Epai wapi tokoki kozwa libɔndisi ya solosolo?
“Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto . . . abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.”—2 BAKOLINTI 1:3, 4.
1. Makambo nini ekoki kopesa bato mposa makasi ya libɔndisi?
MOTO oyo abɛli maladi oyo ebebisi ye nzoto akoki komona lokola bomoi na ye ezali lisusu na ntina te. Makama lokola koningana ya mabelé, mipɛpɛ makasi, to mpe nzala etikaka bato mabɔkɔ mpamba. Soki etumba eyei, na kati ya libota bato bakoki kokufa, bandako ekoki kobeba, to mpe bato bakoki kokima mpe kosundola biloko na bango. Soki Bosembo ezali te, yango ekoki kotinda bato mosusu na kokanisa ete moto moko te akoki kosalisa bango. Baoyo bazali kokutana na makambo ya ndenge yango bazali mpenza na mposa ya libɔndisi. Epai wapi bakoki kozwa yango?
2. Mpo na nini libɔndisi ya Yehova ekokani na mosusu te?
2 Bato mosusu basalaka makasi mpo na kobɔndisa bazalani na bango; ezali mpe na bibongiseli oyo esalaka mosala yango. Moto nyonso asepelaka mingi báloba na ye maloba ya boboto. Kopesa bato mwa biloko esalisaka mpo na kokokisa bamposa oyo bakoki kozala na yango na ntango wana. Kasi, ezali kaka Yehova, Nzambe ya solo nde akoki kolongola mpasi ya bato mpe kosalisa bango na ndenge oyo ebongi mpenza mpo ete makambo wana ya mabe esalema lisusu te. Na ntina na ye, Biblia elobi boye: “Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto apambolama, Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso, oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso, mpo biso mpe tózala na likoki ya kobɔndisa baoyo bazali na kati ya ndenge nyonso ya bolɔzi na nzela ya kobɔndisama oyo biso moko tobɔndisami na yango epai ya Nzambe.” (2 Bakolinti 1:3, 4) Ndenge nini Yehova abɔndisaka biso?
Kosilisa ntina mpenza ya mikakatano
3. Ndenge nini libɔndisi ya Nzambe ezali kokende tii na ntina mpenza ya mikakatano ya bato?
3 Lisumu ya Adama etyá bato nyonso na ezaleli ya kozanga kokoka, mpe yango ebimisaka mikakatano ndenge na ndenge mpe nsukansuka liwa. (Baloma 5:12) Makambo ebebi lisusu koleka mpamba te Satana Zabolo azali “moyangeli ya mokili oyo.” (Yoane 12:31; 1 Yoane 5:19) Yehova asukaki kaka te na komonisa ete ayokaka mawa na ndenge bato bakutanaka na mikakatano. Atindaki Mwana na ye mobotami-se-moko aya kopesa bomoi na ye mbeka mpo na kobikisa bato, mpe alobaki na biso ete mpasi oyo tozali komona mpo na makambo mabe oyo lisumu ya Adama ememaki ekoki kokita soki tondimeli Mwana na Ye. (Yoane 3:16; 1 Yoane 4:10) Nzambe asakolaki mpe ete Yesu Klisto, oyo azwi bokonzi nyonso na likoló mpe awa na mabelé, akoboma Satana ná ebongiseli na ye mobimba ya makambo mabe.—Matai 28:18; 1 Yoane 3:8; Emoniseli 6:2; 20:10.
4. (a) Yehova asali nini mpo na kolendisa elikya na biso na bilaka na ye ya kobikisa? (b) Ndenge nini Yehova asalisi biso na koyeba ntango oyo lobiko ekoya?
4 Mpo na kolendisa elikya na biso na bilaka na ye, Nzambe atindaki basaleli na ye bákoma ebele ya makambo oyo ezali komonisa ete likambo nyonso oyo ye asakoli ekokisamaka. (Yosua 23:14) Na kati ya Biblia akomisaki mpe masolo ya makambo oyo asalaki mpo na kobikisa basaleli na ye liboso ya makama oyo, na miso ya bato, bakokaki kobika na yango te. (Exode 14:4-31; 2 Mikonzi 18:13–19:37) Lisusu, Yehova amonisaki na nzela ya Yesu Klisto ete mokano na ye ezali mpe ete abikisa bato na “mpasi nyonso,” ata mpe kosekwisa bato oyo bakufá. (Matai 9:35; 11:3-6) Makambo yango ekosalema ntango nini? Biblia epesi eyano na bisika oyo elobeli makambo ekomonana na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo esili konuna, liboso Nzambe atya likoló ya sika ná mabelé ya sika. Makambo oyo Yesu alobaki, ezali yango nde tozali komona na moi ya lelo.—Matai 24:3-14; 2 Timote 3:1-5.
Libɔndisi mpo na bato oyo bazali na mpasi
5. Ntango Yehova azalaki kobɔndisa Bayisalaele na ntango ya kala, azalaki kobenda likebi na bango na nini?
5 Makambo oyo Yehova asalaki na Yisalaele ya kala ezali komonisa biso ndenge oyo azalaki kobɔndisa bango na ntango ya mpasi. Azalaki komonisa bango soki azali Nzambe ya ndenge nini. Yango esalaki ete elikya na bango na bilaka na ye ekóma lisusu makasi. Yehova atindaki basakoli na ye básalela maloba ya polele mpo na komonisa bokeseni oyo ezali kati na ye, Nzambe ya solo mpe ya bomoi, ná bikeko oyo ekoki kosala eloko te mpo na yango moko to mpo na bato oyo basambelaka yango. (Yisaya 41:10; 46:1; Yilimia 10:2-15) Ntango Yehova ayebisaki Yisaya ete, “Bóbɔndisa, bóbɔndisa bato na ngai,” atindaki mosakoli na ye alobela biloko oyo Ye akelá mpe asalela yango lokola bililingi mpo na komonisa malamumalamu ete Yehova azali monene mpe azali Nzambe kaka moko ya solo.—Yisaya 40:1-31.
6. Yehova azalaki mbala mosusu koyebisa nini mpo na ntango ya kobikisa?
6 Mpo na kobɔndisa bato na ye, Yehova azalaki ntango mosusu koyebisa bango ntango, ezala ya pene to ya mosika, oyo akobikisa bango. Ntango etikalaki mwa mikolo mpo alongola Bayisalaele na boombo ya Ezipito, alobaki na bango ete: “Nakobakisela Farao ná Ezipito bolɔzi moko lisusu. Na nsima akotika bino bókende.” (Exode 11:1, NW) Na mikolo ya Mokonzi Yosafata, ntango bikólo misato esanganaki mpo na kobundisa Yuda, Yehova alobaki ete akobikisa bango “lobi.” (2 Ntango 20:1-4, 14-17) Nzokande, mbula 200 liboso, Yisaya akomaki ete bakolongwa na boombo na Babilone, mpe Yilimia abakisaki makambo mosusu soki mbula nkama liboso ete likambo yango esalema. Tokanisi ete bisakweli yango elendisaki mpenza basaleli ya Nzambe ntango etikalaki moke bálongwa na boombo.—Yisaya 44:26–45:3; Yilimia 25:11-14.
7. Mbala mingi bilaka ya lobiko ezalaki mpe kolobela likambo nini, mpe yango esalaki nini epai ya bato ya sembo na Yisalaele?
7 Likambo oyo ezali kobenda likebi na biso ezali ete mbala mingi bilaka oyo ebɔndisaki basaleli ya Nzambe ezalaki na makambo oyo etalaki Masiya. (Yisaya 53:1-12) Yango epesaki bato ya sembo oyo bazalaki na bomoi na bileko ndenge na ndenge elikya ntango bazalaki kokutana na mikakatano. Na Luka 2:25, tozali kotánga boye: “Talá! ezalaki na moto moko na Yelusaleme nkombo na ye Simeona, mpe moto yango azalaki moyengebene mpe moto oyo abangaka Nzambe, azalaki kozela kobɔndisama ya Yisalaele [elingi koloba koya ya Masiya], mpe elimo santu ezalaki likoló na ye.” Simeona ayebaki elaka ya Masiya oyo elobelamaki na kati ya Makomami, mpe na bomoi na ye mobimba azalaki kozela kokokisama ya elaka yango. Ayebaki te ndenge oyo makambo nyonso esengelaki kokokisama, mpe ye moko azalaki lisusu na bomoi te mpo na komona ndenge oyo lobiko yango ekokisamaki, kasi asepelaki ntango amonaki Moto oyo azali ‘mwango ya kobikisa’ ya Nzambe.—Luka 2:30.
Libɔndisi na nzela ya Klisto
8. Na kotalela makambo oyo bato bazalaki na mposa na yango, lisalisi oyo Yesu apesaki ezalaki ndenge nini?
8 Ntango Yesu Klisto azalaki awa na mabelé, azalaki ntango nyonso te kosalisa bato na makambo oyo bazalaki kolinga. Bato mosusu bazalaki na mposa ya Masiya oyo akosikola bango na boyangeli oyo bayinaki ya Baloma. Kasi Yesu atindaki bango te ete bátomboka; alobaki na bango ete ‘bázongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala.’ (Matai 22:21) Mokano ya Nzambe ezalaki te ete asukisa kaka bokonzi moko boye ya politiki mpo bato bázala na bonsomi. Bato balingaki kotya Yesu mokonzi, kasi ye alobaki ete ‘akopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.’ (Matai 20:28; Yoane 6:15) Ntango ekokaki naino te mpo akóma mokonzi, mpe Yehova nde asengelaki kopesa ye bokonzi, kasi te ebele ya bato oyo bazali kosepela na bayangeli na bango te.
9. (a) Nsango nini ya kobɔndisa Yesu asakolaki? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki ntina ya nsango na ye mpo na mikakatano oyo bato bazalaki kokutana na yango? (c) Mosala ya Yesu ebongisaki nzela ya nini?
9 Libɔndisi oyo Yesu amemelaki bato ezalaki “nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” Yango nde nsango oyo Yesu asakolaki na bisika nyonso oyo atambolaki. (Luka 4:43) Amonisaki ntina ya nsango wana ntango amonisaki makambo oyo akosala ntango akokokisa mokumba na ye lokola Masiya Moyangeli mpo na kosilisa mikakatano ya bato. Yesu apesaki bato oyo bazalaki na mpasi mposa ya kotikala na bomoi na ndenge afungolaki miso ya bato bakufá miso mpe alobisaki bato oyo bazalaki koloba te (Matai 12:22; Malako 10:51, 52), abikisaki bato oyo babebaki binama ya nzoto (Malako 2:3-12), abikisaki bandeko na ye Bayisalaele na bamaladi ya mabe (Luka 5:12, 13), mpe abikisaki bango na maladi mosusu ya makasi. (Malako 5:25-29) Asalisaki mpenza bato oyo bazalaki kolela na ndenge asekwisaki bana na bango. (Luka 7:11-15; 8:49-56) Amonisaki ete azali na nguya ya kopekisa mipɛpɛ makasi mpe koleisa ebele ya bato. (Malako 4:37-41; 8:2-9) Longola yango, Yesu ateyaki bango mitinda oyo ekokaki kosalisa bango na kolonga mikakatano ya bomoi mpe oyo ekokaki kopesa bango elikya ya boyangeli ya malamu, ya Masiya. Yango wana, ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye, asukaki te kaka na kobɔndisa bato ya kondima oyo bazalaki koyoka ye, kasi alobaki mpe asalaki makambo oyo, bankóto ya bambula na nsima, esengelaki kolendisa bato.
10. Mbeka ya Yesu efungoli nzela na makambo nini?
10 Yesu apesaki bomoi na ye mbeka, na nsima asekwaki mpe azwaki bomoi na likoló; mbula koleka 60 na nsima, ntoma Yoane apemamaki na elimo santu mpe akomaki ete: “Bana na ngai ya mike, nazali kokomela bino makambo oyo mpo bósala lisumu te. Nzokande, soki moto asali lisumu, tozali na mosungi moko epai ya Tata, Yesu Klisto, moyengebene. Mpe ye azali mbeka ya mbɔndi mpo na masumu na biso, nzokande mpo na oyo ya biso kaka te kasi mpe mpo na oyo ya mokili mobimba.” (1 Yoane 2:1, 2) Mbeka ya Yesu, moto ya kokoka, efungolaki nzela na makambo ya malamu oyo ezali mpenza kobɔndisa biso. Toyebi ete masumu na biso ekoki kolimbisama, tokoki kozala na lisosoli ya malamu, Nzambe akoki kosepela na biso, mpe tokoki kolikya kozala na bomoi ya seko.—Yoane 14:6; Baloma 6:23; Baebele 9:24-28; 1 Petelo 3:21.
Elimo santu ezali mobɔndisi
11. Liboso akufa, Yesu alakaki eloko nini lisusu oyo ekobɔndisa?
11 Ntango Yesu azalaki elongo na bayekoli na ye na butu ya nsuka liboso akufa mpo na kokaba nzoto na ye mbeka, alobelaki eloko mosusu oyo Tata na ye ya likoló abongisaki oyo esengelaki kobɔndisa bango. Yesu alobaki boye: “Nakosɛnga Tata mpe ye akopesa bino mosungi mosusu [mobɔndisi; na Grɛki paraklêtos] mpo azala elongo na bino mpo na libela, elimo ya solo.” Yesu alobaki na bango ete: “Mosungi yango, elimo santu, . . . akoteya bino makambo nyonso mpe akozongisa na makanisi na bino makambo nyonso oyo nayebisaki bino.” (Yoane 14:16, 17, 26) Ndenge nini elimo santu ebɔndisaki bango?
12. Ndenge nini mokumba ya elimo santu lokola mosungi mpo na bɔɔngɔ ya bayekoli ya Yesu esalisaki na kobɔndisa ebele ya bato?
12 Yesu ateyaki bantoma makambo mingi. Bakokaki kobosana ata moke te ntango oyo balekisaki na ye elongo, kasi balingaki nde koyeba lisusu makambo nyonso oyo alobaki? Lokola bazalaki bato ya kozanga kokoka, bɔɔngɔ na bango elingaki nde kobosana malako ya ntina? Yesu alakaki bango ete elimo santu ‘ekozongisa na makanisi na bango makambo nyonso oyo ayebisaki bango.’ Yango wana, mbula mwambe nsima ya liwa ya Yesu, Matai akomaki Evanzile ya liboso. Kati na yango akomaki Lisolo Likoló ya Ngomba oyo Yesu asalaki, ná ebele ya bandakisa oyo alobaki na ntina ya Bokonzi, mpe lisolo molai oyo asalaki mpo na kolobela elembo ya kozala na ye. Mbula koleka 50 na nsima, ntoma Yoane akomaki lisolo molai ya makambo oyo elekaki na nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabelé. Masolo yango elendisaka mpenza bato tii na mikolo na biso!
13. Ndenge nini elimo santu ezalaki molakisi mpo na baklisto ya liboso?
13 Elimo santu esukaki kaka te na kosalisa bayekoli báyeba lisusu maloba wana, kasi eteyaki mpe etambwisaki bango mpo bákanga malamumalamu ntina ya mokano ya Nzambe. Ntango Yesu azalaki naino elongo na bayekoli na ye, ayebisaki bango makambo mosusu oyo bakangaki ntina na yango malamu te. Kasi, na nsima, elimo santu esalisaki Yoane, Petelo, Yakobo, Yuda, mpe Paulo na kolimbola makambo mosusu oyo etali mokano ya Nzambe na mikanda oyo bakomaki. Na ndenge yango nde elimo santu ezalaki molakisi, mpe endimisaki bango mpenza ete Nzambe azali kotambwisa bango.
14. Na ndenge nini elimo santu esalisaki basaleli ya Yehova?
14 Lisusu, makamwisi oyo bazalaki kosala na nguya ya elimo santu emonisaki polele ete Nzambe aboyaki ekólo Yisalaele mpe aponaki lisangá ya boklisto. (Baebele 2:4) Mbuma oyo elimo yango ezalaki kobota na bomoi ya bato ezalaki mpe na ntina mingi mpo na koyeba banani bazalaki solo bayekoli ya Yesu. (Yoane 13:35; Bagalatia 5:22-24) Elimo yango elendisaki mpe bandeko na kati ya lisangá na kozala batatoli ya molende mpe ya mpiko.—Misala 4:31.
Bazwaki lisalisi ntango bamekamaki makasi
15. (a) Mikakatano nini baklisto ya kala bakutanaki na yango, oyo baklisto ya lelo mpe bazali kokutana na yango? (b) Mpo na nini bato oyo bazali kolendisa bakoki ntango mosusu mpe kozala na mposa ya kolendisama?
15 Moto nyonso oyo amipesi na Yehova mpe azali sembo epai na ye azangaka te kokutana na monyoko. (2 Timote 3:12) Kasi, baklisto mingi bamekamaki na makambo ya mpasi mpenza. Na ntango na biso, ebele ya bato bazomelaki bamosusu mpe batyaki bamosusu na bakaa ya bakangami, na babolɔkɔ, na bakaa ya bato oyo bazali kosalisa misala ya makasi mpe kosala bango makambo lokola banyama. Na bamboka mosusu, guvɛrnema yango moko nde ezalaki konyokola bango, to mpe etikaki nzela ete bato mosusu básala makambo ya mabe kozanga ete epesa bango etumbu. Lisusu, baklisto mosusu babɛlaki maladi ya makasi to mpe bakutanaki na mikakatano minene na mabota na bango. Mpo na moklisto oyo akɔmeli, komekama mosusu ekoki kozala na likambo ya kosalisa ebele ya bandeko na ye bandimi na kolonga mikakatano. Na ntango wana, moto oyo azali kolendisa akoki kozala na mposa ya kolendisama.
16. Ntango Davidi amekamaki makasi, ndenge nini Nzambe asalisaki ye?
16 Ntango Mokonzi Saulo azalaki kolukaluka Davidi mpo na koboma ye, Davidi abondelaki Nzambe, Mosalisi na ye ete: “Ee Nzambe, yoká libondeli na ngai.” “Nakomibomba na elilingi ya mapapu na yo.” (Nzembo 54:2, 4; 57:1) Davidi azwaki lisalisi yango? Ɛɛ. Na ntango wana, Yehova asalelaki mosakoli Gada ná nganga-nzambe Abiatala mpo na kotambwisa Davidi; asalelaki mpe Yonatana, mwana ya Saulo mpo na kolendisa ye. (1 Samwele 22:1, 5; 23:9-13, 16-18) Lisusu, Yehova atikaki ete Bafilistia bákɔta na Yisalaele mpo Saulo atika naino kolanda Davidi mpo na kokende kobundisa bango.—1 Samwele 23:27, 28.
17. Epai ya nani Yesu alukaki lisalisi ntango azalaki na mpasi makasi?
17 Ata Yesu Klisto ye moko amekamaki makasi na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé. Ayebaki malamu ete makambo oyo akosala ekoki kokumisa to mpe kofingisa nkombo ya Tata na ye ya likoló mpe ete ekoki kopesa to kozangisa bato nyonso elikya mpo na mikolo ekoya. Abondelaki makasi, kutu ‘akɔtaki na kati ya mpasi moko monene.’ Nzambe apesaki Yesu lisalisi oyo asengelaki na yango na ntango wana ya mpasi.—Luka 22:41-44.
18. Ndenge nini Nzambe abɔndisaki baklisto ya liboso oyo banyokwamaki makasi?
18 Na ekeke ya liboso, ntango lisangá esalemaki sika, banyokolaki baklisto na ndenge ya nsɔmɔ tii bango nyonso, longola kaka bantoma, balongwaki na Yelusaleme mpe bapanzanaki na bamboka mosusu. Bazalaki kokɔtela basi ná mibali na bandako mpe kokanga bango. Ndenge nini Nzambe abɔndisaki bango? Liloba na ye epesaki bango elikya ete bazali na “eloko moko ya malamu mingi mpe oyo eumelaka,” elingi koloba libula ya seko na likoló elongo na Klisto. (Baebele 10:34; Baefese 1:18-20) Bamonaki mpenza ete bazalaki na elimo ya Nzambe ntango bazalaki kokoba kosakola, mpe makambo oyo bakutanaki na yango ebakisaki lisusu esengo na bango.—Matai 5:11, 12; Misala 8:1-40.
19. Atako Paulo anyokwamaki makasi, ndenge nini atalelaki libɔndisi ya Nzambe?
19 Na nsima, Saulo (Paulo), moto oyo azalaki monyokoli moko ya kosakana te, ye mpe akómaki konyokwama mpo akómaki moklisto. Na esanga ya Sipele, ezalaki na nganga-nkisi moko oyo alukaki kosalela mayele mabe mpe lokuta mpo na kopekisa Paulo kosala mosala na ye. Na Galatia, babambaki Paulo mabanga mpe batikaki ye kaka ntango bakanisaki ete akufi. (Misala 13:8-10; 14:19) Na Masedonia babɛtaki ye na mangenda. (Misala 16:22, 23) Na Efese, ebele ya bato batombokelaki bango; yango wana na nsima akomaki ete: “Tozalaki na kati ya monyoko ya nsɔmɔ oyo elekaki makasi na biso, na boye ete tozalaki mpenza kobanga ata mpo na bomoi na biso. Ya solo, tokanisaki na kati na biso moko ete tozwaki etumbu ya liwa.” (2 Bakolinti 1:8, 9) Kasi, kaka na mokanda yango, Paulo akomaki maloba ya kobɔndisa oyo totángaki na paragrafe ya mibale.—2 Bakolinti 1:3, 4.
20. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
20 Ndenge nini yo mpe okoki kobɔndisa bongo? Na mikolo na biso, ezali na ebele ya bato oyo bazalaka na mposa ya libɔndisi ntango bazali na mpasi na motema, mbala mosusu ntango likama moko ekweli ebele ya bato to mpo na monyoko moko oyo bazali kobunda na yango bango moko. Na lisolo oyo elandi, tokotalela ndenge oyo tokoki kobɔndisa bato nyonso wana.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini libɔndisi ya Nzambe eleki mabɔndisi mosusu nyonso?
• Libɔndisi nini Nzambe azali kopesa na nzela ya Klisto?
• Ndenge nini elimo santu ezalaki mobɔndisi?
• Pesá bandakisa oyo ezali komonisa ndenge oyo Nzambe abɔndisaki basaleli na ye ntango bazalaki na mpasi makasi.
[Bililingi na lokasa 15]
Biblia ezali komonisa biso ete Yehova abikisaki basaleli na ye mpo na kobɔndisa bango
[Bililingi na lokasa 16]
Mpo na kobɔndisa bato, Yesu ateyaki, abikisaki bato ya maladi, mpe asekwisaki bato oyo bakufaki
[Elilingi na lokasa 18]
Yesu azwaki lisalisi oyo eutaki na Nzambe