Esengo na baoyo balali mpɔngi te!
“Talá! Nakoya lokola moyibi. Esengo na oyo akɛngɛli [“alali mpɔngi te,” “NW”] mpe abateli bilamba na ye.”—EMONISELI 16:15.
1. Lokola mokolo ya Yehova ebɛlɛmi, likambo nini tokoki komizela na yango?
MOKOLO monene ya Yehova ebɛlɛmi, mpe yango elimboli etumba! Kati na emonaneli moko, ntoma Yoane amonaki “maloba mapemami na bademó” oyo makokani na mbemba mazali kobima mpe kokenda epai na “bakonzi,” to bayangeli ya mokili. Mpo na nini? Mpo na “koyanganisa bango esika moko na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso”! Yoane abakisaki ete: “Bayanganisaki bango elongo na esika oyo ebéngami na Liebele Har–Magedon.”—Emoniseli 16:13-16, NW.
2. Nani azali Gogo na Magogo, mpe nini ekokwela ye na ntango akobundisa basaleli ya Yehova?
2 Mosika te, Yehova akopusa ebongiseli ya politiki ya mokili oyo esukisa nyɛɛ Babilone Monene, lisangani ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. (Emoniseli 17:1-5, 15-17) Gogo na Magogo, Satana Zábolo oyo abwakamaki na zingazinga ya mabelé, akoyanganisa mampinga na ye mpe akobundisa basaleli ya Yehova, oyo bazali bato ya kimya, mpe bamonani lokola ete bazangi libateli. (Ezekiele 38:1-12) Kasi Nzambe akobunda mpo na kobikisa basaleli na ye. Ekozala bongo na ntango yango nde “mokolo monene mpe na nsɔ́mɔ na [Yehova]” ekobanda.—Yoele 2:31; Ezekiele 38:18-20.
3. Lolenge nini okoki kolobela makambo oyo masakolami na Ezekiele 38:21-23?
3 Ɛɛ, Yehova akobikisa basaleli na ye mpe akobebisa bitíká nyonso ya ebongiseli ya Satana na ntango tokokóma na etumba ya mokili mobimba oyo ebéngami Har–Magedon, to Armagedon. Tángá maloba ya esakweli oyo mazwami na Ezekiele 38:21-23, mpe salá lokola ete ozali komona lolenge makambo yango mazali kosalema. Yehova asaleli nguya na ye mpo na konɔkisa mbula makasi, matandala, nkaké, mpe makɔnɔ oyo mabomaka. Yikiyiki epalangani na mokili mobimba mpo na nsɔ́mɔ wana mampinga ya Gogo mabulunganisami, mazali kobunda bango na bango. Banguna nyonso ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso oyo batikalaki naino na bomoi babomami na ntango Yehova azali kosalela nguya na ye monene mpo na kobikisa basaleli na ye. Ntango “bolɔ́zi monene” oyo elakamaki ekosila, ata eloko moko te ya ebongiseli mabe ya Satana ekotikala lisusu. (Matai 24:21) Nzokande, ata kati na mpasi na bango ya liwa, bato mabe bakoyeba nani oyo akweiseli bango mawa monene wana. Nzambe na biso molóngi-etumba alobi ye moko ete: “Bakoyeba ete ngai nazali [Yehova].” Makambo wana ya nsɔ́mɔ makosalema na eleko na biso, na boumeli ya eleko ya kozala ya Yesu.
Akoya lokola moyibi
4. Na lolenge nini Yesu akoya koboma ebongiseli mabe ya biloko ya ntango oyo?
4 Nkolo Yesu Klisto oyo akembisami alobi ete: “Tala! Nakoya lokola moyibi.” Koya lokola moyibi elimboli koya pwasa, na ntango oyo eyebani te, wana bato mingi bazali na mpɔngi. Na ntango Yesu akoya lokola moyibi mpo na koboma ebongiseli oyo ya mabe, akobatela baoyo mpenza bakolala mpɔngi te. Ayebisaki Yoane ete: ‘Esengo na oyo [alali mpɔngi te] mpe abateli bilamba na ye, ete atambola bolumbu te mpe amona nsɔni te.’ (Emoniseli 16:15) Maloba wana malimboli nini? Mpe lolenge nini tokoki kolala mpɔngi te na elimo?
5. Ebongiseli nini ya mosala ya tempelo ezalaki kosalema ntango Yesu azalaki awa na mabelé?
5 Mingimingi, mosɛnzɛli akoki kolongolama bilamba te soki alali mpɔngi na ntango ya mosala. Kasi ezalaki mpenza kosalema bongo na tempelo na Yelusaleme ntango Yesu azalaki awa na mabelé mpe wana bituluku bikabolami ya banganga mpe Balevi bazalaki kosala kati na tempelo na Yelusaleme. Ezalaki bongo na ekeke ya 11 L.T.B. nde Mokonzi Davidi alɛngɛlaki bankámá ya banganga Bayisalaele mpe bankóto ya basungi na bango Balevi kati na ebongiseli oyo esangisaki bituluku 24. (1 Ntango 24:1-18) Etuluku mokomoko ezalaki na basáli koleka nkóto moko oyo babongisamaki malamu mpo na mosala, etuluku na etuluku na ngala na yango ezalaki kosala misala na tempelo mbala mibale to koleka na mbula moko, na boumeli ya pɔ́sɔ mobimba. Nzokande, na Elambo ya Mingombo, bituluku nyonso 24 bizalaki koyangana wana elongo mpo na kosala mosala. Ezalaki mpe kosɛnga ete basáli bazala lisusu mingi mpo na kopesa mabɔkɔ na Elambo ya Elekeli.
6. Yesu alingaki kolobela nini ntango ayebisaki ete: ‘Esengo na oyo [alali mpɔngi te] mpe abateli bilamba na ye’?
6 Wana Yesu alobaki ete: ‘Esɛngo na oyo [alali mpɔngi te] mpe abateli bilamba na ye,’ ekoki mbala mosusu kozala ete alingaki kolobela lolenge makambo mazalaki kosalema na eleko wana mpo na oyo etalaki mosala ya kokɛngɛla tempelo. Búku Mishnah ya Bayuda elobi ete: “Banganga bazalaki kokɛngɛla na bisika misato kati na Tempelo: na Eteni ya ndako ya Abtinas, na Eteni ya ndako ya Mɔ́tɔ, Eteni ya ndako ya Litumbu; mpe balevi bazalaki kokɛngɛla na bisika ntuku mibale na moko: mitano na ekɔtelo ya Ngomba ya Tempelo, minei na matúmu minei na kati na yango, mitano na bikɔtelo mitano ya Lopango ya Tempelo, minei na matúmu na yango minei ya libándá, mpe moko kati na Eteni ya ndako ya Mbeka, mpe moko kati na Eteni ya ndako ya Ridó, mpe moko na nsima ya Efandelo ya Mawa [na libándá ya efelo ya nsima ya Esika eleki Bosantu]. Mokonzi na Ngomba ya Tempelo azalaki kolekaleka na mwinda na lobɔkɔ mpo na kotala mokɛngɛli mokomoko, mpe soki mokɛngɛli moko atɛlɛmi te mpe alobi na ye te ete: ‘Ɛ mokonzi na Ngomba na tempelo, kimya ezala na yo!’ mpe emonani polele ete azalaki kolala mpɔngi, akobɛta ye fimbo, mpe azalaki na lotómo ya kotumba elamba na ye.”—Mishnah, Middoth (“Bimekeli”), 1, paragrafe 1-2, ebongolamaki na Lingelesi na Herbert Danby.
7. Mpo na nini banganga mpe Balevi oyo bazalaki basɛnzɛli na tempelo basengelaki kolala mpɔngi te?
7 Balevi mpe banganga mingi oyo etuluku na bango ezalaki na ngala ya kosala mosala bazalaki kolala mpɔngi te na boumeli ya butu mobimba mpo na kosɛnzɛla mpe kopekisa ete moto moko te ya mbindo akɔta kati na lopango ya tempelo. Lokola “mokonzi na Ngomba na Tempelo,” to “kapita ya tempelo,” azalaki kolekaleka na bisika nyonso 24 na boumeli ya bokɛngɛli na butu, mosɛnzɛli mokomoko asengelaki kolala mpɔngi te na esika na ye ya mosala noki soki bakuti ye azali kolala mpɔngi bakomona ete azali na bopɔtu na mosala na ye.—Misala 4:1.
8. Bilamba ya elilingi ya baklisto ezali nini?
8 Baklisto bapakolami mpe basalani na bango basengeli kolala mpɔngi na elimo te mpo ete bábatela bilamba na bango ya elilingi. Bilamba yango bizali bilembo ya libanda oyo ezali komonisa ete toponami mpo na kosalela Yehova kati na tempelo na ye ya elimo. Mpo na kondima yango, tozali na elimo santu ya Nzambe, to nguya oyo ekosalaka mosala, mpo na kosalisa biso ete tókokisa misala mpe tókokisa mikumba na biso ya basakoli ya Bokonzi. Soki tolali mpɔngi ya elimo wana tozali kati na mosala na biso lokola basaleli ya Nzambe, tokomitya na likámá oyo ekosala ete Yesu Klisto, Kapita ya tempelo monene ya elimo akanga biso. Soki tokolala mpɔngi na elimo na ntango yango, na elobeli ya elilingi, tokotikama bolumbu mpe bilamba na biso ya elilingi bikotumbama. Na bongo, lolenge nini tokoki kolónga ete tólala mpɔngi te na elimo?
Lolenge nini tokoki kolala mpɔngi te
9. Mpo na nini boyekoli ya Biblia na lisalisi ya mikanda ya boklisto ezali na ntina mingi?
9 Boyekoli ya Makomami na etingya na lisalisi ya mikanda ya boklisto ezali na nguya ya kosalisa biso ete tókoka kolala mpɔngi te na elimo. Boyekoli wana ekobongisa biso mpo na mosala, ekosunga biso ete tólónga mikakatano, mpe ekolakisa biso nzela oyo ezali komema na bolamu ya seko. (Masese 8:34, 35; Yakobo 1:5-8) Boyekoli na biso esengeli kozala ya mozindo mpe esengeli kokóla ntango nyonso. (Baebele 5:14–6:3) Kolya bilei ya malamu mbala na mbala ekoki kosalisa biso ete tólala mpɔngi te mpe tózala na bokɛngi. Ekoki kopengola bolɛmbu oyo ekoki mbala mosusu kozala elembo ya kozanga kolya malamu. Tosengeli te komiboma na nzala na elimo mpe komilalisa mpɔngi na elimo, mpamba te Nzambe azali kopesa biso bilei ya elimo mingi na nzela ya “moombo na sembo mpe na mayele” oyo apakolami. (Matai 24:45-47) Kolya bilei ya elimo mbala na mbala na nzela ya boyekoli na biso moko mpe na boyekoli kati na libota ezali moko na lolenge ya komibatela mpo na kolala mpɔngi te na elimo mpe mpo na ‘kózala na bokolɔ́ngɔ́nɔ́ malamu kati na kondima.’—Tito 1:13, NW.
10. Lolenge nini makita ya boklisto, mayangani ya minene mpe ya mike mazali kosalisa biso ete tólala mpɔngi te na elimo?
10 Makita ya boklisto, mayangani ya minene mpe ya mike mazali kosalisa biso ete tókoka kolala mpɔngi te na elimo. Mapesaka biso bilendiseli mpe mabaku ya “kolinganaka mpe kosalaka misala malamu.” Mingimingi, tosengeli mpenza koyanganaka mbala na mbala awa “emoni biso ete Mokolo yango ezali kobɛlɛma.” Mokolo yango ekómi mpenza pene. Ezali bongo “mokolo na [Yehova],” na ntango wana akolóngisa lotómo na ye ya kozala mokonzi. Soki mokolo yango ezali solo na ntina mpo na biso—mpe esengeli nde kozala bongo—‘tokotika te koyangana elongo moko.’—Baebele 10:24, 25; 2 Petelo 3:10.
11. Mpo na nini tokoki koloba ete mosala ya boklisto ezali na ntina mingi mpo ete tólala mpɔngi na elimo te?
11 Kosangana na motema mobimba na mosala ya boklisto ezali na ntina mingi mpo na kosalisa biso ete tókoka kolala mpɔngi na elimo te. Kosangana mbala na mbala mpe na molende nyonso na mosala ya kosakola nsango malamu ezali kobatela biso ete tózala ntango nyonso na bokɛngi. Mosala na biso ezali kopesa biso mabaku mingi ya kosolola na bato na ntina na Liloba ya Nzambe, Bokonzi na ye, mpe mikano na ye. Kopesa litatoli ndako na ndako, kozongela bato oyo tokutanaki na bango, kotambwisa boyekoli ya Biblia na ndako na lisalisi ya mikanda lokola Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko ezali mpe likambo ya kosepelisa. Bankulutu kati na lisangá ya Efese ya kala bakokaki kotatola ete Paulo ateyaki bango “na koyangana mpe na ndako na ndako.” (Misala 20:20, 21) Ya solo, ezali na Batatoli ya sembo ya Yehova baye bazali na mikakatano makasi ya kolɔ́ngɔ́nɔ́ ya nzoto oyo ezali kolɛmbisa mosala na bango na lolenge moko to mosusu, kasi bazali kozwa mabaku ya kosolola na basusu na ntina na Yehova mpe bokonzi na ye mpe bazali kozwa esengo monene na kosaláká bongo.—Nzembo 145:10-14.
12, 13. Mpo na bantina nini tosengeli kopɛngola kolekisa ndelo na kolya mpe na komela?
12 Kopɛngola ezaleli ya kolekisa ndelo na kolya mpe na komela ezali kosalisa biso ete tókoka kolala mpɔngi te na elimo. Wana azalaki koloba mpo na oyo etali kozala na ye, Yesu alendisaki bantoma na ye ete: “Kebá na bino ete mitema na bino mikóma makasi mpo na kolunda te, soko na kolanga te, soko na bitungiseli na bomoi te. Bongo mokolo yango ebimela bino pwasa lokola motambo te. Mpo ete ekobimela bato nyonso bafandi na mikili nyonso.” (Luka 21:7, 34, 35) Lokoso ya kolya mpe kolangwa masanga eyokani te na mitindá ya Biblia. (Deteronome 21:18-21) Masese 23:20, 21 elobi: “Zalá elongo na bameli na masanga te, soko elongo na bato te baoyo bakolyaka na mposa mabe. Zambi kolanga mpe kolyaka mingimingi ekokómisa moto na bobólá; goigoi ekolatisa mpe moto bilamba bipaswani.”—Masese 28:7.
13 Ata soki ezaleli ya kolya mingi mpe ya komela mingi ekómi naino mosika te, nzokande, ekoki kolɛmbisa moto, ata mpe kokómisa moto goigoi mpe kopesa ye bopɔtu mpo na oyo etali kosala mokano ya Nzambe. Ezali mabe te komitungisa mpo na libota, bokolɔ́ngɔ́nɔ́ ya nzoto, mpe bongo na bongo. Nzokande, tokozala na esengo soki totye matomba ya Bokonzi na esika ya liboso kati na bomoi na biso mpe totye motema ete Tata na biso ya likoló akokokisa bamposa na biso. (Matai 6:25-34) Soki te, “mokolo yango” ekokwela biso lokola “motambo,” mbala mosusu lokola motambo ebombami oyo ekokanga biso wana tokolala mpɔngi to motambo oyo etyami na bilei ya kolɛngola, lokola oyo ebendaka mpe ekangaka banyama oyo bazangi bokɛngi. Yango ekokómela biso te soki toboi kolala mpɔngi na elimo, koyebáká malamu ete tozali kobika na “ntango ya nsuka.”—Danyele 12:4, NW.
14. Mpo na nini tosengeli kobondela na etingya?
14 Kobondela na etingya ezali mpe eloko mosusu oyo esalisaka biso na kolónga ete tólala mpɔngi na elimo te. Kati na esakweli na ye monene, Yesu apesaki lisusu likebisi oyo ete: “Sɛnzɛlá ntango nyonso [“bólala mpɔngi te,” NW], mpe bondelá ete bózala na makasi na kokima makambo oyo malingi koya, mpe na kotɛma liboso na Mwana na moto.” (Luka 21:36) Ɛɛ, tiká tóbondela ete tózalaka ntango nyonso na ngámbo ya Yehova mpe tóbatela etɛlɛmɛlo oyo elongobani na ntango Yesu, Mwana na moto, akoya koboma ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo. Mpo na bolamu na biso moko mpe mpo na bolamu ya bandeko na biso kati na kondima oyo tobondelaka mpo na bango, tosengeli ‘koyika mpiko kati na kobondela.’—Bakolose 4:2; Baefese 6:18-20.
Ntango ezali koleka nokinoki
15. Nini ezali kokokisama na nzela ya mosala na biso ya basakoli ya boyengebene?
15 Lokoka tozali kozela mokolo monene ya Yehova, na ntembe te, tozali na mposa ya kosala nyonso ekoki na biso kati na mosala na ye. Soki tobondeli ye na etingya nyonso na ntina na yango, ‘ekuke monene ya mosala’ ekoki kozipwama mpo na biso. (1 Bakolinti 16:8, 9) Na ntango oyo Nzambe asilá kobongisa, Yesu akosambisa mpe akotya na ngámbo moko bato na sembo to “bampate” oyo babongi kozwa bomoi ya seko mpe na ngámbo mosusu bato mabe to “bantaba” oyo babongi kobomama mpo na libela. (Yoane 5:22) Ezali biso te nde tozali kokabola bampate na bantaba. Kasi mosala na biso ya basakoli ya boyengebene ezali kopesa bato libaku ya kopona bomoi ya kosalela Nzambe mpe yango ekosala ete bázala na elikya ya kokabolama mpo na kozwa bomoi na ntango Yesu “akoya na nkembo na ye.” Koyeba ete ebongiseli mabe ya biloko oyo etikali bobele na ntango mokuse ezali kokólisa mposa ya kokokisa mosala na motema mobimba wana tozali koluka baoyo “babongi mpo na bomoi ya seko.”—Matai 25:31-46; Misala 13:48, NW.
16. Mpo na nini tosengeli kozala basakoli ya Bokonzi na molende?
16 Ntango ezalaki lisusu te mpo na mokili na eleko ya Noa, mpe mosika te, ekozala mpe bongo mpo na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo. Na bongo, tiká ete tózala basakoli ya Bokonzi ya molende. Mosala na biso ya kosakola mozali kobota mbuma mingi, mpamba te mbula na mbula ebele ya bankóto ya bato bazali kobatisama mpo na komonisa elembo ya komipesa na bango epai na Nzambe. Bazali kokóma basangani ya lisangá lipambolami ya Nzambe—‘bato na ye, mpate na elanga na ye.’ (Nzembo 100:3) Kosangana na mosala ya kosakola Bokonzi ezali mpenza likambo ya esengo oyo ezali kopesa elikya epai na ebele ya bato liboso ete “mokolo monene mpe na nsɔ́mɔ na [Yehova]” eya!
17, 18. (a) Na ntango tozali kosakola, tosengeli komizela ete báyamba nsango na biso na lolenge nini? (b) Likambo nini ekokómela mpenza batyoli?
17 Motindo moko na Noa, biso mpe tozali na lisungi mpe na libateli ya Nzambe. Ɛɛ, na ntembe te, bato, baanzelu oyo balataki nzoto ya mosuni, mpe Banefilime batyolaki nsango ya Noa, kasi yango elɛmbisaki ye te. Lelo oyo, bato mosusu bazali kotyola biso wana tozali kolobela bilembeteli ya polele oyo bizali komonisa ete tozali kobika na “mikolo na nsuka.” (2 Timoté 3:1-5) Botyoli wana ezali kokokisa esakweli ya Bibia na ntina na kozala ya Yesu, mpamba te Petelo akomaki ete: “Na mikolo na nsuka basɛki bakoya mpe bakosɛka, bakotambola pelamoko na mposa mabe, bakoloba ete, Wapi elaka na Koya [“kozala,” “NW”] na ye? Zambi longwa na ntango na kufa na bankɔ́kɔ, makambo nyonso maumeli bobele bongo lokola ezalaki yango na ebandeli na Kozalisama.”— 2 Petelo 1:16; 3:3, 4.
18 Basɛki ya mikolo na biso bakoki mbala mosusu kokanisa ete: ‘Likambo ata moko libongwani te uta kozalisama ya mokili. Bomoi ezali kokóba, bato bazali kolya, komela, kobala, mpe kobɔkɔla bana. Ata soki Yesu azali sikawa, akosambisa te na eleko oyo ngai nazali na bomoi.’ Bazali mpenza na libunga! Soki liwa ekomeli bango te mpo na ntina mosusu na mikolo oyo, mokolo ya nsɔ́mɔ ya Yehova ekoya mpenza koboma bango elongo na libota oyo mabe, bobele lokola kobomama ya nsɔ́mɔ na Mpela esukisaki libota mabe na eleko ya Noa.—Matai 24:34.
Tosengeli soko moke te kolala mpɔngi!
19. Lolenge nini tosengeli kotalela mosala na biso ya kozalisa bayekoli?
19 Soki tosilá komipesa na Yehova, tiká ete makanisi mazangi kolongobana málalisa biso mpɔngi te. Oyo ezali ntango ya kolala mpɔngi te, ezali ntango ya komonisa kondima kati na bisakweli ya Nzambe, mpe ya kokokisa etindá epesameli biso ya “kozalisa bayekoli na mabota nyonso.” (Matai 28:19, 20) Lokola ebongiseli oyo ezali kobɛlɛma na nsuka na yango, tozali na libaku mosusu te oyo eleki libaku ya kosalela Yehova Nzambe na litambwisi ya Yesu Klisto mpe ya kosangana na mosala oyo ezali kosalema na mokili mobimba ya kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi’ liboso ete nsuka eya.—Matai 24:14; Malako 13:10.
20. Kalebe na Yosua bapesaki ndakisa nini, mpe lolenge ya bomoi na bango emonisi nini mpo na biso?
20 Bamoko kati na basaleli ya Yehova bazali kosalela ye uta bambula mingi, mpe mbala mosusu na boumeli ya bomoi na bango mobimba. Ata soki tosili koyamba losambo uta kala mingi, tiká ete tólanda ndakisa ya Moyisalaele Kalebe, oyo “abilaki [Yehova] na motema moko.” (Deteronome 1:34-36) Ye mpe Yosua bamilɛngɛlaki malamu mpenza mpo na kokɔta na Mokili ya Ndaka mwa moke nsima wana Yisalaele esikolamaki na boombo na Ezipito. Nzokande, mikóló mingi ya Bayisalaele bazangaki kondima mpe balekisaki mbula 40 kati na mokili mokauki, epai kuna bakufaki. Kalebe na Yosua bayikaki mpiko na mikakatano elongo na bango na boumeli ya ntango wana nyonso, kasi na nsuka mibali wana mibale bakɔtaki na mokili ya ndaka. (Mituya 14:30-34; Yosua 14:6-15) Soki ‘tolandi [Yehova] na motema moko’ mpe tolali mpɔngi te na elimo, tokozwa esengo ya kokɔta na mokili ya sika molakami na Nzambe.
21. Tokozwa litomba nini soki tolali mpɔngi te na elimo?
21 Bilembeteli bimonisi polele ete tozali kobika na mikolo ya nsuka mpe ete mokolo monene ya Yehova ebɛlɛmi. Oyo ezali te ntango ya kolala mpɔngi mpe ya komonisa bopɔtu wana ezali biso kosala mosala ya Nzambe. Tokopambolama soki tolali mpɔngi te na elimo mpe soki tobateli bilamba na biso oyo ezali komonisa ete tozali baministre baklisto mpe basaleli ya Nzambe. Tiká ete tózwa ekateli makasi ete ‘tólala mpɔngi te, tótɛlɛma ngwi kati na kondima, tózala lokola mibali, mpe tózala na nguya.’ (1 Bakolinti 16:13, NW ) Lokola tozali basaleli ya Yehova, tiká ete mokomoko na biso atɛlɛma ngwi mpe azala na mpiko. Na bongo, tokozala kati na baoyo bamilɛngɛli ntango mokolo monene ya Yehova ekokoka, kosaláká na bosembo nyonso esika moko na bato na esengo oyo bazali kolala mpɔngi te.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Lolenge nini okoki kolimbola bilamba ya elilingi, mpe lolenge nini tokoki kobatela yango?
◻ Wapi ndambo ya myango oyo ekoki kosalisa biso ete tólala mpɔngi te na elimo?
◻ Mpo na nini tokoki komizela ete tókutana na batyoli, mpe lolenge nini tosengeli kotalela bango?
◻ Lolenge nini tosengeli kotalela mosala na biso ya kozalisa bayekoli na mikolo oyo ya nsuka?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]
Ozwi ekateli ya kolala mpɔngi te na elimo mpe kobatela bilamba na yo ya elilingi?
[Elilingi na lokasa 16]
Baklisto bazali na elimo santu ya Nzambe mpo na kosalisa bango ete bálala mpɔngi te mpe mpo ete bákokisa mikumba na bango