“Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina”
“Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”—FLP. 1:10.
1, 2. Esakweli nini oyo elobeli mikolo ya nsuka ebendaki mpenza likebi ya bayekoli ya Yesu, mpe mpo na nini?
PETRO, Yakobo, Yoane, mpe Andre batikalaki kaka bango minei elongo na Nkolo na bango. Makambo oyo Yesu autaki koyebisa bango na oyo etali kobebisama ya tempelo ezalaki naino kotungisa bango na makanisi. (Mrk. 13:1-4) Yango wana, batunaki ye ete: “Yebisá biso: Makambo yango ekosalema ntango nini, mpe elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo?” (Mat. 24:1-3) Na ebandeli, Yesu ayebisaki bango makambo oyo esengelaki kobongola mpenza bomoi ya bato mpe komonisa ete mokili mabe ya Satana ekómi pene na nsuka. Na ntembe te, moko ya makambo yango ebendaki mpenza likebi ya bayekoli ya Yesu. Nsima ya kolobela makambo ya mpasi lokola bitumba, kozanga bilei, mpe kobakisama ya botyoli-mibeko, Yesu asakolaki ete likambo moko ya malamu ekosalema na mikolo ya nsuka. Alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”—Mat. 24:7-14.
2 Bayekoli ya Yesu basakolaki nsango malamu ya Bokonzi elongo na ye. (Luka 8:1; 9:1, 2) Ntango mosusu bakanisaki lisusu likambo oyo Yesu alobaki ete: “Ya solo, mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Yango wana, bósɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Luka 10:2) Kasi ndenge nini bakokaki kosakola “na mabele mobimba esika bato bafandi” mpe kopesa “litatoli na bikólo nyonso”? Basali balingaki kouta wapi? Soki, ntango bazalaki elongo ná Yesu mokolo wana, bakokaki komona na makanisi makambo oyo elingaki kosalema na nsima, na ntembe te balingaki kokamwa na komona kokokisama ya maloba mokuse oyo totángaka na Matai 24:14.
3. Ndenge nini Luka 21:34 ezali kokokisama lelo oyo, mpe mituna nini tosengeli komituna?
3 Esakweli wana ya Yesu ezali kokokisama na mikolo na biso. Bamilio ya bato basangani mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mabele mobimba. (Yis. 60:22) Kasi, Yesu amonisaki ete na mikolo oyo ya nsuka, bato mosusu bakozala na mokakatano mpo na kotya mosala ya bokonzi na esika ya liboso. Makambo mosusu ekobenda likebi na bango mpe mitema na bango ‘ekokóma kilo.’ (Tángá Luka 21:34.) Biso mpe tozali komona kokokisama ya maloba yango. Basaleli mosusu ya Nzambe bazali kobunga nzela. Yango ezali komonana na bikateli oyo bazali kozwa na oyo etali mosala, bakelasi ya milai, mpe koluka biloko ya mokili, ezala mpe ntango oyo bazali kolekisa na masano mpe kominanola. Basusu bazali kolɛmba mpo na mikakatano mpe mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo. Omituna boye: ‘Bongo ngai? Bikateli oyo nazwaka emonisaka ete natyaka makambo nini na esika ya liboso na bomoi na ngai?’
4. (a) Mpo na likambo nini Paulo abondelaki mpo na bakristo ya Filipi, mpe mpo na nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo mpe oyo ekolanda, mpe yango ekosalisa biso na nini?
4 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso basengelaki kosala makasi mpo bákoka kotya makambo ya elimo na esika ya liboso. Ntoma Paulo abondelaki mpo ete bakristo oyo bazalaki na Filipi ‘báluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.’ (Tángá Bafilipi 1:9-11.) Lokola ntoma Paulo, bakristo mingi na ntango wana bazalaki “komonisa mpiko mingi lisusu mpo na kosakola liloba ya Nzambe na kobanga te.” (Flp. 1:12-14) Ndenge moko mpe, lelo oyo, mingi kati na biso tozali kosakola Liloba ya Nzambe na mpiko nyonso. Atako bongo, kotalela makambo oyo ezali kosalema lelo na kati ya ebongiseli ya Yehova ekoki kosalisa biso tómipesa lisusu mingi koleka na mosala ya kosakola, mosala oyo eleki ntina. Na lisolo oyo, tótalela naino bibongiseli oyo Yehova azwi mpo Matai 24:14 ekokisama. Mokano ya libosoliboso ya ebongiseli ya Yehova ezali nini? Mpe ndenge nini koyeba yango ekoki kolendisa biso mpe mabota na biso? Na lisolo oyo ekolanda, tokotalela makambo oyo ekoki kosalisa biso tóyika mpiko mpe tótambola elongo na ebongiseli ya Yehova.
ETENI YA EBONGISELI YA YEHOVA NA LIKOLÓ ETƐLƐMI ESIKA MOKO TE
5, 6. (a) Mpo na nini Yehova alakisaki eteni ya ebongiseli na ye na likoló na nzela ya bimonaneli? (b) Ezekiele amonaki nini na emonaneli?
5 Ezali na makambo mingi oyo Yehova amonaki malamu akɔtisa te na kati ya Biblia. Na ndakisa, ayebisaki makambo mingi te mpo na ndenge oyo bɔɔngɔ esalaka to ndenge oyo molɔ́ngɔ́ esalaka, atako koyeba makambo yango elingaki kosepelisa biso mingi! Yehova ayebisá biso kaka makambo oyo tosengeli na yango mpo tókanga ntina ya mokano na ye mpe tózala na bomoi oyo eyokani na mokano yango. (2 Tim. 3:16, 17) Na yango, tozali mpenza na esengo ndenge Biblia esalisi biso tóyeba mwa moke eteni ya ebongiseli ya Yehova na likoló! Tosepelaka mingi ntango totángaka makambo oyo ezali na mokanda ya Yisaya, Ezekiele, Danyele mpe na Emoniseli ya Yoane, oyo elobeli eteni ya ebongiseli ya Yehova na likoló. (Yis. 6:1-4; Ezk. 1:4-14, 22-24; Dan. 7:9-14; Em. 4:1-11) Ezali lokola nde Yehova afungoli rido mpe apesi biso nzela tómona makambo mosusu oyo esalemaka na likoló. Mpo na nini ayebisi biso makambo nyonso wana?
6 Yehova alingaki tóyeba ete tozali na kati ya ebongiseli moko ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Makambo mosusu mingi oyo tokoki komona na miso te ezali kosalema mpo mokano ya Yehova ekokisama. Na ndakisa, Ezekiele amonaki eteni ya ebongiseli ya Yehova oyo emonanaka te, oyo emonisami na likalo moko monene kuna na likoló. Likalo yango ezalaki kotambola mbangu mpenza mpe ekokaki kobaluka mbala moko na ngámbo mosusu. (Ezk. 1:15-21) Mbala nyonso oyo bayiká na yango ezalaki kobaluka, likalo yango ezalaki kokende mosika mpenza. Na emonaneli yango, Ezekiele amonaki mpe mwa moke Moto oyo azalaki kotambwisa likalo yango. Alobaki boye: “Mpe namonaki eloko moko lokola kongɛnga ya wolo oyo esangani na palata, ezalaki komonana lokola mɔtɔ ezingami bipai na bipai . . . Ndenge wana nde nkembo ya Yehova ezalaki komonana.” (Ezk. 1:25-28) Na ntembe te, Ezekiele akamwaki mingi ntango amonaki emonaneli yango! Amonaki ete Yehova ayebi malamu makambo nyonso oyo elekaka na kati ya ebongiseli na ye, mpe atambwisaka yango na nzela ya elimo santu na ye. Yango emonisi mpenza na ndenge ya kokamwa ete eteni ya ebongiseli ya Yehova na likoló etɛlɛmi esika moko te!
7. Ndenge nini emonaneli ya Danyele esalisi biso tótyela Yehova motema?
7 Danyele mpe amonaki makambo mingi oyo ekoki kotinda biso tótyela Yehova motema. Amonaki Yehova, oyo abengami “Mokóló na Mikolo,” afandi na kiti ya bokonzi oyo ezalaki ndemo ya mɔtɔ. Kiti yango ezalaki likoló ya bayiká. (Dan. 7:9) Yehova alingaki Danyele amona ete ebongiseli na ye etɛlɛmi esika moko te, mpe ezali kokokisa mokano na ye. Danyele amonaki mpe “moto moko lokola mwana ya moto,” elingi koloba Yesu, oyo bapesaki mokumba ya kokamba eteni ya ebongiseli ya Yehova na mabele. Boyangeli ya kokoka ya Kristo ekoumela kaka mwa bambula te. Ezali nde “boyangeli oyo ekoumela seko, oyo ekoleka te, mpe bokonzi na ye ezali bokonzi oyo ekobebisama te.” (Dan. 7:13, 14) Yango esengeli kotinda biso tótyela Yehova motema mpe tóndima makambo oyo azali kosala. Apesaki “boyangeli, lokumu ná bokonzi” epai ya Yesu, Mwana na ye oyo amekamaki mpe atikalaki sembo. Yehova atyelaka Mwana na ye motema. Yango wana, biso mpe tosengeli kondima boyangeli ya Yesu.
8. Bimonaneli oyo Yehova alakisaki Ezekiele ná Yisaya etindaki bango básala nini, mpe yango esengeli kotinda biso tósala nini?
8 Emonaneli wana ya eteni ya ebongiseli ya Yehova na likoló esengeli kotinda biso tósala nini? Lokola Ezekiele, na ntembe te makambo oyo Yehova azali kosala esengeli kotinda biso tóbanga ye mpe tózala na komikitisa. (Ezk. 1:28) Komanyola makambo oyo etali ebongiseli ya Yehova ekoki kotinda biso tómipesa lisusu mingi na mosala na ye, kaka ndenge Yisaya asalaki. Ntango azwaki libaku ya koyebisa basusu makambo oyo Yehova alingaki kosala, alekisaki yango te. (Tángá Yisaya 6:5, 8.) Yisaya azalaki na elikya ete na lisalisi ya Yehova, alingaki kolonga mikakatano nyonso oyo akokaki kokutana na yango. Ndenge moko mpe lelo oyo, mwa makambo oyo toyebi mpo na eteni ya ebongiseli ya Yehova oyo emonanaka te esengeli kotinda biso tóbanga Yehova mpe tósalela ye lisusu mingi. Komona ndenge oyo ebongiseli yango ezali se kokende liboso mpe emipesi mobimba mpo na kokokisa mokano ya Nzambe elendisaka biso mpenza!
ETENI YA EBONGISELI YA YEHOVA AWA NA MABELE
9, 10. Mpo na nini ezali na ntina ete eteni ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali komonana ezala?
9 Na nzela ya Mwana na ye, Yehova asali eteni mosusu ya ebongiseli awa na mabele, oyo ezali kosala na boyokani ná eteni ya ebongiseli na ye oyo emonanaka te. Mpo na nini esengeli ete ebongiseli moko oyo ezali komonana ezala mpo na kokokisa mosala oyo Matai 24:14 elobeli? Tótalela bantina misato.
10 Ya liboso, Yesu alobaki ete mosala wana ya kosakola ekomema bayekoli na ye “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Ya mibale, esengelaki ete bibongiseli ezwama mpo na kopesa bilei ya elimo mpe kokokisa bamposa ya bato oyo bamipesi na mosala yango. (Yoa. 21:15-17) Ya misato, esengelaki ete bibongiseli ezwama mpo ete baoyo bazali kosakola nsango malamu báyanganaka mpo na kosambela Yehova mpe koyekola ndenge ya kosala mosala yango. (Ebr. 10:24, 25) Esengelaki ebongiseli moko ezala mpo na kokokisa mikano wana nyonso. Mpo bayekoli ya Kristo bákokisa malamu mokumba na bango, esengelaki ete mosala na bango ebongisama malamu.
11. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kopesa mabɔkɔ na bibongiseli oyo ezali kozwama na kati ya ebongiseli ya Yehova?
11 Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kopesa mabɔkɔ na bibongiseli oyo ezali kozwama na kati ya ebongiseli ya Yehova? Lolenge moko oyo tokoki komonisa yango ezali ya kotya ntango nyonso motema epai ya bato oyo Yehova ná Yesu baponi mpo na kokamba biso na mosala na biso ya kosakola. Lelo oyo, ezali na misala to makambo mingi na mokili oyo ekoki kobenda likebi ya bandeko oyo bazali kokamba biso. Atako bongo, mokano ya libosoliboso ya eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele ezali nini?
BATYAKA LIKEBI NA “MAKAMBO OYO ELEKI NTINA”
12, 13. Ndenge nini bankulutu bakokisaka mikumba na bango, mpe mpo na nini yango esengeli kolendisa yo?
12 Na mokili mobimba, bakristo mingi oyo bakɔmɛli na elimo baponamaka mpo na kozala bakɛngɛli mpe kokamba mosala ya kosakola Bokonzi na bikólo oyo bazali. Ntango bandeko yango bazwaka bikateli, balukaka litambwisi na Liloba ya Nzambe, batikaka yango ezala ‘mwinda na makolo na bango, mpe pole na nzela na bango’ mpe babondelaka mingi mpo na kosɛnga litambwisi ya Yehova.—Nz. 119:105; Mat. 7:7, 8.
13 Ndenge moko na bandeko oyo bazalaki kokamba lisangá na siɛklɛ ya liboso, bankulutu oyo bazali kokamba mosala ya kosakola lelo oyo bamipesaka “na mosala ya liloba.” (Mis. 6:4) Basepelaka mingi na bokoli oyo ezali komonana na mosala ya kosakola nsango malamu na teritware na bango mpe na mokili mobimba. (Mis. 21:19, 20) Batyelaka bandeko mibeko ebeleebele te. Balandaka nde Makomami mpe litambwisi ya elimo santu ya Nzambe ntango bazwaka bibongiseli oyo esengeli mpo mosala ya kosakola ekende liboso. (Tángá Misala 15:28.) Na ndenge yango, bandeko mibali oyo bakambaka biso bapesaka bandeko nyonso ya masangá na bango ndakisa malamu.—Ef. 4:11, 12.
14, 15. (a) Bibongiseli nini ezwamaka mpo mosala ya kosakola esalema malamu na mokili mobimba? (b) Omiyokaka ndenge nini lokola ozali kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola Bokonzi?
14 Mingi kati na biso bamonaka te mosala monene oyo esalemaka mpo na kobongisa bilei ya elimo oyo tozwaka na nzela ya mikanda na biso, makita, mpe mayangani. Bankóto ya bandeko basalaka mosala makasi ya kobongola bilei yango ya elimo na minɔkɔ soki 600 mpo bato mingi bákoka koyekola “makambo minene ya Nzambe” na minɔkɔ na bango. (Mis. 2:7-11) Bilenge mibali mpe basi basalaka na bamasini oyo esalaka na lombangu mpenza mpo na konyata mikanda mpe kokangisa yango. Na nsima, mikanda yango ekabolamaka na masangá, ata na bamboka ya mosika mpenza.
15 Bibongiseli mingi ezwamaka mpo na kosalisa biso tómipesa mingi na mosala ya kosakola nsango malamu elongo na bandeko ya lisangá na biso. Na ndakisa, bankóto ya bandeko bamipesi na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya Mayangani, kosalisa nokinoki bandeko na bisika oyo makama ebimi to bandeko oyo bazali kobɛla makasi, kobongisa mayangani na biso ya mike to ya minene, mpe koteya na biteyelo ya teokrasi. Wana ezali kaka mwa ndambo ya makambo oyo mingi kati na biso tomonaka te. Mpo na nini mosala wana nyonso ezali kosalema? Ezali mpo mosala ya kosakola nsango malamu esalema malamu, mpo bandeko oyo bazali kokokisa mosala yango bázala makasi na elimo, mpe mpo losambo ya solo ekende liboso. Nyonso wana emonisi ete eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele ezali ntango nyonso kotya likebi na makambo oyo eleki ntina!
LANDÁ NDAKISA YA EBONGISELI YA YEHOVA
16. Makambo nini okoki koyekola na boyekoli na yo moko to elongo na libota na yo?
16 Ozwaka mbala na mbala ntango ya kokanisa na misala oyo ezali kosalema na ebongiseli ya Yehova? Bandeko mosusu bamonaki malamu ete, na losambo na kati ya libota to na boyekoli ya bango moko, bázwaka ntango ya kosala bolukiluki mpo na koyeba malamu makambo yango mpe komanyola yango. Tokoki koyeba makambo mingi soki toyekoli bimonaneli oyo Yehova alakisaki Yisaya, Ezekiele, Danyele, mpe Yoane. Buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu mpe mikanda mosusu to bavideo oyo ebimá na monɔkɔ na bino ekoki kosalisa yo oyeba malamu ebongiseli ya Yehova.
17, 18. (a) Lisolo oyo esalisi yo na makambo nini? (b) Mituna nini tosengeli komituna?
17 Komanyola makambo oyo Yehova azali kosala na nzela ya ebongiseli na ye ezali malamu mpo na biso. Lokola ebongiseli wana ya malamu, biso mpe tózala na ekateli ya kokoba kotya likebi na makambo oyo eleki ntina. Kosala bongo ekolendisa biso tózala na ekateli lokola Paulo, oyo akomaki ete: “Lokola tozwi mosala oyo na kotalela motema mawa oyo bamoniseli biso, tozali kotika te.” (2 Ko. 4:1) Alendisaki mpe baninga na ye ya mosala ete: “Tótika te kosala oyo ezali malamu, mpo na ntango oyo ekoki tokobuka mbuma soki tolɛmbi te.”—Gal. 6:9.
18 Ezali nde na makambo oyo tosengeli kobongisa epai na biso moko to na kati ya mabota na biso mpo tóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina na bomoi na biso ya mokolo na mokolo? Tokoki nde kokómisa bomoi na biso pɛpɛlɛ to kolekisaka ntango mingi te na masano to kominanola mpo tómipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola, mosala oyo eleki ntina? Na lisolo oyo elandi, tokotalela makambo mitano oyo ekosalisa biso tókoba kotambola elongo na ebongiseli ya Yehova.