Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 15 points 1-6
  • Yesu azali nani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu azali nani?
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Yesu Kristo azali nani?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Yesu Klisto azali nani?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Yesu Klisto lifungola mpo na kozwa boyebi ya Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Biyano na mituna oyo tomitunaka mpo na Yesu Kristo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 15 points 1-6
Liteya 15. Yesu azali kotambola na elanga.

LITEYA 15

Yesu azali nani?

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Yesu azali moto oyo ayebani mingi na mokili. Bato mingi bayebi nkombo, kasi bayebaka mpenza te makambo mingi mpo na ye. Lisusu, soki otuni bato mingi soki Yesu azali mpenza nani, bakopesa makanisi ndenge na ndenge. Kasi, Biblia elobi nini mpo na Yesu?

1. Yesu azali nani?

Yesu azali anzelu ya nguya oyo azalaka na likoló. Nzambe akelaki ye liboso ya kokela biloko mosusu nyonso. Yango wana, Biblia ebengi ye “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá.” (Bakolose 1:15) Biblia ebengi Yesu ‘Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki’ mpo Yehova ye moko nde akelaki ye. (Yoane 3:16) Yesu asalaki elongo na Tata na ye, Yehova; asalisaki Yehova mpo na kokela biloko mosusu nyonso. (Tángá Masese 8:30.) Yesu azali na boyokani malamu ná Tata na ye, Yehova tii lelo. Biblia ebengi ye “Liloba,” mpo azali molobeli ya Nzambe, ayebisaka bikelamu mosusu nsango mpe mibeko ya Nzambe.​—Yoane 1:14.

2. Mpo na nini Yesu ayaki awa na mabele?

Eleki sikoyo bambula 2 000, Yehova asalaki likamwisi moko; na nzela ya elimo santu na ye, azwaki bomoi ya Yesu uta na likoló mpe akɔtisaki yango na libumu ya elenge mwasi moko na nkombo Maria. Yango wana, Yesu abotamaki moto. (Tángá Luka 1:34, 35.) Yehova atindaki Yesu na mabele mpo azala Masiya to Kristo, mpo na kobikisa bato.a Bisakweli nyonso oyo Biblia elobaki mpo na Masiya ekokisamaki epai ya Yesu, yango esalisaki bato báyeba ete Yesu azali “Kristo, Mwana ya Nzambe ya bomoi.”​—Matai 16:16.

3. Yesu azali wapi sikoyo?

Yesu akufaki, kasi Nzambe asekwisaki ye lokola anzelu mpe na nsima azongaki na likoló. Kuna, “Nzambe atombolaki ye likoló koleka.” (Bafilipi 2:9) Sikoyo, Yesu azali na bokonzi mingi mpenza, elingi koloba, moto ya mibale nsima ya Yehova.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba makambo mosusu oyo emonisi soki Yesu azali mpenza nani mpe mpo na nini koyeba ye ezali na ntina.

Yesu ná Yoane Mobatisi batɛlɛmi na kati ya mai mpe bazali koyoka mongongo moko nsima ya batisimo ya Yesu.

4. Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso te

Biblia eteyaka ete, atako Yesu Kristo azali na nguya na likoló, atosaka Nzambe mpe Tata na ye Yehova. Mpo na nini tolobi bongo? Talá VIDEO mpo na komona mateya ya Biblia oyo emonisi ete Yesu akeseni na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.

VIDEO: Yesu Kristo azali Nzambe? (3:22)

Bavɛrsɛ oyo elandi ekosalisa biso tómona bokeseni oyo ezali kati na Yehova ná Yesu. Tángá vɛrsɛ mokomoko, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

Tángá Luka 1:30-32.

  • Ndenge nini maloba ya anzelu emonisi bokeseni oyo ezali kati na Yesu mpe Yehova Nzambe, “Oyo-Aleki-Likoló”?

Tángá Matai 3:16, 17.

  • Ntango Yesu azwaki batisimo, mongongo oyo eutaki na likoló elobaki nini?

  • Okanisi ete mongongo yango ezalaki ya nani?

Tángá Yoane 14:28.

  • Okanisi nini, nani nde azali mokóló mpe azali na bokonzi koleka, tata to mwana?

  • Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki ete Yehova azali Tata na ye?

Tángá Yoane 12:49.

  • Okanisi nini, Yesu akanisaki ete ye ná Tata na ye bazali moto moko?

5. Nini emonisi ete Yesu azalaki Masiya

Biblia ezali na bisakweli mingi oyo esalisi bato báyeba Masiya, moto oyo Nzambe aponaki mpo na kobikisa bato. Talá VIDEO mpo na koyeba bisakweli mosusu oyo Yesu akokisaki ntango azalaki awa na mabele.

VIDEO: Yesu akokisi bisakweli (3:03)

Tángá bavɛrsɛ ya Biblia oyo, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

Tángá Mika 5:2 mpo na koyeba esika oyo Masiya asengelaki kobotama.b

  • Kobotama ya Yesu ekokisaki esakweli yango? ​—Matai 2:1.

Tángá Nzembo 34:20 mpe Zekaria 12:10 mpo oyeba makambo oyo Biblia elobaki mpo na liwa ya Masiya.

  • Bisakweli yango ekokisamaki? ​—Yoane 19:33-37.

  • Okanisi ete Yesu ye moko nde asalaki ete bisakweli yango ekokisama?

  • Yango endimisi yo nini mpo na Yesu?

6. Tokozwa bolamu soki toyekoli makambo etali Yesu

Biblia elobi ete ezali na ntina mingi tóyeba makambo etali Yesu mpe makambo oyo Nzambe alingi Yesu asala. Tángá Yoane 14:6 mpe 17:3, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini ezali na ntina mingi tóyekola makambo etali Yesu?

Yesu azali koteya mibali, basi mpe bana

Yesu afungolelaki biso nzela mpo tókóma baninga ya Nzambe. Ateyaki solo etali Yehova, mpe na nzela ya Yesu, tokoki kozwa bomoi ya seko

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Batatoli ya Yehova bandimelaka Yesu te.”

  • Okopesa ye eyano nini?

NA MOKUSE

Yesu azali anzelu ya nguya. Azali Mwana ya Nzambe mpe Masiya.

Bozongeli

  • Mpo na nini Yesu abengami “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá”?

  • Yesu azalaki kosala nini na likoló liboso aya awa na mabele?

  • Ndenge nini toyebi ete Yesu azali Masiya?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Luká koyeba makambo mosusu oyo etindi biso tóndima ete Yesu azali Masiya.

“Bisakweli oyo elobeli Masiya emonisaki ete Yesu azalaki Masiya?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Luká koyeba na ndenge nini Biblia emonisi ete Nzambe azali Tata ya Yesu.

“Mpo na nini Yesu abengami Mwana ya Nzambe?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Talá ntina oyo liteya ya bosato euti na Biblia te.

“Yesu azali Nzambe?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/2009)

Talá ndenge bomoi ya mwasi moko ebongwanaki nsima ya koyeba makambo oyo Biblia elobi mpo na Yesu.

“Mwasi moko Moyuda amonisi ntina oyo atalelaki lisusu mateya ya lingomba na ye” (Lamuká! ya 07/2013)

a Na liteya 26 mpe 27, tokolobela ntina oyo bato basengelaki kobikisama mpe ndenge oyo Yesu abikisi biso.

b Talá Maloba na nsuka ya lisolo 2 mpo na komona esakweli oyo elobelaki mpenza ntango oyo Masiya akomonana na mabele.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto