Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 18 lok. 46-lok. 47 par. 6
  • Mosala ya Yesu emati, oyo ya Yoane ekiti

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosala ya Yesu emati, oyo ya Yoane ekiti
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Mosala na Yoane ekiti, oyo na Yesu emati
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yoane alingi koyeba makanisi ya Yesu
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yoane Mobatisi—Ndakisa oyo ekoki kosalisa biso tóbatela esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Yoane azangaki kondima?
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 18 lok. 46-lok. 47 par. 6
Yoane Mobatisi azali kosolola na bayekoli na ye

MOKAPO 18

Mosala ya Yesu emati, oyo ya Yoane ekiti

MATAI 4:12 MARKO 6:17-20 LUKA 3:19, 20 YOANE 3:22–4:3

  • BAYEKOLI YA YESU BAZALI KOBATISA

  • YOANE MOBATISI AKƆTI BOLƆKƆ

Nsima ya kosala fɛti ya Elekeli na prɛnta ya mobu 30 T.B., Yesu ná bayekoli na ye balongwe na Yerusaleme. Kasi, bazongi mbala moko te epai na bango na Galile. Bakei na Yudea epai babatisi bato ebele. Esali pene na mbula mobimba kobanda Yoane Mobatisi azali mpe kobatisa; bayekoli na ye mosusu bazali elongo na ye, mbala mosusu na lobwaku ya Ebale Yordani.

Yesu ye moko azali kobatisa bato te, kasi azali nde kotinda bayekoli na ye bápesa bato batisimo. Banda Yesu abandi mosala na ye tii sikoyo, ye ná Yoane bazali koteya Bayuda bábongola motema, mpo babukaki kondimana ya Mibeko oyo basalaki na Nzambe.​—Misala 19:4.

Kasi bayekoli ya Yoane bayoki zuwa, balobi na ye boye mpo na Yesu: “[Yesu] moto oyo azalaki elongo na yo . . . azali kobatisa mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye.” (Yoane 3:26) Kasi, Yoane ayoki zuwa te. Asepeli ndenge mosala ya Yesu ezali kokende liboso mpe alingi ete bayekoli na ye mpe básepela. Yoane ayebisi bango boye: “Bino moko bozali kopesa litatoli mpo na ngai ete nalobaki: Ngai nazali Kristo te, kasi, natindamaki liboso na ye.” Apesi ndakisa oyo ekosalisa bango bákanga ntina ya likambo yango; alobi boye: “Moto oyo azwi mwasi na libala ye nde mobali ya mwasi yango. Nzokande, moninga ya mobali ya libala, ntango atɛlɛmi mpe azali koyoka ye, azali na esengo mingi mpo na mongongo ya mobali oyo abali. Na yango, esengo oyo ezali ya ngai etondi kotonda.”​—Yoane 3:28, 29.

Yoane, oyo azali lokola moninga ya mobali ya libala, asepelaki mwa basanza liboso ntango alakisaki Yesu epai ya bayekoli na ye [Yoane]. Basusu kati na bango balandaki Yesu mpe na nsima batyamaki mafuta na elimo. Yoane alingi mpe ete bayekoli oyo azali na bango sikoyo bálanda Yesu. Kutu, mokumba ya Yoane ezali nde ya kobongisa nzela mpo na mosala ya Kristo. Alimboli boye: “Moto yango asengeli kokoba komata, kasi ngai nasengeli kokoba kokita.”​—Yoane 3:30.

Yoane mosusu, oyo azalaki kati na bayekoli ya libosoliboso ya Yesu, akomi boye mpo na kolobela esika Yesu autaki mpe mokumba monene oyo azali na yango na lobiko ya bato: “Moto oyo auti na likoló aleki bamosusu nyonso. . . . Tata alingaka Mwana mpe apesi biloko nyonso na lobɔkɔ na ye. Moto oyo azali kondimela Mwana azali na bomoi ya seko; moto oyo azali kotosa Mwana te akomona bomoi te, kasi nkanda ya Nzambe efandi likoló na ye.” (Yoane 3:31, 35, 36) Yango ezali mpenza likambo ya ntina oyo bato basengeli koyeba.

Babwaki Yoane Mobatisi na bolɔkɔ

Ntango Yoane Mobatisi alobeli ndenge mokumba mpe mosala na ye ekokita, mwa moke na nsima, Mokonzi Erode akangi ye. Erode abalaki Erodiadi, mwasi ya ndeko na ye Filipe. Ntango Yoane amonisi Erode polele ete libala wana ezali libala ya ekobo, Erode akɔtisi ye na bolɔkɔ. Ntango Yesu ayoki ete bakangi Yoane, alongwe na Yudea elongo na bayekoli na ye mpe ‘akei na Galile.’​—Matai 4:12; Marko 1:14.

  • Batisimo oyo Yoane azali kopesa bato elimboli nini? Batisimo oyo Yesu atindi bayekoli na ye bápesa bato liboso ya lisekwa na ye elimboli nini?

  • Ndenge nini Yoane amonisi ete bayekoli na ye basengeli te koyokela Yesu zuwa mpo na mosala na ye?

  • Mpo na nini Yoane akɔti bolɔkɔ?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto