Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/1 nk. 3-9
  • Mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Malia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Malia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Azwaki mokumba moko monene
  • Akutanaki na bampasi
  • Azalaki mobola mpe atikaki mboka na ye
  • Azalaki mwasi mpe mama oyo amipesaki na Nzambe
  • Ayikaki mpiko na makambo mosusu ya mpasi
  • Mikakatano oyo akanisaki te
  • Mokakatano oyo elekaki monene
  • “Talá! Nazali moombo ya Yehova!”
    Mekolá kondima na bango
  • Azalaki “kokanisa yango . . . na motema na ye”
    Mekolá kondima na bango
  • “Talá! Mwana mwasi moombo ya Yehova!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Ayikaki mpiko na mawa makasi oyo ezalaki lokola mopanga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/1 nk. 3-9

Mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Malia

Esilá kokómela yo omona ete okokoka te kosilisa mokakatano moko to kokokisa mokumba moko oyo eyeli yo na mbalakaka? Ekómelaka yo olɛmba nzoto mpo osalaka makasi mpo na koluka mwa eloko ya kobikela mokolo na mokolo? Mbala mosusu ozali kati na bamilio ya bato oyo bazali kotelengana mpe kobanga mpo bakimá bamboka na bango mpe bakendá kofanda na mboka-mopaya mpo na likambo moko boye. Longola yango, nani kati na biso ayoká naino te mpasi mpo ndeko to moninga na ye moko akufi?

OYEBAKA ete Malia, mama ya Yesu akutanaki na mikakatano nyonso wana? Likambo ya kokamwa, alongaki mikakatano yango nyonso! Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye?

Maliaayebani na mokili mobimba. Yango ekoki kokamwisa te mpamba te akokisaki mokumba moko ya ntina mingi na kokokisama ya mokano ya Nzambe. Lisusu, bato mingi basambelaka Malia. Bandimi ya Lingomba ya Katolike balobaka ete Malia azali Mama molingami, atikelá bato ndakisa malamu ya kondima, ya kozala na elikya mpe ya kokaba. Bato mingi bateyamá ete Malia azali molobeli ya bato epai ya Nzambe.

Bongo yo moko, ndenge nini otalelaka mama ya Yesu? Likambo eleki ntina, ndenge nini Nzambe atalelaka ye?

Azwaki mokumba moko monene

Malia, mwana ya Heli, azalaki Moyisalaele ya libota ya Yuda. Biblia elobeli ye mbala ya liboso ntango akutanaki na likambo moko ya kokamwa. Anzelu moko ayaki epai na ye mpe alobaki na ye boye: “Mbote, moto oyo bamoniseli boboto mingi, Yehova azali elongo na yo.” Nsima ya koyoka maloba yango, Malia abulunganaki mpe “akómaki kokanisakanisa soki mbote wana ekokaki kozala ya ndenge nini.” Na yango, anzelu ayebisaki ye ete aponami mpo na mokumba moko monene mpe ya ntina mingi: asengelaki kozwa zemi, kobota mpe kobɔkɔla Mwana ya Nzambe.​—Luka 1:26-33.

Yango ezalaki mpenza mokumba monene mpo na mwana mwasi yango oyo abalaki naino te! Asalaki nini? Na ntembe te, Malia amitunaki soki nani akondimela ye. Yozefe, fianse na ye, alingaki nde koboya ye, to bato balingaki nde kotyola kotyola ye mpo na zemi yango? (Deteronome 22:20-24) Atako bongo, akakatanaki te kondima mokumba yango ya ntina mingi.

Kondima makasi ya Malia etindaki ye andima kosala mokano ya Yehova, Nzambe na ye. Azalaki na elikya ete Yehova akosunga ye. Yango wana alobaki boye: “Talá! Mwana mwasi moombo ya Yehova! Tiká ekómela ngai ndenge olobi.” Malia andimaki nyonso oyo ekokaki kokómela ye mpamba te amonaki ete mokumba yango ezalaki libaku malamu ya kokumisa Nzambe.​—Luka 1:38.

Ntango Malia ayebisaki Yozefe ete azali na zemi, Yozefe azwaki makanisi ya koboya ye. Na ntembe te, ezalaki mpasi mpo na bango mibale. Biblia elobi te soki mpasi yango eumelaki ntango boni. Kasi, motema ya Malia mpe ya Yozefe ekitaki mpenza ntango anzelu ya Yehova abimelaki Yozefe. Anzelu yango ayebisaki Yozefe ete zemi ya Malia ezali ya likamwisi mpe asɛngaki ye atya ye na ndako.​—Matai 1:19-24.

Akutanaki na bampasi

Lelo oyo, basi mingi ya zemi babandaka kosomba biloko ya mwana basanza mingi liboso ya kobota; ekoki kozala ete Malia asalaki mpe bongo. Ezalaki kobota na ye ya liboso. Kasi, makambo oyo akanaki te ebebisaki bibongiseli oyo azalaki kozwa. Kaisala Augusto apesaki mobeko ete bato nyonso bákende kokómisa bankombo na bango na bamboka na bango ya kobotama. Na yango, Yozefe azwaki Malia, oyo azalaki na zemi ya sanza libwa, mpe basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 150 na mpunda! Beteleme etondaki na bato oyo bayaki mpo na kokomisa bankombo, mpe Malia azalaki koluka esika mpo abota, kasi esika kaka moko oyo emonanaki ezalaki ndako ya bampate. Kobota na ndako ya bampate ezalaki mpasi mpo na Malia. Na ntembe te, Malia ayokaki nsɔni mpe abangaki.

Na ntango wana ya mpasi, Malia abondelaki Yehova na motema mobimba, na elikya ete akobatela ye mpe mwana na ye. Na nsima, babateli ya bampate bayaki mpo bazalaki na mposa makasi ya komona mwana yango. Balobaki ete baanzelu babengaki mwana yango ‘Mobikisi, oyo azali Klisto Nkolo.’ Biblia elobi boye: “Malia abandaki kobomba maloba nyonso wana, kokanisakanisa mingi na motema na ye.” Malia amanyolaki maloba yango mpe elendisaki ye.​—Luka 2:11, 16-19.

Ezali boni mpo na biso? Ekoki kozala ete biso mpe tokokutana na makambo ya mpasi na bomoi. Lisusu, Biblia elobi ete “ntango mpe likambo oyo ekanami te” ekoki kokwela biso nyonso mpe kobimisela biso bampasi mpe mikakatano ya ndenge na ndenge. (Mosakoli 9:11, NW) Soki makambo ya ndenge wana ekómeli biso, tokokóma nkandankanda mpe tokopesa Nzambe foti? Omoni te ete ekozala malamu tómekola ezaleli ya Malia mpe tópusana penepene na Yehova Nzambe na nzela ya koyekola Liloba na ye Biblia, mpe komanyola makambo oyo toyekoli? Na ntembe te soki tosali bongo, tokoyika mpenza mpiko na mikakatano.

Azalaki mobola mpe atikaki mboka na ye

Malia akutanaki mpe na mikakatano mosusu: azalaki mobola mpe asengelaki kotika mboka na ye. Osilá kokutana na mikakatano ya ndenge wana? Lapolo moko emonisi ete, “ndambo ya bato nyonso ya mokili, elingi koloba bato pene na miliare misato babikaka mokolo na mokolo na mbongo oyo ekoki ata dolare mibale te,” mpe ata na mikili ya bozwi bamilio mosusu ya bato bazali kosala makasi mpo na kozwa mwa eloko ya kobikela mokolo na mokolo. Bongo yo? Mosala makasi ya kolukela libota na yo mwa eloko ya kolya, ya kolata to esika ya kolala elɛmbisaka yo nzoto mpe na bantango mosusu, esilisaka yo mayele?

Biblia emonisi ete Yozefe ná Malia bazalaki babola. Ndenge nini toyebi yango? Evanzile ya Matai, Malako, Luka, mpe Yoane elobi makambo mingi te na ntina na babalani yango. Na mwa makambo oyo elobi, elobi ete mikolo 40 nsima ya kobotama ya Yesu Malia mpe Yozefe bakendaki na tempelo kopesa mbeka ndenge esɛngamaki na mibeko​—“bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya bibenga.”a (Luka 2:22-24) Kaka bato oyo bazalaki babola mpenza mpe bakokaki te kopesa mbeka ya mwana-mpate ya mobali nde basengelaki kopesa mbeka wana. Na yango, kozwa eloko ya kobikela mokolo na mokolo, ezalaki mpasi mpo na Malia ná Yozefe. Atako bongo, bazalaki libota moko ya esengo mpe oyo ezali na bolingo. Na ntembe te, bazalaki kotya losambo ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na bango.​—Deteronome 6:6, 7.

Mwa moke nsima ya kobotama ya Yesu, Malia akutanaki na likambo mosusu ya mpasi. Anzelu moko ayebisaki Yozefe azwa libota na ye mpe bákima na Ezipito. (Matai 2:13-15) Yango ezalaki mbala ya mibale oyo Malia asengelaki kotika esika oyo amesanaki kofanda, kasi na mbala oyo asengelaki kokende na mboka-mopaya. Bayuda mingi bazalaki kofanda na Ezipito, na yango ekoki kozala ete Malia ná Yozefe balingaki kofanda ná bato ya ekólo na bango. Atako bongo, kofanda na mboka-mopaya ezalaka pɛtɛɛ te. Yo ná libota na yo bozali kati na bamilio ya bato oyo bakendá kofanda na mboka-mopaya, mbala mosusu mpo na bolamu ya bana na bino to mpo na kokima likama? Soki ezali bongo, okoki koyeba mikakatano oyo Malia akutanaki na yango na Ezipito.

Azalaki mwasi mpe mama oyo amipesaki na Nzambe

Baevanzile elobeli Malia mingi te, longola kaka na masolo oyo elobeli kobotama mpe bomwana ya Yesu. Kasi, toyebi ete Malia abotaki bana mosusu soki motoba ná Yozefe. Yango ekoki kokamwisa yo. Kasi, tótalela oyo Baevanzile elobi.

Yozefe azalaki na limemya mingi na libaku oyo Malia azwaki ya kobota Mwana ya Nzambe. Yango wana asangisaki na ye nzoto te liboso Yesu abotama. Matai 1:25 elobi ete Yozefe “asangisaki ná ye nzoto te tii ntango abotaki mwana mobali.” Na vɛrsɛ wana liloba “tii” emonisi ete nsima ya kobotama ya Yesu, Yozefe ná Malia bakómaki kosangisa nzoto lokola babalani nyonso. Baevanzile elobi ete, na yango Malia abotaki mpe bana na Yozefe; bana mibali mpe bana basi. Yakobo, Yozefe, Simona, mpe Yuda bazalaki bandeko ya Yesu. Abotaki bana ya basi soki mibale. (Matai 13:55, 56) Nzokande, Malia azwaki zemi ya bana yango ndenge bamama nyonso bazwaka zemi.b

Malia azalaki kopesa motuya mingi na boyokani na ye na Nzambe. Atako Mibeko esɛngisaki basi te ete bákendaka na fɛti ya Elekeli, Malia azalaki na momeseno ya kokende na Yozefe mbula na mbula na Yelusaleme na fɛti yango. (Luka 2:41) Yango ezalaki kosɛnga ye asalaka mobembo ya kilomɛtrɛ pene na 300 mbula na mbula, ná molɔngɔ ya bana! Kasi, na ntembe te, mibembo yango ezalaki kopesa libota na bango esengo mingi.

Lelo oyo, basi mingi bamekolaka ndakisa malamu wana ya Malia. Basalaka nyonso mpo na kokokisa mikumba oyo Makomami epesi bango. Mbala mingi, basi yango bamonisaka motema molai, koyika mpiko, mpe komikitisa! Kokanisa ndakisa ya Malia esalisaka bango bátya makambo ya elimo na esika ya liboso mpe bamposa na bango na nsima. Lokola Malia, bayebaka ete kosambela Nzambe elongo na mibali mpe bana na bango esalaka ete libota ezala makasi mpe na bomoko.

Mokolo moko, ntango Malia ná Yozefe bautaki na fɛti moko na Yelusaleme mpe bazalaki kozonga, mbala mosusu na ntango wana bazalaki na bana mingi, bamonaki ete Yesu oyo na ntango wana azalaki na mbula 12 azalaki na bango te. Kanisá naino mpasi oyo Malia ayokaki na boumeli ya mikolo misato oyo bazalaki koluka mwana na bango! Nsukansuka, ntango ye ná Yozefe bamonaki ye na tempelo, Yesu atunaki bango boye: “Boyebaki te ete nasengeli kozala na ndako ya Tata na ngai?” Lisolo elobi lisusu ete, Malia “abatelaki maloba nyonso wana malamumalamu na motema na ye.” Likambo yango mpe emonisi ete Malia azalaki mpenza kolinga Nzambe. Azalaki komanyola na mozindo makambo nyonso oyo ezalaki kokómela Yesu. Ekoki kozala ete bambula mingi na nsima, Malia ayebisaki bakomi ya Baevanzile likambo yango mpe makambo mosusu oyo esalemaki na bomwana ya Yesu.​—Luka 2:41-52.

Ayikaki mpiko na makambo mosusu ya mpasi

Nini ekómelaki Yozefe, tata-mɔbɔkɔli ya Yesu? Mbala ya nsuka oyo Baevanzile elobeli Yozefe, ezali ntango Yesu abungaki na mobembo ya Yelusaleme. Bato mosusu balobaka ete lokola Baevanzile elobeli lisusu Yozefe te, ekoki kozala ete akufaki liboso Yesu abanda mosala na ye.c Ata soki ezali bongo to te, emonani ete na nsuka ya mosala ya Yesu, Malia azalaki na mobali te. Ntango Yesu alingaki kokufa atikaki mama na ye epai ya ntoma Yoane. (Yoane 19:26, 27) Na ntembe te, Yesu akokaki kosala bongo te soki Yozefe azalaki naino na bomoi.

Malia ná Yozefe bakutanaki na makambo mingi elongo! Baanzelu babimelaki bango, bakimaki mokonzi moko ya mabe oyo azalaki koluka koboma Yesu, bakendeki kofanda na bisika mosusu, mpe babotaki bana. Ekoki kozala ete bampokwa mingi bazalaki kofanda elongo mpe kosolola na ntina na Yesu, bazalaki kokanisa makambo oyo akokutana na yango, bazalaki komituna soki bazali kobɔkɔla ye mpe koteya ye malamu! Kasi, na mbalakaka, Malia atikalaki ye moko.

Molongani na yo akufá? Oyokaka kaka mpasi makasi, atako esili koleka bambula ebele? Na ntembe te, kondima ya Malia mpe koyeba ete lisekwa ekozala elendisaki ye.d (Yoane 5:28, 29) Kasi, makanisi wana ya kolendisa esilisaki mikakatano ya Malia te. Ndenge kaka bamama mingi oyo babɔkɔlaka bana bango moko lelo banyokwamaka, Malia mpe anyokwamaki.

Tokoki kokanisa ete ntango Yozefe akufaki, Yesu akómaki koleisa baleki mpe mama na ye. Mbala mosusu ntango baleki ya Yesu bakolaki, bango mpe bandimaki kopesa mabɔkɔ mpo na koleisa libota na bango. Ntango Yesu “azalaki na mbula soki ntuku misato,” alongwaki na ndako na bango mpe abandaki mosala na ye ya kosakola. (Luka 3:23) Baboti mingi bayokaka mawa esanganá na esengo ntango mwana na bango alongwe na ndako. Baboti balekisaka ntango mingi, basalaka milende mingi mpe bamesanaka mingi na bana na bango na boye ete soki mwana alongwe na ndako bayokaka lokola nde bazangi eloko. Mwana na yo ya mobali to ya mwasi alongwe na ndako mpo na kokende kokokisa mikano na ye? Ozalaka na esengo mpo na likambo yango, kasi, ntango mosusu oyokaka mpe mposa ete bázala pembeni na yo? Soki bongo, okoki koyeba ndenge Malia ayokaki ntango Yesu alongwaki na ndako.

Mikakatano oyo akanisaki te

Ezali na mokakatano mosusu oyo Malia akanisaki te ete ekokómela ye. Ntango Yesu azalaki koteya bato mingi bazalaki kolanda ye, kasi ata ndeko na ye moko te ya libota alandaki ye. Biblia elobi ete: “Bandeko na ye bazalaki komonisa kondima na kati na ye te.” (Yoane 7:5) Ekoki kozala ete Malia ayebisaki bango makambo oyo anzelu ayebisaki ye ete Yesu azali “Mwana ya Nzambe.” (Luka 1:35) Atako bongo, Yakobo, Yozefe, Simona, mpe Yuda bazalaki komona ete Yesu azali kaka yaya na bango. Na yango, Malia azalaki na libota oyo ezalaki na bomoko te na makambo ya Nzambe.

Malia alɛmbaki nde nzoto mpe atikaki koteya bana na ye? Te! Mokolo moko, ntango Yesu azalaki koteya na Galilai, akɔtaki na ndako moko mpo na kolya mpe ebele ya bato bayaki wana mpo na koyoka ye. Banani bayaki libándá mpo na koluka ye? Malia ná bandeko ya Yesu. Na yango, ntango Yesu akómaki pene ya ndako na bango, Malia alandaki ye mpe azwaki bana na ye mosusu na likanisi ete bakoki kondima Yesu.​—Matai 12:46, 47.

Ekoki kozala ete ozali kosala makasi mpo na kolanda Yesu, kasi bato mosusu ya libota na yo balingi kosala lokola yo te. Kolɛmba nzoto te mpe kotika te koteya bango! Lokola Malia, bato mingi basalisaki bato ya mabota na bango na boumeli ya bambula mingi liboso bábongwana. Nzambe asepelaka na bato oyo bazalaka na mpiko ya ndenge wana, ata soki bato basepeli to te.​—1 Petelo 3:1, 2.

Mokakatano oyo elekaki monene

Na ntembe te, mokakatano ya nsuka oyo Biblia elobeli ete Malia akutanaki na yango, etungisaki ye mingi koleka. Azalaki kotala ndenge mwana na ye oyo alingaki mingi azalaki kobunda na liwa mpo bato ya ekólo na ye moko babwakaki ye. Ndenge baboti nyonso balobaka, kokufa ya mwana, azala moke to mokóló, ezalaka lokola “kobungisa eloko moko ya motuya,” to “liwa oyo esalaka mpasi mingi.” Ndenge esakolamaki bambula mingi liboso, Malia ayokaki lokola nde batɔbɔli ye na mopanga!​—Luka 2:34, 35.

Malia atikaki nde mokakatano yango ebulunganisa ye mpe ebebisa boyokani na ye na Yehova? Te. Nsima ya mokakatano yango, Biblia elobi ete Malia ná bayekoli ya Yesu bazalaki elongo mpe “bamipesaki na mabondeli.” Azalaki ye moko te. Bana na ye mosusu, oyo na ntango wana bakómaki kondimela Yesu, yaya na bango, bazalaki elongo na ye. Likambo yango ebɔndisaki mpenza Malia!e​—Misala 1:14.

Malia azalaki mpenza na esengo na bomoi mpamba te azalaki mwasi mpe mama oyo asalelaki Nzambe na bosembo. Azwaki matomba mingi ntango azalaki kosalela Nzambe. Alongaki mikakatano mingi. Ntango tokutani na mikakatano na mbalakaka to ntango mikakatano ya libota ekómi koleka biso motó, tokoki mpenza kozwa mateya ndenge Malia ayikaki mpiko na bosembo nyonso liboso ya mikakatano.​—Baebele 10:36.

Kasi, tokoki koloba nini na oyo etali kosambela Malia? Lokola Biblia elobi ete Malia azwaki mokumba monene, tosengeli nde kosambela ye?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ndɛkɛ moko ezalaki kopesama mpo na mbeka ya masumu. (Levitike 12:6, 8) Lokola apesaki yango, Malia amonisaki ete ye mpe azalaki moto ya kozanga kokoka lokola bato nyonso, mpe asangolaki makambo nyonso oyo lisumu ya Adama, moto ya liboso, ememelá bato.​—Baloma 5:12.

b Talá etanda “Yesu azalaki na bandeko?”

c Emonani polele ete Yozefe azalaki lisusu na bomoi te, mpamba te masolo ya mosala ya Yesu elobeli bato mosusu ya libota ya Yesu: mama na ye, bandeko na ye ya mibali mpe bandeko na ye basi. Na ndakisa, na fɛti ya libala oyo esalemaki na Kana, Biblia elobi ete Malia azalaki na fɛti yango mpe apesaki mwa makanisi ntango vinyo esilaki, kasi elobeli Yozefe ata moke te. (Yoane 2:1-11) Mokolo mosusu, bato ya mboka ya Klisto babengaki Yesu mwana ya Yozefe te, kasi “mwana ya Malia.”​—Malako 6:3.

d Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina na elikya ya lisekwa oyo Biblia epesi, talá mokapo 7 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

e Talá etanda “Azalaki na mpiko ya kolongwa na lingomba na ye ya kala,” na lokasa 7.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 6]

Yesu azalaki na bandeko?

Ɛɛ, azalaki na bango. Bato mosusu ya teoloji bandimaka likambo yango te, atako Baevanzile emonisi yango polele na bisika mingi. (Matai 12:46, 47; 13:54-56; Malako 6:3) Nzokande, bato ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia balobelaki ntina mibale oyo bato balobaka ete Malia abotaki bana mosusu te. Ya liboso, bazalaki koloba bongo mpo na kolongisa liteya moko oyo ebimaki na nsima, oyo mangomba ekómaki koteya ete Malia atikalaki ngɔndɔ bomoi na ye mobimba. Ya mibale, nsima ya kotalela makanisi yango, emonanaki ete ezali solo te.

Na ndakisa, moko ya makanisi yango elobaka ete “bandeko” ya Yesu oyo Biblia elobeli, ezali nde bana oyo Yozefe abotaki liboso abala Malia. Likanisi yango ezali na motó na makolo te, mpo ezali komonisa ete Yesu azali na lotomo te ya kozwa bokonzi ya Davidi mpo azali mwana ya liboso te.​—2 Samwele 7:12, 13.

Likanisi mosusu ezali ete bandeko wana bazalaki nde bana ya bandeko ya Malia to ya Yozefe; nzokande Makomami ya Grɛki esaleli maloba ekeseni mpo na kolobela “ndeko ya makila,” “mwana ya ndeko ya tata to ya mama,” mpe “ndeko mosusu ya libota.” Yango wana, Frank Gaebelein, moto moko ya mayele alobaki ete makanisi yango ya bato ya teoloji ezali solo te. Asukisaki boye: “Liloba ‘bandeko’ . . . esalelami mpo na kolobela bana ya Malia ná Yozefe mpe na ndenge yango, bandeko oyo balobeli awa ezali mpenza bandeko ya Yesu oyo Malia abotaki.”

[Etanda na lokasa 7]

Azalaki na mpiko ya kolongwa na lingomba na ye ya kala

Malia abotamaki na libota ya Bayuda, mpe andimaki kozala na Lingomba ya Bayuda. Azalaki kokende na sinagoga, ndenge babengaka esika ya losambo ya Bayuda, mpe azalaki kokende na tempelo ya Yelusaleme. Nzokande, ntango boyebi ya Malia ya mokano ya Nzambe ezalaki kokola, amonaki ete mimeseno ya bankɔkɔ na ye ezalaki kosepelisa Nzambe te. Bakonzi ya mangomba ya Bayuda babomaki Masiya, Mwana ya Malia. Kasi, liboso Yesu akufa, alobaki na bango ete: “Talá! Ndako na bino esundolami na mabɔkɔ na bino.” (Matai 23:38) Nzambe azalaki lisusu te kopambola lingomba wana oyo Malia azalaki banda bomwana.​—Bagalatia 2:15, 16.

Ekoki kozala ete ntango lisangá ya boklisto esalemaki, Malia azalaki na mbula soki 50. Asalaki nini? Alobaki nde ete lokola abotamaki na Lingomba ya Bayuda akotingama kaka na mimeseno ya bankɔkɔ na ye? Alobaki nde ete akotika lingomba na ye te mpo akómi mokóló? Alobaki bongo te! Malia amonaki ete Nzambe akómaki kopambola nde lisangá ya boklisto, na yango azalaki na kondima mpe na mpiko ya kolongwa na lingomba na ye ya kala.

[Elilingi na lokasa 5]

Bazali kokende komibomba na Ezipito

[Elilingi na lokasa 8]

Likambo oyo epesaka mama nyonso mpasi mingi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto