Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/3 nk. 4-7
  • Makambo oyo koya ya klisto ekokokisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo koya ya klisto ekokokisa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bakonzi yango bakolongwa na malɛmbɛ?
  • Kozongisama oyo ekomema bolamu
  • “Nzambe azali kiti na yo ya bokonzi libela na libela”
  • Koya ya Klisto mpe bomoi ya bato
  • Osengeli kosala nini?
  • Bokonzi
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Bisakweli oyo ekokokisama mosika te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Bokonzi oyo “bokobebisama soko moke te”
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/3 nk. 4-7

Makambo oyo koya ya klisto ekokokisa

“LIKAMBO YA NSƆMƆ NA SÃO PAULO.” Ezali na maloba yango nde zulunalo Veja elimbolaki makambo esalemaki na boumeli ya mikolo minei ya sanza ya Mai 2006 ntango etuluku ya bato mabe babebisaki São Paulo, engumba oyo eleki monene na Brésil. Bato soki 150, kati na bango bapolisi, babandi, mpe bato mosusu bakufaki na mobulu yango.

Na mokili mobimba, bazulunalo, radio to televizyo ezali kolobela mingi makambo ya mobulu oyo ezali kosalema na mokili. Emonani ete bakonzi bazali kokoka kopekisa yango te. Na bisika nyonso, bomoi ya bato ezali se kokóma na likama. Mbala mosusu okoki kolɛmba nzoto mpo makambo ya mabe ekómi mingi. Nzokande, etikali moke makambo ebongwana.

Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya mpe mokano ya Nzambe esalema “lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Matai 6:9, 10) Bokonzi yango ezali guvɛrnema oyo Nzambe aponi Yesu azala Mokonzi. Guvernɛma yango ekosilisa makambo nyonso oyo etungisaka bato. Nzokande, mpo Bokonzi ya Nzambe esala makambo ya malamu awa na mabelé, esengeli ete bakonzi ya mokili bálongwa mpo Bokonzi ya Klisto eyangela mokili. Yango nde makambo oyo koya ya Klisto ekokokisa.

Bakonzi yango bakolongwa na malɛmbɛ?

Bakonzi ya mokili bakondima kotika esika na boyangeli ya Klisto? Ntoma Yoane azwaki emonaneli moko oyo epesi eyano na motuna yango. Alobaki boye: “Namonaki nyama mabe [ebongiseli ya politiki] mpe bakonzi ya mabelé mpe mampinga na bango bayangani mpo na kobunda etumba ná [Yesu] moto oyo afandi likoló ya mpunda mpe ná limpinga na ye.” (Emoniseli 19:19) Bakonzi ya mabelé bakosuka ndenge nini na etumba yango? Biblia elobi ete Mokonzi oyo Yehova aponi ‘akotuta bango na lingenda ya ebende, akobuka bango lokola mbɛki ya moyemi.’ (Nzembo 2:9) Bibongiseli ya politiki ya mokili mobimba ekobebisama. Bokonzi ya Nzambe “ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso [ya bato], mpe ekotikala lobiko na lobiko.”​—Danyele 2:44.

Ezali boni mpo na bato oyo batɛmɛlaka Bokonzi ya Nzambe? Na “emoniseli ya Nkolo Yesu uta na likoló elongo na baanzelu na ye ya nguya na kati ya mɔtɔ ya kopela,” Biblia emonisi Yesu lokola ye oyo “akozongisa mabe na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali te kotosa nsango malamu.” (2 Batesaloniki 1:7, 8) Masese 2:22 elobi boye: “Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato ya masumu bakobikolama wana.”

Na oyo etali koya ya Klisto, Biblia elobi boye: “Talá! Azali koya elongo na mapata, mpe liso nyonso ekomona ye.” (Emoniseli 1:7) Bato bakomona ye na miso ya bomoto te. Bandá Yesu azongaki na likoló, azali ekelamu ya elimo oyo “afandaka na kati ya pole oyo likoki ya kopusana penepene na yango ezali te, oyo moto te na kati ya bato amoná to akoki komona.”​—1 Timote 6:16.

Mpo bato ‘bámona’ Yesu, ezali kosɛnga kaka te ete alata nzoto ya bomoto; Yehova mpe asalaki bongo te ntango atindaki Malɔzi Zomi na Ezipito na mikolo ya Moize. Na ntembe te, bato oyo bazalaki na bomoi na ntango wana bamonaki ete Yehova nde azalaki kotinda malɔzi yango, mpe nsukansuka bandimaki ete azali na nguya mingi. (Exode 12:31) Ndenge moko mpe, ntango Nzambe akotinda Klisto mpo na koboma bato mabe, bato yango ‘bakomona,’ to bakososola, ete Nzambe nde asaleli ye mpo na kosambisa bango. Bakoyeba likambo yango mpo bakokebisama liboso. Ya solo, “liso nyonso ekomona [Yesu], mpe mabota nyonso ya mabelé bakomibɛta na mpasi mpo na ye.”​—Emoniseli 1:7.

Liboso ete mabelé ekóma na kimya ya solosolo mpe na makambo ya malamu, bato mabe mpe bakonzi ya mokili basengeli naino kolongolama. Klisto akokokisa likambo yango. Na nsima, akozwa makambo na mabɔkɔ, mpe mbongwana monene ekokɔta na mokili.

Kozongisama oyo ekomema bolamu

Ntoma Petelo alobelaki “kozongisama ya makambo nyonso oyo Nzambe alobaki na monɔkɔ ya basakoli na ye basantu ya ntango ya kala.” (Misala 3:21) Kozongisama yango ezali mpe mbongwana oyo ekosalema ntango Klisto akoyangela mabelé. Mosakoli Yisaya, oyo azalaki na bomoi na siɛklɛ ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.), azali moko ya basakoli oyo na nzela na bango Nzambe alobelaki “kozongisama ya makambo nyonso” na mabelé. Ye asakolaki ete Yesu Klisto, “Nkolo ya kimya,” akozongisa kimya na mabelé. Mpo na boyangeli ya Klisto, Yisaya asakolaki ete: “Kofuluka ya bokonzi na ye mpe kimya ekosuka te.” (Yisaya 9:6, 7) Yesu akoteya bato oyo bakofanda na mabelé ndenge ya kozala na kimya. Bato yango “bakosepela mpe na kimya ya solo.”​—Nzembo 37:11.

Boyangeli ya Klisto ekosala nini mpo na bobola mpe nzala? Yisaya alobaki boye: “Na ngomba oyo [Yehova] na bibele akobongisela mabota nyonso elambo ya bilei na mafuta, elambo ya vinyo oyo esili koumela, ya bilei kitoko bitondi na mafuta mpe na vinyo eumeli mpe eponami.” (Yisaya 25:6) Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Masango ekotondana na mokili ata kino likoló na nkeka; mpe mbuma na yango ekoningana pelamoko na nzete na Lebanona.” (Nzembo 72:16) Longola yango, mpo na bato oyo bakofanda na mabelé Biblia elobi boye: “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga na miwiti mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alya; zambi lokola mikolo ya nzete, bongo ekozala mikolo ya bato na ngai, mpe baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala ya mabɔkɔ na bango.”​—Yisaya 65:21, 22.

Yisaya asakolaki mpe ete maladi ná liwa ekolongolama. Nzambe alobaki na nzela ya Yisaya ete: “Bongo miso ya bakufeli miso makofungolama, mpe matoi ya bimimi makozipolama; bongo, motɛngumi akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo ya ebubu ekoyemba na esengo.” (Yisaya 35:5, 6) Na bongo, “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.” (Yisaya 33:24) Nzambe “akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi nyonso.”​—Yisaya 25:8.

Ezali boni mpo na bato oyo bakufá, oyo bazali “na malita ya kokanisama”? (Yoane 5:28, 29) Yisaya asakolaki boye: ‘Bakufi na yo bakobika. . . . Bakotɛlɛma.’ (Yisaya 26:19) Ya solo, bato oyo bakufá bakozonga na bomoi!

“Nzambe azali kiti na yo ya bokonzi libela na libela”

Koya ya Klisto ekosala ete mabelé mobimba ezonga paladiso. Bato nyonso bakobanda kosambela kaka Nzambe moko ya solo. Tokoki mpenza kondima ete Yesu Klisto akolongola mabe na mabelé mpe akozongisa bosembo?

Tólobela moto oyo apesi Yesu nguya mpe bokonzi. Biblia elobi boye mpo na Mwana: “Nzambe azali kiti na yo ya bokonzi libela na libela seko, mpe lingenda ya bokonzi na yo ezali lingenda ya bosembo. Olingaki boyengebene, mpe oyinaki botyoli-mibeko.” (Baebele 1:8, 9) Kiti ya bokonzi ya Yesu, elingi koloba, nguya to bokonzi na ye euti epai ya Yehova. Nzambe azali Nkolo ya kiti ya bokonzi yango; mpe lokola apesi ye yango, ezali na mokakatano moko te oyo Yesu akokoka te kosilisa.

Nsima ya lisekwa ya Yesu, alobaki na bayekoli na ye boye: “Bokonzi nyonso epesameli ngai na likoló mpe na mabelé.” (Matai 28:18) Mokapo ya 1 Petelo 3:22 elobi boye: “Baanzelu mpe bakonzi mpe banguya bamemamaki na kotosa ye.” Ata nguya to bokonzi moko te ekoki kolonga kotɛmɛla Yesu. Eloko moko te ekoki kopekisa ye asopela bato mapamboli oyo ekoumela seko.

Koya ya Klisto mpe bomoi ya bato

Na mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Tesaloniki, alobaki boye: “Tokanisaka ntango nyonso mosala na bino ya sembo mpe mosala makasi na bino ya bolingo mpe ezaleli na bino ya koyika mpiko mpo na elikya na bino na kati ya Nkolo na biso Yesu Klisto liboso ya Nzambe na biso mpe Tata.” (1 Batesaloniki 1:3) Paulo amonisaki ete kozala na elikya na Yesu Klisto etindaka moto asala mosala makasi mpe ayika mpiko. Elikya yango esɛngi mpe kozala na kondima na koya ya Klisto mpe na kozongisama oyo yango ekomema. Elikya ya ndenge wana ekoki kosunga baklisto ya solo, elingi koloba epesaka bango makasi ya koyika mpiko, ata na mikakatano ya makasi.

Tózwa ndakisa ya Carlos, oyo afandaka na São Paulo, na Brésil. Na sanza ya Augusto 2003, monganga ayebisaki Carlos ete azali na maladi ya kanser. Banda wana, basali ye lipaso mbala mwambe mpe yango ememeli ye mikakatano mingi na nzoto. Atako bongo, azali kokoba kolendisa basusu. Na ndakisa, mokolo moko ntango azalaki koteya na balabala, pembeni ya lopitalo moko monene, akutanaki na Motatoli ya Yehova moko, oyo mobali na ye azalaki na kanser. Lokola ayebi ndenge kanser enyokolaka moto, Carlos alendisaki mpe abɔndisaki mwasi wana ná mobali na ye. Mwasi yango ná mobali na ye balobaki ete masolo oyo basololaki ná Carlos elendisaki bango. Na bongo, Carlos amonaki bosolo ya maloba ya Paulo ete, Nzambe “abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso, mpo biso mpe tózala na likoki ya kobɔndisa baoyo bazali na kati ya ndenge nyonso ya bolɔzi na nzela ya kobɔndisama oyo biso moko tobɔndisami na yango epai ya Nzambe.”​—2 Bakolinti 1:4.

Nini epesaka Carlos makasi ya kolendisa basusu atako ye moko mpe azali kotungisama na maladi? Carlos azali kokoba “kosala oyo ezali malamu” mpo azali na elikya na koya ya Klisto mpe na makambo nyonso oyo yango ekokokisa.​—Bagalatia 6:9.

Tótalela mpe ndakisa ya Samuel, oyo ndeko na ye akufaki mosika te na ndako na bango. Babɛtaki ndeko yango masasi zomi. Ebembe elalaki pembeni ya nzela na boumeli ya bangonga mwambe, wana bapolisi bazalaki kosala ankɛtɛ. Samuel abosanaka te makambo oyo elekaki mokolo wana. Kasi, Samuel azwaka makasi na elikya oyo azali na yango ete mosika te Klisto akolongola mabe nyonso mpe boyangeli na ye ya sembo ekosopela bato mapamboli ya seko. Mbala mingi, Samuel akanisaka ndenge oyo akoyambana na ndeko na ye na Paladiso awa na mabelé na ntango ya lisekwa.​—Misala 24:15.

Osengeli kosala nini?

Elikya na koya ya Klisto mpe na makambo oyo yango ekokokisa ekoki kobɔndisa yo. Yesu Klisto akolongola mpenza makambo nyonso oyo ebimiselaka biso mikakatano mpe bampasi.

Osengeli kosala nini mpo ozwa mapamboli oyo boyangeli ya Klisto ekosopela bato mosika te? Omipesa na koyekola Biblia, Liloba ya Nzambe. Na libondeli moko epai ya Tata na ye, Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Zwá mokano ya koyekola makambo oyo Biblia eteyaka. Batatoli ya Yehova ya kartye na bino bakozala na esengo ya kosalisa yo. Tosɛngi yo oluka bango to okomela babimisi ya zulunalo oyo.

[Bililingi na lokasa 7]

Koya ya Klisto ekosala ete mabelé mobimba ezonga Paladiso

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Zamba na fɔtɔ ya moke: Rhino and Lion Park, Gauteng, South Africa

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto