Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/5 nk. 29-31
  • Azalaki Mopasoli nzela mpo na Masiya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Azalaki Mopasoli nzela mpo na Masiya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokumba na ye esakolamaki uta kala
  • Mongongo kati na mokili mokauki
  • ‘Bato ya lolenge nyonso’ bazwi likebisi
  • Masiya alakisami
  • Sembo kino nsuka
  • Yoane Mobatisi abongisi nzela
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yoane abongisi nzela
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Yoane azali kobongisa nzela
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/5 nk. 29-31

Azalaki Mopasoli nzela mpo na Masiya

NKAMBA monene ya loposo ya nyama ezalaki komonisa malamu loposo na ye oyo eyindisamaki mpo na moi. Lokola azalaki kolata elamba esalemi na nkungé ya kamela, amonanaki mpenza lokola mosakoli. Bato mingi babɛlɛmaki epai na ye na ebale Yaladɛnɛ. Kuna, moto yango oyo azalaki kobenda likebi ya bato alobaki na mpiko nyonso ete azalaki pene ya kobatisa basumuki oyo babongoli motema.

Bato bakamwaki! Moto yango azalaki bongo nani? Mokano na ye mozalaki nini?

Yesu Klisto alobaki na ntina na moto yango ete: “Kasi bokei mpɔ na nini? Komɔna mosakoli? Ɛɛ, najali koloba na bino ete, oyo ajali koleka mosakoli. . . . moto mɔkɔ tɛ abimi oyo kati na baoyo babotami na basi, oyo aleki Yoane Mobatisi.” (Matai 11:9-11) Mpo na nini Yoane azalaki moto oyo akesanaki na bato mosusu? Mpamba te azalaki mopasoli nzela mpo na Masiya.

Mokumba na ye esakolamaki uta kala

Bambula koleka 700 liboso ete Yoane abotama, Yehova asakolaki ete akozala konganga kati na mokili mokauki, ete: “Bobɔngisa njela na [Yehova], kati na esika mpamba, bosembola balabala mpɔ na Njambe na biso.” (Yisaya 40:3; Matai 3:3) Koleka bambula 400 liboso ya kobotama ya Yoane, Nzambe Mozwi-na-Nguya nyonso alobaki ete: “Tala, ngai nakotindela bino mosakoli Eliya liboso na koya na mokɔlɔ monɛnɛ mpe na nsɔmɔ na [Yehova].” (Malaki 4:5) Kobotama ya Yoane Mobatisi pene na sanza motoba liboso na kobotama ya Yesu ezalaki likambo ya pwasa te, ezalaki mpe te na lolenge oyo basi nyonso babotaka. Lolenge moko na kobotama ya Yisaka, mwana oyo alakamaki, Yoane abotamaki na lolenge ya ekamwiseli, mpamba te baboti na ye, Zakalia mpe Elizabete, basilaki koleka bambula oyo bato babongi mpo na kobota bana.​—Luka 1:18.

Ata liboso ete mama ya Yoane azwa zemi, mokumba na ye, mosala na ye, mpe lolenge ya bomoi na ye esilaki komonisama polele na anzelu Gabriel. Na nguya mpe na elimo lokola oyo Eliya azalaki na yango, Yoane asɛngelaki kokamba bato bazangi botosi ete bálongwa na nzela ya kufa mpe asengelaki kolengela bango ete bándima Yesu lokola Masiya. Uta na kobotama, Yoane asengelaki kozala Monasili, oyo amipesi mobimba epai na Nzambe, mpe asengelaki te komela vinyo to masanga makasi. Ee, kati na lisobe, bilei oyo azalaki kolia ezalaki bongo “mayoyo mpe mafuta na njoi na jamba.” (Malako 1:6; Mituya 6:2, 3; Luka 1:13-17) Lokola Samwele, uta na bomwana na ye, Yoane atyamaki pembeni mpo na mosala ya nkembo ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló.​—1 Samwele 1:11, 24-28.

Ata nkombo oyo ete Yoane eponamaki na Nzambe. Nkombo ya Liebele oyo ebongolami na “Yoane” elimboli “Yehova amonisi ngolu; Yehova amonisi boboto.”

Na ntango mwana akatamaki ngɛnga na mokolo ya mwambe, Zakalia tata na ye apemamaki na Nzambe mpo na koloba ete: “Yɔ mwana mpe, okobiangama mosakoli na Oyo-Aleki-Likolo, mpɔ ete okokɛnda liboso na [Yehova] kobɔngisa njela na ye, koyebisa bato na ye mpɔ na kobikisama, na kati na kolimbisa na masumu na bango, mpɔ na motema na mawa na Njambe na biso. Na mawa yango kotana na ntɔngɔ na likolo ekotanela biso.” (Luka 1:76-78) Mosala ya Yoane liboso na bato banso esengelaki kozala oyo eleki ntina mingi kati na bomoi na ye. Makambo nyonso mosusu oyo ekokanisamaki na yango ezalaki na ntina te. Na yango, Makomami elobeli mibu 30 ya liboso ya bomoi na ye kati na mokapo bobele moko: “Mwana akolaki, ajuaki makasi na [elimo, NW], mpe afandaki na lisobe kino mikɔlɔ na komimɔnisa na ye na Yisalaele.”​—Luka 1:80.

Mongongo kati na mokili mokauki

Na mbula ya 15 ya boyangeli ya Tibɛli Kaisala, na ntango Pɔnti Pilata azalaki mokambi ya Yudea, Yoane Mobatisi abimaki na lisobe na kosakoláká nsango oyo ya kokamwisa: “Bobongola mitema! Mpɔ ete Bokonji na Likolo esili kobɛlɛma.” (Matai 3:2; Malako 1:4; Luka 3:1, 2) Likebi ya bato nyonso ya mboka elamwisamaki. Nsango wana ya mpiko esimbaki mitema ya bato oyo bazalaki na mposa makasi ya elikya ya solosolo. Kosakola ya Yoane etyaki komikitisa ya bato na komekama mpamba te ezalaki kosɛnga kobongola motema na bosembo nyonso. Bosembo mpe endimiseli na ye epusaki ebele ya bato ya kolongobana mpe ya sembo na kotalela ye lokola moto oyo atindami na Nzambe.

Lokumu ya Yoane epalanganaki nokinoki. Lokola azalaki mosakoli ya Yehova, ayebanaki malamu na lolenge na ye ya kolata mpe na ezaleli na ye ya komipesa. (Malako 1:6) Ata banganga mpe Balevi bayaki uta na Yelusaleme mpo na komona nini oyo ezalaki kolamwisa mposa ya ebele ya bato. Kobongola motema? Mpo na nini, mpe na likambo nini? Moto yango azali nani? Balingaki koyeba. Yoane alobaki ete: “Ngai mpenja najali Klisto tɛ. Batuni ye ete, Boye yɔ nani? Yɔ Eliya? Ye ete, Ngai tɛ. Bango ete, Yɔ Mosakoli yango? Ajongisi mpe ete, Tɛ. Balobaki na ye ete, Yɔ nani?​—ete tojongisa monɔkɔ epai na batindi na biso. Ojali koloba nini mpɔ na yɔ mɔkɔ? Ye ete, Ngai mongongo mongangi kati na lisobe ete, Bobɔngisa njela na [Yehova], lokola elobaki mosakoli Yisaya. Bango batindami bajalaki Bafalisai, mpe batuni ye ete, Sɔkɔ yɔ Klisto tɛ, sɔkɔ Eliya tɛ, sɔkɔ Mosakoli yango tɛ, mpɔ na nini ojali kobatisa?’”​—Yoane 1:20-25.

Kobongola motema mpe kozwa batisimo ezalaki litambe ya ntina mingi mpo na baoyo balingaki kokɔta na Bokonzi. Na yango, Yoane ayanolaki ete: ‘Ngai najali kobatisa basumuki babongoli motema na mai, nde oyo aleki ngai na nguya ajali koya, nabɔngi kokangola nkamba na lipapa na ye tɛ. Ye akobatisa bino na [elimo santu, NW] mpe na mɔtɔ. Epupeli na ye ejali na lobɔkɔ na ye, mpe akopɛtɔla etutelo na ye mpɛtɔ, mpe akobomba masango kati na ebombelo na ye; kasi akotumba matiti na mɔtɔ ekojimana tɛ.’ (Luka 3:15-17; Misala 1:5) Ee, elimo santu esengelaki kopesama epai na bayekoli ya Masiya, kasi banguna na ye basengelaki kozika na mɔ́tɔ ya kobebisama.

‘Bato ya lolenge nyonso’ bazwi likebisi

Bayuda mingi ya motema sembo bapusamaki mpenza na maloba ya Yoane mpe bayambolaki polele masumu na bango ya kozanga bosembo na Mibeko ya kondimana. Bamonisaki polele ezaleli na bango ya kobongola motema na kopesáká nzela ete Yoane abatisa bango na Ebale Yaladene. (Matai 3:5, 6) Litomba emonanaki ezalaki oyo ete, mitema na bango ekómaki na ezalela oyo ebongi mpo na kondima Masiya. Mpo na kosilisa mposa na bango ya koyeba masɛngami ya sembo ya Nzambe, Yoane alakisaki bango na esengo nyonso lokola bayekoli na ye, ateyaki bango mpe lolenge ya kobondela.​—Luka 11:1.

Na ntina na mopasoli wana ya nzela mpo na Masiya, ntoma Yoane akomaki ete: “Ye wana ayei lokola motatoli ete atatola mpɔ na moi ete bato yɔnsɔ bandima mpɔ na ye.” (Yoane 1:7) Yango wana bato ya lolenge nyonso bayaki koyoka Yoane Mobatisi wana azalaki ‘kosakwela bato na Yisraele yɔnsɔ libatisa na kobongwa na motema.’ (Misala 13:24) Akebisaki bakongoli ya mpako na likambo ya kobɔtɔla biloko ya bato. Akebisaki basoda ete batungisaka bato te to ete bafundaka bato na efundeli ya lokuta te. Mpe ayebisaki Bafalisai mpe Basadukai, bakosi, baoyo bazalaki komimonisa lokola ete babangaka Nzambe: “Ɛ libota na nyoka, nani akebisi bino kokima nkanda ejali koya? Bobota mbuma ibɔngi na kobongwana. Bomikɛmbisa tɛ mpɔ na kolongobana na bino mpenja ete, Tojali na Abalayama mpɔ na tata. Jambi najali koloba na bino ete Njambe akoki kotɛmisɛla Abalayama bana longwa na mabanga oyo.”​—Matai 3:7-9; Luka 3:7-14.

Lokola etuluku, bakonzi ya mangomba ya eleko ya Yoane baboyaki kondimela ye mpe babimiselaki ye efundeli ya lokuta ete azalaki na bademó. Baboyaki nzela ya boyengebene oyo ezali komema na bomoi ya seko. Epai mosusu, bakongoli na mpako ya masumu mpe basi na pite oyo bandimelaki litatoli ya Yoane babongolaki motema mpe bazwaki batisimo. Na ntango ebongi, bandimaki Yesu Klisto lokola Masiya.​—Matai 21:25-32; Luka 7:31-33.

Masiya alakisami

Na boumeli ya basanza motoba​—kobanda na ebandeli ya eleko ya molungé kino na ebandeli ya eleko ya malili ya mobu 29 T.B.​—Yoane motatoli ya sembo ya Nzambe abendaki likebi ya Bayuda likoló na koya ya Masiya. Ntango ekokaki mpo ete Mokonzi Masiya akoka kobima. Kasi na ntango abimaki, ayaki bobele na mayi wana ya Yaladene mpe asɛngaki ete abatisama. Liboso, Yoane aboyaki, kasi na nsima andimaki. Kanisá naino esengo azalaki na yango na ntango elimo santu ekitelaki Yesu mpe wana mongongo ya Yehova moyokanaki, komonisáká ete andimaki Mwana na Ye.​—Matai 3:13-17; Malako 1:9-11.

Yoane azalaki moto ya liboso na kondima ete Yesu azalaki Masiya, mpe alakisaki bayekoli na ye epai na Mopakolami wana. Yoane alobaki ete: “Tala Mwana-na-mpate na Njambe, molongoli na masumu na mokili.” Alobaki lisusu ete: “Ye oyo nalobi mpɔ na ye ete, Moto akoya nsima na ngai oyo ajali liboso na ngai mpɔ ete ajalaki liboso na ngai. Ngai nayebaki ye tɛ nde ete amɔnisama na Yisalaele​—yango wana nayei kobatisaka na mai.”​—Yoane 1:29-37.

Mosala ya Yoane ekóbaki kosalema nzela moko na mosala ya Yesu na boumeli ya basanza motoba. Moko na moko azalaki koyeba ntina ya mosala oyo mosusu azalaki kosala. Yoane amitalelaki lokola moninga ya Mobali-na-libala mpe asepelaki na komona bokóli ya mosala ya Klisto wana ye moko mpe mosala na ye mozalaki kokita.​—Yoane 3:22-30.

Yesu abéngaki Yoane ete azalaki mopasoli nzela mpo na ye, oyo amonisamaki na Eliya. (Matai 11:12-15; 17:12) Mokolo mosusu, Yesu alobaki ete: “Mibeko na basakoli mijalaki kino Yoane, nde na nsima na yango nsango malamu na Bokonji na Njambe ejali kosakolama mpe bato yɔnsɔ bakɔti yango na makasi.”​—Luka 16:16.

Sembo kino nsuka

Yoane akangamaki mpe atyamaki na bolɔkɔ mpamba te asakolaki solo na mpiko nyonso. Asundolaki te mokumba na ye ya kotɔndola ata mabe ya Mokonzi Elode. Na kobukáká mobeko ya Nzambe, mokonzi yango azalaki kofanda na ekobo elongo na mwasi ya ndeko na ye, Elodia. Yoane alobaki polele mpo ete moto yango akoka kobongwana mpe azwa ngolu ya Nzambe.

Yoane azalaki ndakisa malamu mpo na oyo etali kondima mpe bolingo! Atyaki bonsomi na ye na likámá, amonisaki bosembo na ye epai na Yehova Nzambe mpe bolingo na ye mpo na bazalani na ye. Nsima ya kokokisa mbula moko kati na bolɔkɔ, Yoane akatamaki motó, yango ezalaki mwango Satana asalelaki mpo na kopusa mwasi mabe Elodia ete akana yango, ye oyo ‘ayinaki’ ye. (Malako 6:16-19; Matai 14:3-12) Kasi mopasoli nzela mpo na Masiya abatelaki bosembo na ye epai na Yehova mpe mosika te akosekwisama kati na bakufi mpo na kozwa bomoi kati na mokili ya sika ya Nzambe oyo etondi na boyengebene.​—Yoane 5:28, 29; 2 Petelo 3:13.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto