Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/4 nk. 14-18
  • Kosikolama mpo na kokɔta na mokili ya sika ya boyengebene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosikolama mpo na kokɔta na mokili ya sika ya boyengebene
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bolózi monene”
  • Basaleli ya Nzambe babundisami
  • ‘Kosikolama na bino ezali kobɛlɛma’
  • Mokili ya sika
  • Mpo na nini ezali koumela boye?
  • Kokokisama ya eloko mosusu
  • Etikali moke Bokonzi ya Nzambe esikola biso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tikalá sembo na ntango ya “bolɔzi monene”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Zalá na mpiko, kosikolama ebɛlɛmi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/4 nk. 14-18

Kosikolama mpo na kokɔta na mokili ya sika ya boyengebene

“Bakosepela mpe na kimya na solo.”​—NZEMBO 37:11.

1, 2. (a) Lolenge nini kosikolama oyo Yehova akopesa na eleko na biso ekeseni na kosikolama oyo apesaki na ntango ya kala? (b) Yehova akokamba basaleli na ye kino na mokili ya lolenge nini?

YEHOVA azali Nzambe oyo asikolaka. Na ntango ya kala, asikolaki libota na ye na mabaku mingi. Kosikolama wana ezalaki bobele ya ntango mokuse, mpamba te, na mabaku nyonso wana, ezali ata na moko te oyo Yehova akweisaki bikateli na ye likoló na mokili mobimba ya Satana. Kasi na mikolo na biso, etikali moke Yehova apesa basaleli na ye kosikolama oyo eleki kosikolama nyonso. Na mbala oyo, akolongola elembo nyonso ya ebongiseli ya Satana na mabelé mobimba, mpe akokɔtisa basaleli na ye na mokili ya sika mpe ya seko, oyo etondi na boyengebene.​—2 Petelo 2:9; 3:10-​13.

2 Yehova alaki ete: “Nsima na mwa ntango moke, moto na mabe akozala lisusu te . . . Nde bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya na solo.” (Nzembo 37:10, 11) Mpo na ntango boni? “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29; Matai 5:5) Nzokande, liboso ete yango esalama, mokili oyo ekokwela mpasi oyo yango emoná naino te.

“Bolózi monene”

3. Lolenge nini Yesu alobelaki “bolózi monene”?

3 Na 1914, mokili oyo ekɔtaki na ‘mikolo na yango ya nsuka.’ (2 Timoté 3:1-5, 13) Tosali sikawa mbula 83 kati na eleko wana mpe tokómi pembeni ya nsuka na yango, epai makambo oyo Yesu asakolaki makosalema: “Ekozala na mpasi mingi [“bolózi monene,” NW] lokola emonanaki longwa na ebandeli te. Ekobima mpe boye lisusu te.” (Matai 24:21) Ɛɛ, bolózi yango ekozala mabe koleka Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba, epai kuna bato milió soko 50 bakufaki. Oyo nde kobɛlɛma ya ntango ya nsɔ́mɔ!

4. Mpo na nini bikateli ya Nzambe bikokwela “Babilone Monene”?

4 “Bolózi monene” ekoya pwasa na lolenge ya kokamwa, “na ngonga moko.” (Emoniseli 18:10, NW) Yango ekobanda na kokweisama ya bikateli ya Nzambe likoló na mangomba ya lokuta, oyo Liloba ya Nzambe ebéngi yango ete “Babilone Monene.” (Emoniseli 17:1-6, 15, NW) Babilone ya kala eyebanaki mingi mpo na losambo na yango ya lokuta. Babilone ya lelo ekokani na ndoi na ye ya kala mpe ezali elilingi ya lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta. Ekokisi mokumba ya mwasi na pite na kosaláká boyokani mabe elongo na bakonzi ya politiki. Azali kopesa mabɔkɔ na bitumba na bango mpe azali kopambola ngámbo nyonso mibale ya mapinga oyo mazali kobunda moko na mosusu, mpe yango esali ete bato ya lingomba moko babomanaka bango na bango. (Matai 26:51, 52; 1 Yoane 4:20, 21) Azali kokanga miso na misala mabe ya basangani na ye mpe azali konyokola baklisto ya solo.​—Emoniseli 18:5, 24.

5. Lolenge nini “bolózi monene” ekobanda?

5 “Bolózi monene” ekobanda ntango bakonzi ya politiki bakobalukela “Babilone Monene” na pwasa. “Bakoyina mwasi na pite, bakobebisa ye, mpe bakozalisa ye bolumbu; bokolya mosuni na ye, mpe bakotumba ye na mɔ́tɔ.” (Emoniseli 17:16) Na nsima, basungi na ye ya kala “bakolela, bakobɛta ntolo mpo na [mpasi, NW] na ye.” (Emoniseli 18:9-​19) Nzokande, basaleli ya Yehova bazali uta kala kozela likambo yango, mpe bakonganga ete: “[Kumisá Yah, NW] . . . Mpo ete akweisi mwasi na pite yango monene oyo abebisaki mokili na pite na ye; abukanisi ye mpo na makila na baombo na ye.”​—Emoniseli 19:1, 2.

Basaleli ya Nzambe babundisami

6, 7. Mpo na nini basaleli ya Yehova basengeli kozala na elikya ntango bakobundisama na boumeli ya “bolózi monene”?

6 Lokola basili koboma mangomba ya lokuta, bakonzi ya politiki babalukeli basaleli ya Yehova. Satana, “[Gogo ya mokili ya Magogo,]” alobi boye kati na esakweli: “Nakobimela baoyo na kimya, baoyo bafandi na kobanga te.” Kokanisáká ete bazangi libateli, akobundisa bango na “ebele monene mpe basodá mingi . . . , lokola lipata lizipi mokili.” (Ezekiele 38:2, 10-​16) Basaleli ya Yehova bayebi ete etumba wana ekolónga te mpo ete bazali kotya elikya na bango epai na Yehova.

7 Ntango Falo mpe mampinga na ye bakanisaki ete bakokanga basaleli ya Nzambe na Mai Motane, Yehova asikolaki libota na ye na lolenge ya likamwisi mpe abomaki mampinga ya Baezipito. (Exode 14:26-​28) Na boumeli ya “bolózi monene,” wana mabota bakokanisa ete basaleli ya Yehova bazwami, Nzambe akoya lisusu kobikisa na lolenge ya ekamwiseli: “Na mokolo yango . . . nkɛlɛ na ngai ekopela . . . Mpo ete nalobi oyo na kati na zúwa na ngai mpe na kopela na nkɛlɛ na ngai.” (Ezekiele 38:18, 19) Na ntango yango, eteni ya nsuka ya “bolózi monene” ekokóma mpenza pene na kosalema!

8. Makambo nini ya kokamwisa makobima liboso ete Yehova akweisa bikateli na ye likoló na bato mabe, mpe makambo nini makomonana?

8 Na ntango moko, nsima wana “bolózi monene” ekobanda, mpe liboso ete Yehova akweisa bikateli na ye likoló na eteni ya mokili oyo ekotikala nsima na kobomama ya mangomba, makambo ya kokamwa na nsɔ́mɔ makobima. Talá makambo oyo makomonana. “Elembo na Mwana na moto [Klisto] ekomonana na Likoló mpe mabota nyonso na mokili bakolela mpe bakomona Mwana na moto azali koya na mapata na Likoló na nguya mpe na nkembo mingi elongo.” (Matai 24:29, 30) “Bilembo bikozala kati na moi na sanza na myoto . . . Bato bakosɛnzwa na nsɔ́mɔ na kotalela makambo makobima kati na mokili.”​—Luka 21:25, 26.

‘Kosikolama na bino ezali kobɛlɛma’

9. Mpo na nini basaleli ya Yehova bakoki ‘kotombola mitó na bango’ ntango makambo yango ya kokamwisa makobima?

9 Ezali eleko wana ya ntina mingi nde elobelami na esakweli ya Luka 21:28. Kuna Yesu alobaki ete: “Wana ekobanda makambo oyo kobima, tɛlɛmá alima mpe tombolá mitó na bino, mpo ete lisiko [“kosikolama,” NW] na bino ezali kobɛlɛma.” Banguna ya Nzambe bakolɛnga makasi mpamba te bakoyeba ete makambo wana ya nsɔ́mɔ mazali kouta na Yehova. Kasi basaleli ya Yehova bakosepela mpamba te bakoyeba ete kosikolama na bango esili kobɛlɛma.

10. Lolenge nini Liloba ya Nzambe ezali kolobela nsuka ya “bolózi monene”?

10 Na nsima, Yehova akosukisa ebongiseli ya Satana nyɛɛ: “Nakosambisa [Gogo] na maladi mpe na makila; mpe nakonokisa na likoló na ye, mpe na likoló na bibele na ye . . . mbula monene mpe matandala minene mpe mɔ́tɔ mpe sufulu . . . mpe bakoyeba ete ngai nazali [Yehova].” (Ezekiele 38:22, 23) Biloko nyonso ya ebongiseli ya Satana oyo bitikalaki bikobebisama nyɛɛ. Libota mobimba ya bato oyo bazali kotyola Nzambe bakolongolama. Nsuka ya “bolózi monene” wana ezali bongo Armagedon.​—Yilimia 25:31-​33; 2 Batesaloniki 1:6-8; Emoniseli 16:14, 16; 19:11-​21.

11. Mpo na nini basaleli ya Yehova bakosikolama na “bolózi monene”?

11 Bamilió ya basaleli ya Yehova na mabelé mobimba bakosikolama na “bolózi monene.” Bango basali “ebele monene” oyo euti “na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso.” Mpo na nini basikolami na lolenge ya nsɔ́mɔ boye? Ezali mpo ete bazali kosalela Yehova ‘mosala ya bulɛɛ butu na moi.’ Boye, bakobika na nsuka ya mokili oyo mpe bakokambama kino mokili ya sika ya boyengebene. (Emoniseli 7:9-​15) Na yango, bazali kotatola kokokisama ya elaka ya Yehova ete: “Zilá [“tyá elikya,” NW] mpo na [Yehova] mpe batelá nzela na ye, akokembisa yo ete osangola mokili; okomona kobeba na bato mabe.”​—Nzembo 37:34.

Mokili ya sika

12. Babiki na Armagedon bakoki kozala na elikya ya kozwa nini?

12 Yango ekozala mpenza eleko kitoko​—mabe elongolami mpe ekeke ya nkembo koleka bikeke nyonso ya lisoló ya moto ebandi! (Emoniseli 20:1-4) Babiki na Armagedon bakomonisa mpenza botɔ́ndi epai na Yehova mpo ete akɔtisi bango na makambo mpe mimeseno ya pole, ya pɛto, oyo ye moko Nzambe asali, mokili ya sika, na mabelé oyo makobongolama paladiso! (Luka 23:43) Mpe bakokufa soko moke te! (Yoane 11:26) Ya solo, kobanda ntango wana, bakozala na elikya monene mpe ya kosepelisa mpenza: Kozala na bomoi libela na libela lokola Yehova azali na yango!

13. Lolenge nini Yesu akozongela mosala ya kobikisa oyo abandaki ntango azalaki awa na mabelé?

13 Yesu, oyo Yehova aponi lokola Mokonzi na likoló, akokamba mosala ya kopalanganisa mapamboli ya kokamwisa oyo basikolami bakozwa. Ntango azalaki awa na mabelé, afungolaki miso ya bakufi-miso mpe matoi ya bakufi-matoi mpe asilisaki “mpasi nyonso mpe maladi nyonso.” (Matai 9:35; 15:30, 31) Na mokili ya sika, akobandela lisusu mosala wana ya kobikisa bato; kasi na mbala oyo, akosala yango na mokili mobimba. Lokola atyami Kapita na Nzambe, akokokisa elaka oyo: “[Nzambe] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.” (Emoniseli 21:4) Bato bakozala lisusu na mposa ya minganga te, bakozala mpe na mposa ya basukoli bibembe to bakundi bibembe te!​—Yisaya 25:8; 33:24.

14. Kosikolama nini ekoyela basaleli ya Yehova oyo basilá kokufa?

14 Basaleli ya sembo ya Nzambe oyo bakufaki na ntango ya kala mpe bakosikolama. Na mokili ya sika, bakolongolama na boombo ya nkunda. Yehova alaki ete: “Lisekwa ekozala na bato sembo mpe na bato sembo te.” (Misala 24:15) Ekoki kozala ete “bato sembo” bakosekwisama liboso mpe bakopesa mabɔkɔ na kopalanganisa Paladiso. Ekozala esengo monene mpo na babiki na Armagedon ntango bakoyoka makambo bakufi wana ya sembo, oyo bazongi sikawa na bomoi, bakutanaki na yango na ntango ya kala!​—Yoane 5:28, 29.

15. Lobelá ndambo ya makambo oyo makozala na mokili ya sika.

15 Baoyo nyonso bakozala na bomoi na ntango yango bakomona makambo oyo mokomi na nzembo alobaki na ntina na Yehova ete: “Okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa na nyonso na bomoi.” (Nzembo 145:16) Nzala ekozala lisusu te: Mabelé ekozongisama na ezalela moko ya malamu mpe ekobota mbuma mingi. (Nzembo 72:16) Bato bazangi ndako bakozala lisusu te: “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango,” mpe moto na moto akofanda “na nsé na miwiti na ye mpe na nzeté na ye na mosuke, moto moko akobangisa bango te.” (Yisaya 65:21, 22; Mika 4:4) Kobanga ekozala lisusu te: Etumba, mobulu, to kosala bato mabe ekozala lisusu te. (Nzembo 46:8, 9; Masese 2:22) “Mokili mobimba ezali na kimya mpe nyɛɛ; babandi koyemba.”​—Yisaya 14:7.

