Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Tómibalola epai na Yehova mpo na kozwa libɔndisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1996 | 1 Novembre
    • 14. (a) Elaka nini Yesu apesaki na butu oyo ezalaki liboso na kufa na ye? (b) Nini ezali na ntina soki tolingi mpenza kozwa libɔndisi ya elimo santu ya Nzambe?

      14 Na butu oyo ezalaki liboso ya kufa na ye, Yesu amonisaki polele epai na bantoma na ye ya sembo ete mosika te asengelaki kotika bango mpe kozonga epai na Tata na ye. Likambo yango ebulunganisaki bango mpe epesaki bango mawa. (Yoane 13:33, 36; 14:27-31) Koyebáká mposa na bango ya libɔndisi ya ntango nyonso, Yesu apesaki elaka oyo: “Ngai nakobondela Tata mpe akopesa bino Mosungi [“Mobɔndisi,” NW, maloba na nsé ya lokasa] mosusu ete afanda na bino libela. (Yoane 14:16) Awa Yesu azalaki kolobela elimo santu ya Nzambe, oyo esopamelaki bayekoli na ye mikolo 50 nsima ya lisekwa na ye.a Na makambo mosusu, elimo ya Nzambe ebɔndisaki bango na komekama na bango mpe elendisaki bango ete bákóba kosala mokano ya Nzambe. (Misala 4:31) Nzokande, lisungi motindo yango lisengelaki te kotalelama lokola eloko oyo eyaka yango moko. Mpo na kozwa litomba na yango, moklisto moko moko asengeli kotika te kobondela mpo na kobɔndisama na lisungi oyo Nzambe azali kopesa na nzela ya elimo na ye.​—Luka 11:13.

  • Tómibalola epai na Yehova mpo na kozwa libɔndisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1996 | 1 Novembre
    • a Moko na misala ya ntina oyo elimo ya Nzambe esalaki epai na baklisto ya ekeke ya liboso ezalaki bongo kopakola bango lokola bana ya Nzambe na elimo mpe bandeko ya Yesu. (2 Bakolinti 1:21, 22) Yango ezali bobele mpo na bayekoli 144000 ya Yesu Klisto. (Emoniseli 14:1, 3) Lelo oyo motángo monene ya baklisto bapesami na boboto nyonso elikya ya bomoi ya seko kati na paladiso na mabelé. Atako bapakolami na elimo te, bango mpe bazali kozwa lisungi mpe libɔndisi ya elimo santu ya Nzambe.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto