Mituna ya batángi
Yesu alingaki mpenza koloba nini ntango ayebisaki Nikodeme ete: “Moto moko te amatá na likoló longola kaka ye oyo autaki na likoló, Mwana ya moto”?—Yoane 3:13.
Yesu azalaki naino awa na mabelé ntango alobaki maloba yango. Kasi, soki totaleli bomoi na ye mpe likambo oyo azalaki kolobela ntango alobaki maloba yango, tokoyeba soki alingaki mpenza koloba nini.
Yesu “autaki na likoló” epai azalaki kofanda na Tata na ye; kasi, na ntango oyo Nzambe abongisaki, atyaki bomoi ya Mwana na ye na libumu ya Malia, mpe Yesu abotamaki awa na mabelé lokola moto. (Luka 1:30-35; Bagalatia 4:4; Baebele 2:9, 14, 17) Na nsima, asengelaki kokufa mpe kosekwa na nzoto ya elimo mpo na kozonga na likoló epai ya Yehova. Yango wana, mwa moke liboso báboma ye, Yesu abondelaki boye: “Tata, pesá ngai nkembo penepene na yo moko na nkembo oyo nazalaki na yango penepene na yo liboso ete mokili ezala.”—Yoane 17:5; Baloma 6:4, 9; Baebele 9:24; 1 Petelo 3:18.
Yesu azongaki naino na likoló te ntango azalaki kosolola na Nikodeme, Mofalisai mpe moteyi na Yisalaele. Na ntango wana, moto moko te oyo akufaki amataki na likoló. Kutu, Yesu ye moko alobaki ete Yoane Mobatisi azalaki mosakoli ya Nzambe oyo alekaki basakoli nyonso; kasi “moto oyo azali mpenza moke na bokonzi ya likoló aleki ye.” (Matai 11:11) Ntoma Petelo mpe alobaki ete ata Mokonzi Davidi, moto oyo azalaki sembo, akufaki mpe azalaki kaka na lilita; Davidi amataki na likoló te. (Misala 2:29, 34) Mpo na nini Davidi, Yoane Mobatisi, mpe bato mosusu ya sembo oyo bakufaki liboso ya Yesu bamataki na likoló te? Mpamba te bakufaki liboso ete Yesu afungola nzela mpo bato mosusu bábanda kosekwa mpo na bomoi na likoló. Ntoma Paulo akomaki ete Yesu ‘afungolaki . . . nzela ya sika mpe ya bomoi’ mpo na kokende na likoló.—Baebele 6:19, 20; 9:24; 10:19, 20.
Lokola Yesu akufaki naino te, alingaki mpenza koloba nini ntango ayebisaki Nikodeme ete: “Moto moko te amatá na likoló longola kaka ye oyo autaki na likoló, Mwana ya moto”? (Yoane 3:13) Tótalela lisolo oyo Yesu ná Nikodeme bazalaki kosolola.
Ntango Nikodeme ayaki epai ya Yesu na butu, Yesu alobaki na ye boye: “Ya solo mpenza nazali koloba na yo ete, Soki moto abotami lisusu te, akoki komona bokonzi ya Nzambe te.” (Yoane 3:3) Kasi, Nikodeme atunaki, ‘Ndenge nini moto akoki kobotama mpo na mbala ya mibale?’ Liteya wana oyo etali kozala na Bokonzi ya Nzambe ezalaki likambo ya sika mpo na ye. Nani akokaki kosalisa ye ayeba yango? Ata moto moko te awa na mabelé akokaki kolimbwela ye likambo yango mpamba te moto moko te amataki na likoló. Kaka Yesu nde akokaki koteya Nikodeme mpe bato mosusu makambo yango mpamba te ye autaki na likoló.
Motuna oyo maloba ya vɛrsɛ yango ebimisi eteyi biso likambo moko ya ntina mingi na oyo etali koyekola Liloba ya Nzambe. Ntango tozali kotánga Biblia mpe tokutani na vɛrsɛ moko oyo ezali mpasi mpo na kokanga ntina na yango tosengeli te koloba mbala moko ete Biblia ezali mindɔndɔ. Mpo na kokanga ntina ya makambo oyo Biblia elobi na vɛrsɛ moko, tosengeli kotalela bavɛrsɛ mosusu mpe makambo nyonso esengeli kozala na boyokani. Longola yango, mbala mingi bavɛrsɛ oyo ezalaka liboso mpe nsima to mpe lisolo mobimba ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya vɛrsɛ oyo tomoni ete ezali mpasi.