Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Elimo na Jéhovah ezali kokamba libota na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1992 | 15 Septembre
    • Lolenge oyo elimo ekosalisaka biso

      9. (a) Na nini elimo santu ezali “mosungi”? (b) Ndenge nini toyebi ete elimo santu ezali moto te? (Tala note.)

      9 Yesu abengaki elimo santu “mosungi.” Alobaki boye na bayekoli na ye: “Ngai nakobondela Tata mpe akopesa bino mosungi mosusu ete afanda na bino libela. Elimo na solo oyo bamokili bakoki kozwa te mpo bazali komona yango te mpe bakoki koyeba yango te. Bino nde bozali koyeba yango, mpo ete ezali koumela epai na bino, ezali mpe kati na bino.” Kati na makambo mosusu, “mosungi” yango asengelaki kozala molakisi, mpamba te Klisto apesaki elaka oyo elandi: “Kasi mosungi, elimo santu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ekolakisa bino makambo nyonso mpe ekokundwela bino makambo nyonso masili ngai koloba na bino.” Elimo esengelaki mpe kopesa litatoli mpo na Klisto, oyo apesaki epai na bayekoli na ye endimiseli oyo: “Ekozala mpo na litomba na bino ete nakende. Mpamba te soki nakei te, mosungi akoya epai na bino te, kasi soki nakei, nakotindela bino ye.”​—Yoane 14:16, 17, 26; 15:26; 16:7, MN.a

      10. Na makambo nini elimo santu emonanaki ete ezali mosungi?

      10 Mokolo ya Pantekote ya mobu 33, uta na likoló, Yesu asopaki elimo santu elakamaki likoló na bayekoli na ye. (Misala 1:4, 5; 2:1-11) Lokola mosungi, elimo epesaki bango mayele mingi ya mozindo likoló na mokano mpe mosala ya Nzambe, mpe elimbwelaki bango Liloba na ye ya esakweli. (1 Bakolinti 2:10-16; Bakolose 1:9, 10; Baebele 9:8-10) Mosungi wana apesaki mpe epai na bayekoli na Yesu nguya esengeli mpo bazala batatoli na mabelé mobimba. (Luka 24:49; Misala 1:8; Baefese 3:5, 6) Lelo, elimo santu ekoki kosalisa moklisto ete akola kati na boyebi soki asaleli malamu bibongiseli ya elimo oyo Nzambe azali kokamata na nsima na “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47) Elimo na Nzambe ekoki kosunga basaleli na Jéhovah na kopesa bango mpiko mpe nguya oyo bazali na yango mposa mpo na kopesa litatoli. (Matai 10:19, 20; Misala 4:29-31) Kasi, elimo santu ezali mpe kosunga basaleli na Nzambe na ndenge mosusu.

  • Elimo na Jéhovah ezali kokamba libota na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1992 | 15 Septembre
    • a Atako ebengami “mosungi,” elimo santu oyo elobelami lokola moto ezali moto te; na yango, ezali likita na oyo elobeli mobali te mpe mwasi te to pronom neutre nde bagreke basalelaki mpo na kolobela yango. Motindo moko, ezali makitana ya liebele mpo na komonisa bomwasi nde esalelami mpo na kolobela mayele lokola moto atako ezali moto te. (Masese 1:20-33; 8:1-36) Na koleka, elimo santu “esopamaki,” nzokande moto akoki kosopama te.​—Misala 2:33.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto