Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/10 nk. 3-5
  • Mpo na nini ezali na ntina mingi ‘tósɛnzɛlaka’?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini ezali na ntina mingi ‘tósɛnzɛlaka’?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Batyaki likebi te”
  • “Bómilɛngɛla”
  • Ndenge oyo toyebi ete Armagedona ekómi pene
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Oyebaka elembo ya kozala ya Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Bantoma batuni elembo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Mpo na nini tosengeli ‘kosɛnzɛlaka’?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/10 nk. 3-5

Mpo na nini ezali na ntina mingi ‘tósɛnzɛlaka’?

BAYEKOLI ya Yesu batunaki ye boye: “Elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo?” (Mat. 24:3) Mpo na koyanola motuna yango, Yesu apesaki bango elembo moko ya polele, oyo esangisi makambo ebele mpe ekoki koyebana malamu, ndenge ezali na Matai mokapo 24, Marko mokapo 13, mpe Luka mokapo 21. Na nsima, abakisaki boye: “Bósɛnzɛlaka.”​—Mat. 24:42.

Lokola elembo yango moko esengelaki komonana polele, mpo na nini abakisaki likebisi wana? Ekoki kozala mpo na ntina mibale oyo elandi. Ya liboso, makambo mosusu ekoki kobenda likebi ya bato mosusu mpe kotinda bango bábosana elembo. Na bongo, kondima na bango ekoki kolɛmba mpe bakoki kotika kosɛnzɛla. Ya mibale, mokristo akoki koyeba malamu makambo oyo ezali na elembo, kasi ndenge makambo ezali na esika oyo afandi ekoki kotinda ye amona ete elembo yango etali ye mpenza te. Na yango, akoki kokanisa ete ‘bolɔzi monene,’ oyo Yesu alobaki ete ekoya nsima ya makambo wana ezali naino mosika mpe ete azali na ntina ya ‘kosɛnzɛla’ te.​—Mat. 24:21.

“Batyaki likebi te”

Yesu alobelaki bato ya ntango ya Noa. Ayebisaki bayekoli na ye ete bato yango bamonaki Noa azali kosakola, kotonga masuwa moko ya monene, mpe bamonaki mobulu oyo ezalaki na mikolo wana. Kasi, mingi “batyaki likebi te.” (Mat. 24:37-39) Lelo mpe, bato mingi batyaka likebi na makebisi te. Na ndakisa, bilembo mosusu oyo batyaka na nzela emonisaka polele ete esengeli kokitisa vitɛsi ya motuka, kasi basofɛlɛ mingi bakipaka yango te. Mbala mingi bakonzi bamonaka malamu ete bátya matutu na babalabala mpo basofɛlɛ bálɛmbisa vitɛsi na bisika yango. Ndenge moko mpe, mokristo akoki komona elembo ya ntango ya nsuka, kasi atako bongo akoki komipesa na makambo oyo ekopekisa ye atya likebi na elembo yango. Yango nde ekómelaki Arielle, elenge mwasi moko na Afrika ya Wɛsti.

Arielle azalaki kosepela kotala na televizyo ndenge bana-basi bazalaki kobɛta bale ya mabɔkɔ (handball). Eteyelo na bango esalaki ekipi moko mpo na lisano yango. Lokola alingaki kobɛta yango, abosanaki kotalela makama oyo ekokaki koyela ye mpe kobebisa kondima na ye. Apesaki nkombo mpo azala moto oyo ayambaka bale (gardien). Esukaki boni? Alobi boye: “Bana basi ya ekipi na biso bazalaki na bamakango oyo bazalaki komɛla bangi mpe makaya. Bazalaki kosɛka ngai mpo nazalaki lokola bango te, kasi namonaki ete ekosala eloko te. Nzokande, lisano yango moko nde ekómaki kobebisa kondima na ngai. Nazalaki ntango nyonso kokanisa yango. Ntango nazali na makita na Ndako ya Bokonzi, mbala mingi makanisi na ngai ezalaki kozonga na esika ya kobɛta bale. Nakómaki mpe na bizaleli mosusu oyo ebongi na bakristo te. Na ebandeli, nazalaki kolinga kaka kobɛta, kasi na nsima nakómaki nde na mposa makasi ya kolonga. Namipesaki na lisano yango mpo, lokola nakómaki na elimo ya kowelana, nalingaki kaka kolonga. Mitungisi ebakisamaki mingi. Naboyaki ata baninga na ngai mpo na lisano ya bale.

“Namonaki ete nakómi mpenza mosika mokolo moko, ntango ekipi oyo tozalaki kobɛta na bango basengelaki kobɛta penalty. Natɛlɛmaki wana mpo na koyamba bale. Kozanga koyeba, nabondelaki Yehova asalisa ngai nakanga bale yango! Mokolo wana, namonaki ete makanisi na ngai elongwá mpenza na makambo ya Nzambe. Ndenge nini nazongelaki makambo ya Nzambe?

“Kala, natalaki video Mituna oyo bilenge batunaka​—Nakosala nini na bomoi na ngai?a (Na Lifalanse) Namonaki malamu natala yango lisusu mpe na mbala oyo, natyela yango mpenza likebi. Namonaki ete ngai mpe nakómaki na mokakatano lokola oyo ya André, elenge mobali oyo balobeli na video yango. Nasepelaki mingi na toli oyo nkulutu moko apesaki André ete atánga mpe akanisa malamumalamu Bafilipi 3:8. Ntango ngai mpe nasalaki bongo, makambo ebongwanaki. Nalongwaki na ekipi yango.

“Bomoi na ngai ebongwanaki! Elimo ya kowelana mpe mitungisi oyo yango ememelaki ngai esilaki. Nakómaki na esengo mingi mpe boninga ngai na bandeko ya lisangá ekómaki makasi koleka. Nakómaki komipesa mingi na makambo ya elimo. Nazalaki kolanda makita malamu mpe kolinga yango lisusu. Nakómaki mpe kosakola mingi. Lelo oyo, nasalaka mosala ya mobongisi-nzela mosungi mbala na mbala.”

Soki likambo moko ezali kobosanisa yo elembo oyo Yesu apesaki, salá makasi mpo obongisa makambo, ndenge Arielle asalaki. Meká kosalela mwa batoli oyo. Zwá Index des publications Watch Tower. Ekolakisa yo mikanda oyo ezali na batoli ya malamu mpe masolo ya bandeko mosusu oyo balongaki komekama. Bongisáká makita malamu mpe komáká makambo ya ntina oyo okosalela. Bandeko mosusu bamonaka ete soki bafandi na bakiti ya liboso, balandaka malamu. Soki lisolo esɛngi ete bayangani mpe báloba, salá makasi opesa eyano na ebandeli. Lisusu, lukáká koyeba ndenge makambo oyo ezali koleka na mokili ezali komonisa polele ete tozali na “mikolo ya nsuka”; yango ekosalisa yo olala mpɔngi te na elimo.​—2 Tim. 3:1-5; 2 Pe. 3:3, 4; Em. 6:1-8.

“Bómilɛngɛla”

Elembo ya mikolo ya nsuka etali “mabele mobimba esika bato bafandi.” (Mat. 24:7, 14) Na bisika mosusu, bato mingi mpenza bazali konyokwama mpo na bamaladi mabe, nzala, koningana ya mabele, mpe makambo mosusu oyo esakolamaki. Nzokande, na bisika mosusu mpe bato bazali na kimya. Soki makambo mosusu oyo ezali na kati ya elembo ekómelá yo naino te, osengeli nde kokanisa ete bolɔzi monene ezali mosika? Kokanisa bongo ekozala bwanya te.

Kanisá naino: Yesu alobaki mpenza nini mpo na “bamaladi mabe mpe nzala”? (Luka 21:11) Ya liboso, alobaki te ete makambo yango ekosalema na bisika nyonso na mbala moko to ndenge moko. Alobaki nde ete makambo yango ekosalema “na bisika ndenge na ndenge.” Na yango, tosengeli te kozela ete makambo ya ndenge moko esalema bisika nyonso na mbala moko. Ya mibale, mwa moke nsima ya koloba ete nzala ekozala, Yesu amonisaki ete bayekoli na ye mosusu basengeli kokeba mpo bálekisa ndelo te na kolya. Alobaki boye: “Bókeba ete mitema na bino ekóma kilo te na kolekisa ndelo na kolya.” (Luka 21:34) Na yango, bakristo nyonso basengeli kolikya te kokutana na likambo nyonso oyo ezali na elembo. Yesu alobaki boye: “Ntango bokomona makambo yango ezali kosalema, bóyeba ete bokonzi ya Nzambe ekómi pene.” (Luka 21:31) Lelo oyo, televizyo, Internet mpe biloko mosusu ya ndenge wana ezali kosalisa biso tómona makambo nyonso oyo ezali na elembo, ata soki makambo ezali ndenge nini na esika tofandi.

Kobosana mpe te ete Yehova asilá kotya ‘mokolo mpe ngonga’ oyo bolɔzi monene ekobanda. (Mat. 24:36) Makambo oyo ezali koleka na mokili ekobongola yango te.

Yesu akebisaki bakristo nyonso ete: “Bómilɛngɛla.” (Mat. 24:44) Tosengeli ntango nyonso kozala bato oyo bamilɛngɛli. Ya solo, tokoki te komipesa na makambo ya elimo mikolo nyonso banda ntɔngɔ tii mpokwa. Lisusu, moko te kati na biso ayebi soki bolɔzi monene ekokuta ye azali kosala nini. Ekoki kokuta bamosusu na bilanga to na ndako bazali kosala misala. (Mat. 24:40, 41) Na yango, tokoki kosala nini mpo tózala bato oyo bamilɛngɛli?

Emmanuel ná Victorine, mpe bana na bango motoba ya basi bafandaka na ekólo moko ya Afrika. Kuna, bakutanaka te na makambo mosusu oyo ezali na elembo. Na yango, bamonaki malamu ete básololaka makambo ya elimo mikolo nyonso mpo bámilɛngɛla. Emmanuel alobi boye: “Ezalaki mpasi tózwa ngonga oyo ebongi mpo na biso nyonso. Nsukansuka, toponaki ngonga ya 6:00 tii na 6:30 ya ntɔngɔ. Na miniti 30 yango, tobandaka na kotalela mokapo ya mokolo. Na nsima, tobongisaka mwa baparagrafe ya mokanda moko oyo tokoyekola na makita ya pɔsɔ wana.” Kosala bongo esalisaka bango bámilɛngɛla? Ɛɛ! Emmanuel azali mokambi-misala ya bankulutu. Victorine asalaka mosala ya mobongisi-nzela mosungi mbala na mbala mpe asalisi bato mingi bándima solo. Bana na bango nyonso ya basi bazali kokende liboso na mosala ya Nzambe.

Yesu akebisaki biso ete: “Bókebaka, bólala mpɔngi te.” (Mrk. 13:33) Kotika eloko moko te elɛmbisa yo mpo otika kozala ekɛngɛ na elimo. Tyáká nde likebi na toli ya malamu oyo tozwaka na mikanda na biso mpe na makita, ndenge Arielle asalaki. Ndenge Emmanuel ná libota na ye basalaka mokolo na mokolo, yo mpe saláká likambo moko oyo ekosalisa yo omilɛngɛla mpe ‘osɛnzɛlaka.’

[Maloba na nse ya lokasa]

a Video yango elobeli elenge mokristo moko oyo azali kobunda mpo na kosala oyo ezali malamu na miso ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 4]

Kosolola makambo ya Nzambe mokolo na mokolo esalisaka Emmanuel ná libota na ye ‘bámilɛngɛla’

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto