Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 52 lok. 128-lok. 129 par. 7
  • Aleisi bankóto ya bato na mampa moke mpe mbisi moke

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Aleisi bankóto ya bato na mampa moke mpe mbisi moke
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Yesu aleisi nkoto mingi na bato na likamwisi
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yesu aleisi bankoto na bato na ndenge ya ekamwiseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Yesu aleisi bankoto ya bato
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Yesu aleisi ebele ya bato
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 52 lok. 128-lok. 129 par. 7
Yesu akaboli mampa mitano mpe mbisi mibale, mpe apesi bayekoli na ye bákabolela yango bato

MOKAPO 52

Aleisi bankóto ya bato na mampa moke mpe mbisi moke

MATAI 14:13-21 MARKO 6:30-44 LUKA 9:10-17 YOANE 6:1-13

  • YESU ALEISI MIBALI NKÓTO MITANO (5 000)

Bantoma 12 bauti kosakola na Galile mobimba, mpe bayei koyebisa Yesu “makambo nyonso oyo basalaki mpe bateyaki.” Yango wana, balɛmbi mpenza. Nzokande, bazwi ata ntango ya kolya te mpo bato ebele bazali koya mpe kokende. Bongo Yesu alobi na bango: “Bóya, kaka bino moko, na esika oyo bato bazali te mpe bópema mwa moke.”​—Marko 6:30, 31.

Bamati na masuwa, mbala mosusu pene na Kapernaume, mpe bakei na esika moko oyo bato bazali te, na ɛsti ya Ebale Yordani, leká Betesaida. Kasi, bato mingi bamoni bango bazali kokende, mpe basusu bayoki nsango yango. Bango nyonso balandi bango mbangu pembenipembeni ya ebale mpe ntango masuwa esɛmi, ekuti bango wana.

Ntango Yesu abimi na masuwa, amoni ebele ya bato yango, mpe ayoki mawa mpo bazali lokola bampate ezangi mobateli. Na yango, abandi “koteya bango makambo mingi” oyo etali Bokonzi. (Marko 6:34) Abikisi mpe ‘baoyo bazali na mposa ya kobikisama.’ (Luka 9:11) Lokola ntango ekei, bayekoli bayebisi ye: “Esika oyo ezali esika bato bazalaka te mpe ngonga esili kopusana mosika; tiká ebele ya bato oyo bázonga, mpo bákende na bamboka mike mpe básomba biloko ya kolya.”​—Matai 14:15.

Yesu alobi na bango: “Bakokende te: Bino bópesa bango eloko ya kolya.” (Matai 14:16) Atako Yesu ayebi likambo oyo akosala, atuni Filipe motuna oyo mpo na komeka ye: “Epai wapi tokosombela bato oyo mampa mpo bálya?” Atuni Filipe mpo afandaka na Betesaida, mboka oyo ezali pene na esika bazali. Kasi, ata soki basombi mampa, ekosalisa mpenza te. Mibali bazali soki nkóto mitano (5 000). Soki tobakisi basi ná bana, bakoki kokóma ata nkóto zomi (10 000)! Filipe alobi na Yesu: “Mampa ya denari [denari moko ezali lifuti ya mokolo moko] nkama mibale (200) ekokoka bango te.”​—Yoane 6:5-7.

Yesu azali na koloba na mwana oyo azali na mampa mitano mpe mbisi mibale ya mike

Mbala mosusu, mpo na komonisa ete likoki ya koleisa bato nyonso wana ezali te, Andre alobi: “Mwana mobali moko ya moke azali awa na mampa mitano ya ɔrje ná mwa mbisi mibale ya mike. Kasi yango ezali eloko nini mpo na bato ebele boye?”​—Yoane 6:9.

Lokola tozali na mobu 32 T.B., na eleko ya prɛnta, mwa moke liboso ya Elekeli, matiti etondi pembenipembeni ya ngomba. Yesu asɛngi bayekoli na ye báyebisa bato ete báfanda na matiti bato ntuku mitano ntuku mitano (50) mpe nkama moko nkama moko (100). Akamati mampa mitano yango mpe mbisi mibale yango, apesi Nzambe matɔndi. Na nsima, abuki mampa mpe akaboli mbisi. Apesi yango bayekoli na ye, mpe bango bakaboleli bato. Likambo ya kokamwa, moto nyonso alei mpe atondi!

Na nsima, Yesu alobi na bayekoli na ye: “Bósangisa biteni oyo etikali, mpo eloko ata moko ebebisama te.” (Yoane 6:12) Batondisi bakitunga 12 na biteni oyo etikali!

  • Mpo na nini Yesu alobi na bantoma na ye bákende na esika oyo bato bazali te?

  • Yesu ná bayekoli na ye bakei wapi, mpe bakuti nini kuna?

  • Bayekoli bayebisi Yesu asala nini, kasi ndenge nini akokisi mposa ya bato?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto