Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/4 lok. 9
  • Tozali na motuya na miso na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozali na motuya na miso na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Yehova ayebi motángo ya “nsuki mpenza ya motó na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Eloko moko te ekoki “kokabola biso na bolingo ya Nzambe”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Nzambe akipaka ngai mpenza?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • 2 Nzambe akipaka biso mpenza te—Solo to lokuta?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/4 lok. 9

Pusaná penepene na Nzambe

Tozali na motuya na miso na ye

Luka 12:6, 7

“MITEMA na biso ezali kokweisa biso.” Na maloba wana, Biblia emonisi ete ntango mosusu motema na biso ekoki kobanda kosambisa biso koleka ndelo. Ekoki ata kotinda biso tókóma kokanisa ete Nzambe akoki kolinga to kobatela biso te. Kasi, Biblia eyebisi biso boye: “Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.” (1 Yoane 3:19, 20) Nzambe ayebi biso malamu koleka biso moko. Ndenge oyo azali kotalela biso ekoki kokesana mpenza na ndenge oyo biso moko tozali komitalela. Boye, tozali mpenza na motuya na miso ya Yehova Nzambe oyo amibanzabanzaka mpo na biso? Tokoki kozwa eyano na lisese moko oyo Yesu asalelaki na mabaku mibale.

Na libaku ya liboso, Yesu alobaki ete ‘batɛkaka bakɛngɛli-mboka mibale na mbongo moko ya ebende ya motuya moke.’ (Matai 10:29, 31) Luka 12:6, 7 emonisi ete Yesu alobaki mpe boye: “Bakɛngɛli-mboka mitano etɛkamaka na mbongo mibale ya bibende ya motuya moke, boye te? Nzokande Nzambe abosanaka ata moko na yango te. . . . Bóbanga te; bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.” Mwa maloba yango ezali komonisa ndenge Yehova atalelaka mosambeli na ye mokomoko.

Na bandɛkɛ nyonso oyo bazalaki kolya, bakɛngɛli-mboka elekaki ntalo moke. Na ntembe te, Yesu azalaki komona basi oyo bazalaki babola, mbala mosusu mpe mama na ye moko, bazali kosomba mwa bandɛkɛ na zando mpo na koleisa mabota na bango. Na mbongo moko ya ebende (dolare moko kabolá na ntuku mibale), moto akokaki kosomba bakɛngɛli-mboka mibale. Bandɛkɛ yango ezalaki mpenza ntalo moke, yango wana soki moto apesi mbongo mibale ya ebende, na esika bápesa ye ndɛkɛ minei, bazalaki kobakisela ye moko ya matabisi.

Yesu alobaki ete “Nzambe abosanaka” ata mokɛngɛli-mboka moko te to mpe moko na yango te “ekokwea na nse kozanga ete Tata na [biso] ayeba.” (Matai 10:29) Yehova amonaka mbala nyonso oyo mokɛngɛli-mboka moko ekwei na mabelé, ntango mosusu mpo ezoki to mpo na koluka bilei. Yehova nde akelaki mwa bandɛkɛ yango, yango wana akoki kobosana yango te atako ezali mike ndenge nini. Kutu, amonaka yango mpamba te mpo ezali na motuya. Omoni liteya oyo Yesu alingaki kopesa na lisese wana?

Na mateya na ye, mbala mingi Yesu azalaki kosalela ndakisa ya eloko moko ya moke mpo na kolimbola likambo moko ya ntina mingi. Na ndakisa, Yesu alobaki mpe boye: “Bayanganga elonaka te ebukaka mpe te, mpe ezali na ebombelo te mpe na ndako ya kobomba biloko te, kasi atako bongo Nzambe aleisaka yango. Bino boleki bandɛkɛ na motuya mosika te?” (Luka 12:24) Sikoyo, liteya oyo Yesu alingaki kopesa na ndakisa ya bakɛngɛli-mboka emonani polele: Soki Yehova akipaka mwa bandɛkɛ wana ya mike, ezali boni mpo na bato oyo balingaka mpe basambelaka ye!

Na kotalela maloba ya Yesu wana, tosengeli te kokanisa ete tozali na ntina te na miso ya Nzambe oyo “azali monene koleka mitema na biso,” mpe ete akoki komona to kokipe biso te. Koyeba ete Mozalisi na biso akoki komona na motema na biso makambo oyo biso moko tokoki komona te esengeli mpenza kobɔndisa biso!

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]

Bakɛngɛli-mboka: © ARCO/D. Usher/​age fotostock

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto