Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/12 nk. 3-5
  • Yesu abotamaki ndenge nini mpe mpo na nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu abotamaki ndenge nini mpe mpo na nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina oyo Yesu asengelaki kobotama
  • Ntina oyo eleki monene
  • Ngɔndɔ Maria—Biblia elobi nini mpo na ye?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge oyo mbotama ya Yesu ezali komema kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Maria (Mama ya Yesu)
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/12 nk. 3-5

Yesu abotamaki ndenge nini mpe mpo na nini?

SOKI bato mingi oyo bazali baklisto te bayoki lisolo ya kobotama ya Yesu, bakoki koloba boye: “Ekoki kosalema te!” Mpo na bango, ngɔndɔ moseka oyo akumba zemi kozanga kosangisa nzoto na mobali eyokani ata moke te na siansi. Bongo yo, okanisi boni na likambo yango?

Na 1984, zulunalo moko ya Londres (The Times) ebimisaki mokanda moko oyo ezalaki na likanisi oyo: “Kosalela siansi mpo na komonisa ete makamwisi ekoki kosalema te ezali likambo moko oyo elongobani te. Moto oyo azali kokanisa mpenza ete makamwisi ekoki kosalema te azali komonisa kondima na ye; ndenge moko mpe, moto oyo azali kokanisa mpenza ete makamwisi ekoki kosalema azali komonisa kondima na ye.” Mokanda yango ekomamaki na baprofɛsɛrɛ 14 ya bainiversite ya Angleterre. Balobaki ete: “Tondimi na esengo mpenza ete kobotama ya Yesu na moseka, makamwisi oyo balobeli na Baevanzile mpe lisekwa ya Klisto ezali makambo oyo esalemaki mpenza.”

Atako bongo, moto oyo ayoki mpo na mbala ya liboso lisolo ya ndenge oyo Yesu abotamaki na moseka oyo ayebi naino mibali te asengeli kokamwa. Ata ye moko moseka yango, mama ya Yesu, akamwaki ntango anzelu ya Nzambe alobaki na ye ete: “Talá! okozwa zemi na matrisi na yo mpe okobota mwana mobali, mpe osengeli kobenga ye na nkombo Yesu.” Kasi Malia atunaki ete: “Ndenge nini yango ekosalema, lokola nasangisi nzoto ná mobali te?” Na nsima, anzelu alimbolaki ete Nzambe akosala likamwisi yango na nzela ya elimo santu na Ye, mpe abakisaki ete: “Epai ya Nzambe ezali ata na liloba moko te oyo ekoki te kosalema.” (Luka 1:​31, 34-37) Na ntembe te, Ye oyo apesaki bato likoki ya kobotana, akokaki mpe kosala ete moseka moko oyo azali ngɔndɔ mpe azali na bizaleli ya pɛto abota Yesu. Soki Nzambe akokaki kosala molɔ́ngɔ́ mobimba na mibeko nyonso ya sikisiki oyo ezali kotambwisa yango, akokaki mpe kosalela likei moko na libumu ya Malia mpo na kosala Mwana ya kokoka.

Ntina oyo Yesu asengelaki kobotama

Yozefe, moto oyo azalaki kobanga Nzambe, azalaki fianse ya Malia na ntango oyo akómaki na zemi. Anzelu ya Nzambe alimbolelaki Yozefe na ndɔtɔ ntina oyo fianse na ye, oyo azali ngɔndɔ, azwaki zemi. Anzelu alobaki ete: “Kobanga te kotya Malia mwasi na yo na ndako, mpo oyo ebotami na kati na ye euti na elimo santu. Akobota mwana mobali, mpe osengeli kobenga ye na nkombo Yesu, mpo akobikisa bato ya ekólo na ye na masumu na bango.” (Matai 1:​20, 21) Na Liebele, nkombo Yesu elimboli “Yehova azali Lobiko.” Yango ezali kokundolela biso ete tosengeli kobikisama na lisumu mpe na liwa mpe ete Yehova Nzambe azwi bibongiseli mpo na lobiko yango na nzela ya Yesu.

Mpo na lisumu ya Adama, moto ya liboso, bana na ye nyonso babotamaka na ezaleli ya kozanga kokoka, mpe makanisi na bango etindaka bango ntango nyonso na kobuka mibeko ya Nzambe. (Baloma 5:12) Ndenge nini bana ya Adama bakokaki kobikisama na lisumu mpe kokóma bato ya kokoka? Bomoi ya moto mosusu ya kokoka, oyo ekokani na oyo Adama azalaki na yango, esengelaki kopesama mpo na kokata likambo yango na bosembo. Talá ntina oyo Nzambe asalaki ete Yesu, moto ya kokoka, abotama na ndenge ya likamwisi, mpe ntina oyo Yesu atikaki ete banguna na ye báboma ye. (Yoane 10:​17, 18; 1 Timote 2:​5, 6) Nsima ya lisekwa ya Yesu mpe komata na ye na likoló, akokaki koloba na komindimisa mpenza ete: “Nakómaki mokufi, kasi, talá! nazali na bomoi libela na libela seko, mpe nazali na bafungola ya liwa mpe ya Hadesi [lilita ya bato nyonso].”​—⁠Emoniseli 1:⁠18.

Na ndenge ya elilingi, Yesu azali kosalela bafungola ya liwa mpe ya Hadesi, mpo na kofungolela bato ya masumu nzela ete bázwa lisusu makambo oyo Adama abungisaki. Yesu alobaki boye: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto oyo azali komonisa kondima na kati na ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi; mpe moto nyonso oyo azali na bomoi mpe azali komonisa kondima na kati na ngai akokufa ata mokolo moko te.” (Yoane 11:​25, 26) Oyo nde elaka kitoko! Kasi, Yesu abotamaki mpe mpo na ntina mosusu ya monene koleka.

Ntina oyo eleki monene

Bomoi ya Yesu ebandaki na libumu ya Malia te. Yesu alobaki polelepolele ete: “Nakitaki uta na likoló.” (Yoane 6:38) Yesu azalaki ekelamu ya elimo pembeni ya Tata na ye kuna na likoló banda ebandeli ya bozalisi. Kutu, Biblia ezali kolobela ye lokola “ebandeli ya bozalisi ya Nzambe.” (Emoniseli 3:14) Ntango azalaki kuna na likoló, Yesu amonaki na miso na ye moko botomboki ya anzelu mabe oyo atindaki bato ya liboso báboya boyangeli ya Nzambe. Yango nde ntina mpenza oyo Yesu abotamaki lokola Mwana ya Nzambe na nzoto ya moto ya kokoka. Ntina yango ezalaki nini?

Ezalaki mpo na komonisa polele ete Tata na ye ya likoló azali na lotomo ya koyangela molɔ́ngɔ́ mobimba. Lokola atikalaki ntango nyonso sembo awa na mabele banda kobotama na ye tii liwa na ye, Yesu amonisaki ete andimaki kotosa lolenge oyo Yehova azali kotambwisa bikelamu na Ye. Liboso ete banguna ya Nzambe báboma ye, Yesu ayebisaki polelepolele ntina oyo andimaki kopesa bomoi na ye lokola mbeka. Alobaki ete yango ezali mpo mokili eyeba ete alingaka Tata. (Yoane 14:31) Soki Adama na Eva, bato ya liboso, bázalaka na bolingo ya ndenge wana, mbɛlɛ bakokaki kotikala sembo liboso ya likambo ya pɛtɛɛ mpenza oyo Nzambe asɛngaki bango.​—⁠Genese 2:​15-17.

Lokola Yesu atikalaki sembo, yango emonisaki mpe polele ete Satana, anzelu mabe, azali mokosi. Satana akoselaki Nzambe mpe moto makambo ntango alobaki liboso ya baanzelu kuna na likoló ete: “Moto akopesa nyonso ezali na ye mpo na bomoi na ye.” (Yobo 2:​1, 4) Satana abukaki lokuta ete bato nyonso bakoki koboya kotosa Nzambe mpo na kobikisa bomoi na bango.

Makambo oyo touti kolobela ebimisaki mpenza ntembe mpo na bosembo mpe lotomo ya boyangeli ya Nzambe. Mpo na kokata makambo yango, Yesu andimaki kobotama lokola moto mpe kotikala sembo tii na liwa na ye.

Na boye, ntina mpenza oyo Yesu abotamaki awa na mabele, lokola ye moko alobaki yango, ezalaki mpo ‘apesa litatoli na ntina etali solo.’ (Yoane 18:37) Asalaki yango na ndenge amonisaki na maloba mpe na misala ete boyangeli ya Nzambe ezali mpenza sembo mpe ete soki moto atosi yango, akozwa bolamu ya libela. Yesu alobaki mpe ete ayaki na mokili mpo na kopesa bomoi na ye ya bomoto lokola “lisiko na esika ya bato mingi,” mpe kofungolela basumuki nzela mpo ete bákóma bato ya kokoka mpe bázwa bomoi ya seko. (Malako 10:45) Mpo na kosalisa bato bákanga ntina ya makambo yango, esengelaki mpenza ete lisolo ya kobotama ya Yesu ekomama. Longola yango, makambo oyo esalemaki na ntango ya kobotama ya Yesu ezali na makambo mosusu ya ntina oyo ekoki kopesa biso liteya, ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango.

[Bililingi na lokasa 4]

Ndenge nini bana ya Adama bakokaki kobikisama na lisumu?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto