Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/7 lok. 31
  • Mituna ya Batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya Batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo mosusu
  • Anzelu Gabriele ayei epai ya Maria
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Yesu akumisami liboso ya kobotama na ye
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Akumisami liboso ya kobotama na ye
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Anzelu akei epai ya Maria
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/7 lok. 31

Mituna ya Batángi

Malia, ye oyo akómaki mama ya Yesu, azalaki na zemi na ntango akendeki kotala ndeko na ye Elisabɛta?

Ee, na ntembe te, azalaki na zemi?

Kati na Luka mokapo 1, tozali kotánga liboso na ntina na zemi ya Elisabɛta, mwasi ya nganga Zakari, ye oyo abotaki Yoane (Mobatisi). Na ntango Elisabɛta azalaki “na sanza na motoba anzelu Gabaliele” akendeki kotala Malia mpo na koyebisa ye ete akokumba zemi mpe akobota “Mwana na Oyo-Aleki-Likoló.” (Luka 1:26, 30-33) Kasi ntango nini Malia azwaki zemi?

Lisoló ya Luka ekóbi na koyebisa ete na nsima Malia akendeki na Yuda mpo na kotala ndeko na ye Elisabɛta oyo azalaki na zemi. Na ntango basi oyo mibale bakutanaki, mwana (Yoane) kati na libumu ya Elisabɛta apombwaki. Elisabɛta alobelaki ‘[mbuma, NW] na libumu na Malia,’ mpe abéngaki Malia ete “mama na Nkolo na ngai.” (Luka 1:39-44) Likambo oyo ezali mpenza komonisa polele ete Malia asilaki kokumba zemi, ete azalaki na zemi na ntango akendeki kotala Elisabɛta.

Tozali kotánga kati na Luka 1:56 ete: “Malia aumelaki na ye soko sanza misato, mpe azongaki na ndako na ye.” Mokapo oyo epesi te kotángama ya badati na lolenge ya sikisiki mpo na komonisa mokolo ya solo mpenza ya manáka. Elobi ete “soko sanza misato,” yango elingaki komonisa ete Elisabɛta azalaki na sanza ya motoba ya zemi na ye.

Na nsima ya kosalisa Elisabɛta na boumeli ya mikolo ya nsuka ya zemi na ye, Malia akendeki na ndako na ye na Nasalɛtɛ. Ekoki mpenza kozala ete na ntango Malia amonaki ete wana Elisabɛta alingaki kobota (Yoane), bapaya basengelaki koya mingi, basusu nkutu balingaki mpe kozala bandeko ya mosuni. Yango elingaki kozala nsɔ́ni mpo na mwasi oyo abali te oyo azalaki mpe na zemi. Zemi ya Malia ezalaki ya sanza boni na ntango azongaki na Nasalɛtɛ? Lokola afandaki elongo na Elisabɛta “soko sanza misato,” ekoki mpenza kozala ete Malia azalaki na nsuka ya sanza misato ya zemi na ye to na ebandeli ya sanza minei na ntango azongaki na Nasalɛtɛ.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto