Ntómbwa ya Malia—Ezali liteya liutaki na Nzambe?
NTOMBWA ya Malia—ezali liteya oyo elobi ete Malia, mama na Yesu, abutaki na likoló na nzoto na ye ya mosuni—ezali na motuya mingi epai na bamilió ya basangani ya Lingomba ya Katolike ya Loma. George William Douglas, ye mokomi na makambo ya kala, alobaki ete: “Ntómbwa ya Malia, to kokamatama ya Ngɔndɔ Malia mpo na kokende na likoló, ekumisamaki uta [kala] lokola elambo eleki monene kati na bilambo na ye nyonso mpe lokola moko na bilambo bileki lokumu kati na mobu ya Eklezia.”
Atako bongo, bayekoli ya mateya ya lingomba ya Katolike bandimi ete Biblia ezali koloba te na ntina na Malia ete abutaki na likoló na motindo wana. Ya solo, basambeli moke ya lingomba ya Katolike bayebi ete liteya na bango oyo balingaka ezalaki uta bikeke mingi kobimisa bowelani mpe ntembe makasi. Na yango, ndenge nini mpenza lingomba eyaki kondima Ntómbwa ya Malia lokola liteya oyo ekoki kotyelama ntembe te?a Ezali na ntina na kotalela liteya yango ete Nzambe nde ayebisaki yango? Biyano na mituna oyo ezali bobele mateya ya mpamba te. Ezali na ntina mingi mpo na bato oyo balingaka solo.
Bokóli ya liteya oyo ekoki kotyelama ntembe te
Ekoki mbala mosusu kokamwisa yo na koyeba ete kati na bikeke ya liboso, nsima na liwa ya Yesu, likanisi ya Ntómbwa ya Malia eyebanaki soko moke te kati na makanisi ya baklisto. Jean Galot, ye moyekoli ya mateya ya lingomba ya Katolike, akomaki kati na zulunalo L’Osservatore Romano ete: “Na ebandeli, ata likanisi moko te ya liwa ya Malia ezalaki na bokangami na libota ya boklisto.”
Nzokande, nsima wana liteya ya Bosato ekómaki liteya oyo endimamaki kati na lingomba mobimba, babandaki mokemoke kopesa Malia mokumba ya ntina mingi. Bankombo ya lokumu, lokola “Mama wa Nzambe,” “ye oyo abotamaki kozanga lisumu,” “Moyokanisi,” mpe “Mwasi-mokonzi na likoló,” ebandaki kosalelama mpo na ye. Na nsima ya bambula, Galot, ye moyekoli ya mateya ya lingomba ya Katolike, amonisaki likanisi oyo ete: “Lingomba ya ekeke ya liboso elobaki eloko moko te na ntina na liwa ya Malia, likambo yango ekokaki soko moke te kosepelisa baklisto oyo bayebaki ete Malia azalaki moto ya kokoka mpe balingaki kokumisa ye. Na yango, bandimbola na ntina na Ntómbwa ya Malia, oyo eutaki bongo na makanisi mpamba ya bato, ebandaki na ntango wana.”
Pene na ekeke ya minei liboso ya Ntango na biso, makomi mazangi kopemama, oyo ezalaki koloba na ntina na Ntómbwa ya Malia ebandaki kosalelama. Makomi wana malobelaki masoló mauti na makanisi mpamba na ntina na kobuta ya Malia na likoló. Tókamata ndakisa ya makomi oyo ebengami “Kolala ya Malia mama Mosantu wa Nzambe.” Elobamaki ete moto mosusu akomaki yango te bobele ntoma Yoane, kasi emonani mpenza lokola ete ekomamaki bambula 400 nsima ya liwa ya Yoane. Engebene lisoló oyo etondi na lokuta, bantoma ya Yesu bayanganisamaki na lolenge ya ekamwiseli epai na Malia, kuna bamonaki ye kobikisa bakufi miso, bimimi mpe batengumi. Na nsuka, lokola elobami awa, bantoma bayokaki Yesu koloba epai na Malia ete: “Talá, uta sikawa nzoto na yo ya motuya ekotindama na paladiso, molimo mosantu na yo ekotindama na makoló kati na esika biloko ya motuya ya Tata na ngai bizwami, kati na kongenga oyo eleki kongenga nyonso, epai kuna kimya mpe kosepela ya baanzelu basantu ezali, mpe yango ezali kolandana ntango nyonso.”
Lolenge nini bandimi batalelaki makomi motindo oyo? René Laurentin, ye moyekoli ya mateya matali Malia alobaki ete: “Bato babimisaki makanisi makeseni. Baoyo baluti bindimandima bazali kokosama na makambo ya kosepelisa ya masoló kitoko, kozanga kokanisa lisusu malamu. Basusu bayini makasi masolo wana ezangi boyokani kati na yango, oyo ezalaka mbala mingi bongolabongola ezangi nguya.” Na yango, liteya ya Ntómbwa ya Malia ezali na etumba mpo ete ekoka kondimama na bato nyonso kati na lingomba. Likambo mosusu oyo emonisi bongolabongola ezali ete, oyo elobamaki ete ezali mikuwa ya nzoto ya Malia, ebandaki kosambelama na bisika mosusu. Ezalaki mpasi mpo na koyokanisa yango na likanisi oyo ete nzoto na ye ya mosuni ekamatamaki mpo na kokende na likoló.
Na ekeke ya 13, Thomas d’Aquin, lokola bato mingi mosusu oyo bayekolaka mateya ya lingomba, alobaki ete ekokaki kosalema te ete Ntómbwa ya Malia eteyama lokola liteya oyo likoki kotyelama ntembe te, mpamba te “Makomami mazali koteya yango te.” Atako bongo, liteya yango ekobaki kondimama epai na bato mingi lisusu mpe basáli na ntɔki ya lokumu lokola Raphäel, Corrèggie, Titien, Annibal Carracche mpe Rubens, bayemaki bilili mingi mpo na kolakisa oyo ebengamaki ete “Ntómbwa ya Malia.”
Ntembe wana ezwaki eyano te kino na mikolo oyo euti koleka kala mingi te. Engebene sángo Giuseppe Filograssi, kino na ndambo ya liboso ya ekeke na biso, bato na mayele ya Lingomba ya Katolike bakobaki kobimisa “boyekoli mpe masolo oyo ezalaki ntango nyonso malamu te” mpo na liteya ya Ntómbwa ya Malia. Ata mpe bapápa mosusu, na ndakisa Léon XIII, Pie X mpe Benoit XV, “bazali nkutu komonisa makanisi na bango te na ntina na likambo yango.” Kasi na mokolo ya Novɛmbɛ 1, 1950, lingomba eyaki kozwa etelemelo ya nsuka. Pápa Pie XII asakolaki ete: “Tolimboli yango ete ezali liteya liutaki na Nzambe ete Mama wa Nzambe oyo azangi litono, Malia oyo azali ntango nyonso ngɔndɔ, nzoto na ye mpe molimo na ye ekamatamaki mpo na kokende kati na nkembo ya likoló, ntango bomoi na ye awa na mabelé esukaki.”—Munificentissimus Deus.
Kondima kati na mobembo ya Malia na nzoto ya mosuni kuna na likoló ezalaki lisusu te likambo ya kondima bobele soki olingi, epai na basangani ya Katolike—ekómaki nde sikawa kati na Lingomba, liteya oyo ekoki kotyelama ntembe te. Pápa Pie XII alobaki ete: “Soki moto nani . . . ameki koboya to kotya ntembe na bolingo na ye moko mpo na oyo Biso tosili kolimbola, asengeli koyeba ete akozanga kokokisa mokano mpo na oyo etali Kondima ya Nzambe mpe ya lingomba ya Katolike.”
Oyo Makomami mazali mpenza koloba
Kasi na moboko nini lingomba ekamati etelemelo wana ya makasi? Pápa Pie XII alobaki ete liteya ya Ntómbwa ya Malia ezwi “moboko na yango ya nsuka kati Makomami Mosantu.” Kati na mikapo oyo mipesamaka mbala na mbala mpo na kopesa elembeteli ya Ntómbwa ya Malia ezali bongo Luka 1:28, 42. Mikapo wana milobi na ntina Malia ete: “Losako, otondi na ngrásya, Nkolo azali na yo: obenisami kati na basi . . . , mbuma ya libumu na yo mpe ebenisami.” (Douay) Bato oyo bandimaka liteya wana basosoli na motindo oyo ete lokola Malia ‘atondaki na ngrásya,’ elingi koloba ete akufaki te. Mpe lokola ‘abenisamaki,’ lolenge moko mpe ‘mbuma ya libumu na ye ebenisamaki,’ elingi koloba ete azwaki matomba oyo ekokani na oyo ya Yesu—kati na yango mpe komata na ye kuna na likoló. Okanisi ete lolenge oyo ya kososola ebongi mpenza?
Ya liboso, bato na mayele oyo bakoyekolaka nkóta balobi ete liloba “otondi na ngrásya” ezali lolenge ya kobongola maloba na lolenge ezangi bosikisiki mpe liloba ya Greke oyo Luka asalelaki ebongolami malamu mpenza ete “eloko oyo endimami na Nzambe.” Biblia ya Lingala, Liloba lya Nzambe, oyo ebongolami na bato ya Katolike ebongoli Luka 1:28 ete: “Losako, na yo, mwana wa bolingo.” Elonga ezali te ya kosukisa ete Malia akumbamaki na likoló na nzoto ya mosuni bobele mpo ete azalaki “mwana wa bolingo” ya Nzambe. Libongoli yango elobi lisusu ete Setefano, moklisto ya liboso oyo abomamaki mpo na kondima na ye, ‘atondaki na ngrásya’—kasi elobami na ntina na ye te ete asekwaki na nzoto ya mosuni.—Bikela (Misala) Mis. 6:8, LN.
Kasi, Malia apambolamaki mpe andimamaki na Nzambe, boye te? Ɛɛ, kasi likambo ya kobenda likebi ezali oyo ete na mikolo na basambisi na Yisraele, mwasi moko na nkombo Yaele ‘apambolamaki koleka basi yɔnsɔ.’ (Basambisi 5:24) Na ntembe te, moto moko te akoki koloba ete Yaele mpe abutaki na likoló na nzoto ya mosuni. Lisusu, liteya mobimba ya Ntómbwa ya Malia ezwi moboko na yango likoló na likanisi oyo ete Yesu ye moko mpe abutaki na likoló na nzoto ya mosuni. Nzokande Biblia emonisi ete ‘azalisamaki na [to asekwisamaki], na nguya ya Elimo Santu.’ (1 Petelo 3:18, kokanisá mpe na 1 Bakolinti 15:45.) Na nsima, ntoma Paulo alobaki ete “nzoto ya nsuni na makila ekoki koyingela o bokonzi bwa Nzambe te.”—1 Korinti 15:42-50, LN.
Ya solo, Biblia ezali koloba na ntina na lisekwa mpo na kokende na likoló mpo na baklisto bapakolami na elimo. Nzokande, 1 Batesaloniki 4:13-17 (NW) emonisi yango polele ete lisekwa wana lisengelaki kobanda te liboso na “kozala ya Nkolo,” na boumeli ya mikolo ya nsuka ya eleko oyo esili kobeba. Kino ntango wana esengelaki kokoka, Malia asengelaki kolala kati na kufa, elongo na bankoto mosusu baklisto ya sembo.—1 Bakolinti 15:51, 52.
Malia—Mwasi na kondima
Ondimisama ete mokano na biso ezali te ya kotyola Malia. Na ntembe te, Malia azalaki mwasi moko ya ndakisa malamu—mwasi oyo kondima na ye ebongi na komekolama! Andimaki na bolingo nyonso komema mokumba mpe libaku malamu ya kokóma mama na Yesu, bakisa mpe mimekamo na komiboya oyo mokumba yango esengelaki kobimisa. (Luka 1:38; 2:34, 35) Elongo na Yozefe, abokolaki Yesu kati na mayele ya Nzambe. (Luka 2:51, 52) Azalaki penepene na Yesu na boumeli ya monyoko ye na likoló na nzete ya mpasi. (Yoane 19:25-27) Mpe lokola azalaki moko kati na bayekoli na ye ya sembo, na botosi nyonso, atikalaki kati na Yelusaleme na mpe azwaki litomba na kosopama ya elimo santu na mokolo ya Pantekote.—Misala 1:13, 14; 2:1-4.
Lolenge mabe ya kotalela Malia ezali kopesa lokumu epai na Mozalisi te, soko mpe epai na Malia te. Liteya ya Ntómbwa ya Malia ezali kosalelama mpo na kolendisa likanisi ezangi moboko, oyo ete Malia azali moyokanisi ya bato epai na Nzambe. Kasi Yesu Klisto andimaki liteya motindo wana? Nkutu, alobaki nde ete: “Ngai najali njela mpe sɔlɔ mpe bomɔi. Moto akokóma epai na Tata tɛ sɔkɔ na njela na ngai tɛ. Sɔkɔ bokolɔmba nini na nkombo na ngai, ngai nakosala yango.” (Yoane 14:6, 14; kokanisá na Misala 4:12.) Ya solo, bobele Yesu Klisto, kasi Malia te nde azali moyokanisi ya bato epai na Mozalisi. Ezali na nzela na Yesu—kasi Malia te—nde tosengeli kobelema epai na Mopesi-na-Bomoi mpo na koluka ‘lisungi na ntango na bosenga.’—Baebele 4:16.
Kondima solo na ntina na Malia ekoki kozala mpasi mingi mpo na basusu. To mpe, ekoki mpenza kosenga ete moto atika bindimeli mosusu oyo azalaki na yango uta kala mpe mateya oyo alingaki mingi. Nzokande, atako solo ezalaka mbala mosusu mpasi mpo na kondima yango, ekosukaka bongo na ‘kosikola moto.’ (Yoane 8:32) Yesu alobaki ete Tata na ye azali koluka baoyo bakosambela ye “na [elimo, NW] mpe na sɔlɔ.” (Yoane 4:24) Mpo na basambeli ya sembo ya lingomba ya Katolike, maloba oyo mazali momekamo monene.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kati na lingomba ya Katolike, liteya oyo ekoki kotyelama ntembe te, na bokeseni na endimeli, elobami na ntina na yango ete ezali solo oyo ebimisami na lokumu nyonso uta na likita oyo esangisaka bakonzi ya mangomba ebele to ebimisami na pápa, ye “mokonzi-moteyi oyo akoki kosala libunga te.” Na yango, kati na mateya oyo elimbolami na Lingomba ya Katolike, oyo ya nsuka mpenza ezali bongo Ntómbwa ya Malia.
[Etanda na lokasa 27]
MALIA AKUFAKI?
Malia akufaki mpenza liboso na oyo babengi ete kobuta na ye kuna na likoló? Bayekoli na mateya ya lingomba ya Katolike bamoni ete bazali liboso na makambo mibale ya minene oyo ezali mpasi mpo na kopona moko mpe kotika mosusu kati na liteya oyo. Nuovo dizionario di teologia emonisi ete “ekozala mpasi kopesa epai na Malia likoki ya kozanga kokufa, libaku oyo ata nkutu Klisto azalaki na yango te.” Nzokande, koloba ete Malia akufaki solo ezali kobimisa motuna moko ya mpasi mingi. Kari Børresen, ye moyekoli mateya ya mangomba, amonisi ete “liwa ezali etumbu mpo na lisumu ya ebandeli, oyo, engebene [liteya ya “Kobotama kozanga lisumu”], ezalaki na bopusi te epai na Malia.” Na yango, mpo na nini asengelaki kokufa? Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete Pápa Pie XII na bokɛngi nyonso, aboyaki kolobela likambo litali liwa ya Malia na mobimba na yango wana ezalaki ye kolimbola liteya ya Ntómbwa ya Malia.
Likambo ya esengo ezali oyo ete, bongolabongola motindo wana ezali te kati na mateya ya Biblia. Ata esika moko te ezali koteya yango—ata mpe na lolenge ya elilingi—ete Malia azalaki mbuma ya “kobotama kozanga lisumu.” Nzokande, ezali komonisa ete Malia azalaki moto ya kozanga kokoka oyo azalaki na mposa ya lisiko. Mpo na yango, nsima na kobotama ya Yesu, akendeki na tempelo mpo na kopesa mbeka ya masumu epai na Nzambe. (Levitike 12:1-8; Luka 2:22-24) Lokola bato nyonso ya masumu, na nsuka Malia akufaki.—Baloma 3:23; 6:23.
Solo oyo ya pɛtɛɛ ezali mpenza na bokeseni eleki monene na mituna mizangi biyano mibimisami na liteya ya Ntómbwa ya Malia.
[Elilingi na lokasa 26]
‘Ntómbwa ya Malia’ engebene Titien (c. 1488-1576)
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Giraudon⁄Art Ressource, N.Y.
[Elilingi na lokasa 26]
Na komemáká mbeka ya masumu kati na Tempelo nsima na kobotama ya Yesu, Malia amonisaki ete azalaki mosumuki oyo azalaki na mposa ya lisiko