16. Mpo na nini boyengebene ekotonda mpenza na mokili ya sika?

16 Na mokili ya sika, myango oyo Satana azali kosalela mpo na kopalanganisa makanisi ya mbindo ekozala lisusu te. Kútu, “bafandi na mɔlɔ́ngɔ́ bakoyekola boyengebene.” (Yisaya 26:9; 54:13) Na lisalisi ya malako malamu ya elimo oyo makobanda kopesama mbula na mbula, “mokili ekotonda na boyebi na [Yehova] lokola mbonge ikozipaka mai-na-monana.” (Yisaya 11:9) Makanisi mpe misala ya kolendisa ekotondana mɛkɛ na elimo ya bato. (Bafilipi 4:8) Kanisá naino, libota ya bato na mokili mobimba oyo kati na yango mabe ezali te, moimi te, zúwa mpe te​—libota ya bondeko na bamboka ndenge na ndenge epai kuna moto nyonso azali kobota mbuma ya elimo ya Nzambe. Ya solo, uta sikawa, ebele monene bazali kolóna bizaleli nyonso wana.​—Bagalatia 5:22, 23.

Mpo na nini ezali koumela boye?

17. Mpo na nini Yehova atiki ntango molai boye liboso ya kolongola mabe?

17 Kasi, mpo na nini Yehova azali kolekisa ntango molai boye liboso ya kolongola mabe mpe kosikola libota na ye mpo na kokɔta na mokili ya sika? Tótalela oyo esengelaki naino kokokisama. Eloko eleki ntina ezali bongo kolóngisama ya lotómo oyo Yehova azali na yango ya kozala mokonzi, lotómo na ye ya koyangela. Na kolekisáká ntango molai boye, Yehova asili komonisa polele ete boyangeli ya bato, kozanga lisungi ya bokonzi na ye, ekolonga soko moke te. (Yilimia 10:23) Na bongo, Yehova azali sikawa na elónga mpenza ya kokitanya boyangeli ya bato na Bokonzi na ye ya likoló, oyo etambwisami na Klisto.​—Danyele 2:44; Matai 6:9, 10.

18. Ntango nini bakitani ya Abalayama basengelaki kosangola mokili ya Kanana?

18 Makambo oyo masalemi na boumeli ya bikeke nyonso oyo makokani na makambo masalemaki na eleko ya Abalayama. Yehova ayebisaki Abalayama ete bakitani na ye bakosangola mokili ya Kanana​—kasi mbula nkámá minei esengelaki koleka mpo ete “lisumu na Baamola [etondaki] naino te.” (Genese 12:1-5; 15:13-​16) Awa, liloba “Baamola” (libota moko oyo lizalaki kokonza) ezalaki komonisa mpenza bikólo nyonso ya Kanana. Na yango, bikeke pene na minei bisengelaki koleka liboso ete Yehova apesa libota na ye likoki ya kozwa mokili ya Kanana. Na boumeli ya ntango wana oyo ezalaki koleka, Yehova atikaki bafandi na Kanana ete bákólisa bizaleli mpe mimeseno na bango. Nini esalamaki?

19, 20. Mitindo nini ya bizaleli Bakanana bakólisaki?

19 Búku Bible Handbook, ya Henry H. Halley, eyebisi ete na Megido, bato ya arkeoloji bakundolaki bitíká ya tempelo ya Asetolete, nzambe-mwasi molongani ya Baala. Akomi ete: “Penepene na tempelo yango, nkunda ezalaki wana, mpe na esika yango mbeki mingi izwamaki, oyo izalaki na bitíká ya bana oyo bapesamaki lokola mbeka na tempelo yango . . . Basakoli ya Baala mpe ya Asetolete bazalaki babomi ya bana mike.” “Likambo mosusu ya nsɔ́mɔ ezalaki [oyo] babéngaki ‘mbeka ya moboko ya ndako.’ Liboso ete ndako etongama, mwana moko asengelaki kobomama lokola mbeka, mpe nzoto na ye esengelaki kokɔtisama kati na efelo.”

20 Halley alimboli ete: “Losambo ya Baala, ya Asetolete, mpe ya banzambe mosusu ya Bakanana etondaki na milulu ya kolunda mpe kolangwa, batempelo na bango ezalaki bisika ya kosala misala mabe. . . . Bakanana bazalaki kosambela, na misala mabe ya kosangisa nzoto, . . . mpe na nsima, koboma bana na bango ya liboso lokola mbeka epai na banzambe wana. Emonani ete, na makambo mingi, mokili ya Kanana ekómaki mpenza Sodomo mpe Gomola monene. . . . Ntina ezalaki mpenza ete mokili ya bizaleli mabe mpe ya yauli motindo wana eumela? . . . Bato ya arkeoloji oyo batimolaki bitíká ya bingumba ya Kanana bazali komituna ntina oyo Nzambe aumelaki liboso ya koboma bango.”​—Kokanisá na 1 Mikonzi 21:25, 26.

21. Bokokani nini ezali kati na ezalela ya Bakanana mpe oyo ya ntango na biso?

21 Mabe ya Baamola “etondaki.” Boye, Yehova akómaki na elónga mpenza ya kosilisa bango. Likambo yango ezali mpe bongo lelo. Mokili oyo etondi na mobulu, na pite, mpe ezali kotyola mibeko ya Nzambe. Mpe lokola, na elónga mpenza, tozali koyoka mabe na ntina na mimeseno ya mbindo oyo Kanana ya kala ezalaki na yango ya kokaba bana lokola mbeka, tokoloba boni mpo na ebele ya bamilió ya bilenge baye bazali kokabama lokola mbeka na bitumba ya mokili oyo, likambo oyo ezali mabe koleka misala nyonso ya Kanana? Na ntembe te, Yehova azali sikawa na elónga mpenza ya kosukisa ebongiseli mabe oyo.

Kokokisama ya eloko mosusu

22. Motema pɛtɛɛ ya Yehova ekokisi eloko nini na mikolo na biso?

22 Motema pɛtɛɛ ya Yehova na mikolo oyo ya nsuka ezali kokokisa eloko mosusu. Azali kotika ntango mpo ete ebele monene, oyo basili koleka milió mitano, básangisama mpe báteyama. Na litambwisi ya Yehova, basili kobongisama kati na lisangá moko oyo lizali sé kokende liboso. Mibali, basi, mpe bilenge bazali kolakisama lolenge ya koteya basusu solo ya Biblia. Na nzela ya makita na bango mpe mikanda, bazali koyekola banzela ya Nzambe oyo etondi na bolingo. (Yoane 13:34, 35; Bakolose 3:14; Baebele 10:24, 25) Lisusu, bazali kokólisa makoki na bango na mosala ya kotonga bandako, na elektroniki, na mosala ya konyata mikanda, mpe na misala mosusu, mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola “Nsango Malamu.” (Matai 24:14) Na ntembe te, mateya wana mpe makoki wana ya botongi ndako ekosalelama malamumalamu na mokili ya sika.

23. Mpo na nini ezali mpenza libaku malamu kozala na bomoi na eleko oyo?

23 Ɛɛ, lelo oyo Yehova azali kobongisa basaleli na ye ete bákoka kobika na “bolózi monene” mpo na kokɔta na mokili ya sika ya boyengebene. Na ntango yango, Satana mpe mokili mabe na ye bakozala lisusu te mpo na kobundisa bango; maladi, mawa mpe liwa ekozala lisusu te. Na esengo monene, basaleli ya Nzambe bakobanda mosala kitoko ya kotonga paladiso, epai bakobanda ‘kosepela’ mokolo na mokolo. Tozali mpenza na libaku malamu ya kobika na ekeke ya nsuka, ya koyeba Yehova mpe ya kosalela ye, mpe ezali libaku malamu kososola ete, etikali moke, ‘tokotombola mitó na biso mpo ete kosikolama na biso esili kobɛlɛma’!​—Luka 21:28, NW; Nzembo 146:5.

Mituna ya bozongeli

◻ “Bolózi monene” ezali nini, mpe ekobanda ndenge nini?

◻ Mpo na nini etumba oyo Gogo akobunda na basaleli ya Yehova ekolónga te?

◻ “Bolózi monene” ekosuka ndenge nini?

◻ Mapamboli nini ya kitoko mokili ya sika ekopesa?

◻ Mpo na nini Yehova atiki ntango molai eleka liboso ya kosukisa ebongiseli oyo?

[Elilingi na lokasa 16]

Mabelé mobimba makobongolama paladiso

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto