Bobángi—Ezali Mingi sikawa kasi ekoumela seko te!
BAYEKOLI ya Liloba ya Nzambe bazali kokamwa te na komona ete bobángi epalangani mpenza mingi. Lokola Batatoli ya Yehova basili komonisa yango polele kati na mosala na bango ya kosakola, ezali na bilembeteli mingi oyo bizali komonisa ete tozali kobika na eleko moko oyo ekeseni na bileko nyonso na lisoló ya bato. Oyebi ete ezali eleko oyo na boumeli na yango bobángi epalangani mingi. Kasi ntango mingi liboso na yango Yesu amonisaki, to alobelaki mikolo na biso. Azalaki koyanola na mituna ya bantoma na ye na ntina na kozala na ye mpe na nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo, to ‘nsuka ya mokili.’—Matai 24:3.
Talá ndambo na makambo oyo Yesu asakolaki:
“Libota moko ekotɛmɛla libota mosusu, bokonzi moko ekotɛmɛla bokonzi mosusu. Mokili ekoningana mingi, mpe na esika na esika malali mabe na nzala ikozala, na makambo na nsɔ́mɔ, na bilembo minene na Likoló.”—Luka 21:10, 11.
Omonaki maloba na ye na ntina na “makambo na nsɔ́mɔ”? Na nsima, bobele kati na eyano wana, Yesu abendaki lisusu likebi na ntina na bobángi oyo esengelaki kozala na bopusi makasi likoló na yo mpe na balingami na yo. Kasi liboso ete tótya likebi na yango, tótalela naino na bokuse elembeteli mosusu oyo emonisi ete tozali kobika na mikolo ya nsuka.—2 Timoté 3:1.
Tozali na elónga ya kobanga bitumba
Bitumba bisili kobebisa bamboka mingi. Na ndakisa, zulunalo Geo ebéngaki mabulu ya pitɔlɔ́ oyo matyamaki mɔ́tɔ na nsuka ya etumba oyo eutaki kosalema na Moyen-Orient ete ezali “likámá lileki monene ya ezingelo oyo lisili kosalema na mabɔ́kɔ na bato.” Bitumba bisili koboma to kokómisa ebele ya bamilió ya bato bibɔsɔnɔ. Likoló na bamilió ya basodá mpe basivíli oyo babomamaki na Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba, bamilió 55 babomamaki na Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba. Omikundola ete, lokola eteni ya elembo ete nsuka ya mokili ebɛlɛmi, Yesu alobaki ete “libota moko [esengelaki] kotɛmɛla libota mosusu, mpe bokonzi moko ekotɛmɛla bokonzi mosusu.”
Tosengeli mpe kobosana te makaneli mabe oyo bato bakanaki mpo na oyo ebéngami génocide—kolimwisa bato ya mposo to ya bikólo mosusu. Kobomama ya bamilió ya ba Arméniens, ba Cambodgiens, Bayuda, ba Rwandais, ba Ukrainiens mpe basusu esili kobakisama na nyongo monene ya makila oyo bato basopaki na ekeke oyo ya 20. Kobomama yango ezali naino kolandana kati na bamboka epai koyinana ya bato ya bikólo bikeseni ezali kopelisama na bato ya milende mabe ya mangomba. Ee, bitumba bizali naino kopolisa mabelé na makila ya bato.
Bitumba ya ntango na biso bizali koboma bato ata nsima wana mampinga masili kotika kobunda. Na ndakisa, kanisá na ntina na ba mine oyo ekundami bipai binso. Engebene lapólo moko euti na bolukiluki ya lisangá Human Rights Watch (Bosɛnzɛli ya Ntómo ya Bato), “pene na ba mine milió 100 ezali kotya bomoi ya basivíli na likámá kati na mokili mobimba.” Ba mine lolenge yango ezali kokóba kotya na likámá mibali, basi mpe bana oyo basali eloko te ata ntango molai nsima ya etumba oyo kati na yango esalelamaki. Eyebisami ete sanza na sanza bankóto na bato bazali kozoka pota monene to kobomama na ba mine oyo ekundamaki na mabelé kati na bamboka koleka 60. Mpo na nini likámá wana ya kolongola bomoi to ya kozokisa esili mpenza te? Zulunalo The New York Times emonisaki ete: “Motángo ya ba mine oyo bazali kotya na mabelé mokolo na mokolo ezali mingi koleka oyo ezali kolongolama na baoyo bapesameli mokumba ya kolongola ba mine, na yango motángo ya baoyo bazali kozwa likámá mozali ntango nyonso sé kobakisama.”
Lisoló ya zulunalo yango ya 1993 limonisaki ete kotekisama ya ba mine esili kokóma mombongo oyo “ezali kokɔtisa mosolo koleka bamilió 200 ya badolare mbula na mbula.” Yango esangisi “bakompanyi mpe masangá ya biyangeli 100 kati na bamboka 48” oyo “esili koteka na mboka bopaya lolenge 340 ekeseni” ya ba mine. Likambo ya nsɔ́mɔ mpenza, ba mine mosusu esalemi mpo ete emonana lokola biloko ya masano mpo ekoka kobenda bana! Kanisá naino, kotya motambo na nkó mpo na kozokisa mpe koboma bana oyo basali likambo te! Lisoló ya zulunalo moko lizalaki na motó ya likambo “Bamilió 100 ya bamasini ya likámá” elobaki ete ba mine esili “koboma to kozokisa bato koleka bitumba ebéngami guerre chimique, guerre biologique mpe guerre nucléaire.”
Kasi ba mine oyo ekundami na mabelé ezali te lolenge bobele moko ya biloko ya koboma bato oyo ezali kotekisama kati na mokili mobimba. Na mokili mobimba, bato na lokoso oyo batekisaka bibundeli bazali kosala mombongo oyo ezali kopesa bango ebele ya bamiliare ya badolare. Zulunalo The Defense Monitor, oyo ebimisami na Center for Defense Information, elobi ete: “Na boumeli ya bambula zomi oyo euti koleka [ekólo moko ya bozwi mingi] etekisaki na bamboka mosusu bibundeli mpo na motuya ya mosolo ya badolare miliare 135.” Lisusu, ekólo wana ya nguya “epesaki ndingisa ya kotekisa bibundeli, kotonga ndako ya basodá mpe kobongisa basodá kati na bikólo 142 mpo na motuya monene ya mosolo miliare 63 ya badolare.” Na yango mbóto ezali kolónama mpo na bitumba mpe mpasi ya bato na mikolo mizali koya. Engebene zulunalo The Defense Monitor, “bobele na 1990, bitumba ekamataki bato milió 5, esɛngaki mosolo koleka miliare 50 ya badolare mpe ebomaki soko 250000, oyo mingi kati na bango bazalaki basivíli.” Na ntembe te, okoki kokanisa na ntina na ebele ya bitumba oyo esalemaki kobanda mobu wana, oyo esili komema bobángi mpe kufa epai na bamilió ya bato!
Kobebisama monene ya mabelé mpe bikelamu na yango ya bomoi
Professeur Barry Commoner apesaki likebisi oyo: “Nakanisi ete kobebisama ya mabelé, soki epekisami te, na nsima ekobebisa makoki ya etando oyo lokola esika oyo ebongi mpo na bomoi ya bato.” Akóbaki na koloba ete mokakatano mozali kouta mpo na kozanga boyebi te kasi mpo na lokoso. Okanisi ete Nzambe na biso oyo azali sembo mpe na bolingo akotika nzela libela mpo na ezalela yango, kotikáká biso kati na bobángi monene ya kobebisama ya ezingelo? Kobebisama ya mabelé ezali kosɛnga ete baoyo babebisaki yango bázongisa monɔkɔ mpe na nsima Nzambe abongisa lisusu etando yango. Yango ezali eteni ya eyano oyo Yesu apesaki na bantoma na ye na ntina na ‘nsuka ya mokili.’
Liboso ete tólobela lolenge nini Nzambe akomema kosambisama wana, tótalela lisusu misala ya bato. Ata ndambo moke ya makambo mabe oyo bato basili kosala ezali kopesa mawa: Mbula ya acide mpe motindo ya kotonga ndako oyo epusami na lokoso ezali kosilisa bazamba minene; bopotu na likambo ya kobwaka mintika ya biloko ya nikleere, biloko oyo bizali na ngɛngɛ, mpe mai ya bosoto; koyeisa pɛ́pɛ́lɛ ezipeli ya ozone oyo ebatelaka mabelé; mpe kozanga bokɛngi na lolenge ya kosalela nkísi ya koboma matiti mabe mpe ya koboma banyama oyo ebebisaka milóna.
Boluki matomba ya nkita ezali kobebisa mabelé na lolenge mosusu mpo na kozwa mosolo. Batone ya bosoto ezali kosopama mokolo na mokolo kati na bibale, na mai monene, na mopɛpɛ mpe na mabelé. Bato ya siansi bazali kopalanganisa bosoto ya mintika ya bamasini na likoló, kozanga kolongola yango. Mabelé mazali mpenza kozingama na ekunde oyo ezali kozolongana zingazinga na yango. Soki ezalaki te mpo na nguya ya komizongisa sika oyo Nzambe atyaki kati na yango, mbɛlɛ mabelé oyo ezali efandelo na biso ekokaki lisusu te kosimba bomoi na biso, mpe mbɛlɛ moto asili kokufa mpo na bosoto oyo ye moko atyaki yango.
Moto azali nkutu komibebisa ye moko. Na ndakisa, tókamata makaya, mpe bilangwiseli mosusu. Na Etats-Unis, esaleli mabe ya biloko motindo yango ebéngamaki “mokakatano ya liboso ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto kati na ekólo.” Yango ezali kosɛnga mosolo bamiliare 238 ya badolare mbula na mbula na mboka wana, oyo kati na yango bamiliare 34 ya badolare ezali kobebisama “mpambampamba [elingi koloba, ekokaki kobatelama] mpo na kosalisa nzoto.” Okanisi ete makaya mazali kozwa mosolo mpe bomoi ya bato boni na mboka epai ofandi?
Motindo ya bomoi oyo ezali kopesa nzela na makambo nyonso, oyo bato mingi bazali koluka yango na makasi lokola lotómo na bango, esili kobimisa bokɔnɔ ya nsɔ́mɔ ya koboma bato oyo ezwamaka mpo na bosangisi nzoto, oyo esili koboma basusu nokinoki. Emonanaki ete bansango ya mawa kati na bazulunalo ya bingumba minene ezali sikawa kotánga nkombo ya bato mingi oyo bazali kokufa wana ezali bango naino na bambula 30 to 40. Mpo na nini? Mbala mingi ezali bongo mpo na mbuma ya bizaleli mabe oyo bakólisaki na bomoi na bango. Bokóli ya nsɔ́mɔ wana ya bokɔnɔ oyo bozwamaka na bosangisi nzoto mpe makɔnɔ mosusu ekokani mpe na esakweli ya Yesu, mpamba te alobaki ete “na esika na esika malali mabe ekozala.”
Nzokande, kobebisama oyo eleki mabe, ezali oyo ya makanisi mpe ya elimo ya bato to ya ezaleli na bango. Soki otaleli lolenge nyonso ya kobebisama oyo tolobeli kino awa, ezali solo ete mingi na yango esalemi bongo na kobebisama ya makanisi, boye te? Talá likámá monene ya koboma bato, ya kobebisa basi, ya miyibi mpe ya lolenge mosusu ya mobulu oyo kobeba ya makanisi ezali kopusa bato na kosala yango epai na basusu. Mingi bazali mpe kondima ete, bamilió ya zemi oyo ezali kosopama mbula na mbula ezali elembo ya makanisi mpe elimo oyo esili kobeba.
Tozali komona makambo mingi kati na ezaleli ya bilenge. Kozanga botosi epai na baboti mpe bato mosusu oyo bazali na bokonzi ezali komema kobebisama ya libota mpe kotyola mibeko mpe molɔngɔ́. Kozanga bobángi epai na baoyo bazali na bokonzi ekangisami mpenza na kozanga ezaleli ya elimo epai na bilenge. Na yango, baoyo bazali koteya evolisyó, liteya oyo ete Nzambe azali te, mpe mateya mosusu oyo mazali kobebisa kondima epai na Nzambe bazali na mokumba monene. Lisusu, bateyi mingi ya mangomba bazali na ngambo, baoyo, kati na milende na bango ya kondimama lokola bato oyo bazali na makanisi ya ntango na biso mpe “babongi,” bazali koboya kolanda Liloba ya Nzambe. Bango, elongo na basusu oyo bapusami na mayele ya mokili bazali koteya bafilozofi ya bato oyo ezali bongolabongola.
Lelo oyo mbuma na yango emonani polele. Bato bapusami, na bolingo ya Nzambe mpe ya bazalani na bango te, kasi bapusami na lokoso mpe na koyina. Mbuma mabe na yango ezali bongo pite, mobulu mpe kozanga elikya oyo esili kopalangana mingi. Likambo ya mawa, yango ezali kotika bato ya kolongobana kati na bobángi, bakisá mpe bobángi ya komona bato komilimwisa bango moko elongo na etando na bango.
Makambo makokóma mabe mingi to makobonga?
Elikya nini tozali na yango mpo na mikolo mizali koya, mpo na oyo etali bobángi? Bobángi ekolanda kokóla, to ekosila? Tótalela lisusu oyo Yesu alobaki na bantoma na ye.
Alobelaki likambo oyo mosika te likokokisama—bolɔ́zi monene. Talá maloba na ye: “Nokinoki nsima na mpasi na mikolo yango, moi ekoyinda mpe sanza ekopesa pole na yango te mpe myoto ikokweakwea longwa na likoló, mpe nguya na lola ikotetema. Bongo elembo na Mwana na moto ekomonana na Likoló mpe mabota nyonso na mokili bakolela mpe bakomona Mwana na moto azali koya na mapata na Likoló na nguya mpe na nkembo mingi elongo.”—Matai 24:29, 30.
Na yango tokoki komizela ete bolɔ́zi monene bokobanda mpenza mosika te. Bisakweli mosusu ya Biblia bizali komonisa ete eteni na yango ya liboso ekozala etumbu epai na mangomba ya lokuta kati na mokili mobimba. Na nsima nde ekozala makambo ya nsɔ́mɔ oyo malobelami na maloba oyo matángami awa, bakisá mpe bilembo ya likoló ya lolenge mosusu. Yango ekozala na bopusi nini likoló na bamilió ya bato?
Tótalela mokanda mosusu oyo mozali kolobela eyano wana ya Yesu, epai tozali kokuta bandimbola mingi ya bisakweli:
“Bilembo bikozala kati na moi na sanza na myoto, mpe awa na nsé mitema na mabota mikozala na likoló mpo na mikakatano na konguluma na kotomboka na mai monene. Bato bakosenzwa na nsɔ́mɔ na kotalela makambo makobima kati na mikili, mpo ete nguya oyo na likoló ikoningana.”—Luka 21:25, 26.
Yango ezali bobele liboso na biso. Kasi ezali bato nyonso te nde bakozala na bobángi monene wana oyo ekosala ete básenzwa. Na kokesana, Yesu alobaki ete: “Wana ekobanda makambo oyo kobima, tɛlɛmá alima mpe tombolá mitó na bino, mpo ete lisiko na bino ezali kobɛlɛma.”—Luka 21:28.
Alobaki maloba oyo ya kolendisa epai na bayekoli na ye. Na esika ete básenzwa to ete bábulunganisama na bobángi, bakozala na ntina ya kotombola mitó na bango kozanga kobanga, atako bayebi ete kokokana monene ya bolɔ́zi monene ebɛlɛmi. Mpo na nini basengeli kobanga te?
Mpamba te Biblia elobi polele ete ekozala na babiki na “bolɔ́zi monene” wana. (Emoniseli 7:14) Mokanda oyo mozali kopesa elaka yango molobi ete soki tozali kati na babiki yango, tokozwa mapamboli maleki minene epai na Nzambe. Esukisi na kopesáká endimiseli oyo ete Yesu “akobatela bango, mpe akokamba bango epai na mitó na mai na bomoi. Nzambe mpe akolongola mpisoli nyonso na miso na bango.”—Emoniseli 7:16, 17.
Baoyo—biso mpe tokoki kozala kati na bango—bazali na mapamboli motindo oyo bakozala te na bobángi oyo esili kokwela bato na mikolo na biso. Nzokande, yango elingi koloba te ete bakozala mpenza na bobángi soko moke te, mpamba te Biblia ezali komonisa ete ezali na bobángi ya malamu mpe oyo ezali kopesa litomba. Lisoló oyo likolanda likomonisa soki yango ezali nini mpe lolenge nini yango esengeli kozala na bopusi likoló na biso.
[Elilingi na lokasa 8]
Basaleli ya Yehova bazali kozela na esengo nyonso mokili ya sika oyo mosili kobɛlɛma
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 7]
Pollution: Photo: Godo-Foto; rocket: U.S. Army photo; nzeté ezali kozika: Richard Bierregaard, Smithsonian Institution