Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/10 nk. 27-30
  • Biblia ezali nde koteya Bosato?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ezali nde koteya Bosato?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Biblia ezali koloba nini?
  • Ndimbola ya polele mpe ya petee ya Makomami
  • Elimo santu eyebisi solo nyonso
  • Eklezia ya ebandeli eteyaki ete Nzambe azali bosato?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Nani azali “Nzambe kaka moko ya solosolo”?
    Lamuká!—2005
  • Yesu Klisto: Mwana-molingami na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Biblia ezali mpenza koteya Trinité?
    Osengeli kondima Trinité?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/10 nk. 27-30

Biblia ezali nde koteya Bosato?

“Tala endimeli ya Katolike: Tozali kosambela Nzambe moko kati na Bosato mpe Bosato kati na Bomoko. . . . Boye, Tata azali Nzambe, Mwana azali Nzambe, mpe Elimo Santu azali Nzambe. Nzokande, Banzambe bazali misato te, kasi bobele Nzambe moko.”

NA MALOBA oyo, elembo ya Athanase ezali kolimbola liteya ya moboko ya boklisto ya lokuta: Bosato.a Soki ozali moto ya lingomba, Katolike to Protestá, basilaki mbala mosusu koyebisa yo ete ezali liteya lileki ntina oyo osengeli kondima. Kasi, okoki kolimbola liteya yango? Bato mosusu ya mayele kati na boklisto ya lokuta bandimaki ete bakokoki te kososola Bosato.

Bongo, mpo na nini bazali kondima liteya yango? Ezali mpo ete Biblia ezali koteya yango? Kati na mokanda na ye oyo etekami mingi, na motó ya likambo Dieu sans Dieu, episkopo ya Anglican, John Robinson, apesaki eyano moko oyo ezali kotinda na kokanisa. Akomaki ete:

“Lokola esalemaka, kosakolama mpe mateya oyo eyebani mingi ezali komonisa Klisto na motindo oyo eleki bato, oyo endimami te kati na Kondimana ya sika. Basakoli mpe balakisi bazali koloba ete Yesu azalaki Nzambe, mpe bazali koloba yango na motindo boye ete maloba ‘Klisto’ to ‘Nzambe’ masalelama moko na esika na mosusu. Kasi epai moko te kati na Biblia elobelami bongo. Kondimana ya Sika elobi ete Yesu azalaki Liloba na Nzambe, ete Nzambe azalaki kati na Klisto, ete Yesu azalaki Mwana na Nzambe; kasi elobi soko moke te ete Yesu azalaki Nzambe.”

John Robinson azalaki moto oyo bazalaki kokakatana mingi na ntina na ye kati na lingomba ya Anglican. Nzokande, azalaki na elónga wana alobaki ete “Kondimana ya Sika” endimi “soko moke te ete Yesu azalaki Nzambe”?

Biblia ezali koloba nini?

Bato mosusu bakoyanola na motuna wana na kotangáká verset oyo ebandisi Evanzile ya Yoane oyo elobi ete: “Na ebandeli Liloba azalaki, mpe Liloba amibalolaki epai na Nzambe, Liloba azalaki mpe Nzambe.” (Yoane 1:1, TOB) Yango ekweisi te oyo episkopo ya Anglican alobaki? Mpenza te. Na ntembe te, lokola John Robinson ayebaki yango, babongoli mosusu ya mikolo na biso bazali kondima te lolenge (Traduction Œcuménique de la Bible) ebongoli verset wana. Mpo na nini? Mpamba te, kati na liloba ya Greke oyo ebongolami “Liloba azalaki Nzambe,” liloba oyo libongolami na “Nzambe” lizali te na article défini “le” liboso na yango. Kati na maloba ya liboso, liloba libongolami na “Nzambe” lilobelami na lolenge ya sikisiki, elingi koloba ete lilandi article défini. Yango esali bongo ete maloba wana mibale mazala na ndimbola moko te.

Mpo na yango, mabongoli mosusu mazali komonisa polele motindo na liloba yango. Na ndakisa, ezali kobongola liloba yango na “Liloba azalaki na lolenge ya Nzambe.” (La Bible du Centenaire) Nzokande, komonisáká ete “na lolenge ya Nzambe” ezali libongoli oyo ebongi te, John Robinson mpe Frederick Kenyon, moto mosusu ya mayele ya ekólo Angleterre oyo atalelaka makomi na bozindo, bango nyonso mibale bamonisaki ete soki Yoane alingaki kolobela likanisi yango mbele asalelaki liloba ya Greke mpo na kolimbola “na lolenge ya Nzambe,” elingi koloba theiʹos. Traduction du monde nouveau na Lifalansé, wana emonaki ete liloba “Nzambe” eyebisami sikisiki te, mpe lokola elingaki komonisa motindo ya liloba yango kati na fraze ya Greke, ebongoli liloba yango boye: “Liloba lizalaki nzambe.”

Charles Dodd, oyo akambaki misala ya libongoli ebengami New English Bible, alobi boye likoló na lolenge wana ya komona makambo: “Libongoli ya malamu . . . ekoki kozala: ‘Liloba azalaki nzambe.’ Libongoli wana ya kolanda liloba moko moko ezali ya libunga te.” Nzokande, New English Bible ebongoli verset wana bongo te, kasi ebongoli yango boye: “Na ebandeli na biloko nyonso, Liloba lisalaki kozala. Liloba lizalaki kofanda esika moko na Nzambe, mpe motindo Nzambe azalaki, Liloba mpe azalaki na motindo yango.” Mpo na nini comité ya libongoli eponaki te lolenge ya petee mpo na kobongola yango? Charles Dodd ayanoli ete: “Ntina mpo na yango ekoki te kondimama, ezali ete likanisi yango eyokani te na likanisi ya Yoane lokola bato nyonso bandimaka yango, mpe ata elongo na likanisi ya boklisto na mobimba na yango.”​—Technical Papers for the Bible Translator, Volume 28, Janvier 1977.

Ndimbola ya polele mpe ya petee ya Makomami

Tokoki bongo koloba ete likanisi oyo elobi ete Yesu azali nzambe mpe akeseni na Nzambe Mozalisi eyokani te na likanisi ya Yoane (elingi koloba ya ntoma Yoane), mpe na likanisi ya baklisto nyonso? Tika totalela mwa mikapo ya Biblia oyo ezali kolobela Yesu mpe Nzambe, mpe tomona lolenge bato mosusu oyo bazalaki na bomoi liboso ete elembo ya Athanase ebima, bakanisaki na ntina na yango.

“Ngai mpe Tata, tozali moko.”​—YOANE 10:36.

Novatien (pene na mobu 200 kino mobu 258 T.B.) alobaki boye ete: “Mpo ete alobaki eloko ‘moko,’ [b] oyo bapengwi basosoli ete Ye alobaki te moto ‘moko.’ Mpo ete moko etyami na neutre ezali komonisa boyokani kati na bato, kasi bomoko ya bomoto te. . . . Lisusu, likambo oyo ete Ye alobi moko ezali komonisa boyokani, bomoko ya makanisi mpe boyokani ya bolingo yango moko; eyokani mpenza, mpamba te Tata mpe Mwana bazali kati na bomoko, na bolingo mpe na bolingo ya motema.”​—Sur la Trinité, mokapo 27.

“Tata aleki ngai.”​—YOANE 14:28.

Irénée (pene na mobu 130 kino mobu 200 T.B.): “Nkolo alingaki toyeba na nzela na ye, ete Tata azali likoló na biloko nyonso. Mpamba te, alobaki ete ‘Tata aleki ngai.’ . . . Bongo, Nkolo amonisaki Tata ete aleki mpo na oyo etali boyebi.”​—Contre les hérésies, Livre II, mokapo 28.8.

“Oyo ezali bomoi na seko ete bayeba yo Nzambe moko na solo mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.”​—YOANE 17:3.

Clément d’Alexandrie (pene na mobu 150 kino mobu 215 T.B.): “Koyeba Nzambe moko ya seko, mopesi na biloko ya seko, Nzambe Moyangeli Monene, oyo akeseni na banzambe mosusu mpe malamu, mpe koluka kozwa ye na kosaláká makasi mpo na koyeba ye. . . . Yango ezali etinda ya liboso oyo Mobikisi alendisi ete moto oyo alingi bomoi alanda yango; etinda oyo ‘moto mosusu ayebi te, bobele Mwana, mpe ye oyo Mwana andimi ete amonisa ye.’ (Mat. 11:27) Nsima na boyebi yango, elandi nokinoki boyebi ya bonene na Mobikisi mpe ya ngolu na ye ya sika.”​—Quel riche peut être sauvé? VII, VIII.

“Nzambe moko, ye oyo azali Tata na nyonso; oyo azali likoló na nyonso mpe esika moko na nyonso mpe katitaki na nyonso.”​—BAEFESE 4:6.

Irénée: Elobami ete “Nzambe moko, ye oyo azali Tata na nyonso, oyo azali likoló na nyonso mpe esika moko na nyonso, katikati na nyonso. Mpo ete likoló na nyonso, ezali Tata, mpe ye nde azali motó ya Klisto.”​—Contre les hérésies, Livre V, mokapo 18.2.

Na eleko wana, bakomi oyo totangi awa basosolaki polele ete ba versets wana ezali komonisa Tata lokola moyangeli monene, likoló na biloko mpe bato nyonso, ezala mpe likoló na Yesu Klisto. Maloba na bango mazali komonisa eloko moko te oyo elakisi ete bazalaki kondima Bosato.

Elimo santu eyebisi solo nyonso

Yesu alakaki na bayekoli na ye ete nsima ya kufa mpe lisekwa na ye, elimo santu esengelaki kozala mosungi mpo na bango. Alobaki ete: “Nde ekoya ye, elimo na solo, akokamba bino kati na solo nyonso, . . . mpe akosakwela bino makambo makoya.”​—Yoane 14:16, 17; 15:26; 16:13.

Nsima na kufa na Yesu, esakweli wana ekokanaki. Biblia eyebisi ete mateya ya sika mamonisamaki na lisangá ya boklisto, to makómaki polele na nzela ya elimo santu. Mateya wana ya sika makomamaki kati na mikanda oyo mikómaki eteni ya mibale ya Biblia, Makomami ya Greke ya boklisto to “Kondimana ya Sika.” Kati na bingengiseli mingi wana ya sika, ezali nde na emoniseli moko na ntina na Bosato? Te. Elimo santu emonisi makambo makeseni mpenza na ntina na Nzambe mpe Yesu.

Na ndakisa, na Pantekote ya mobu 33 T.B., nsima na koya ya elimo santu likoló na bayekoli oyo bayanganaki na Yelusaleme, ntoma Petelo apesaki litatoli na ntina na Yesu epai na bibele oyo bazalaki na libandá. Alobelaki Bosato? Talela mwa maloba na ye mosusu, mpe pesa eyano yo moko: “Yesu . . . , mobali oyo Nzambe atalisi kati na bino na misala na nguya, na bikamwiseli, na bilembo bisali Nzambe na maboko na ye na kati na bino.” “Mpo na Yesu oyo, Nzambe asekwisi ye, mpe biso nyonso tozali batatoli na likambo yango.” “Nzambe azalisi ye Nkolo mpe Klisto, ye Yesu oyo bino bokakisi ye likoló na nzeté.” (Misala 2:22, 32, 36) Petelo ateyaki Bosato soko moke te, na litatoli na ye, wana atondaki na elimo, amonisi ete Yesu azali na nse ya Tata na ye, mpe azali esaleli oyo Nzambe azali na yango mpo na kokokisa mokano na ye.

Mwa moke na nsima, moklisto mosusu ya sembo alobelaki Yesu. Bamemaki Etienne liboso ya Esambiselo monene mpo na koyanola na bifundeli oyo afundamaki na yango. Na esika ya kosala bongo, Etienne abongolaki makambo mpe afundaki bafundi na ye ete bakokanaki na bankɔ́kɔ na bango batomboki. Tozali kotanga na nsuka ya lisoló yango ete: “Nde [Etienne] atondaki na elimo santu, atali likoló mpe amoni nkembo na Nzambe, na Yesu kotelema na loboko na Nzambe na mobali. Alobi ete: ‘Namoni likoló lizipwi, mpe Mwana na moto kotelema na loboko na Nzambe na mobali.’” (Misala 7:55, 56) Mpo na nini elimo santu emonisaki bobele ete Yesu azalaki “Mwana na moto” kotelema na loboko na Nzambe na mobali, kasi te lokola mosangani ya bonzambe oyo akokani na Tata na ye? Ezali polele ete Etienne azalaki kokanisa na ntina na Bosato te.

Ntango Petelo amemaki nsango malamu na ntina na Yesu epai na Corneille, azwaki bongo libaku mosusu ya kokweisa liteya ya Bosato. Likambo nini lisalemaki? Petelo alimbolaki ete Yesu azali “Nkolo na nyonso.” Kasi ayaki kolimbola ete bokonzi yango euti na liziba moko oyo eleki. Yesu azalaki “Moponami na Nzambe lokola mosambisi ya bato na bomoi mpe bakufi.” Nsima na lisekwa na Yesu, Tata na ye “apesi ye nguya [apesi ye nzela] ya komilakisa lisusu” epai na bayekoli na ye. Bongo elimo santu? Elobelami awa, kasi te lokola moto ya misato kati na Bosato. Nzokande, elobami ete: “Nzambe atondisi [Yesu] na elimo santu mpe na nguya.” Mpo na yango, na esika ete ezala moto, elimo santu ezali nde eloko, lokola “nguya” oyo elobelami na verset. (Misala 10:36, 38, 40, 42) Talela Biblia malamumalamu, mpe okomona bilembeteli mosusu oyo emonisi ete elimo santu ezali moto te, kasi nguya moko oyo ekosalaka mosala oyo moto akoki kotonda na yango, oyo ezali kotinda ye na kosala likambo, kolendisa ye mpe kosopana likoló na ye.

Na nsuka, ntoma Paulo azalaki na libaku malamu ya kolimbola Bosato​—soki yango ezalaki liteya ya solo—​wana azalaki kosakola epai na bato ya engumba ya Athènes. Na lisoló na ye, alobelaki etumbelo na bango “mpo na Nzambe oyo ayebani te,” mpe alobaki: “Oyo bino bokosambelaka na koyeba ye te, ngai nakosakola ye na bino.” Asakolaki Bosato? Te. Alobelaki “Nzambe oyo asalaki mokili, na biloko nyonso na kati na yango, ye wana azali Nkolo na likoló mpe na nse.” Kasi alobaki nini na ntina na Yesu? “[Nzambe] asili kopona mokolo wana ekosambisa ye mikili nyonso na sembo, mpe akosambisa bango na moto moko oyo asili kopona.” (Misala 17:23, 24, 31) Likanisi ata moko ya Bosato ezali wana soko moke te!

Ya solo, Paulo alimbolaki likambo moko na ntina na mikano na Nzambe oyo ekosala ete Yesu mpe Tata na ye bazala te biteni mibale bikokani ya Bosato. Akomaki: “Nzambe ‘asili kokitisa biloko nyonso na nse na makolo na ye [ya Yesu].’ Ezali yango koloba ete ‘biloko nyonso bisili kokitisama,’ emonani polele ete mokitisi azali kati na biloko yango te. Wana ekiti biloko nyonso na nse na makolo na ye, Mwana ye mpenza akokita na nse na bokonzi na ye oyo akitisi biloko nyonso na nse na ye, ete Nzambe azala nyonso kati na bato nyonso.” (1 Bakolinti 15:27, 28) Na bongo, Nzambe akozala ntango nyonso likoló na bato nyonso, ezala mpe likoló ya Yesu.

Biblia ezali koteya Bosato? Te. John Robinson azalaki na elónga. Ezali kati na Biblia te, lisusu, ezali mpe eteni ya “likanisi ya boklisto” te. Ozali kotalela yango lokola likambo ya ntina mpo na losambo na yo? Osengeli kosala bongo. Yesu alobaki ete: “Oyo ezali bomoi na seko ete bayeba yo Nzambe moko na solo mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Soki totalelaka losambo na biso epai na Nzambe lokola likambo ya ntina, ebongi ete toyeba ye mpenza lokola azali, mpe lokola azali komimonisa epai na biso. Ezali bobele na kosaláká bongo nde tokoloba ete tozali kati na “basambeli ya solo” oyo “bakosambelaka Tata na elimo mpe na solo.”​—Yoane 4:23.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Engebene mokanda L’Encyclopédie catholique, ebimeli ya 1907 (na Lingelesi), volume 2, lokasa 33.

b Novatien azali kolobela likambo oyo ete, kati na verset, liloba libongolami na “moko” ezali neutre. Na yango, ndimbola na yango ezali “eloko.” Tala Yoane 17:21, epai liloba ya Greke oyo ebongolami na “moko” esalelami na motindo yango. Ezali likambo ya kosepelisa na koyeba ete mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique (1967, na Lingelesi) ezali kondima mokanda ya Novatien, oyo ezali na motó na likambo De Trinitate, atako emonisi ete kati na mokanda yango, “Elimo Santu etalelami te lokola Persona moko ya bonzambe.”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 28]

Ndimbola ya polele ya Makomami emonisi ete Yesu mpe Tata na ye bazali Nzambe moko te

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]

Mpo na nini, nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., elimo santu emonisaki te ete Yesu azalaki Nzambe?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto