-
“Ye alingaki biso liboso”Pusaná penepene na Yehova
-
-
Likambo ya monene mpenza oyo emonisi bolingo
4. Ndenge nini soda moko Moloma ayaki koyeba ete Yesu azalaki lokola bato mosusu te, mpe soda yango andimaki nini na nsuka?
4 Mokonzi ya basoda ya Loma oyo bapesaki ye mokumba ya koboma Yesu akamwaki ntango amonaki molili liboso Yesu akufa mpe koningana makasi ya mabelé oyo esalemaki nsima na yango. Alobaki ete: “Ya solo oyo azalaki Mwana ya Nzambe.” (Matai 27:54) Emonani polele ete Yesu azalaki lokola bato mosusu te. Soda yango apesaki mabɔkɔ na koboma Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló! Mwana yango azalaki mpenza na motuya mingi na miso ya Tata na ye?
5. Mbula boni Mwana ya Nzambe alekisaki elongo na Tata na ye na likoló liboso abotama lokola moto?
5 Biblia ebengi Yesu “mwana ya liboso na bozalisi nyonso.” (Bakolose 1:15) Kanisá naino—Mwana ya Yehova azalaki na bomoi liboso kutu biloko nyonso oyo ezali na molɔ́ngɔ́ esalama. Na bongo, ntango boni Tata ná Mwana balekisaki esika moko? Bato mosusu ya siansi bakanisaka ete molɔ́ngɔ́ eumeli mbula miliare 13. Okangi mpenza bolai ya ntango yango? Ata soki likanisi yango ezali solo, bambula nyonso miliare 13 wana ekokani te na bambula ya bomoi ya Mwana ya Yehova! Mosala nini azalaki kosala na boumeli ya ntango wana nyonso?
6. (a) Mosala nini Mwana ya Yehova azalaki kosala liboso abotama awa na mabelé? (b) Ekanganeli ya ndenge nini ezali na kati ya Yehova ná Mwana na ye?
6 Mwana azalaki na esengo ya kosala lokola “mosali ya mayele” ya Tata na ye. (Masese 8:30) Biblia elobi ete: “Kozanga [Mwana] eloko ata moko te esalemaki.” (Yoane 1:3) Na yango, Yehova ná Mwana na ye basalaki mosala elongo mpo na kokela biloko nyonso. Balekisaki solo ntango ya esengo! Bato mingi bayebi ete bolingo ya moboti ná mwana na ye ezalaka mpenza makasi. Mpe bolingo ezali “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Bakolose 3:14) Na yango, nani kati na biso akoki koyeba makasi ya ekanganeli oyo eumelaki mpenza ntango molai bongo? Ezali polele ete Yehova Nzambe ná Mwana na ye bakangami na ekanganeli ya bolingo oyo eleki mosusu nyonso na makasi.
7. Ntango Yesu azwaki batisimo, ndenge nini Yehova amonisaki lolenge azalaki kotalela Mwana na ye?
7 Atako bongo, Tata atindaki Mwana na ye awa na mabelé mpo abotama lokola moto. Yango elingi koloba ete na boumeli ya bambula mingi, Yehova akozala lisusu esika moko te na Mwana na ye ya bolingo kuna na likoló. Azalaki kotala na likebi mpenza uta na likoló ndenge Yesu azalaki kokola tii akómaki mobali ya kokoka. Yesu azwaki batisimo ntango akokisaki mbula 30. Ntina ezali te ya kolukaluka mpo na koyeba ndenge Yehova atalelaki ye na ntango wana. Tata ye moko alobaki uta likoló ete: “Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo nandimi.” (Matai 3:17) Asengelaki solo kosepela mingi na komona ndenge Yesu akokisaki na bosembo mpenza makambo nyonso oyo esakolamaki, mpe makambo nyonso oyo asɛngaki ye!—Yoane 5:36; 17:4.
8, 9. (a) Basalaki Yesu nini na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., mpe yango esalaki Tata na ye nini? (b) Mpo na nini Yehova atikaki Mwana na ye anyokwama mpe akufa?
8 Bongo, Yehova ayokaki ndenge nini na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B.? Ayokaki nini ntango batɛkaki Yesu mpe na nsima ebele ya bato bakangaki ye na butu wana? Ntango baninga ya Yesu bakimaki ye mpe ntango basambisaki likambo na ye na bosembo te? Ntango basɛkaki ye, babwakelaki ye nsoi, mpe babɛtaki ye makofi? Ntango babɛtaki ye fimbo mpe azokizoki na mokɔngɔ? Ntango babɛtaki ye nsɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo likoló ya nzete, mpe batikaki ye wana mpo bato báfinga ye? Tata ayokaki ndenge nini ntango Mwana na ye ya bolingo agangaki epai na ye na mpasi ya liwa? Yehova ayokaki nini ntango Yesu akataki motema, mpe mpo na mbala ya liboso uta ebandeli ya bozalisi, Mwana na ye ya motema azalaki lisusu na bomoi te?—Matai 26:14-16, 46, 47, 56, 59, 67; 27:38-44, 46; Yoane 19:1.
“Nzambe . . . apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko”
9 Tozangi maloba mpo na kolobela yango. Lokola Yehova ayokaka mpe mawa, liloba moko te ekoki kolobela mpenza mpasi oyo ayokaki na liwa ya Mwana na ye. Likambo tokoki kolimbola ezali nde ntina oyo etindaki Yehova apesa nzela na liwa yango. Mpo na nini Tata andimaki koyoka mpasi ya ndenge wana? Yehova amonisi biso likambo moko ya ntina mingi na Yoane 3:16. Vɛrsɛ yango ezali na ntina mingi mpo ebengamaka mpe Evanzile na mokuse. Elobi boye: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” Na bongo, likambo oyo etindaki Yehova ezali: bolingo. Likabo ya Yehova, elingi koloba kotinda oyo atindaki Mwana na ye anyokwama mpe akufela biso, ezalaki likambo oyo eleki monene oyo emonisi bolingo banda ntango wana tii na moi ya lelo.
-
-
“Ye alingaki biso liboso”Pusaná penepene na Yehova
-
-
12 A·gaʹpe ezali komonisa bolingo oyo elandaka mitinda. Na yango, bolingo yango ezali kaka te ndenge ozali koyoka na motema mpo na moto mosusu. Yango ezali na ndimbola monene koleka, ezali bolingo oyo moto akanisaka naino liboso ya komonisa yango mpe ye moko andimaka komonisa yango. Na koleka, a·gaʹpe elukaka libosoliboso bolamu ya basusu. Na ndakisa, tótalela lisusu Yoane 3:16. “Mokili” oyo Nzambe alingaki mingi tii apesa Mwana na ye mobotami-se-moko ezali nini? Ezali bato oyo bakoki kosikolama. Ata bato mingi oyo bazali komipesa na masumu bazali na kati ya bato yango. Yehova alingaka nde bato yango lokola baninga mpenza na ye, ndenge alingaki Abalayama, moto ya sembo? (Yakobo 2:23) Te, kasi na bolingo nyonso azali kosalela bato nyonso bolamu, atako yango esɛngi amipimela mingi. Alingi bato nyonso bábongola motema mpe bátika banzela na bango mabe. (2 Petelo 3:9) Mingi basalaka bongo. Baoyo wana, ayambaka bango na esengo nyonso lokola baninga na ye.
-