Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • kl mok. 10 nk. 90-97
  • Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BOKONZI OYO EZALI NA MOKANO
  • BOKONZI YA NZAMBE EZALI SOLO
  • BOKONZI EBANDI KOYANGELA—NTANGO NINI?
  • Bokonzi ya Nzambe eleki na makambo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Bokonzi oyo “bokobebisama soko moke te”
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
Makambo mosusu
Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
kl mok. 10 nk. 90-97

Mokapo 10

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

1, 2. Lolenge nini biyangeli ya bato bimonisi ete bikoki te?

EKOKI kozala ete osili kosomba masini moko mpe na nsima, oyei komona ete ezali kosala malamu te. Tóloba ete obéngaki moto moko oyo abongisaka yango. Nzokande, nokinoki nsima na “kobongisa” masini yango, eyaki kobeba lisusu. Oyo nde likambo ya kolɛmbisa nzoto!

2 Ezali bobele bongo mpo na biyangeli ya bato. Uta kala, bato bazalaka na mposa ya boyangeli oyo ekoki kopesa bango kimya mpe bolamu. Nzokande, milende makasi oyo bazali kosala mpo na kobongisa libota ya bato oyo esili kobeba, ezali mpenza kolónga te. Ebele ya boyokani makasi na ntina na kimya esalemaki—mpe na nsima etosamaki te. Epai mosusu, boyangeli nini ezali na likoki ya kosilisa bobólá, makanisi mabe likoló na bato mosusu, mobulu, bokɔnɔ mpe kobeba ya ezingelo? Boyangeli ya moto ekoki kobonga soko moke te. Ata Salomo, Mokonzi ya Yisraele oyo azalaki na mayele mingi, atunaki ete: “Mpo na oyo etali moto azwami na mabelé, lolenge nini akoki kososola nzela na ye?”—Masese 20:24, NW.

3. (a) Motó na likambo ya kosakola ya Yesu ezalaki nini? (b) Lolenge nini bato mosusu bakaniselaka Bokonzi ya Nzambe?

3 Kasi kozanga elikya te! Boyangeli ya mokili mobimba oyo epikami makasi ezali ndɔ́tɔ mpamba te. Ezalaki motó na likambo ya kosakola ya Yesu. Abéngaki yango “bokonzi ya Nzambe,” mpe ateyaki bayekoli na ye ete bábondelaka mpo na yango. (Luka 11:2; 21:31) Ya solo, Bokonzi ya Nzambe ezali likambo oyo elobelamaka na bantango mosusu kati na mangomba. Bamilió na bato babondelaka mpo na yango mokolo na mokolo ntango bazongelaka Libondeli ya Nkolo (oyo ebéngami lisusu ete Tata na Biso to libondeli ya ndakisa). Kasi bato bayanolaka na mitindo mikeseni soki batuni bango ete: “Bokonzi ya Nzambe ezali nini?” Bamoko balobaka: “Ezali kati na motema.” Basusu babéngaka yango ete likoló. Biblia ezali kolimbola yango polele, lokola tokomona yango.

BOKONZI OYO EZALI NA MOKANO

4, 5. Mpo na nini Yehova aponaki kosala lolenge ya sika ya boyangeli na ye, mpe yango ekokokisa nini?

4 Uta seko na seko, Yehova Nzambe azali Mokonzi, Moyangeli ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. Abongi na etɛlɛmɛlo wana ya lokumu mpamba te azali Mozalisi ya biloko nyonso. (1 Ntango 29:11; Nzembo 103:19; Misala 4:24) Kasi Bokonzi oyo Yesu asakolaki na ntina na yango ezali na esika ya mibale kati na boyangeli ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. Bokonzi wana ya Masiya ezali na mokano na yango ya sikisiki. Kasi mokano yango nini?

5 Lokola esilaki kolimbolama na Mokapo 6, babalani ya liboso batombokelaki bokonzi ya Nzambe. Na ntina na ntembe oyo ebimaki, Yehova aponaki komonisa lolenge ya sika ya boyangeli na ye. Nzambe ayebisaki mokano na ye ya kobimisa “mombóto” oyo ekonyata Nyoka, Satana, mpe ekolongola makambo nyonso oyo mayeisamaki na lisumu oyo bato basangolaki. “Mombóto” ya liboso ezali Yesu Klisto, mpe “bokonzi ya Nzambe” ezali esaleli oyo ekoboma Satana mpo na libela. Na nzela ya Bokonzi wana, Yesu Klisto akosala ete mabelé máyangelama lisusu na nkombo ya Yehova mpe akolóngisa lotómo ya boyangeli ya Nzambe mpo na libela.​—Genese 3:15; Nzembo 2:2-9.

6, 7. (a) Bokonzi ezali epai wapi, mpe nani azali Mokonzi mpe banani bakoyangela elongo na ye? (b) Banani bazali bayangelami ya Bokonzi?

6 Engebene libongoli moko ya maloba ya Yesu epai na Bafalisai ya mabe, ye alobaki ete: “Bokonzi ya Nzambe ezali na kati na bino.” (Luka 17:21, Boyokani ya Sika) Yesu alingaki koloba ete Bokonzi ezalaki kati na mitema mabe ya bato wana oyo basilaki kobeba? Te. Libongoli moko ya sembo ya makomi na Greke ya ebandeli elobi boye ete: “Bokonzi na Nzambe ezali na katikati na bino.” (New World Translation) Yesu, oyo azalaki na katikati na Bayuda, azalaki bongo koloba mpo na ye moko lokola Mokonzi na mikolo mizalaki koya. Na esika ete ezala eloko oyo moto azali na yango kati na motema na ye, Bokonzi ya Nzambe ezali nde boyangeli ya solo, oyo ezali kosala mosala, oyo ezali na mokonzi mpe na bato bayangelami na yango. Ezali boyangeli ya likoló, mpamba te ebéngami “bokonzi ya makoló” mpe “bokonzi ya Nzambe.” (Matai 13:11; Luka 8:10, NW) Kati na emonaneli, mosakoli Danyele amonaki Mokonzi na yango “lokola mwana na moto” kobɛlɛma epai na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe apesamelaki mpo na libela “nguya na nkembo na bokonzi . . . ete mabota mpe mikili mpe nkótá nyonso básalela ye.” (Danyele 7:13, 14) Mokonzi yango azali nani? Biblia ebéngaka Yesu Klisto ete “Mwana na moto.” (Matai 12:40; Luka 17:26) Ee, Yehova aponaki Mwana na ye, Yesu Klisto, ete azala Mokonzi.

7 Kasi Yesu akoyangela ye moko te. Akozala elongo na bato 144 000 oyo “basombamaki longwa na mabelé” mpo na kozala bakonzi mpe banganga esika moko na ye. (Emoniseli 5:9, 10; 14:1, 3, NW; Luka 22:28-30) Bayangelami ya Bokonzi ya Nzambe bakozala bongo libota ya mokili mobimba ya bato oyo bakotosa litambwisi ya Klisto. (Nzembo 72:7, 8) Atako bongo, lolenge nini tokoki kondimisama ete Bokonzi ekolóngisa mpenza boyangeli ya Nzambe mpe ekozongisa paladiso awa na mabelé na biso?

BOKONZI YA NZAMBE EZALI SOLO

8, 9. (a) Ndakisa nini tokoki kopesa mpo na komonisa ete bilaka ya Bokonzi ya Nzambe bibongi kotyamela motema? (b) Mpo na nini tondimi ete Bokonzi ezali solo?

8 Kanisá ete mɔ́tɔ ezikisi ndako na yo. Sikawa moninga moko oyo azali na makoki, alaki yo ete akosalisa yo mpo na kotonga lisusu ndako na yo mpe akopesa bilei mpo na libota na yo. Soki moninga wana alobelaka yo ntango nyonso solo, okozanga kondimela ye? Na mokolo molandi, ntango outi na mosala, okuti ete basáli basili kobanda kopɛtola bosɔtɔ oyo mɔ́tɔ etikaki mpe bilei bisili kopesama na libota na yo. Na ntembe te, okondimisama ete nsima ya mikolo, mbeba nyonso ekobongisama mpe okozala malamu koleka liboso.

9 Bobele bongo, Yehova apesi biso endimiseli ete Bokonzi ezali solo. Lokola emonisami kati na mokanda ya Biblia oyo ete Baebele, makambo mingi matalaki Mibeko mazalaki bililingi ya ebongiseli ya Bokonzi. (Baebele 10:1) Makambo oyo mazalaki komonisa lolenge Bokonzi ya Nzambe ekozala, emonanaki mpe polele kati na bokonzi ya Yisraele oyo ezalaki awa na mabelé. Yango ezalaki lokola biyangeli nyonso te, mpamba te bakonzi na yango bazalaki kofanda na “kiti ya bokonzi ya Yehova.” (1 Ntango 29:23, NW) Epai mosusu, esakolamaki ete: “Nzeté na bokonzi ekolongwa na Yuda te mpe lingenda na mokonzi ekolongwa na kati na makolo na ye te kino ekoya Shiloh mpe bato bakotosa ye.” (Genese 49:10, NW)a Ee, ezalaki kati na molɔngɔ́ ya bakonzi oyo bautaki na libota ya Yuda nde Yesu, Mokonzi na seko ya boyangeli ya Nzambe, asengelaki kobotama.​—Luka 1:32, 33.

10. (a) Ntango nini moboko ya Bokonzi ya Masiya ya Nzambe etyamaki? (b) Mosala nini ya ntina bato oyo bakoyangela elongo na Yesu basengelaki kopalanganisa awa na mabelé?

10 Moboko ya Bokonzi ya Masiya ya Nzambe etyamaki na ntango bantoma ya Yesu baponamaki. (Baefese 2:19, 20; Emoniseli 21:14) Bango bazalaki bato ya liboso kati na ba 144 000 oyo basengeli koyangela kati na likoló lokola bakonzi esika moko na Yesu Klisto. Ntango bazalaki awa na mabelé, bato yango oyo babéngamaki mpo na kozala bakonzi bakamataki esika ya liboso kati na mosala ya kosakola, na kolandáká etindá oyo ya Yesu ete: “Bókenda . . . mpe bózalisa bayekoli na mabota nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.”​—Matai 28:19, NW.

11. Lolenge nini mosala ya kosakola Bokonzi ezali kosalema lelo, mpe matomba nini mazwami?

11 Etindá ya kozalisa bayekoli ezali lelo kotosama lokola emonanaki naino liboso te. Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba, na boyokani na maloba oyo ya esakweli ya Yesu: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo bato bafandi mpo na litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14, NW) Bazali mpe kosangana na mosala monene ya koteya, oyo ezali bongo eteni moko ya mosala ya kosakola Bokonzi. Baoyo nyonso bazali kotosa mibeko mpe mitindá ya Bokonzi ya Nzambe basili kozwa kimya mpe bomoko oyo biyangeli ya bato bikoki te kopesa yango. Nyonso oyo ezali bilembeteli bimonisi polele ete Bokonzi ya Nzambe ezali solo!

12. (a) Mpo na nini ebongi kobénga basakoli ya Bokonzi ete Batatoli ya Yehova? (b) Na nini Bokonzi ya Nzambe ekeseni na biyangeli ya bato?

12 Yehova alobaki na Bayisraele ete: “Bino bozali batatoli na ngai mpe moombo na ngai, oyo nasili kopona yo.” (Yisaya 43:10-12) Yesu, “Motatoli na sembo,” asakolaki na molende nyonso nsango malamu ya Bokonzi. (Emoniseli 1:5; Matai 4:17) Na yango, ebongi ete basakoli ya Bokonzi ya ntango na biso bábéngama Batatoli ya Yehova, nkombo oyo Nzambe apesi bango. Kasi mpo na nini Batatoli balekisaka ntango mingi mpe batyaka milende mingi mpo na kolobela bato mosusu makambo matali Bokonzi ya Nzambe? Basalaka bongo mpamba te Bokonzi nde ezali elikya bobele moko mpo na bato. Biyangeli ya bato bizali kokwea, kasi Bokonzi ya Nzambe ekobebisama soko moke te. Yisaya 9:6, 7 ebéngi Mokonzi na yango, Yesu, “Nkolo na kimya” mpe ebakisi ete: “Kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimya ikosuka te.” Bokonzi ya Nzambe ezali te lokola biyangeli ya bato—oyo emonani lelo mpe lobi ekolongwa. Na solo, Danyele 2:44 elobi ete: “Nzambe na lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te. . . . ekotikala lobiko na lobiko.”

13. (a) Tángá mwa ndambo na mikakatano oyo Bokonzi ya Nzambe ekolónga kosilisa? (b) Mpo na nini tokoki kondimisama ete bilaka ya Nzambe bikokokisama?

13 Mokonzi nani kati na bato akoki kosilisa bitumba, mobulu, bokɔnɔ, nzala mpe likambo ya kokelela ndako mpo na kofanda? Lisusu, motambwisi nani awa na mabelé oyo akoki kosekwisa baoyo basili kokufa? Bokonzi ya Nzambe mpe Mokonzi na yango bakosala makambo wana. Bokonzi ekolɛmba te, motindo moko na masini esalemi malamu te oyo ezali ntango nyonso na mposa ete bábongisaka yango. Nzokande, Bokonzi ya Nzambe ekolónga, mpamba te Yehova alaki ete: “Liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; ekobutwa epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolónga na likambo litindaki ngai yango.” (Yisaya 55:11) Mokano ya Nzambe ekokwea te. Kasi ntango nini Bokonzi esengelaki kobanda koyangela?

BOKONZI EBANDI KOYANGELA—NTANGO NINI?

14. Makanisi nini ya libungá bayekoli ya Yesu bazalaki na yango na ntina na Bokonzi, kasi eloko nini Yesu ayebaki na ntina na eleko ya boyangeli na ye?

14 “Nkolo, ozali kozongisa bokonzi na Yisraele na ntango oyo?” Motuna oyo etunamaki na bayekoli ya Yesu emonisaki ete na ntango wana bayebaki te mokano ya Bokonzi ya Nzambe mpe ntango oyo yango esengelaki kobanda koyangela. Kokebisáká bango ete bakanisakanisa te na ntina na likambo yango, Yesu alobaki ete: “Ezali likambo na bino [te] koyeba ntango soko bilaka bisili Tata kotya na bokonzi na ye moko.” Yesu ayebaki ete boyangeli na ye likoló na mabelé ezalaki mpo na mikolo mizalaki koya, ntango molai nsima ya lisekwa na ye mpe komata na ye na likoló. (Misala 1:6-11; Luka 19:11, 12, 15) Makomami masilaki kosakola yango. Lolenge nini?

15. Lolenge nini Nzembo 110:1 epesi bososoli na ntina na ntango ya boyangeli ya Yesu?

15 Na elobeli ya esakweli, mokonzi Davidi abéngaki Yesu ete “Nkolo” na ye; alobaki ete: “Yehova alobelaki Nkolo na ngai ete, ‘Fandá na lobɔkɔ na ngai na mobali, kino ekotya ngai bayini na yo lokola ebonga mpo na makolo na yo.’ ” (Nzembo 110:1, NW; kokanisá na Misala 2:34-36.) Esakweli wana emonisi ete boyangeli ya Yesu esengelaki te kobanda nokinoki nsima na komata na ye na likoló. Na esika ete ezala bongo, asengelaki naino kozela na lobɔkɔ mobali ya Nzambe. (Baebele 10:12, 13) Kozela wana esengelaki koumela ntango boni? Ntango nini boyangeli na ye esengelaki kobanda? Biblia ezali kosalisa biso na kozwa biyano na mituna wana.

16. Nini esalemaki na mobu 607 L.T.B., mpe lolenge nini yango ekanganaki na Bokonzi ya Nzambe?

16 Engumba bobele moko na mabelé mobimba, kati na yango Nzambe atyaki nkombo na ye ezalaki bongo Yelusaleme. (1 Mikonzi 11:36) Ezalaki mpe mboka-mokonzi ya bokonzi oyo endimamaki na Nzambe awa na mabelé, oyo ezalaki komonisa Bokonzi ya Nzambe oyo ezali na likoló. Na yango, kobebisama ya Yelusaleme na bato ya Babilone na mobu 607 L.T.B. ezalaki na ndimbola monene. Likambo wana lizalaki ebandeli ya eleko molai oyo Nzambe atikaki kotambwisa libota na ye awa na mabelé. Soko bikeke motoba na nsima, Yesu amonisaki ete eleko yango esukaki naino te, mpamba te alobaki ete: “Yelusaleme ekonyatama na mabota kino ekokoka ntango na mabota.”​—Luka 21:24, NW.

17. (a) “Ntango ya mabota” ezali nini, mpe yango esengelaki koumela molai boni? (b) “Ntango ya mabota” ebandaki na mbula nini mpe esukaki na mbula nini?

17 Na boumeli ya “ntango na mabota” biyangeli ya mokili bipesamelaki nzela ya kokata boyangeli oyo endimamaki na Nzambe. Eleko yango ebandaki na kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B., mpe Danyele amonisaki ete yango ekozala na boumeli ya “ntango nsambo.” (Danyele 4:23-25) Yango ekokani na nini? Biblia emonisi ete “ntango” misato na ndambo ekokani na mikolo 1 260. (Emoniseli 12:6, 14) Eleko wana mbala mibale, to ntango nsambo, esengeli kozala mikolo 2 520. Kasi likambo moko ya monene libimaki te na nsuka ya eleko wana mokuse. Nzokande, na kosaleláká “mokolo moko mpo na mbula moko” engebene esakweli ya Danyele mpe kotánga bambula 2 520 kobanda mobu 607 L.T.B., boye tokokóma na mobu 1914 T.B.​—Mituya 14:34; Ezekiele 4:6.

18. Eloko nini Yesu asalaki mwa moke nsima ya kozwa nguya ya Bokonzi, mpe yango ezalaki na bopusi nini mpo na mabelé?

18 Yesu abandaki koyangela na likoló na mbula wana? Na mokapo molandi, tokomona bantina ezwami na Biblia, oyo epesi biso nzela na kondima ete ezali mpenza bongo. Ya solo, ebandeli ya boyangeli ya Yesu esengelaki te komema nokinoki kimya awa na mabelé. Emoniseli 12:7-12 elobi ete bobele mwa moke nsima na kozwa Bokonzi, Yesu asengelaki kobengana Satana mpe baanzelu mabe longwa na likoló. Yango elimbolaki mawa mpo na mabelé, kasi ezali likambo ya kolendisa na kotánga ete Zábolo atikali bobele na “mwa elaka mokuse.” Mosika te, tokozala na likoki ya kosepela bobele te mpo ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela, kasi lisusu mpo ete yango ekomema mapamboli na mabelé mpe epai na bato na botosi. (Nzembo 72:7, 8) Lolenge nini toyebi ete yango ekosalema mosika te?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Nkombo Shiloh elimboli “Ezali mpo na Ye; Ebongi mpo na Ye.” Na nsima, eyaki komonana polele ete “Shiloh” ezalaki Yesu Klisto, “Nkosi oyo abimi na libota na Yuda.” (Emoniseli 5:5) Ba Targums mosusu ya Bayuda ekóma kosalela maloba “Masiya” to “mokonzi Masiya” na esika ya liloba Shiloh.

MEKÁ BOYEBI NA YO

Bokonzi ya Nzambe ezali nini, mpe ezali koyangela uta epai wapi?

Nani azali kotambwisa Bokonzi yango mpe banani bazali bayangelami na yango?

Lolenge nini Yehova amonisi ete Bokonzi na ye ezali solo?

“Ntango ya mabota” ebandaki mbula nini mpe esukaki mbula nini?

[Etanda na lokasa 94]

MWA NDAMBO NA MAKAMBO YA NTINA MATALI BOKONZI YA NZAMBE

• Yehova ayebisi mokano na ye ya kobimisa “mombóto” oyo asengelaki kotuta motó ya Nyoka, Satana Zábolo.​—Genese 3:15.

• Na mobu 1943 L.T.B., Yehova amonisi ete “mombóto” wana asengelaki kozala mokitani moko ya Abalayama.​—Genese 12:1-3, 7; 22:18.

• Kondimana ya Mibeko oyo epesamaki na Yisraele na mobu 1513 L.T.B. ezali “elilingi ya makambo kitoko oyo masengelaki koya.”​—Exode 24:6-8; Baebele 10:1.

• Bokonzi ya Yisraele awa na mabelé, oyo ebandaki na mobu 1117 L.T.B., elandanaki na nsima na bakitani ya Davidi.​—1 Samwele 11:15; 2 Samwele 7:8, 16.

• Yelusaleme ebebisamaki na mobu 607 L.T.B., mpe “ntango ya mabota” ebandi.​—2 Mikonzi 25:8-10, 25, 26; Luka 21:24.

• Na mobu 29 T.B., Yesu apakolami lokola Mokonzi oyo aponami mpe abandi mosala na ye awa na mabelé.​—Matai 3:16, 17; 4:17; 21:9-11.

• Na mobu 33 T.B., Yesu amati na likoló, kuna azali kozela na lobɔkɔ mobali ya Nzambe kino boyangeli na ye ekobanda.​—Misala 5:30, 31; Baebele 10:12, 13.

• Yesu akómi Mokonzi kati na Bokonzi ya likoló na mobu 1914 T.B. mpe “ntango ya mabota” esuki na mbula wana.​—Emoniseli 11:15.

• Satana mpe bademó na ye babwakami zingazinga na mabelé mpe bazali koyeisa bampasi likoló na bato.​—Emoniseli 12:9-12.

• Yesu azali kotambwisa mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba.​—Matai 24:14; 28:19, 20.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto