-
Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
-
-
2. Makambo nini ezali kosalema na mokili mpe bizaleli nini bato bakómi na yango banda 1914?
Bayekoli ya Yesu batunaki Yesu boye: “Elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe eleko ya nsuka ya mokili?” (Matai 24:3) Yesu ayebisaki bango makambo mingi oyo ekosalema ntango akokóma Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe mpe akobanda koyangela na likoló. Na kati ya makambo yango, tokoki kotánga: bitumba, nzala, mpe koningana ya mabele. (Tángá Matai 24:7.) Biblia esakolaki mpe bizaleli oyo bato bakozala na yango na “mikolo ya nsuka,” oyo ekosala ete bomoi ekóma “mpasi mpenza.” (2 Timote 3:1-5) Makambo yango mpe bizaleli yango ekómaki komonana polele mingimingi banda 1914.
3. Mpo na nini mokili ebebá makasi banda Bokonzi ya Nzambe ebandá koyangela?
Mwa moke nsima ya kokóma Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe, Yesu abundaki na Satana ná bademo na likoló. Kasi, Satana alongaki etumba yango te. Biblia elobi ete ‘abwakami na mabele, mpe baanzelu na ye babwakami na nse elongo na ye.’ (Emoniseli 12:9, 10, 12) Satana azali na nkanda makasi mpo ayebi ete akobomama. Yango wana abimisaka bampasi mpe minyoko na mabele mobimba. Yango nde ntina oyo mokili ebebá makasi. Kasi Bokonzi ya Nzambe ekosilisa bampasi yango nyonso.
-
-
Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
-
-
5. Mokili ebongwaná banda 1914
Yesu asakolaki makambo oyo ekomonana polele na mokili ntango akokóma Mokonzi. Tángá Luka 21:9-11, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:
Na makambo oyo Yesu asakolaki, makambo nini ozali komona to koyoka?
Ntoma Paulo amonisaki ndenge bizaleli ya bato ekozala na mikolo ya nsuka ya boyangeli ya bato. Tángá 2 Timote 3:1-5, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:
Bizaleli nini ozali komona lelo epai ya bato?
-