Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 25 lok. 64-lok. 65 par. 6
  • Mawa etindi ye abikisa moto ya maba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mawa etindi ye abikisa moto ya maba
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Ayoki mawa mpo na moto na maba
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • “Koyeba bolingo ya Klisto”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Obosanaka koloba mɛrsi?
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Azalaki kolinga bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 25 lok. 64-lok. 65 par. 6
Yesu asimbi moto moko ya maba oyo agumbami liboso na ye

MOKAPO 25

Mawa etindi ye abikisa moto ya maba

MATAI 8:1-4 MARKO 1:40-45 LUKA 5:12-16

  • YESU ABIKISI MOTO YA MABA

Ntango Yesu ná bayekoli na ye minei bakei kosakola na ‘basinagoga na Galile mobimba,’ nsango ya makamwisi ya Yesu epalangani bipai nyonso. (Marko 1:39) Nsango yango ekómi na engumba epai mobali moko oyo azali na maba afandaka. Monganga Luka alobi ete mobali yango “atondá na maba.” (Luka 5:12) Soki maladi mabe yango eumeli mingi, elyaka biteni mosusu ya nzoto mokemoke.

Na yango, moto yango azali mpenza na mpasi mpe asengeli kofanda mosika na bato. Longola yango, asengeli kobelela ete: “Mbindo, mbindo!” soki bato bakómi pene mpo na kokebisa bango bápusana pene na ye te, noki bázwa maladi yango. (Balevi 13:45, 46) Kasi, likambo nini moto wana ya maba asali sikoyo? Apusani pene na Yesu, afukami liboso na ye, mpe abondeli ye: “Nkolo, soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.”​—Matai 8:2.

Mobali yango andimeli mpenza Yesu! Na ntembe te, maladi yango ekómisi ye mpenza moto ya mawa! Yesu akosala nini? Olingaki kosala nini soki ozalaki wana? Yesu ayokeli mobali yango mawa, yango wana asemboli lobɔkɔ mpe asimbi ye. Alobi na ye: “Nalingi. Kómá pɛto.” (Matai 8:3) Likambo ya kokamwa, mobali yango oyo azali na maladi ya maba abiki mbala moko.

Okosepela kozala na mokonzi oyo ayokelaka bato mawa mpe asalaka makambo lokola Yesu? Likambo oyo Yesu asaleli moto wana ya maba endimisi biso ete ntango akozala Mokonzi ya mabele mobimba, esakweli oyo ya Biblia ekokokisama: “Akoyokela moto oyo azangá ná mobola mawa, mpe akobikisa milimo ya babola.” (Nzembo 72:13) Ya solo, Yesu akokokisa mposa ya motema na ye ya kosalisa bato nyonso oyo bazali komona mpasi.

Kobosana te ete ata liboso ya kobikisa moto wana ya maba, bato bazalaki kosepela mingi na mosala ya kosakola ya Yesu. Sikoyo, bato bakoyoka nsango ya likamwisi yango. Kasi, Yesu alingi te ete bato bándimela ye kaka mpo na bansango oyo bazali koyoka. Ayebi esakweli oyo elobi ete “akoyokisa mongongo na ye na balabala te,” elingi koloba akobenda likebi ya bato te. (Yisaya 42:1, 2) Yango wana, Yesu apesi moto ya maba yango etinda oyo: “Kebá, koyebisa moto te, kasi kende komilakisa epai ya nganga-nzambe, mpe pesá likabo oyo Moize atindaki.”​—Matai 8:4.

Kasi, lokola moto yango abiki, azali na esengo makasi, akoki kokanga monɔkɔ te. Akei mpe apalanganisi nsango bipai nyonso. Nsango yango elamwisi mposa ya bato mpe etindi bango báluka koyeba likambo oyo esalemi. Yango esali ete Yesu akoka lisusu te kokɔta polele na engumba moko, yango wana akei kofanda mwa moke kaka ye moko na bisika oyo bato bazali te. Atako bongo, bato bauti bipai nyonso bayei mpo ateya bango mpe abikisa bango.

  • Maladi ya maba ekoki kosala moto nini, mpe moto ya maba asengelaki kosala nini?

  • Moto ya maba asali nini liboso ya Yesu, mpe tokoki koloba nini mpo na makambo oyo Yesu asali?

  • Moto oyo Yesu abikisi na maladi ya maba asali nini, mpe yango ebimisi nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto