Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Juillet nk. 25-27
  • Biblia epekisi kotánga kelasi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia epekisi kotánga kelasi?
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kelasi na ekeke ya liboso
  • Esengeli kotalela likambo yango na likebi nyonso
  • Ezali liponi ya moto ye moko
  • Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka kelasi?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Kelasi​—⁠Salelá yango mpo na kosanzola Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Ntina ya kelasi mpe kolakisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Kotya kelasi na esika na yango
    Lamuká!—1994
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Juillet nk. 25-27

Engebene Biblia

Biblia epekisi kotánga kelasi?

“Bobele zoba nde atyolaka kotánga kelasi.”​—Publilius Syrus, Moral Sayings (Maloba ya mayele), ekeke ya liboso L.T.B.

BIBLIA ezali kolendisa biso ete ‘tóbatelaka mayele na solo mpe bososoli.’ (Masese 3:21) Yehova, Nzambe ya boyebi, alingi ete basambeli na ye bázala bato oyo bateyami. (1 Samwele 2:3; Masese 1:5, 22) Nzokande, maloba mosusu kati na Biblia makoki kobimisa mituna. Na ndakisa, kolobeláká mikano na ye ya kala, bakisa mpe kelasi minene oyo atángaki, ntoma Paulo akomaki ete: “Nazali kotalela nyonso wana lokola biloko mpamba.” (Bafilipi 3:3-8, Today’s English Version) Kati na mokanda mosusu oyo mopemamaki, andimaki ete: “Mayele ma bato ba mokili mazali se bozoba o miso ma Nzambe.”​—1 Bakolinti 3:19, Liloba lya Nzambe.

Na yango, Biblia ezali kopekisa kotánga kelasi? Kino kelasi nini moklisto asengeli kotánga? Kelasi oyo esɛngami na Leta ekoki, to esengeli kobakisa mosusu?

Kelasi na ekeke ya liboso

Baklisto ya ekeke ya liboso batángaki kelasi ndenge moko te. Bato mosusu ya lokumu batalelaki ntoma Petelo na ntoma Yoane, oyo bautaki na etúká ya Galilai, lokola “bato bamesani na mikanda te, mpe bato bayekoli makambo te.” (Misala 4:5, 6, 13) Yango elingi koloba ete mibali mibale wana batángáká te? Te. Elingi bobele koloba ete bakelasi oyo bango batángaki ezalaki oyo ya biteyelo ya minene ya Baebele na Yelusaleme te. Makomi ya balobeli yango mibale ya boklisto ya mpiko emonisaki na nsima ete bazalaki bato oyo bateyamaki malamu, bato ya mayele, oyo bazalaki na makoki ya kolimbola Makomami polele. Kelasi oyo batángaki esangisaki mpe misala ya mabɔkɔ mpo na kokokisa bamposa ya mosuni ya mabota na bango. Bazalaki mpe kosala mombongo ya mbisi oyo na ntembe te ezalaki na mbongo mingi.​—Malako 1:16-21; Luka 5:7, 10.

Na bokeseni, Luka, moyekoli oyo akomaki moko na Baevanzile mpe mokanda ya Misala ya bantoma, atángaki kelasi milai. Azalaki monganga. (Bakolose 4:14) Boyebi na ye ya makambo ya monganga emonani kati na makomi na ye oyo mapemami.​—Talá Luka 4:38; 5:12; Misala 28:8.

Liboso ete akóma moklisto, ntoma Paulo ateyamaki kati na mibeko ya Bayuda, azalaki mwanakelasi ya Gamaliele, moko ya banganga-mayele ya lokumu ya ntango wana. (Misala 22:3) Bakelasi oyo Paulo atángaki ekoki kozala lelo oyo lokola iniversite. Lisusu, epai na Bayuda, ezalaki likambo ya lokumu mpo na bilenge ete báyekola mosala moko ya mabɔkɔ, atako basengelaki kosala kelasi minene na bambula ya nsima. Na ntembe te, ntango azalaki naino elenge, Paulo abongisamaki lokola mosali-bahema. Makoki motindo yango esalisaki ye ete akokisa bamposa na ye ya mosuni kati na mosala na ye ya kosakola ntango nyonso.

Kasi, Paulo ayebaki ete soki okokanisi yango na motuya monene ya boyebi ya Nzambe, bakelasi ya mosuni​—atako ezali na ntina​—ezali na motuya moke. Na yango, Biblia ezali komonisa ete kozwa boyebi ya Nzambe mpe ya Klisto ezali na ntina monene koleka. Lelo oyo, ezali malamu ete baklisto bándima likanisi lilongobani yango oyo litali kotánga kelasi.​—Masese 2:1-5; Yoane 17:3; Bakolose 2:3.

Esengeli kotalela likambo yango na likebi nyonso

Baklisto mosusu bamonaki ete kobakisa kelasi, ezala na iniversite to na bisika ya kobongisama mpo na mosala ya mabɔkɔ, esalisaki bango mpo ete bákokisa bamposa ya mosuni ya mabota na bango. Komibanzabanza mpo na libota ezali likambo lilongobani, mpamba te ‘kokokisa bamposa ya bato ya ndako’ ezali lisɛngami ya bulɛɛ. (1 Timote 5:8) Kozwa makoki oyo esengeli mpo na kosala yango ezali likambo ya mayele.

Nzokande, baoyo bazali na mposa ya kobakisa kelasi mpo na kokokisa mokano yango basengeli kotalela matomba mpe mbeba na yango. Matomba yango esangisi mpe kozala na makoki ya kozwa mosala oyo ekosalisa moto ete akokisa malamumalamu bamposa na ye mpe bamposa ya libota na ye wana azali kolanda kosala mosala ya boklisto na molende nyonso. Lisusu, akoki kosalisa basusu na mosuni, ‘kozala na eloko ya kokabela bango bazali kozanga.’​—Baefese 4:28.

Wapi mwa mbeba mosusu oyo ekoki kobima? Yango ekoki kozala mateya oyo ebebisaka kondima kati na Nzambe mpe kati na Biblia. Paulo apesaki toli epai na baklisto ete bákeba na “yango ebyangami nkombo na lokuta ete Boyebi” mpe na “motindo na bizaleli na bato mpe na makambo mikemike na mokili.” (1 Timote 6:20, 21; Bakolose 2:8) Na ntembe te, koteyama lolenge ya mateya wana ekoki kozala likama mpo na kondima ya moklisto. Baoyo bazali kokana kobakisa kelasi to koyekola mosala ya mabɔkɔ basengeli kokeba na likama ya bopusi mabe motindo wana.

Mose, oyo ‘alakisamaki na mayele nyonso ya Baezipito,’ azalaki na kondima makasi atako azwaki mateya oyo na ntembe te esangisaki makambo ya kondima banzambe mingi, mateya oyo mazali kotyola Nzambe. (Misala 7:22) Bobele bongo, lelo oyo baklisto bazali kokeba ete bákwea te na bopusi mabe ezala na esika nini oyo bango bazwami.

Likama mosusu oyo ekoki kobima na kolandáká kotánga kelasi milaimilai ezali ete boyebi evimbisaka moto na lolendo, to ebotaka mbeba. (1 Bakolinti 8:1) Bato mingi balukaka mayele na kelasi mpo na mikano ya mabe, mpe kutu koluka kozwa mayele na mikano malamu ekoki kosuka mpe na kopesa moto makanisi ya komatela basusu mpe komitalela na lokumu. Nzambe asepelaka na bizaleli motindo wana te.​—Masese 8:13.

Tókamata ndakisa ya Bafalisai. Basangani ya lingomba yango ya lokumu bazalaki komitombola mpo na boyebi oyo bazwaki na kelasi oyo batángaki mpe bazalaki komikumisa ete bazali sembo. Bayebaki makambo mingi kati na mimeseno ya bonkɔkɔ ya Balabi, mpe bazalaki kotyola bato mosusu, oyo batángaki kelasi milai te, bazalaki kotalela bango lokola bazoba, bato mpamba, kutu lokola bato oyo balakelamá mabe. (Yoane 7:49) Soki tolongoli yango, Bafalisai balingaki mbongo mingi. (Luka 16:14) Ndakisa na bango emonisi ete ntango moto azali kolanda kotánga kelasi na mikano mabe, akoki kokóma na lolendo to kokóma kolinga mbongo mingi. Na bongo, ntango azali kotalela lolenge ya kelasi oyo akobakisa mpe mbula boni akolekisa, moklisto asengeli komituna ete, ‘Nini ezali kopusa ngai ete nabakisa kelasi?’

Ezali liponi ya moto ye moko

Lolenge yango ezalaki na ekeke ya liboso, lelo oyo baklisto mpe batángi bakelasi ndenge na ndenge. Na ndingisa ya baboti na bango, bilenge oyo bazali kosilisa kelasi ya ntei bakoki kopona kobakisa. Bobele bongo, mikóló oyo bamoni malamu ete bákolisa mayele na bango mpo na kozwa makoki ya kokokisa bamposa ya mabota na bango bakoki komona ete kobakisa kelasi ezali mwango malamu mpo na kokokisa mokumba yango.a Mateya mosusu ya iniversite makolisaka mingimingi mayele ya bomoto na esika ya kopesa bato makoki ya koyeba misala. Na yango, moto akoki komona ete ata nsima ya kolekisa ntango mingi na kotánga kelasi ya motindo wana, akoki kozwa mosala te. Mpo na ntina yango, basusu baponi kobakisa kelasi na biteyelo oyo ezali kopesa mateya ya misala ya mabɔkɔ, na likanisi ya kozwa mosala noki soki basilisi kelasi.

Na lolenge moko to mosusu, bikateli motindo wana bizali liponi ya moto na moto. Baklisto basengeli te kolobelana mabe to kokweisana bamoko na bamosusu na likambo yango. Yakobo akomaki ete: “Yo nde nani kosambisa mozalani na yo?” (Yakobo 4:12) Moklisto oyo azali kolinga kobakisa kelasi, asengeli kotalela malamumalamu makanisi na ye moko mpo na koyeba soki apusami na matomba ya moimi te, ya kokóma na bozwi ya mosuni mingi.

Emonani polele ete Biblia ezali kolendisa kozala na bokatikati na likambo litali kotánga kelasi. Baboti oyo bazali baklisto bayebi ete mateya ya elimo oyo euti na Liloba ya Nzambe lipemami ezali na motuya mingi mpe epesaka batoli elongobani epai na bana na bango na ntina na bakelasi milaimilai. (2 Timote 3:16) Lokola bazali na makanisi malongobani na ntina na bomoi, bayebi motuya ya kelasi ya mosuni epai kuna bana na bango oyo bakoli bakozwa makoki oyo esengeli na bango mpo na bamposa na bango moko mpe ya mabota na bango. Na bongo, na oyo etali kokata soki akolanda kotánga bakelasi ya minene, mpe kino wapi, moklisto mokomoko akoki kozwa bikateli na ye moko na kotaleláká na makanisi na ye komipesa na ye epai na Yehova Nzambe, komipesa oyo ‘epesaka litomba na nzela nyonso, awa ezali yango na elaka na bomoi mpo na sikawa mpe mpo na ntango ekoya.’​—1 Timote 4:8.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu na lisolo yango, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ 1992, nkasa 10 kino 21 mpe mwa buku Les Témoins de Jéhovah et l’instruction, nyonso ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 26]

“Batelá mayele na solo mpe bososoli.”​—Masese 3:21

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]

Ntango azali kotalela soki akobakisa kelasi, moklisto asengeli komituna ete, ‘Nini ezali kopusa ngai ete nabakisa kelasi?’

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto