ya bakomeli mpe Bafalisai ezalaki te bobele na makambo mazali kati na yango​—solo euti epai na Nzambe ekesenaki na mibeko makasimakasi oyo euti epai na bato​—kasi lisusu na lolenge oyo azalaki kopesa yango. Bakomeli mpe Bafalisai bazalaki na lolendo mpe na makambo makasi, bazalaki koluka lokumu na bango moko mpe bazalaki komona mpamba bibele, kotaleláká bango lokola “bato balakelami mabe.” Nzokande, Yesu azalaki na kosɔkɛma, na bopɔlɔ, na boboto, kosepela na bato, mpe azalaki na makambo makasi te epai na basusu, kasi azalaki nde koyokela bango mawa. Yesu ateyaki te bobele na maloba mabongi, kasi lisusu na maloba ya elɛngi oyo eutaki na motema na ye, oyo ezalaki kokɔta mbala moko kati na mitema ya bayoki na ye. Nsango na ye ya kosepelisa ezalaki kobenda bato epai na ye, kopusa bango na kokende ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ na tempelo mpo na koyoka ye, mpe esalaki ete bákangama na ye mpe báyoka ye na esengo nyonso. Bato mingi bazalaki koya mpo na koyoka ye, kolobáká ete: “Kino ntango oyo moto alobi lokola moto oyo tɛ.”​—Yoane 7:46-49; Malako 12:37; Luka 4:22; 19:48; 21:38.

4. Nini kati na koteya ya Yesu ezalaki mpenza kobenda bato mingi epai na ye?

4 Ya solo, moko na bantina oyo esalaki ete bato bábendama na mateya na ye, ezalaki bongo lolenge na ye ya kosalela bandakisa. Yesu azalaki komona biloko oyo bato mosusu bazalaki komona, kasi azalaki kokanisa makambo oyo bango bazalaki komizela na yango te. Bafololo oyo ezali kokóla na bilanga, bandɛkɛ oyo bazali kotonga zumbu na bango, bato oyo bazali kolóna bambuma, babateli oyo bazali komema mpate oyo ebungaki, basi oyo bazali kobamba elamba ya sika likoló na elamba ya kala, bana oyo bazali kosakana na bisika ya zando, balɔ́bi oyo bazali kobenda milúba​—makambo oyo moto nyonso azalaki komona yango​—ezalaki na ndimbola monene mpenza na miso ya Yesu. Epai nyonso oyo azalaki kotala, azalaki komona nini akoki kosalela mpo na koloba na ntina na Nzambe mpe na Bokonzi na Ye to mpo na komonisa likambo moko oyo etalaki bato oyo bazalaki zingazinga na ye.

5. Likoló ya nini Yesu azalaki kozwa bandakisa na ye, mpe nini esalaki ete masese na ye ezala kitoko?

5 Bandakisa oyo Yesu azalaki kosalela etongamaki likoló na makambo ya mokolo na mokolo oyo bato basilá komona yango mbala mingi, mpe wana solo ekangisami na makambo yango oyo bato basilá komesana na yango, ezalaki kokɔta nokinoki mpe na mozindo nyonso kati na makanisi ya bayoki. Mateya ya solo motindo yango mazalaki te bobele koyokama; kasi lisusu mazalaki komonana na miso ya makanisi mpe ezalaki mpasi te na komikundola yango na nsima. Masese ya Yesu ezalaki pɛpɛlɛ, ezalaki te na makambo mazangi ntina oyo makokaki koyeisa makasi bososoli ya solo yango. Na ndakisa, talá lisese ya Mosamalia ya boboto. Ozali komona polele lolenge nini mozalani ya solosolo asengeli kozala. (Luka 10:29-37) Na nsima tozali kokuta lisese ya bana mibale ya mibali​—moko oyo alobaki ete akokende kosala na elanga ya miwiti kasi akendaki te, mosusu oyo alobaki ete akokende te nde na nsima akendeki. Ososoli nokinoki oyo emonisi botosi ya solo​—kosala mosala mopesami. (Matai 21:28-31) Moto moko te akokaki kolala to kotika makanisi na ye etambola ntango Yesu azalaki kopesa mateya na ye ya kosepelisa. Bazalaki mpenza kotya likebi mpo na koyoka mpe komona.

Yesu azalaki na makambo makasi te ntango bolingo esɛngaki bongo

6. Ntango nini ebongi kozala na makambo makasi te, to koyeba koyokela basusu?

6 Mbala mingi na ntango Biblia ezali kolobela kozala na makambo makasi te, maloba na nsé ya lokasa emonisi ete yango elimboli koyeba koyokela basusu. Mayele oyo mauti epai na Nzambe mayebaka koyokela basusu soki makambo oyo masɛngi kolɛmbisa bikateli mazali. Tosengeli, na bantango mosusu, kozala na makambo makasi te, to koyeba koyokela basusu. Bankulutu basengeli koyeba koyokela basusu ntango bolingo esɛngi yango mpe soki kobongola motema emonisami. (1 Timoté 3:3; Yakobo 3:17) Yesu atikaki bandakisa minene ya koyeba koyokela basusu, kozanga kotalela malako mosusu ya minene ntango koyokela ngɔlu to mawa esɛngaki yango.

7. Wapi mwa bandakisa oyo emonisi ete Yesu azalaki na makambo makasi te?

7 Mokolo moko Yesu alobaki ete: “Nde ye oyo akoangana ngai liboso na bato, ngai mpe nakoangana ye liboso na Tata na ngai na Likolo.” Kasi abwakaki Petelo te, atako awanganaki ye mbala misato. Ezalaki na makambo oyo masɛngaki kolɛmbisa ekateli oyo Yesu atalelaki. (Matai 10:33; Luka 22:54-62) Ezalaki mpe na makambo masɛngaki kolɛmbisa ekateli ntango mwasi moko oyo azalaki na mbindo mpo ete azalaki kotanga makila abukaki Mobeko ya Mose na koyáká esika ebele ya bato bazalaki. Akangaki ntina oyo mwasi wana asalaki bongo mpo ete azalaki na elikya mosusu te. (Malako 1:40-42; 5:25-34; talá mpe Luka 5:12, 13.) Yesu alingaki te ete bantoma na ye báyebisa bato ete ye azali Masiya, nzokande asalelaki te na makasi nyonso lilako wana ntango ye moko amimonisaki ete azali Masiya epai na mwasi Mosamalia oyo akutanaki na ye na libulu ya mai. (Matai 16:20; Yoane 4:25, 26) Na makambo nyonso wana, bolingo, ngɔlu, mpe motema mawa nde epesaki nzela na kozala na makambo makasi te.​—Yakobo 2:13.

8. Ntango nini Bakomeli mpe Bafalisai bakokaki kobuka mibeko na bango, mpe ntango nini bazalaki kobuka yango te?

8 Ezaleli oyo ekeseneki mpenza na oyo ya bakomeli mpe Bafalisai baoyo bayebaki koyokela basusu te. Mpo na makambo na bango moko, bakokaki kobuka mibeko na bango ya Sabata mpo na kokamba ngombe na bango komelisa yango mai. To soki ngombe to mwana na bango akwei na libulu, basengelaki kobuka mobeko ya Sabata mpo na kobimisa ye. Kasi mpo na bato mpamba, bazalaki kosala bongo te! Bazalaki “kotombola [masɛngami] yango ata na mosapi na bango tɛ.” (Matai 23:4; Luka 14:5) Mpo na Yesu, bato bazalaki na ntina mingi koleka ebele ya malako; mpo na Bafalisai, malako mazalaki na ntina mingi koleka bato.

Akómi “Mwana wa mibeko”

9, 10. Nsima na kozonga na Yelusaleme, epai wapi baboti ya Yesu bakutaki ye, mpe nini ezalaki likambo ya ntina kati na lolenge ya Yesu ya kotuna mituna?

9 Bato mosusu bakoimaimaka ete ezali bobele na lisoló moko oyo elobeli bomoi ya Yesu ntango azalaki mwana moke. Nzokande mingi bazali kososola te ndimbola monene ya likambo yango. Lisoló yango eyebisameli biso kati na Luka 2:46, 47: “Na nsima na mikɔlɔ misato bajuaki ye kati na Tempelo, afandaki katikati na milakisi koyokaka bango mpe kotunaka bango. Bango yɔnsɔ bayokaki ye bakamwaki na bosɔsɔli na ye mpe na bijongiseli na ye.” Búku Theological Dictionary of the New Testament (Diksionere ya mateya ya Kondimana ya Sika), oyo ekomamaki na Kittel, ebimisi likanisi ete awa liloba ya Greke oyo esalelami mpo na “kotunaka” ezalaki te bobele mposa ya elenge mobali ya kolinga koyeba makambo mingi. Liloba yango ezali kopesa likanisi ya kotuna oyo esalemaka ntango bazali kotalela likambo sikisiki, bolukiluki, kotuna mituna mingi mpo na kokweisa biyano ya moto, ata mpe “komeka mpe mituna ya mayele mabe oyo Bafalisai mpe Basadukai bazalaki kotuna,” lokola oyo elobelami na Malako 10:2 mpe 12:18-23.

10 Diksionere moko wana elandi koloba ete: “Na kotalela lolenge wana ya kosalela liloba yango, tokoki komituna soki . . . [Luka] 2:46 emonisi te mituna ya elenge mobali ya kolinga koyeba makambo, kasi nde bolóngi na ye kati na ntembe. [Molɔngɔ́] 47 eyokani na likanisi oyo ya mibale.”a Boyokani ya Sika ebongoli molɔngɔ́ 47 boye: “Bato nyonso oyo bayokaki ye bakamwaki mingi mpo na mayele na ye mpe na ndenge azalaki kozongisa.” Nzokande Liloba lya Nzambe elobi ete: “Bato bakamwí míngi na bwánya mpé na biyano bya yé.”

11. Mayoki ya Malia mpe Yosefe ezalaki nini na makambo oyo bamonaki mpe bayokaki, mpe diksionere moko ya teoloji elobi nini mpo na yango?

11 Ntango baboti ya Yesu bakómaki na tempelo “bakamwaki mingi mpenja.” (Luka 2:48) Robertson alobi ete liloba ya Greke oyo emonisami wana ezali bongo “kobulunganisama, kobɛtama mbala moko.” Abakisi ete Yosefe mpe Malia “babulunganaki” na oyo bamonaki mpe bayokaki. Na maloba mosusu, Yesu asilaki kokóma moteyi ya kokamwa. Na kotalela oyo esalemaki kati na tempelo, búku ya Kettel elobi ete “Uta bomwana na Ye, Yesu abandisaki kowelana mpe kino nsuka, banguna na Ye bakokaki ye te.”

12. Nini emonanaki polele kati na ntembe oyo Yesu atyanaki na nsima elongo na bakonzi ya mangomba?

12 Ya solo, banguna na ye bakokaki ye te! Bambula mingi na nsima, ezalaki na mituna motindo wana nde Yesu akweisaki Bafalisai kino ete “moto moko ayikaki mpiko kotuna ye bituneli mosusu te.” (Matai 22:41-46) Basadukai mpe bakangisamaki monɔkɔ na ntina na lisekwa, mpe “bajalaki na molende na kotuna ye likambo mɔkɔ lisusu tɛ.” (Luka 20:27-40) Bakomeli balóngaki soko moke te. Nsima wana moko na bango atyanaki ntembe na Yesu, “moto mosusu ajalaki na molende kotuna ye lisusu tɛ.”​—Malako 12:28-34.

13. Mpo na nini likambo oyo esalemaki na tempelo ezalaki na ntina mingi kati na bomoi ya Yesu, mpe yango ezali lisusu komonisa nini?

13 Mpo na nini bobele likambo oyo esalemaki na tempelo kati na Yesu mpe bateyi, nde eyebisami na ntina na bomwana na ye? Ezalaki eleko ya ntina mingi kati na bomoi ya Yesu. Wana ezalaki ye soko na mibu 12, akómaki oyo Bayuda bazalaki kobénga ete “mwana wa mibeko,” moto oyo azwaki mokumba ya kotosa malako na yango nyonso. Wana Malia amilelaki epai na Yesu na ntina na komitungisa oyo ye mpe Yosefe bazalaki na yango likoló na ye, eyano ya mwana na ye emonisaki ete ayebaki ntina ya kobotama na ye na lolenge ya likamwisi mpe lolenge asengelaki kokóma Masiya na mikolo mizalaki koya. Yango emonisamaki na lolenge alobaki sikisiki, ete Nzambe azali Tata na ye: “Bojalaki koluka ngai mpɔ na nini? Boyebaki tɛ ete ekoki na ngai kojala kati na ndako na Tata na ngai?” Tóyeba ete wana ezali maloba ya liboso ya Yesu oyo makomami kati na Biblia, mpe yango emonisi ete ayebaki malamu mokano ya Yehova oyo mpo na yango atindaki ye awa na mabelé. Na yango, lisoló oyo na mobimba na yango ezali na ntina monene.​—Luka 2:48, 49.

Yesu alingaki bana mpe azalaki kokanga ntina na makambo na bango

14. Makambo nini ya ntina mazwami kati na lisoló ya elenge Yesu na tempelo, bilenge basengeli koyeba yango?

14 Lisoló oyo esengeli mpenza kosepelisa bilenge. Emonisi lolenge nini Yesu ayekolaki na molende nyonso wana ezalaki ye kokóla. Balakisi na mibeko ya Bayuda kati na tempelo bakwamaki mingi na mayele ya “mwana wa mibeko,” wana oyo azalaki na mibu 12. Nzokande alandaki kosala elongo na Yosefe na talié ya mabaya; “azalaki ntango nyonso na botosi” epai na ye [Yosefe] mpe epai na Malia, mpe azalaki kokóla “na boboto na miso na Njambe mpe [na miso] na bato.”​—Luka 2:51, 52.

15. Lolenge nini Yesu azalaki mosungi ya bilenge na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé, mpe yango elimboli nini mpo na bilenge lelo?

15 Yesu azalaki mosungi ya bilenge na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé: “Emɔni banganga minɛnɛ mpe bakomeli bikamwiseli bisali ye mpe bana baoyo bangangi kati na Tempelo ete, ‘Osana epai na Mwana na Dawidi!’ bayoki nkanda, balobi na ye ete, ‘Oyoki nde oyo ekolobaka bango?’ Yesu alobi na bango ete, ‘Ɛɛ, botangi naino tɛ ete, “Longwa na minɔkɔ na bana mpe baoyo bakonungaka mabɛlɛ, obimisi lisanjoli na malamu yɔnsɔ”?’” (Matai 21:15, 16; Nzembo 8:2) Azali mpe mosungi ya bankóto mingi ya bilenge lelo, oyo bazali kobatela bosembo na bango mpe bazali kopesa lisanzoli, basusu kati na bango basalaki bongo ata wana bomoi na bango ezalaki na likámá!

16. (a) Liteya nini Yesu apesaki na bantoma na ye na kotyáká mwana moke katikati na bango? (b) Na ntango nini ya mpasi kati na bomoi na ye, Yesu amibanzabanzaki mpo na bana?

16 Wana bantoma batyanaki ntembe mpo na koyeba nani aleki monene kati na bango, Yesu alobaki na [bango nyonso] 12 ete: “‘Sɔkɔ moto nani alingi kojala moto na liboso, ajala moto na nsima mpe mosaleli na bato yɔnsɔ.’ Akamati mwana mokɛ, atii ye na kati na bango, mpe esili ye kokamata ye kati na mabɔkɔ na ye, alobi na bango ete, ‘Sɔkɔ moto nani akoyamba mɔkɔ na bana na motindo oyo na nkombo na ngai, ajali koyamba ngai. Mpe moto nani akoyamba ngai, ajali koyamba ngai tɛ kasi Motindi na ngai.’” (Malako 9:35-37) Lisusu, wana azalaki kokende na Yelusaleme mpo na mbala ya nsuka, liboso ya kokutana na minyoko makasi mpe kokufa, alekisaki ntango elongo na bana: “Tika bana mikɛ bayaka [epai] na ngai, bopekisa bango tɛ, jambi Bokonji na Njambe ejali na bato na motindo na bango.” Na nsima, “ajingeli bango na mabɔkɔ na ye, apamboli bango, kotia mabɔkɔ likolo na bango.”​—Malako 10:13-16.

17. Mpo na nini ezalaki pɛtɛɛ mpo na Yesu na komitya na esika ya bana, mpe bana basengeli komikundola nini na ntina na ye?

17 Yesu ayebi oyo elimboli kozala mwana moke katikati na mikóló. Azalaki na bomoi elongo na mikóló, asalaki elongo na bango, amonisaki botosi epai na bango, mpe lisusu ayebaki esengo mpe mayoki ya kobatelama oyo euti na bolingo ya mikóló epai na bana. Bana, Yesu bobele moko wana azali moninga na bino; akufaki mpo na bino, mpe bokozala na bomoi ya seko soki bolandi kotosa mitindá na ye.​—Yoane 15:13, 14.

18. Likanisi nini ya kosepelisa tosengeli kobosana te, mingimingi na ntango ya mpasi to ya mikakatano?

18 Kosala lokola Yesu azali kosɛnga ezali mpasi te atako basusu bakoki komona ete ezali mpasi. Bilenge, [Yesu] amilɛngɛli mpo na kosunga bino mpe bato nyonso mosusu, lokola tozali kotánga yango kati na Matai 11:28-30: “Boya liboso na ngai, bino yɔnsɔ bojali kolɛmba na mosala mpe kokumba bojito mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likolo na bino mpe boyekola na ngai; jambi ngai najali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; bokojua kopema mpɔ na milimo na bino. Mpɔ ete ekanganeli na ngai ejali na motau, mpe mokumba na ngai ejali na bojito tɛ.” Kanisá naino, epai nyonso ozali kosalela Yehova kati na bomoi na yo, Yesu azali elongo na yo, kosaláká ete ekanganeli ezala motau mpe mokumba ezala na bozito te. Oyo ezali likanisi moko ya kosepelisa mpo na biso banso!

19. Mituna nini mitali lolenge oyo Yesu azalaki koteya tosengeli kotalela yango mbala na mbala?

19 Nsima na kotalela mwa moke myango oyo Yesu asalelaki mpo na koteya, tozali komimona ete tozali koteya lokola ye ateyaki? Wana tozali komona baoyo bazali na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ te to baoyo bazali na nzala na elimo, topusamaka na mawa mpo na kosala oyo ekoki na biso mpo na kosalisa bango? Wana tozali kolakisa basusu, tozali koteya Liloba ya Nzambe, to, tozali nde koteya makanisi na biso moko lokola Bafalisai basalaki yango? Totyaka likebi na biloko tozali komona mokolo na mokolo zingazinga na biso, oyo tokoki kosalela mpo na komonisa polele, kopesa elakiseli, koyeisa elɛngi mpe kotombola bososoli ya makambo ya elimo? Toboyaka kokangama makasi na malako mosusu, wana bolingo mpe mawa epesi nzela na kolɛmbisa mwa moke malako motindo wana? Mpe ezali boni mpo na bana? Tozali komonisa bango bosepeli mpe motema-boboto oyo Yesu azalaki na yango? Olendisaka bana na yo na koyekola lolenge oyo Yesu asalaki yango ntango azalaki mwana? Atako osengeli kozala ngwi lokola Yesu azalaki, nzokande okoyamba na esengo nyonso bato oyo babongoli motema, lokola nsoso oyo azali koyanganisa bana na ye na nsé ya mapapu na ye?​—Matai 23:37.

20. Likanisi nini ya kosepelisa tokoki komibɔndisa na yango biso moko awa ezali biso kosalela Nzambe?

20 Soki tokosala makasi na koteya lokola Yesu ateyaki, na ntembe te ‘akotya biso na nsé ya ekanganeli na ye.’​—Matai 11:28-30.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ya solo, tozali na bantina na kondima ete Yesu amonisaki limemya epai na baoyo bazalaki mikóló koleka ye, mingimingi epai na baoyo na nsuki mpɛmbɛ mpe na banganga.​—Kokanisá na Levitike 19:32; Misala 23:2-5.

Ozali komikundola?

◻ Mpo na nini bibele bazalaki koya epai na Yesu?

◻ Mpo na nini na bantango mosusu Yesu azalaki na makambo makasi te likoló na malako mosusu?

◻ Nini tokoki koyekola na lolenge oyo Yesu azalaki kotuna mituna epai na bateyi kati na tempelo?

◻ Liteya nini tokoki kozwa na boyokani oyo Yesu azalaki na yango elongo na bana?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto