Maloba ekómaki Makomi Mosantu—Kokoma epai ya baklisto ya liboso
BANDIMI ya bileko ndenge na ndenge balekisá bangonga ebele na kotánga, koyekola mpe kotalela makomi oyo eyebani koleka makomi mosusu nyonso, elingi koloba Makomami ya Grɛki ya boklisto to, Kondimana ya Sika. Makomi yango mpe mikanda mosusu ya Biblia epalanganá na mokili mobimba, esalisá bato básala mibeko mpo na etamboli ya malamu; bato bakomá babuku mpe basalá mayemi na kolanda makambo oyo ezali na makomi yango. Na koleka, esalisá bamilio ya bato báyeba malamu Nzambe mpe Yesu; mbala mosusu esalisá mpe yo.—Yoane 17:3.
Baevanzile mpe mikanda mosusu ya Makomami ya Grɛki ya boklisto ekomamaki bambula mingi nsima ya liwa ya Yesu. Ekoki kozala ete Matai akomaki Evanzile na ye mbula 7 to 8 nsima ya liwa ya Yesu, mpe Yoane akomaki oyo ya ye nsima ya bambula soki 65. Nini esalisaki bango bákoma na bosikisiki makambo oyo Yesu alobaki mpe asalaki? Na ntembe te, elimo santu ya Nzambe etambwisaki bango. (Yoane 14:16, 26) Kasi, ndenge nini mateya ya Yesu ebatelamaki malamu, mpe nsukansuka ekɔtaki na kati ya Makomami Mosantu?
Ezali solo ete “bayebaki kotánga mpe kokoma te”?
Na boumeli ya bambula ya 1 900, bato mosusu balobaki ete bayekoli ya liboso bakomaki te mateya mpe misala ya Yesu, kasi bazalaki koyebisa yango bato mosusu kaka na monɔkɔ. Na ndakisa, moto moko ya mayele alobaki boye: “Bambula mingi elekaki banda ntango Yesu asalaki mosala na ye mpe ntango oyo bakomi ya Baevanzile bakomaki maloba na ye. Na boumeli ya ntango yango, bato bazalaki koyeba maloba mpe misala ya Yesu kaka na masolo.” Kutu, bato mosusu ya mayele balobaka ete bayekoli ya liboso ya Yesu “bayebaki kotánga mpe kokoma te.”a Lisusu, balobaka ete na boumeli ya bambula nyonso oyo masolo ya Yesu ezalaki kolobama kaka na monɔkɔ, babongisaki yango mpe babakisaki makambo mosusu. Balobaka ete nsukansuka, makambo yango ezalaki lisusu te oyo alobaki to asalaki mpenza.
Bato mosusu ya mayele balobaka ete bayekoli ya Yesu balandaki mayele ya koteya oyo Balabi bazalaki kosalela, elingi koloba kokanga makambo na motó mpe kozongelaka yango—yango esalisaki mpo masolo yango ebongwana te. Ezali solo ete bayekoli bazalaki kaka kobomba makambo na motó mpe koloba yango lokola masolo? To ekoki nde kozala ete bazalaki mpe kokoma masolo ya Yesu mpo na kobatela yango? Atako tokoki te koloba na kondimisama nyonso, tokanisi ete bazalaki mpe kokoma.
Bazalaki na momeseno ya kokoma
Na ekeke ya liboso, bato minene to bato mpamba bayebaki kotánga mpe kokoma. Alan Millard, profesɛrɛ ya Liebele mpe ya minɔkɔ ya kala ya Moyen-Orient, alobaki boye: “Kokoma na Grɛki, na Aramɛyɛ mpe na Liebele ezalaki na momeseno ya bato nyonso, ezala bato minene to bato mpamba.” Abakisi boye: “Makambo ezalaki ndenge yango ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye.”
Mpo na makanisi ya bato oyo balobaka ete Baevanzile ezali “makomi ya bato oyo, na mboka na bango, mingi bayebaki kotánga mpe kokoma te,” Profesɛrɛ Millard akomaki boye: “Ezali bongo te, [mpamba te] na bisika nyonso bato bazalaki na momeseno ya kokoma . . . Yango wana, mbala mingi ezalaki na bato oyo bakokaki kokoma makambo oyo bayoki, ezala mpo na bango moko to mpo na koyebisa yango bato mosusu.”
Na ntembe te, bato mingi bazalaki na bitanda oyo bakokaki kosalela mpo na kokoma likambo oyo bayoki. Tozali na ndakisa moko ya likambo yango na mokapo ya liboso ya Evanzile ya Luka. Bato batunaki Zekalia, oyo azalaki kokoka koloba te na ntango wana, nkombo oyo alingaki bápesa mwana na ye. Vɛrsɛ 63 elobi boye: “Asɛngaki etanda moko [na ntembe te na bajɛstɛ] mpe akomaki ete: ‘Yoane ezali nkombo na ye.’” Babuku oyo elimbolaka maloba ya Biblia emonisi ete mbala mosusu “etanda” wana ezalaki libaya moko oyo bapakolá mpaka likoló na yango, oyo bazalaki kosalela mpo na kokoma. Ekoki kozala ete na esika yango, moto moko azalaki na etanda oyo Zekalia akomaki likoló na yango.
Ezali mpe na Ndakisa mosusu oyo emonisi ete na ntango wana, bato bazalaki kosalela bitanda mpo na kokoma. Mokanda ya Misala elobi ete Petelo azalaki koloba na ebele ya bato na lopango ya tempelo; alendisaki bango na maloba oyo: “Bóbongola mitema . . . mpo masumu na bino ebomama.” (Misala 3:11, 19) Liloba “ebomama” euti na verbe moko ya Grɛki oyo elimboli “kopangwisa.” Diksionɛrɛ moko (The New International Dictionary of New Testament Theology) elobi boye: “Likanisi oyo verbe yango ezali komonisa na esika yango mpe na bisika mosusu ezali mpenzampenza ya kopɛtola etanda mpo na kokoma lisusu likoló na yango.”
Masolo ya Baevanzile ezali mpe komonisa ete bayekoli ya Yesu mpe bato mosusu oyo bazalaki koyoka mateya na ye bazalaki kosala misala oyo ezalaki kosɛnga bákokomaka mokolo na mokolo. Kati na bango, tokoki kotánga Matai ná Zakai, bato oyo bazalaki bakɔngɔli-mpako (Matai 9:9; Luka 19:2); mokambi moko ya sinagoga (Malako 5:22); mokonzi moko ya basoda (Matai 8:5); Yoana, mwasi ya mokonzi ya basoda ya Elode Antipasi (Luka 8:3); bakisa mpe bakomeli, Bafalisai, Basadukai, mpe basangani ya Sanedrina. (Matai 21:23, 45; 22:23; 26:59) Na ntembe te, mingi kati na bantoma mpe bayekoli ya Yesu, to mpe bango nyonso, bayebaki kokoma.
Bayekoli, bateyi mpe bakomi
Mpo bayekoli ya Klisto bázala bateyi ya malamu, basengelaki koyeba makambo oyo Yesu alobaki mpe asalaki, mpe koyeba ndenge oyo Klisto akokisaki makambo oyo elobamaki na Mibeko mpe na bisakweli oyo ezali na Makomami ya Liebele. (Misala 18:5) Kutu, na mokanda na ye, Luka alobeli bokutani ya Yesu ná bayekoli na ye mosusu nsima ya lisekwa na ye. Na libaku yango Yesu asalaki nini? “Banda na Moize mpe na Basakoli nyonso alimbwelaki bango makambo oyo etalaki ye na kati ya Makomami nyonso.” Na nsima, Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “‘Oyo ezali maloba na ngai oyo nalobaki na bino ntango nazalaki naino elongo na bino, ete makambo nyonso oyo ekomamá na mibeko ya Moize mpe na Basakoli mpe na Nzembo na ntina etali ngai esengeli kokokisama.’ Bongo afungolaki mayele na bango malamumalamu mpo bákanga ntina ya Makomami.” (Luka 24:27, 44, 45) Na nsima, bayekoli “bamikundolaki” bandimbola oyo Yesu apesaki bango.—Yoane 12:16.
Masolo yango emonisi ete bantoma mpe bayekoli bazalaki komipesa na kolukaluka mpe koyekola Makomami mpo na koyeba malamumalamu ndimbola ya makambo oyo bamonaki mpe oyo bayokaki epai ya Nkolo na bango, Yesu Klisto. (Luka 1:1-4; Misala 17:11) Mpo na yango, Harry Gamble, profesɛrɛ ya makambo ya losambo na Iniversite ya Virginie, akomaki boye: “Tokoki mpenza kokanisa ete banda na ebandeli, ezalaki na baklisto, mbala mosusu mpe bituluku ya baklisto, oyo bamipesaki na koyekola na mozindo mpe koluka ndimbola ya makomami ya Bayuda, mpe kobimisa longwa na bolukiluki yango, bilembeteli oyo ezalaki kosimba bindimeli ya baklisto mpe kopesa makomi yango na baklisto mosusu mpo básalelaka yango na mosala ya kosakola.”
Makambo nyonso wana emonisi ete na esika básuka kaka na koloba na monɔkɔ, bayekoli ya liboso bamipesaki na koyekola, kotánga, mpe kokoma. Bazalaki bayekoli, bateyi, mpe bakomi. Longola yango, bazalaki bato ya Nzambe oyo bazalaki kotya motema na litambwisi ya elimo santu. Yesu alakaki bango ete “elimo ya solo” ‘ekozongisa na makanisi na bango makambo nyonso oyo ayebisaki bango.’ (Yoane 14:17, 26) Elimo santu esalisaki bango bámikundola mpe makambo oyo Yesu asalaki mpe oyo alobaki, ata masolo milai, lokola Lisolo Likoló ya Ngomba, mpe bákoma yango. (Matai, mikapo 5-7) Lisusu, elimo santu esalisaki bakomi ya Baevanzile bákoma ndenge oyo Yesu azalaki koyoka na bantango mosusu mpe makambo oyo alobaki na kati ya mabondeli na ye.—Matai 4:2; 9:36; Yoane 17:1-26.
Na yango, atako bakomi ya Baevanzile balandaki masolo mpe batángaki makambo oyo ekomamá, bakomaki Baevanzile na bango na lisalisi ya Yehova Nzambe ye moko. Yango wana, tokoki mpenza kondima ete “Makomami nyonso epemami na Nzambe” mpe ekoki koteya mpe kotambwisa biso mpo tósala makambo oyo esepelisaka ye.—2 Timote 3:16.
[Maloba na nse ya lokasa]
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]
Bato mosusu kati na bayekoli ya Yesu bazalaki kosala misala oyo ezalaki kosɛnga bákomaka mokolo na mokolo
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]
Elimo santu esalisaki bayekoli ya liboso bámikundola makambo oyo Yesu alobaki mpe oyo asalaki mpe bákoma yango
[Etanda/Elilingi na lokasa 15]
Bantoma bazalaki solo bato oyo bayekolá te?
Ntango bakonzi mpe mikóló ya Yelusaleme “bamonaki molende ya Piere ná Yoane, bakamwe penza po bamoni ‘tè bango bazali bato pamba oyo bayekolá te.” (Misala 4:13, Bible na lingala ya lelo oyo) Maloba yango elingi nde koloba ete bantoma bayebaki kotánga mpe kokoma te? Buku moko (The New Interpreter’s Bible) elobi boye: “Esengeli te kokanga ntina ya maloba yango ndenge kaka ekomami, lokola nde Petelo [ná Yoane] bakɔtaki kelasi te mpe bayebaki kotánga mpe kokoma te. Ezali kaka komonisa bokeseni monene oyo ezalaki kati na bato oyo bazalaki kosambisa mpe bantoma.”
[Elilingi na lokasa 13]
“Asɛngaki etanda moko mpe akomaki ete: ‘Yoane ezali nkombo na ye’”
[Elilingi na lokasa 13]
Etanda moko mpe bikomeli ya ekeke ya liboso to ya mibale T.B.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© British Museum/Art Resource, NY