-
“Ntango ya kozongisa makambo ndenge ezalaki” ekómi pene!Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2000 | 1 Septembre
-
-
MOSALA yango ekokaki kozala mosala ya mwa mikolo, bapɔsɔ to basanza te. Kasi, bayekoli bazelaki te, babandaki mbala moko kosakola. Atako bongo, likambo ya kozongisa makambo ndenge ezalaki elongwaki na makanisi na bango te. Mokolo mosusu, Petelo alobelaki yango liboso ya ebele ya bato oyo bayanganaki na Yelusaleme, boye: “Bongolá mitema, mpe butwá ete bópɛtwa na masumu na bino ete ntango ya kopema euta na Nkolo, mpe ete atinda Klisto oyo aponameli bino, ye Yesu. Ekoki ete aumela na likoló kino [Ntango ya kozongisa makambo nyonso ndenge ezalaki liboso, “NW” ], yango elobaki Nzambe na minɔkɔ ya basakoli na ye ya bulɛɛ longwa na kalakala.”—Misala 3:19-21.
-
-
“Ntango ya kozongisa makambo ndenge ezalaki” ekómi pene!Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2000 | 1 Septembre
-
-
Lokola ntoma Petelo alobaki yango liboso ya ebele ya bato na Yelusaleme, likoló ‘ebombaki Yesu.’ Ebombaki ye tii na 1914, ntango Yesu azwaki bokonzi mpe abandaki koyangela lokola Mokonzi oyo Nzambe aponi. Petelo asakolaki ete na ntango wana, Yehova ‘akotinda’ Mwana na ye, elingi koloba akopesa Yesu nzela ya kokokisa mokumba na ye lokola Mokokisi monene ya mikano ya Nzambe. Biblia elobeli likambo yango na maloba ya elilingi oyo: “[Ebongiseli ya Nzambe na likoló] aboti mwana mobali, [Bokonzi ya Nzambe na mabɔkɔ ya Yesu Klisto] oyo akokɛngɛla mabota nyonso na fimbo ya ebende.”—Emoniseli 12:5.
-