Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Luka
EYEBANI ete Evanzile ya Matai ekomamaki libosoliboso mpo na Bayuda, mpe ete Evanzile ya Malako ekomamaki mpo na bato oyo bazalaki Bayuda te. Kasi, Evanzile ya Luka ekomamaki mpo na bato ya mabota nyonso. Mokanda ya Luka, oyo ekomamaki na mobu soki 56-58 T.B., elobeli malamumalamu lisolo ya bomoi mpe ya mosala ya Yesu.
Lokola Luka azalaki monganga mpe azalaki kotyela bato likebi, alandelaki “makambo nyonso malamumalamu uta ebandeli” mpe alobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula 35—kobanda na mobu 3 L.T.B. tii na 33 T.B. (Luka 1:3) Makambo mingi (60 %) oyo ezali na Evanzile ya Luka ezali te na Baevanzile mosusu.
EBANDELI YA MOSALA
Nsima ya kolobela makambo etali kobotama ya Yoane Mobatisi mpe ya Yesu, Luka amonisi ete Yoane abandaki mosala na ye na mbula ya 15 ya boyangeli ya Tibɛli Kaisala, elingi koloba na ebandeli ya ɔtɔne ya mobu 29 T.B. (Luka 3:1, 2) Yoane abatisaki Yesu na nsuka ya ɔtɔne ya mbula yango. (Luka 3:21, 22) Na mobu 30 T.B., ‘Yesu azongaki na Galilai mpe abandaki koteya na basinagoga na bango.’—Luka 4:14, 15.
Yesu asalaki mobembo na ye ya liboso ya kosakola na Galilai. Ayebisaki ebele ya bato ete: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu.” (Luka 4:43) Amemaki Simona, oyo azalaki mobomi-mbisi mpe bayekoli mosusu. Alobaki boye: “Banda sikoyo okobanda kokanga bato na bomoi.” (Luka 5:1-11; Mat. 4:18, 19) Yesu azalaki elongo na bantoma 12 ntango asalaki mobembo na ye ya mibale ya kosakola na Galilai. (Luka 8:1) Na mobembo ya misato, atindaki bantoma 12 “kosakola bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa.”—Luka 9:1, 2.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:35—Likei (ovule) ya Malia nde esalelamaki mpo akóma na zemi? Mpo mwana oyo Malia asengelaki kobota azala mpenza nkɔkɔ ya Abalayama, ya Yuda, mpe ya Davidi, ndenge Nzambe alakaki, likei ya Malia esengelaki kosalelama. (Gen. 22:15, 18; 49:10; 2 Sam. 7:8, 16) Kasi, Yehova asalelaki elimo santu na ye mpo na kokɔtisa bomoi ya kokoka ya Mwana na ye na libumu ya Malia mpe Malia akómaki na zemi. (Mat. 1:18) Emonani ete yango nde elongolaki kozanga kokoka nyonso oyo ezalaki na likei ya Malia mpe banda na ebandeli ya zemi, ebatelaki mwana oyo azalaki na kati ya libumu mpo azwa mbeba moko te.
1:62—Zekalia akómaki mpenza baba? Te. Kaka lolemo na ye nde ekangamaki. Ya solo, bato batunaki Zekalia “na bilembo” nkombo oyo alingaki ete bápesa mwana kasi, ezalaki te mpo matoi na ye ekufaki. Na ntembe te, ayokaki ntango mwasi na ye alobaki nkombo oyo basengeli kopesa mwana. Mbala mosusu bato oyo batunaki Zekalia basalelaki elembo. Lokola lolemo na ye kaka nde efungwamaki, yango emonisi ete matoi ya Zekalia ekufaki te.—Luka 1:13, 18-20, 60-64.
2:1, 2—Ndenge nini maloba “bokomisi nkombo wana ya liboso” esalisi mpo na koyeba ntango oyo Yesu abotamaki? Na mikolo ya Kaisala Augusto, bokomisi nkombo esalamaki mbala moko te—ya liboso ezalaki na mobu 2 L.T.B. mpo na kokokisa esakweli oyo ezali na Danyele 11:20 mpe ya mibale esalemaki na mobu 6 to 7 T.B. (Mis. 5:37) Kiliniusi azalaki guvɛrnɛrɛ ya Silia ntango bokomisi nkombo yango mibale esalemaki, mpe emonani ete azwaki mokumba yango mbala mibale. Lokola Luka alobeli bokomisi nkombo ya mbala ya liboso, yango emonisi ete Yesu abotamaki na mobu 2 L.T.B.
2:35—Na ndenge nini “mopanga molai” esengelaki kolekisama na katikati ya molimo ya Malia? Yango ezalaki mpasi oyo Malia asengelaki koyoka ntango akomona ndenge bato mingi bakoboya kondima Yesu lokola Masiya mpe mawa oyo Malia asengelaki koyoka mpo na liwa ya mpasi oyo Yesu asengelaki kokufa.—Yoa. 19:25.
9:27, 28—Mpo na nini Luka alobi ete mbongwana ya Yesu esalemaki nsima ya “mikolo mwambe” banda ntango oyo Yesu alakaki bayekoli na ye ete bamosusu kati na bango “bakoyoka ata nsolo ya liwa te” tii ntango bakomona ye na Bokonzi na ye, nzokande Matai ná Malako balobi ete ezalaki “mikolo motoba na nsima”? (Mat. 17:1; Mko. 9:2) Emonani ete Luka abakisaki mikolo mibale, mokolo oyo Yesu alakaki bango mpe mokolo oyo likambo yango esalemaki.
9:49, 50—Mpo na nini Yesu apekisaki te moto oyo azalaki kobimisa bademo, atako moto yango azalaki kolanda ye te? Yesu apekisaki moto yango te mpamba te lisangá ya baklisto esalemaki naino te. Yango wana, esɛngaki te ete moto yango alanda Yesu mpo amonisa kondima na nkombo na ye mpe abimisa bademo.—Mko. 9:38-40.
Mateya mpo na biso:
1:32, 33; 2:19, 51. Malia abombaki na motema na ye makambo mpe maloba oyo ekokisaki bisakweli. Biso mpe tobombaka na motema na biso makambo oyo Yesu asakolaki mpo na “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” mpe tokokanisaka yango na makambo oyo ezali kosalema lelo oyo?—Mat. 24:3.
2:37. Ndakisa ya Ana ezali koteya biso ete tosengeli kokangama na losambo ya Yehova, ‘kotingama na mabondeli,’ mpe kobosana te “koyangana na biso mpenza” na makita ya lisangá.—Lom. 12:12; Ebe. 10:24, 25.
2:41-50. Yozefe azalaki kotya makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na ye mpe azalaki komibanzabanza mpo na bamposa ya mosuni mpe ya elimo ya libota na ye. Mpo na yango, atikaki ndakisa ya malamu mpo na batata ya mabota.
4:4. Tosengeli te kolekisa mokolo mobimba kozanga ete tókanisa na Liloba ya Nzambe.
6:40. Moteyi ya Liloba ya Nzambe asengeli kopesa bayekoli na ye ndakisa ya malamu. Asengeli kosalelaka makambo oyo ateyaka.
8:15. Mpo na ‘kosimba liloba mpe kobota mbuma elongo na koyika mpiko,’ tosengeli kokanga ntina ya Liloba ya Nzambe, koyeba motuya na yango mpe kokɔtisa yango na mitema na biso. Tosengeli kobondelaka mpe komanyola ntango tozali kotánga Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia.
NSUKA YA MOSALA YA YESU
Yesu atindaki bato 70 liboso na ye na bingumba mpe bisika mosusu ya Yudea. (Luka 10:1) Atambolaki “engumba na engumba mpe mboka na mboka, koteyáká.”—Luka 13:22.
Mikolo 5 liboso ya Elekeli ya mobu 33 T.B., Yesu akɔtaki na Yelusaleme likoló ya mwana ya mpunda. Ntango ekokaki mpo maloba oyo ayebisaki bayekoli na ye ekokisama: “Mwana ya moto asengeli komona mpasi mingi mpe koboyama na mikóló mpe na banganga-nzambe bakonzi mpe na bakomeli, mpe kobomama, mpe na mokolo ya misato kolamuka.”—Luka 9:22, 44.
Biyano na mituna ya Biblia:
10:18—Yesu alingaki koloba nini ntango ayebisaki bayekoli 70 ete: “Nabandaki komona Satana asili kokwea lokola mokalikali banda na likoló”? Yesu alingaki koloba te ete basilaki kobengana Satana na likoló mpe babwaki ye na mabelé. Likambo yango esalemaki na 1914, mwa moke nsima ya kotyama ya Klisto lokola Mokonzi na likoló. (Emon. 12:1-10) Ekoki kozala ete Yesu alobelaki likambo oyo esengelaki kosalema na mikolo ekoya lokola nde esilaki kosalema mpo na komonisa polele ete likambo yango ekosalema solo.
14:26—Na ndenge nini bayekoli ya Klisto basengeli ‘koyina’ bato ya libota na bango? Na Biblia, liloba “koyina” ekoki kolimbola kolinga moke. (Gen. 29:30, 31) Koloba ete baklisto basengeli ‘koyina’ bandeko na bango elimboli ete basengeli kolinga bango moke kasi kolinga Yesu mingi.—Mat. 10:37.
17:34-37—“Bampongo” ezali banani, mpe “ebembe” epai bakoyanganisama ezali nini? Baoyo ‘bakokamatama,’ to bakobika, bazali lokola bampongo, bandɛkɛ oyo bamonaka mosika. “Ebembe” epai bakoyanganisama elimboli Klisto na ntango ya kozala na ye oyo bato bakomona na miso te mpe bilei ya elimo oyo Yehova apesaka bango.—Mat. 24:28.
22:44—Mpo na nini Yesu atungisamaki mingi? Bantina ezali mingi. Yesu azalaki kokanisa ndenge liwa na ye lokola mosali ya mabe elingaki kobebisa lokumu ya Yehova Nzambe mpe nkombo na Ye. Lisusu, Yesu ayebaki malamu ete bomoi na ye ya seko mpe elikya ya bato ya mokili mobimba esimbamaki na bosembo na ye.
23:44—Sanza nde ezipaki moi (éclipse solaire) yango wana molili ekɔtaki na boumeli ya ngonga misato? Te. Likambo ya ndenge wana esalemaka kaka ntango sanza ebimi sika, kasi te ntango sanza ezali mobimba, ndenge ezalaka na Elekeli. Molili oyo ekɔtaki na mokolo oyo Yesu akufaki ezalaki likamwisi ya Nzambe.
Mateya mpo na biso:
11:1-4. Mwa bokeseni moke oyo ezali kati na malako oyo Yesu apesaki na bavɛrsɛ oyo mpe maloba oyo ezali na libondeli ya ndakisa, oyo apesaki na Lisolo likoló ya Ngomba sanza 18 liboso, emonisi polele ete tosengeli te kozongelaka maloba moko na mabondeli na biso.—Mat. 6:9-13.
11:5, 13. Atako toyebi ete Yehova ayanolaka na mabondeli na biso, tosengeli kolɛmba te kobondela.—1 Yoa. 5:14.
11:27, 28. Esengo ya solosolo eutaka na kosala mokano ya Nzambe na bosembo nyonso kasi te na boyokani na kati ya libota to na konduka bomɛngo.
11:41. Bolingo mpe motema na biso nde esengeli kotinda biso tópesa makabo ya motema mawa.
12:47, 48. Moto oyo azali na mikumba mingi kasi azali kokokisa yango te azali na ngambo koleka moto oyo ayebi mikumba na ye te, to akangi ntina na yango te.
14:28, 29. Tokomonisa bwanya soki tozali kosepela na oyo tozali na yango.
22:36-38. Yesu asɛngaki te bayekoli na ye básimba bibundeli mpo na komibatela. Kasi, mipanga oyo bazalaki na yango na butu oyo bakangaki Yesu esalisaki ye apesa bango liteya moko ya ntina mingi: “Baoyo nyonso bakamataka mopanga bakokufa na mopanga.”—Mat. 26:52.
[Elilingi na lokasa 31]
Yozefe atiká ndakisa malamu ya tata ya libota
[Elilingi na lokasa 32]
Luka alobeli malamumalamu lisolo ya bomoi mpe ya mosala ya Yesu