Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 17
  • Yesu azalaki moto ya ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu azalaki moto ya ndenge nini?
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Yesu azali nani?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • ‘Mwana asepeli komonisa Tata’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Yesu Kristo azali nani?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Yesu asalaki nini ntango azalaki awa na mabele?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 17
Liteya 17. Yesu asemboli lobɔkɔ na ye mpe abikisi mobali moko na ndenge ya likamwisi.

LITEYA 17

Yesu azalaki moto ya ndenge nini?

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Soki tozali koyekola makambo oyo Yesu alobaki mpe asalaki ntango azalaki awa na mabele, tokomona bizaleli oyo ekotinda biso tókóma baninga na ye mpe ya Tata na ye, Yehova. Na ndakisa, bizaleli nini? Mpe ndenge nini tokoki komekola Yesu na bomoi na biso?

1. Na ndenge nini Yesu azali lokola Tata na ye?

Liboso Yesu aya awa na mabele, azalaki kotala ndenge Tata na ye azalaki kosala makambo mpe ayekolaki makambo mingi epai na ye na boumeli ya bambula ebele mpenza. Yango wana, akanisaka, ayokaka mpe asalaka makambo lokola Tata na ye. (Tángá Yoane 5:19.) Yesu amekolaki bizaleli ya Tata na ye malamumalamu, yango wana alobaki: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoane 14:9) Ntango ozali koyekola koyeba bizaleli ya Yesu, okoyeba Yehova malamumalamu. Na ndakisa, mawa oyo Yesu amoniselaki bato emonisi ete Yehova ayokelaka yo mawa.

2. Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaka Yehova?

Yesu alobaki: “Mpo mokili eyeba ete ngai nalingaka Tata, nazali kosala kaka ndenge Tata apesi ngai mitindo ete nasala.” (Yoane 14:31) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ete alingaka Tata na ye mingi na ndenge azalaki kotosa ye ata ntango ezalaki pɛtɛɛ te. Yesu azalaki mpe kolinga kolobela makambo ya Yehova mpe kosalisa bato bákóma baninga ya Tata na ye.​—Yoane 14:23.

3. Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaka bato?

Biblia elobi ete Yesu ‘alingaka mingi bana ya bato.’ (Masese 8:31) Amonisaki bolingo na ndenge azalaki kolendisa bato mpe kosalisa bango na motema moko. Asalaki makamwisi kaka te mpo na komonisa nguya na ye, kasi mpe mpo azalaki koyokela bato mawa. (Marko 1:40-42) Azalaki kosalela bato ya ndenge nyonso makambo na boboto, azalaki kopona bilongi te. Maloba na ye ezalaki kolendisa mpe kopesa elikya na bato nyonso ya mitema sembo, oyo bazalaki koyoka ye. Yesu andimaki konyokwama mpe kokufa mpo alingaka bato nyonso. Kasi alingaka mingimingi bato oyo basalelaka mateya na ye.​—Tángá Yoane 15:13, 14.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba bizaleli mosusu ya Yesu. Mpe talá ndenge okoki komekola ezaleli na ye ya kokaba mpe bolingo na ye.

4. Yesu alingaka Tata na ye

Ndakisa ya Yesu eteyi biso makambo oyo tokoki kosala mpo na komonisa ete tolingaka Nzambe. Tángá Luka 6:12 mpe Yoane 15:10; 17:26. Nsima ya kotánga vɛrsɛ mokomoko, yanolá na motuna oyo:

  • Na kolanda ndakisa ya Yesu, ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Yehova?

Yesu azali kobondela.

Yesu azalaki kolinga Tata na ye ya likoló mpe azalaki kosolola na ye mbala na mbala na libondeli

5. Yesu asalisaki bato oyo bazalaki na mposa ya lisalisi

Yesu azalaki kotya bamposa ya bato mosusu liboso ya bamposa na ye. Ata ntango alɛmbaki, asalelaki ntango mpe makasi na ye mpo na kosalisa bato. Tángá Marko 6:30-44, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Na lisolo oyo, ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki komitungisa mpo na basusu?​—Talá vɛrsɛ 31, 34, 41, mpe 42.

  • Nini etindaki Yesu asalisa bato?​—Talá vɛrsɛ 34.

  • Lokola Yesu amonisaka bizaleli ya Yehova, yango eteyi yo nini mpo na Yehova?

  • Tokoki kosala nini mpo na komonisa ete tozali komitungisa mpo na basusu?

Yesu aleisi bankóto ya bato na ndenge ya likamwisi kaka na mwa mampa mpe mwa mbisi. Bayekoli bazali kopesa biloko na mibali, basi mpe bana.

6. Yesu akabaka

Yesu azalaki kokaba atako azalaki na biloko mingi te, mpe ayebisi biso tókabaka. Tángá Misala 20:35, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge Yesu amonisi yango, tosengeli kosala nini mpo tózala na esengo?

Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

VIDEO: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa”​—Video ya mokuse (4:00)

  • Tokoki kopesa basusu nini ata soki tozali na biloko mingi te?

Oyebaki yango?

Biblia elendisi biso tóbondelaka Yehova na nkombo ya Yesu. (Tángá Yoane 16:23, 24.) Soki tobondeli bongo, tokomonisa ete tozali na botɔndi na oyo Yesu asalaki mpo na kosalisa biso tókóma baninga ya Yehova.

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Bampasi nyonso oyo ekómelaka biso ezali kaka mokano ya Nzambe.”

  • Lokola Yesu amekolaki bizaleli ya Tata na ye, ndenge nini makambo oyo asalaki emonisi ete Yehova abimiselaka bato bampasi te?

NA MOKUSE

Yesu alingaka Yehova mpe alingaka bato. Yesu azali lokola Tata na ye. Soki toyekoli koyeba Yesu malamumalamu, tokoyeba mpe Yehova malamu.

Bozongeli

  • Na ndakisa ya Yesu, ndenge nini biso mpe tokoki komonisa ete tolingaka Yehova?

  • Na ndakisa ya Yesu, ndenge nini biso mpe tokoki komonisa ete tolingaka bato?

  • Ezaleli nini ya Yesu osepelaka na yango mingi?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá bizaleli mosusu ya Yesu oyo tokoki komekola.

“Mpo omekola Yesu, . . .” (Yesu azali nzela, solo mpe bomoi, lokasa 317)

Talá mpo na nini ezali na ntina kobondela na nkombo ya Yesu.

“Mpo na nini kobondelaka na nkombo ya Yesu?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/2008)

Biblia elobeli ndenge oyo Yesu azalaki komonana na miso?

“Yesu azalaki ndenge nini?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Mateya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yesu azalaki kosalela basi makambo?

“Nzambe alingaka bápesa basi lokumu mpe limemya” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/09/2012)

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto