Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • bt mok. 4 nk. 28-35
  • “Bato batángá kelasi te mpe bato mpamba”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bato batángá kelasi te mpe bato mpamba”
  • ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Na nguya na biso moko” te (Misala 3:11-26)
  • “Tokoki kotika te koloba” (Misala 4:1-22)
  • “Batombolaki mingongo na bango . . . epai ya Nzambe” (Misala 4:23-31)
  • Tókozongisa monɔkɔ epai ya ‘bato te, kasi epai ya Nzambe’ (Misala 4:32–5:11)
  • Ayekolaki kolimbisa epai ya Nkolo na ye
    Mekolá kondima na bango
  • Ayekolaki kolimbisa epai ya Nkolo na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Alongaki kobanga mpe ntembe
    Mekolá kondima na bango
  • Atikalaki sembo na komekama
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
bt mok. 4 nk. 28-35

MOKAPO 4

“Bato batángá kelasi te mpe bato mpamba”

Bantoma bamonisi mpiko, mpe Yehova apamboli bango

Euti na Misala 3:1–5:11

1, 2. Likamwisi nini Petro ná Yoane basalaki pembeni ya porte ya tempelo?

TOZALI na nsima ya midi mpe moi makasi ezali kobɛta ebele ya bato. Bayuda ya molende mpe bayekoli ya Kristo bazali kokɔta na tempelo. Etikali moke “ngonga ya libondeli” ekoka.a (Mis. 2:46; 3:1) Petro ná Yoane bazali lokuka nzela na kati ya ebele ya bato yango mpo na kokende na porte ya tempelo oyo ebengami Kitoko. Na kati ya makɛlɛlɛ ya bato oyo bazali kosolola mpe ya makolo ya bato oyo bazali kotambola, mobali moko oyo abotamá motɛngumi azali kosɛnga bato biloko.​—Mis. 3:2; 4:22.

2 Ntango mosɛngi-biloko amoni Petro ná Yoane bakómi pembeni na ye, abeleli lisusu makasi mpo na kosɛnga mbongo. Bantoma batɛlɛmi, mpe mobali yango azali kotala bango na elikya ete bakopesa ye mbongo. Petro alobi na ye: “Palata mpe wolo, nazali na yango te, kasi nakopesa yo nde oyo nazali na yango. Na nkombo ya Yesu Kristo Monazarete, tambolá!” Kanisá ndenge ebele ya bato bakamwaki ntango Petro asimbaki motɛngumi yango na lobɔkɔ mpe mobali yango atɛlɛmaki semba, mpo na mbala ya liboso na bomoi na ye! (Mis. 3:6, 7) Kanisá ndenge mobali yango azalaki kotalatala makolo na ye oyo ebongaki mpe azalaki komeka kotambola! Tokoki kokamwa te ndenge abandaki kopumbwa mpe kosanzola Nzambe na mongongo makasi!

3. Likabo nini ya motuya monene mobali oyo azalaki motɛngumi mpe ebele ya bato bakokaki kozwa?

3 Ebele ya bato oyo bazalaki kokamwa bakendaki mbangu epai ya Petro ná Yoane na veranda ya Salomo. Wana, kaka na esika oyo Yesu atɛlɛmaki mokolo mosusu mpo na koteya, Petro ayebisaki bango ndimbola ya solosolo ya likambo oyo eutaki kosalema. (Yoa. 10:23) Ayebisaki ebele ya bato mpe mobali oyo azalaki motɛngumi ete bakokaki kozwa likabo ya motuya koleka palata to wolo. Likabo yango eleki mosika kobikisama na nzoto. Ezali nde libaku ya kobongola motema mpo masumu na bango ebomama, mpe ya kokóma bayekoli ya Yesu Kristo, “Kapita ya bomoi” oyo Yehova atye.​—Mis. 3:15.

4. (a) Kobikisa motɛngumi na ndenge ya likamwisi ememaki na likambo nini? (b) Tokozwa biyano na mituna nini?

4 Mokolo ya makambo mpenza! Mobali moko abikisamaki mpe akómaki kotambola. Ebele ya bato bazwaki libaku ya kobikisama na elimo mpo bákóma komitambwisa na ndenge oyo ebongi na Nzambe. (Kol. 1:9, 10) Longola yango, makambo oyo esalemaki mokolo yango ememaki na kobendana kati na bayekoli ya sembo ya Kristo ná bakonzi oyo balukaki kopekisa bango bátosa etinda oyo Yesu apesaki, ya kosakola nsango ya Bokonzi. (Mis. 1:8) Liteya nini tokoki kozwa na mayele mpe ezaleli oyo Petro ná Yoane​—“bato batángá kelasi te mpe bato mpamba”​—bamonisaki mpo na kopesa litatoli liboso ya ebele ya bato?b (Mis. 4:13) Mpe ndenge nini tokoki komekola lolenge oyo bango mpe bayekoli mosusu basalaki ntango bakutanaki na botɛmɛli?

“Na nguya na biso moko” te (Misala 3:11-26)

5. Liteya nini tozwi na ndenge oyo Petro alobaki na ebele ya bato?

5 Petro ná Yoane batɛlɛmaki liboso ya ebele ya bato, bayebi ete mikolo eleki, bamosusu kati na bango babelelaki ete Yesu abomama. (Mrk. 15:8-15; Mis. 3:13-15) Kanisá mpiko oyo Petro amonisaki ntango alobaki ete motɛngumi wana abikisamaki na nkombo ya Yesu. Petro abombaki solo te. Alobaki polele ete ebele ya bato wana bazalaki na ngambo na liwa ya Kristo. Kasi, Petro akangelaki bango nkanda te, mpo ‘bayebaki te oyo bazalaki kosala.’ (Mis. 3:17) Abengaki bango bandeko mpe alobelaki mingimingi makambo ya malamu oyo etali Bokonzi, alobaki ete soki babongoli motema mpe bandimeli Kristo, Yehova akopesa bango “bileko ya kopema.” (Mis. 3:19) Biso mpe tosengeli kozala na mpiko mpe koloba polele ntango tozali kosakola lisambisi ya Nzambe oyo ekoya. Kasi, tosengeli te kozala na maloba ya mabe to kosambisa bato. Tosengeli nde kotalela baoyo tozali kosakwela lokola bato oyo bakoki kokóma bandeko na biso, mpe na ndakisa ya Petro, tosengeli kolobela mingimingi makambo ya malamu oyo etali Bokonzi.

6. Ndenge nini Petro ná Yoane bamonisaki ezaleli ya komikitisa mpe bopɔlɔ?

6 Bantoma bayebaki esika makoki na bango esuki. Bamipesaki lokumu te mpo na makamwisi oyo basalaki. Petro alobaki na bato: “Mpo na nini bozali kotalatala biso lokola nde na nguya na biso moko to na ezaleli na biso ya kokangama na Nzambe nde totambwisi ye?” (Mis. 3:12) Petro ná bantoma mosusu bayebaki ete malamu nyonso oyo basalaki na mosala na bango esalemaki na nguya ya Nzambe, kasi na nguya na bango moko te. Yango wana, na bopɔlɔ mpenza, bazalaki kopesa nkembo nyonso epai ya Yehova mpe Yesu.

7, 8. (a) Likabo nini tokoki kopesa bato? (b) Ndenge nini elaka ya ‘kozongisa makambo nyonso sika’ ezali kokokisama lelo oyo?

7 Biso mpe tosengeli kozala na bopɔlɔ ntango tozali kosakola Bokonzi. Ya solo, elimo ya Nzambe epesaka te bakristo ya mikolo na biso nguya ya kobikisa bato na ndenge ya likamwisi. Atako bongo, tokoki kosalisa bato bándimela Nzambe mpe Kristo mpe bázwa likabo oyo Petro alobelaki: libaku ya kolimbisama masumu mpe kozwa bopemi oyo Yehova akopesa. Mbula na mbula, bankóto ya bato bazali kosimba libaku yango mpe bazali kozwa batisimo mpo na kokóma bayekoli ya Kristo.

8 Kutu, tozali sikoyo na ntango oyo “Nzambe akozongisa makambo nyonso sika,” oyo Petro alobelaki. Mpo na kokokisa liloba oyo Nzambe “alobaki na monɔkɔ ya basakoli na ye basantu ya ntango ya kala,” Bokonzi etyamaki na likoló na 1914. (Mis. 3:21; Nz. 110:1-3; Dan. 4:16, 17) Mwa moke na nsima, Kristo abandaki kotambwisa mosala ya kozongisa losambo ya solo awa na mabele. Na yango, bamilio ya bato bakɔti na paradiso ya elimo, bakómi bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe. Bato yango balongoli bomoto ya kala, oyo epɔlá, mpe balati “bomoto ya sika oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe.” (Ef. 4:22-24) Ndenge moko na kobikisama ya motɛngumi oyo azalaki mosɛngi-biloko, mosala monene wana ekokisami na nguya ya bato te, kasi na elimo ya Nzambe. Lokola Petro, tosengeli kosalela Liloba ya Nzambe na mpiko mpo na koteya bato na ndenge oyo ekosalisa bango. Soki tosalisi bato bákóma bayekoli ya Kristo, yango esalemi na nguya ya Nzambe, kasi na nguya na biso moko te.

“Tokoki kotika te koloba” (Misala 4:1-22)

9-11. (a) Bakonzi ya Bayuda basalaki nini ntango bayokaki makambo oyo Petro ná Yoane bazalaki kosakola? (b) Bantoma bazalaki na ekateli ya kosala nini?

9 Diskur ya Petro mpe kopumbwa ná koganga ya moto oyo azalaki motɛngumi ebimisaki mwa yikiyiki. Mpo na yango, kapita ya tempelo (moto oyo azalaki kobatela kimya na tempelo) mpe banganga-nzambe bakonzi bayaki mbangu. Ekoki kozala ete bazalaki Basadukai, bandimi ya mwa lingomba ya Bayuda oyo ezalaki na bozwi mpe na lokumu mingi na makambo ya politiki. Bato ya mwa lingomba yango bazalaki koluka kobatela boyokani ya kimya ná Baroma, bazalaki koboya mibeko oyo ekomami te, oyo Bafarisai bazalaki kolinga mingi, mpe bazalaki kondima lisekwa te.c Kanisá ndenge bayokaki nkanda ntango bamonaki Petro ná Yoane na kati ya tempelo bazali koteya na mpiko ete Yesu asekwaki!

10 Na nkanda nyonso, banguna yango babwakaki Petro ná Yoane na bolɔkɔ, mpe na mokolo oyo elandaki, bamemaki bango liboso ya tribinale monene ya Bayuda. Mpo na bakonzi yango oyo bazalaki komimona ete baleki bato mosusu, Petro ná Yoane bazalaki “bato batángá kelasi te mpe bato mpamba,” oyo bazalaki na lotomo te ya koteya na tempelo. Bantoma yango batángaki na eteyelo moko te ya mangomba. Atako bongo, elobeli na bango ya polele mpe mpiko na bango ekamwisaki bato na tribinale. Nini esalisaki bango? Moko ya bantina ezali ete “bazalaki elongo na Yesu.” (Mis. 4:13) Nkolo na bango azalaki koteya na bokonzi mpenza, kasi te lokola bakomeli.​—Mat. 7:28, 29.

11 Tribinale epesaki bantoma mitindo ete bátika kosakola. Na ekólo na bango, etinda ya tribinale wana ezalaki na nguya mingi. Kaka mwa bapɔsɔ liboso, bato ya tribinale yango bazwaki ekateli ete Yesu “abongi na liwa.” (Mat. 26:59-66) Atako bongo, Petro ná Yoane babangaki te. Liboso ya bato yango ya bozwi, ya lokumu, mpe oyo batángá bakelasi milaimilai, Petro ná Yoane balobaki na mpiko, kasi mpe na limemya ete: “Soki ezali sembo na miso ya Nzambe ete tóyoka bino na esika ya koyoka Nzambe, bino moko bókata likambo. Kasi biso, tokoki kotika te kolobela makambo oyo tomoni mpe toyoki.”​—Mis. 4:19, 20.

NGANGA-NZAMBE MONENE MPE BANGANGA-NZAMBE BAKONZI

Nganga-nzambe monene azalaki momonisi ya bato ya ekólo mobimba liboso ya Nzambe. Na siɛklɛ ya liboso T.B., azalaki mpe mokambi ya Sanedrina. Banganga-nzambe bakonzi bazalaki batambwisi oyo bazalaki kosala elongo na ye. Bamosusu kati na bango bazalaká kala banganga-nzambe monene, na ndakisa Anasi, mpe mikóló ya mabota oyo ezalaki kobimisa banganga-nzambe minene; mabota yango ezalaki kaka minei to mitano. Emil Schürer akomaki boye: “Na ntembe te, moto oyo azali na kati ya libota ya ndenge wana azalaki na lokumu” koleka banganga-nzambe mosusu.

Makomami emonisi ete Banganga-nzambe minene bazalaki kokokisa mokumba wana tii liwa na bango. (Mit. 35:25) Kasi, na eleko oyo makambo oyo mokanda ya Misala elobeli ezalaki kosalema, baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi oyo Baroma bazalaki kotya bazalaki kopona to kolongola banganga-nzambe ndenge balingi. Atako bongo, emonani ete bakonzi yango ya bapakano bazalaki kopona banganga-nzambe minene kaka na mabota ya bana ya Arona.

12. Nini ekoki kobakisela biso mpiko mpe kondima?

12 Yo mpe okokoka komonisa mpiko ya ndenge wana? Omiyokaka ndenge nini soki ozwi libaku ya kopesa litatoli epai ya moto ya bozwi, moto oyo atángá mingi, to moto moko ya lokumu na mboka na bino? Bongo soki ndeko ya libota, moninga ya kelasi, to moninga ya mosala azali kotyola bindimeli na yo? Obangaka? Soki ezali bongo, yebá ete okoki kolonga mayoki yango. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, ateyaki bantoma na ye ndenge oyo bakoki kolobela bindimeli na bango na mpiko mpe na limemya. (Mat. 10:11-18) Nsima ya lisekwa na ye, Yesu alakaki bayekoli na ye ete akokoba kozala na bango “mikolo nyonso tii na eleko ya nsuka ya mokili.” (Mat. 28:20) Na litambwisi ya Yesu, “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali koteya biso ndenge oyo tokoki kolobela bindimeli na biso. (Mat. 24:45-47; 1 Pe. 3:15) Ateyaka biso yango na makita ya lisangá, na ndakisa na likita Bomoi mpe mosala ya bakristo, mpe na mikanda oyo elimbolaka Biblia, na ndakisa masolo “Biyano na mituna ya Biblia” na site jw.org. Olandaka makita na likebi mpe otángaka masolo yango? Soki ozali kosala yango, mpiko mpe kondima na yo ekobakisama. Na bongo, na ndakisa ya bantoma, eloko moko te ekopekisa yo olobela mateya kitoko oyo oyekoli na Biblia.

Ndeko moko ya mwasi azali kopesa litatoli na moninga ya mosala na ntango ya bopemi.

Eloko moko te epekisa yo kolobela mateya kitoko oyo oyekoli na Biblia

“Batombolaki mingongo na bango . . . epai ya Nzambe” (Misala 4:23-31)

13, 14. Tosengeli kosala nini ntango tokutani na botɛmɛli, mpe mpo na nini?

13 Nsima ya kobima na bolɔkɔ, Petro ná Yoane bakendaki mbala moko kokutana na bandeko ya lisangá. Bango nyonso “batombolaki mingongo na bango . . . epai ya Nzambe” mpe babondelaki mpo na kozwa mpiko ya kokoba kosakola. (Mis. 4:24) Petro ayebaki malamu ete ezali bozoba komityela motema mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Mwa bapɔsɔ liboso, amityelaki motema koleka ndelo ntango alobaki na Yesu ete: “Ata soki basusu nyonso babɛti libaku mpo na makambo oyo ekokómela yo, ngai nakobɛta libaku ata moke te!” Nzokande, ndenge Yesu asakolaki yango, eumelaki te Petro abangaki bato mpe awanganaki moninga mpe moteyi na ye. Kasi, libunga oyo Petro asalaki eteyaki ye.​—Mat. 26:33, 34, 69-75.

14 Kozala na ekateli makasi ekoki te mpo na kosalisa yo okokisa mokumba na yo ya kopesa litatoli mpo na Kristo. Ntango banguna balingi kolɛmbisa kondima na yo to kopekisa yo osakola, landá ndakisa ya Petro ná Yoane. Bondelá Yehova apesa yo makasi. Luká lisalisi ya bandeko na lisangá. Yebisá bankulutu mpe bandeko mosusu oyo bakɔmɛli na elimo mikakatano oyo okutani na yango. Mabondeli ya bandeko mosusu ekoki kopesa yo makasi ya koyika mpiko.​—Ef. 6:18; Yak. 5:16.

15. Mpo na nini bato oyo batikaki kosakola na ntango moko boye basengeli kolɛmba nzoto te?

15 Soki otikaki kosakola na ntango moko boye mpo na mbamba ya basusu, kolɛmba nzoto te. Kobosana te ete nsima ya liwa ya Yesu, bantoma nyonso batikaki kosakola na boumeli ya mwa ntango; kasi, bazongelaki lisusu milende na bango. (Mat. 26:56; 28:10, 16-20) Na esika otika mabunga oyo osalá kala elɛmbisa yo, tiká nde mabunga yango eteya yo mpe salelá mateya oyo ozwi mpo na kolendisa basusu.

16, 17. Libondeli oyo bayekoli ya Kristo na Yerusaleme basalaki ekoki koteya biso nini?

16 Tosengeli kosɛnga nini na libondeli ntango bakonzi bazali konyokola biso? Tóbosana te ete bayekoli basɛngaki te ete Nzambe abatela bango mpo bákutana na mikakatano te. Bayebaki malamu maloba oyo Yesu alobaki ete: “Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino.” (Yoa. 15:20) Nzokande, bayekoli yango ya sembo basɛngaki epai ya Yehova ‘atya likebi’ na makaneli ya banguna. (Mis. 4:29) Bayekoli babosanaki te likambo oyo eleki ntina, bayebaki ete minyoko oyo bazalaki kokutana na yango ezalaki kokokisa esakweli. Bayebaki ete, ndenge Yesu ateyaki bango bábondelaka, mokano ya Nzambe ‘ekosalema na mabele,’ ata soki bato oyo bazali na bokonzi balobi nini.​—Mat. 6:9, 10.

17 Mpo bayekoli básala mokano ya Nzambe, babondelaki Yehova boye: “Pesá baombo na yo likoki ya kokoba koloba liloba na yo na mpiko mpenza.” Yehova asalaki nini? Biblia elobi: “Esika oyo bayanganaki eninganaki; mpe bango nyonso batondaki na elimo santu mpe babandaki koloba liloba ya Nzambe na mpiko.” (Mis. 4:29-31) Eloko moko te ekoki kopekisa mokano ya Nzambe ekokisama. (Yis. 55:11) Ata soki mikakatano ezali minene ndenge nini, to soki banguna na biso bazali makasi ndenge nini, soki totomboli mingongo epai ya Nzambe na libondeli, tótya motema ete akopesa biso makasi ya kokoba kosakola liloba na ye na mpiko.

Tókozongisa monɔkɔ epai ya ‘bato te, kasi epai ya Nzambe’ (Misala 4:32–5:11)

18. Bato ya lisangá ya Yerusaleme bazalaki kosala nini mpo na kosalisana?

18 Eumelaki te, lisangá oyo esalemaki sika na Yerusaleme ekómaki na bato koleka 5000.d Atako bayekoli bautaki na mimeseno ya bamboka ekeseni, “bazalaki na likanisi kaka moko.” Bazalaki na bomoko na elimo mpe na makanisi. (Mis. 4:32; 1 Ko. 1:10) Bayekoli basukaki kaka te na kobondela Yehova apambola milende na bango. Bazalaki kosalisana na elimo, mpe soki esengeli, na mosuni. (1 Yoa. 3:16-18) Na ndakisa, moyekoli Yozefe, oyo bantoma bapesaki nkombo Barnabasi, atɛkaki mabele na ye mpe apesaki mbongo nyonso likabo mpo na kosalisa bandeko ya bamboka ya mosika oyo bafandaki lisusu mwa mikolo na Yerusaleme mpo na koyekola makambo mosusu mingi.

19. Mpo na nini Yehova abomaki Ananiasi ná Safira?

19 Mobali moko na nkombo Ananiasi ná mwasi na ye Safira, batɛkaki mpe mabele na bango mpe bapesaki likabo. Bamonisaki lokola nde bapesaki mbongo nyonso oyo bazwaki, kasi, ‘na nkuku babombaki mwa ndambo ya mbongo.’ (Mis. 5:2) Yehova abomaki mobali yango ná mwasi na ye; ezali te mpo bapesaki mbongo moke, kasi nde mpo mayoki oyo etindaki bango bápesa ezalaki mabe mpe bakosaki bantoma. Kasi Biblia elobi ete bakosaki ‘bato te, kasi nde Nzambe.’ (Mis. 5:4) Ndenge moko na bakosi oyo Yesu apamelaki, Ananiasi ná Safira balukaki bato bápesa bango nkembo na esika ya koluka ete Nzambe andima bango.​—Mat. 6:1-3.

20. Mateya nini tokoki kozwa na oyo etali kopesa Yehova makabo?

20 Lelo oyo, Batatoli mingi bamonisaka elimo ya kokaba lokola oyo bayekoli ya sembo oyo bazalaki na Yerusaleme bamonisaki; bapesaka makabo mpo na kosimba mosala ya kosakola na mokili mobimba. Batindaka moto te na makasi ete apesa ntango to mbongo na ye mpo na mosala yango. Kutu, Yehova alingaka te tósalela ye na koimaima to na kotindikama. (2 Ko. 9:7) Ntango topesi makabo, Yehova asepelaka, na motuya na yango te, kasi na mayoki oyo etindi biso tópesa. (Mrk. 12:41-44) Tólinga soki moke te kozala lokola Ananiasi ná Safira, tósalela Nzambe te mpo na matomba na biso to mpo na koluka kozwa nkembo. Nzokande, lokola Petro, Yoane, ná Barnabasi, tiká ete kolinga Nzambe mpe bazalani na biso nde ezala mayoki oyo etindaka biso ntango nyonso tósalela Nzambe.​—Mat. 22:37-40.

PETRO​—MOLUKI-MBISI OYO AKÓMAKI NTOMA YA MOLENDE

Petro abengami na bankombo mitano na kati ya Biblia. Abengami Simeone na Ebre mpe Simo, na Grɛki; abengami mpe Petro mpe Kefa na monɔkɔ ya sémitique. Ntoma yango abengami mpe Simo Petro, oyo esangisi bankombo mibale.​—Mat. 10:2; Yoa. 1:42; Mis. 15:14.

Ntoma Petro amemi kitunga ya mbisi.

Petro azalaki na mwasi; mpe mama-bokilo na ye ná ndeko na ye ya mobali bazalaki kofanda epai na ye. (Mrk. 1:29-31) Azalaki moluki-mbisi, moto ya Betesaida, engumba moko oyo ezalaki na nɔrdi ya Mbu ya Galile. (Yoa. 1:44) Na nsima, akómaki kofanda na Kapernaume, oyo ezalaki pembeni wana. (Luka 4:31, 38) Yesu azalaki na kati ya masuwa ya Petro ntango ateyaki ebele ya bato oyo bayanganaki na libongo ya Mbu ya Galile. Mwa moke na nsima, na etinda ya Yesu, Petro akangaki mbisi ebele na ndenge ya likamwisi. Petro abangaki mpe afukamaki liboso ya Yesu, kasi Yesu alobaki na ye: “Tiká kobanga. Banda sikoyo okobanda kokanga bato na bomoi.” (Luka 5:1-11) Petro azalaki kosala mosala ya koluka mbisi elongo na ndeko na ye Andre, ná Yakobo mpe Yoane. Bango nyonso minei batikaki mosala na bango ntango Yesu abengaki bango bákóma bayekoki na ye. (Mat. 4:18-22; Mrk. 1:16-18) Soki mbula moko na nsima, Petro azalaki na kati ya mibali 12 oyo Yesu aponaki mpo bázala “bantoma” na ye, oyo elimboli “batindami.”​—Mrk. 3:13-16.

Yesu azalaki kozwa Petro, Yakobo mpe Yoane mpo bázala elongo na ye na makambo mosusu ya ntina. Bazalaki wana ntango Yesu abongwanaki, bamonaki ntango asekwisaki mwana ya Yairuse, mpe bazalaki elongo na ye ntango atungisamaki makasi na elanga ya Getesemane. (Mat. 17:1, 2; 26:36-46; Mrk. 5:22-24, 35-42; Luka 22:39-46) Bantoma yango misato, elongo na Andre, nde batunaki Yesu elembo ya kozala na ye.​—Mrk. 13:1-4.

Petro azalaki koloba polele, azalaki na mpiko mpe ntango mosusu motema mɔtɔmɔtɔ. Emonani ete mbala mingi ye nde azalaki koloba liboso baninga mosusu báloba. Baevanzile ezongeli maloba na ye mbala mingi koleka maloba nyonso ya bantoma mosusu 11. Petro azalaki kotuna mituna ntango baninga bafandi nyɛɛ. (Mat. 15:15; 18:21; 19:27-29; Luka 12:41; Yoa. 13:36-38) Ye nde aboyaki Yesu asukola ye makolo mpe na nsima, ntango Yesu apamelaki ye, asɛngaki asukola ye mpe mabɔkɔ ná motó!​—Yoa. 13:5-10.

Na bolingo nyonso, Petro alukaki kondimisa Yesu ete akomona mpasi te mpe akobomama te. Yesu apamelaki ye makasi mpo makanisi na ye ezalaki mabe. (Mat. 16:21-23) Na butu ya nsuka liboso Yesu akufa, Petro alobaki ete ata soki bantoma mosusu nyonso basundoli Yesu, ye akosundola Yesu soki moke te. Ntango banguna bakangaki Yesu, mpiko ya Petro etindaki ye asalela mopanga mpo na koluka kobatela Yesu mpe na nsima alandaki Yesu tii na lopango ya nganga-nzambe monene. Kasi, mwa moke na nsima, Petro awanganaki Nkolo na ye mbala misato, mpe na nsima alelaki na mawa makasi ntango akanisaki likambo oyo asalaki.​—Mat. 26:31-35, 51, 52, 69-75.

Liboso Yesu abimela bantoma na ye na Galile mpo na mbala ya liboso nsima ya lisekwa na ye, Petro alobaki ete akei koluka mbisi, mpe bantoma mosusu balandaki ye. Ntango Petro amonaki Yesu na libongo, amibwakaki mbala moko na mai mpe abɛtaki mai tii na mokili. Na nsima, ntango bazalaki kolya mbisi oyo Yesu atumbelaki bango, Yesu atunaki Petro soki alingaka ye koleka “oyo,” elingi koloba mbisi oyo ezalaki wana. Yesu azalaki kolendisa Petro apona kolanda ye ntango nyonso na esika amipesa na mosala mosusu, lokola mosala ya koluka mbisi.​—Yoa. 21:1-22.

Kati na mobu soki 62-64 T.B., Petro asakolaki nsango malamu na Babilone, na ekólo Irak ya lelo, epai Bayuda bazalaki mingi. (1 Pe. 5:13) Na Babilone, Petro akomaki mokanda na ye ya liboso, mpe mbala mosusu mokanda na ye ya mibale. Yesu apesaki Petro “makoki oyo esengeli mpo azala ntoma ya bato oyo bakatamá ngenga.” (Gal. 2:8, 9) Petro akokisaki mokumba yango na motema mawa mpe na mpiko mpenza.

YOANE​—MOYEKOLI OYO YESU AZALAKI KOLINGA MINGI

Ntoma Yoane azalaki mwana ya Zebede mpe ndeko ya ntoma Yakobo. Ekoki kozala ete nkombo ya mama na ye ezalaki Salome, oyo mbala mosusu azalaki ndeko ya Maria, mama ya Yesu. (Mat. 10:2; 27:55, 56; Mrk. 15:40; Luka 5:9, 10) Boye, ekoki kozala ete Yoane ná Yesu bazalaki bandeko. Emonani ete Yoane azalaki na libota moko ya bozwi. Zebede azalaki na mwa kompanyi ya koluka mbisi, mpo azalaki na bato ya mosala. (Mrk. 1:20) Salome azalaki kosala mibembo elongo na Yesu mpe azalaki kosalela ye misala ntango azalaki na Galile, mpe na nsima amemaki matiti ya nsolo kitoko mpo na kopakola nzoto ya Yesu liboso bákunda ye. (Mrk. 16:1; Yoa. 19:40) Ekoki mpenza kozala ete Yoane azalaki na ndako na ye moko.​—Yoa. 19:26, 27.

Ntoma Yoane asimbi rulo.

Mbala mosusu Yoane nde moyekoli ya Yoane Mobatisi oyo atɛlɛmaki ná Andre ntango Yoane Mobatisi amonaki Yesu mpe alobaki: “Bótala, Mwana-Mpate ya Nzambe!” (Yoane 1:35, 36, 40) Na nsima, Yoane mwana ya Zebede akendaki ná Yesu na Kana mpe amonaki likamwisi ya liboso oyo Yesu asalaki. (Yoa. 2:1-11) Ndenge Evanzile ya Yoane elobeli makambo oyo Yesu asalaki na nsima na Yerusaleme, na Samaria mpe na Galile, emonisi ete mokomi na yango azalaki wana ntango makambo oyo alobeli ezalaki kosalema. Lokola Yoane andimaki kotika mbala moko minyama, masuwa, mpe mosala na ye mpe alandaki Yesu​—ndenge mpe Yakobo, Petro ná Andre basalaki​—yango emonisi ete Yoane azalaki na kondima makasi.​—Mat. 4:18-22.

Baevanzile elobeli Yoane mingi te ndenge elobeli Petro. Kasi, Yoane mpe azalaki na motema mɔtɔmɔtɔ, ndenge tokoki komona yango na nkombo Boanergesi, oyo elakisi “Bana ya nkake,” oyo Yesu apesaki ye ná ndeko na ye Yakobo. (Mrk. 3:17) Na ebandeli, Yoane azalaki koluka lokumu mingi; yango wana, ye ná ndeko na ye batindaki mama na bango asɛnga Yesu apesa bango bisika ya lokumu na Bokonzi na ye. Atako bamonisaki moimi na likambo wana, yango emonisaki mpe ete bazalaki kondima ete Bokonzi ezali likambo ya solo. Lokola bayekoli wana mibale bazalaki koluka lokumu, yango epesaki Yesu libaku ya koteya bantoma na ye nyonso ntina ya kozala na komikitisa.​—Mat. 20:20-28.   

Yoane amonisaki motema mɔtɔmɔtɔ na ye ntango amekaki kopekisa moto moko oyo azalaki moyekoli ya Yesu te ete abimisa bademo na nkombo ya Yesu. Mokolo mosusu, Yoane alingaki kokitisa mɔtɔ ya likoló mpo eboma bato nyonso ya mboka moko ya Samaria oyo baboyaki koyoka bato oyo Yesu atindaki bábongisela ye makambo mosusu. Yesu apamelaki ye mpo na ezaleli yango. Ya solo, na nsima Yoane akómaki na makanisi ya malamu mpe akómaki na motema mawa, bizaleli oyo azalaki na yango te liboso. (Luka 9:49-56) Atako azalaki kosala mabunga, Yoane azalaki “moyekoli oyo [Yesu] azalaki kolinga mingi.” Yango wana, liboso Yesu akata motema, atikaki Maria, mama na ye, na mabɔkɔ ya Yoane.​—Yoa. 19:26, 27; 21:7, 20, 24.

Yoane akufaki nsima ya bantoma mosusu nyonso, ndenge Yesu asakolaki yango. (Yoa. 21:20-22) Yoane asalelaki Yehova na bosembo mbula soki 70. Na nsuka ya bomoi na ye, ntango Domitien azalaki amperɛrɛ ya Roma, Yoane atindamaki na bolɔkɔ na esanga ya Patimosi ‘mpo azalaki kolobela Nzambe mpe kotatola mpo na Yesu.’ Kuna, na mobu soki 96 T.B., azwaki bimonaneli oyo akomaki na mokanda ya Emoniseli. (Em. 1:1, 2, 9) Masolo ya kala elobaka ete ntango Yoane abimaki na bolɔkɔ, akendaki na Efese epai akomaki Evanzile na ye mpe mikanda ya 1, 2 mpe 3 Yoane; masolo yango elobaka mpe ete akufaki na Efese na mobu soki 100 T.B.

a Bato bazalaki kobondela na tempelo na ntango ya bambeka ya ntɔngɔ mpe ya mpokwa. Mbeka ya mpokwa ezalaki kopesama na “ngonga ya libwa,” elingi koloba ngonga ya misato ya nsima ya midi.

b Talá etanda “Petro​—Moluki-mbisi oyo akómaki ntoma ya molende,” na lokasa 30, mpe “Yoane​—Moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi,” na lokasa 33.

c Talá etanda “Nganga-nzambe monene mpe banganga-nzambe bakonzi,” na lokasa 34.

d Ekoki kozala ete na mobu 33 T.B., Bafarisai bazalaki soki 6000 mpe Basadukai bazalaki moke koleka Bafarisai. Ekoki mpe kozala mpo na yango nde bato ya bituluku wana bazalaki komona ete bazali na likama ndenge mateya ya Yesu ezalaki kopalangana.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto