Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/7 nk. 23-28
  • Likambo litali molongo mobimba​—ekatami mpo na libela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likambo litali molongo mobimba​—ekatami mpo na libela
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Jéhovah asengeli kobunda na Armagedon
  • Jéhovah azali kobengama mpo na kozongela mosala na ye ya kobunda
  • Azali kobunda mpo na kolongisa Jéhovah
  • Mabota basangani mpo na kotemela Jéhovah
  • Nzambe mobundi akolonga elonga monene
  • Etikali moke mokanda na bitumba na Jéhovah” ekosila kokomama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Ekateli ya Yehova” ekozanga te kokokisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/7 nk. 23-28

Likambo litali molongo mobimba​—ekatami mpo na libela

“Jéhovah ye moko na lebeka na ye na mobali akobanza bakonzi (na mokolo ya nkanda na ye, MN.)”​—NZEMBO 110:5.

1, 2. Na mobu 70 ya ntango na biso, likambo nini likokaki kobimisa ntembe likoló na bokonzi na Jéhovah Nzambe na molongo mobimba, kasi banani Jehovah andimaki na eleko wana?

BOKONZI ya molongo mobimba ya Mozalisi ya likoló mpe mabelé, ezali ntembe eleki monene oyo ebimisamaki liboso na baanzelu. Mosika te, likambo yango ekokatama mpo na libela, kasi eleki bikeke mingi banguna ya Jéhovah bazali kotia ntembe na bokonzi na ye ya molongo mobimba. Solo, na mobu 70 ya ntango na biso, kobomama ya engumba Yelusaleme mpe temple na yango oyo epesamaki na Jéhovah ebimisaki mbala mosusu ntembe likoló na bokonzi ya Mozalisi na molongo mobimba. Kasi, na libaku yango, Jéhovah abimaki te mpo na kobundela Yisraele ya mosuni, mpe azalaki na ntina malamu mpo na yango.

2 Ntina yango ezalaki nini? Na eleko wana, Jéhovah Nzambe asilaki kondima libota ya sika, Yisraele ya elimo, “Yisraele ya Nzambe”, ndenge ntoma Paulo abengi lisangá na Yesu Klisto. (Bagalatia 6:16) Kasi kino lelo, na boumeli ya eleko mobimba ya “boklisto”, Jéhovah abundi te mpo na Yisraele ya elimo lokola asalaki yango kala mpo na Yisraele ya mosuni na nse na kondimana na Mibeko na Moise. Atikaki ata basoda Baromé ete baboma Yesu Klisto, na kopusama na Bayuda, likoló na nzete na mpasi, na Gologota. Likambo yango esalemaki mibu 37 liboso na kobomama ya mibale ya Yelusaleme na Baromé na mobu 70.”

3, 4. Uta mikolo na Moise kino na eleko ya Ezekiase, ndenge nini Nzambe amonisaki ete azali mobundi, kasi mpo na oyo etali Bayisraele ya elimo, tokoloba boni mpo na etumba na ye mpe etumba na bango?

3 Uta mikolo na mosakoli Moise kino na boyangeli ya Ezekiase, oyo mboka-mokonzi na ye ezalaki Yelusaleme. Jéhovah Nzambe abundaki na ekamwiseli mpo na libota ya Yisraele, mpe Bayisraele babundaki na bibundeli ya mosuni, wana ezalaki bango kotambwisama na ye. (Deteronome 1:30; 3:22; 20:3, 4; Yosua 10:42) Kasi ezali ndenge moko te mpo na Yisraele ya elimo, Yisraele ya Nzambe. Uta Yesu abomamaki libanda na Yelusaleme, mpe na boumeli na eleko na biso oyo mobimba, Nzambe mobundi na mpiko azali kobunda bitumba ya mosuni te mpo na Yisraele ya lelo. Mpo na yango, apesi nzela te na Bayisraele ya elimo, oyo basali lisangá ya boklisto, ete babunda, na kosalelaka bibundeli ya mosuni. Baklisto bazali na etumba mosusu.

4 Na boyokani na maye touti koloba, moko kati na bato bazalaki kobunda malamu mpenza mpo na kondima ya boklisto akomaki epai na baninga na ye na mboka Kolinti, na mokili na Gréce ete: “Mpo ete bibundeli na etumba na biso bizali na nzoto te kasi bizali na nguya na Nzambe mpo na kobebisa bisika bibatelami makasi. Tozali kokweisa maloba mpe bisika milai nyonso bizali kotemela boyebi na Nzambe. Tozali kokanga makanisi nyonso na nkanga ete matosa Klisto. Toselingwi mpe kopesa nkanga nyonso etumbu wana bino bosili kotosa? (2 Bakolinti 10:4-6) Mwa liboso, bobele na mokanda yango, Paulo alobaki mpo na “bibundeli na boyengebene mpo na loboko na mobali mpe mpo na loboko na mwasi”.​—2 Bakolinti 6:7; tala Baefese 6:11-18.

Jéhovah asengeli kobunda na Armagedon

5. Na elanga ya Getesemane, ezalela na Yesu ezalaki nini mpo na oyo etali kosalela bibundeli ya mosuni, mpe bayekoli na ye bazali kolanda ezalela nini na likambo yango?

5 Awa na mabelé, Yesu asalelaki te bibundeli ya koboma mpo na komibatela. Na butu oyo akangamaki kati na elanga ya Getesemane, Simo Petelo, ntoma na ye oyo amipesaki mingi, abendaki mopanga na ye mpe akataki litoyi ya mosaleli ya nganga monene Moyuda. Kasi Yesu azongisaki litoyi na esika na yango na lolenge ya ekamwiseli mpe alobaki: “Baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga. Okanisi te ete nakoki kobondela Tata na ngai mpe ye akotindela ngai pwasa koleka bituluku zomi na mibale ya baanzelu? Nde na nzela nini makomi makokoka ete makambo mabima boye?” (Matai 26:52-54) Mpo na bantina oyo nyonso, bamekoli na solo na Mwana na Nzambe, oyo apesaki bomoi na ye mbeka na bolingo na ye moko, bazali kokota te kati na bitumba oyo bizali kobima na mokili.​—Yoane 17:16: 18:36.

6. Na boumeli na etumba na mokulu monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, na Armagedon, ezalela ya ba Témoins de Jéhovah ekozala boni?

6 Tika mabota bayeba ete na boumeli na “etumba na mokolo monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso”, “na esika ebyangami na liebele ete Armagedon”, ba Témoins de Jéhovah bakobunda te. nakotika esika na Nzambe mobundi, “Jéhovah na bibele”, mpe na bibele na baanzelu na ye, oyo Yesu Klisto azali na motó na bango.​—Emoniseli 16:14-16; 19:11-21; Nzembo 84:12.

Jéhovah azali kobengama mpo na kozongela mosala na ye ya kobunda

7. Lokola azali Nzambe mobundi, Jéhovah abengamaki na titre nini? Abongi lisusu kobengama na titre yango?

7 Nzambe na Yisraele ya kala ayebanaki mpe abondelamaki na nkombo Jéhovah tseva’oth, to Jéhovah na bibele. (1 Samuele 1:3, 11) Na Baloma 9:29, ntoma Paulo akaniselaki Yisaya 1:9 mpe akomaki: “Soko Jéhovah na bibele (Sabaoth) atikelaki biso bana te, mbele tokomi lokola Sodome mbele tozali pelamoko Gomore.” Na ngambo na ye, moyekoli moklisto Yakobo akomaki: “Konganga na babuki esili kokoma na matoi na Nkolo na bibele (Sabaoth).” (Yakobo 5:4) Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, Paulo mpe Yakobo babengaki bongo Nzambe ete “Jéhovah na bibele”. Na boumeli na bikeke 18 oyo bilandaki, Nzambe abundaki te mpo na Yisraele ya elimo, Yisraele ya Nzambe, lokola asalaki yango mpo na Yisraele ya kala. Atako bongo, azali ntango nyonso Jéhovah na bibele.

8-10. (a) Nani abandisaki etumba oyo ebimaki na likoló, mpe mpo na nini Mikaele azalaki ye oyo abongi mpenza mpo na kobunda etumba yango? (b) Etumba wana na likoló esukaki ndenge nini, mpe ntango boni etikali liboso ete etumba ya mokolo monene ya Jéhovah ekoka kobima?

8 Na kobotama ya Bokonzi na Masiya, na 1914, na nsuka na “ntango na Bapakano”, etumba ebimaki na likoló, kuna na mboka na Jéhovah Nzambe. (Luka 21:24) Nani abandisaki etumba yango? Jéhovah ye moko. Atindaki Mwana na ye oyo autaki kozwa bokonzi ete akende kobunda bitumba, kolataka nkombo Mikaele, mpamba te bobele ye nde abongi koyanola na motuna oyo ezali na nkombo yango, ete “Nani azali lokola Nzambe?” Mikaele abundaki noki, na motindo na ye na mobundi na nguya momonisi na Jéhovah na bibele.

9 Na bongo, tozali kotanga na Emoniseli 12:7-10: “Etumba ebimaki kati na likoló; Mikaele na baanzelu na ye babundaki etumba na dalagona. Dalagona mpe abundaki elongo na baanzelu na ye, nde balongaki te, mpe esika kati na likoló ezwami mpo na bango lisusu te. Dalagona yango monene abwakami, ye nyoka na kalakala, oyo abiangami Motemeli mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba; abwakami na nse, baanzelu na ye mpe babwakami na ye elongo. Nayoki mongongo makasi kati na likoló koloba ete, Sasaipi lobiko, na nguya, na Bokonzi na Nzambe na biso, na bokonzi na Klisto na ye, esili koya; mpo ete mofundi na bandeko na biso, oyo akofundaka bango na liboso na Nzambe butu na moi, asili kobwakama.”

10 Lelo oyo, mibu koleka 70 nsima na etumba wana na likoló, etikali bobele “mwa elaka mokuse” liboso ete etumba ya mokolo monene ya Jéhovah ekoka kobima mpe Nzambe akoka komonisa polele na libota ya bato ya lelo ete azali Jéhovah na bibele.​—Emoniseli 12:12; Zakari 14:3.

Azali kobunda mpo na kolongisa Jéhovah

11. Batikali na etonga moke mpe ebele monene bazali kozela ntango nini, mpe bakonganga na esengo mpo na nini wana ntango ekoya?

11 Na kopemama na Nzambe, Salomo, mokonzi na mayele na libota na Yisraele na kala, akomáká: “Ntango ezali mpo na eloko na eloko, ee, ntango mpo na likambo na likambo na nse na moi: . . . ntango mpo na etumba mpe ntango mpo na kimya.” (Mosakoli 3:1-8) Na mabelé, bayekoli na Mokonzi oyo asili kobanda koyangela, ye oyo “aleki Salomo” bazali kozela ete ntango ekoka mpo ete Ye akamba baanzelu na etumba ya Armagedon mpe kozwa elonga. (Matai 12:42; Emoniseli 19:11-16) Na ntango yango, ‘akokengela mabota na mpimbo na ebende’, mpe akobuka bango “na lingenda na ebende”. (Emoniseli 19:15; Nzembo 2:9) Bayekoli na ye na kimya, oyo bakobatelama na ye, bakosepela mingi na ndenge akobikisa bango na lolenge ya kokamwa. Kati na bango ekomonana batikali na “etonga moke” ya batuki na libula na Bokonzi elongo na ye mpe “ebele monene” ya “bampate mosusu” na ye baoyo bazali na elikya ya kozwa libula na Paradis na mabelé na nse na boyangeli na ye na kimya na mbula nkoto. (Luka 12:32; Emoniseli 7:9-17; Yoane 10:16) “Na nse na elilingi na Oyo-na-Nguya-Nyonso”, bakonganga na esengo na komonaka elonga monene na Mokonzi-Mobateli na Mpate, Yesu Klisto, elonga oyo ekosilisa ntembe libela mpo na bokonzi ya Jéhovah Nzambe na molongo mobimba.​—Nzembo 91:1.

12. Etumba oyo ezali kozela mabota ekouta wapi, mpe, engebene Nzembo 68:1, 2, nsuka na yango ekozala ndenge nini?

12 Na yango, etumba moko oyo eleki makasi ya bato, oyo ekosalema na nzela na bibundeli bileki malamu mpe bileki na nguya koleka ba bombes nikléere, ezali liboso na Bikolo nyonso ya mokili, oyo esangani kati na O.N.U. mpe ata oyo esangani na yango te. Yoka: “Tika ete Nzambe atelema; bayini na ye bapanzana; baoyo nyonso bazali koyina bakima liboso na ye. Opalanganisa babeba liboso na Nzambe lokola mpaka ekonangwa na móto!”​—Nzembo 68:1, 2.

13. Lokola bibongiseli mpo na etumba bizali kosalema, maloba oyo mazwami na Nzembo 45:1-6 mazali sikawa kotalela nani na ntango oyo ebongi?

13 Bibongiseli mpo na etumba oyo ekoleka etumba nyonso bizali kosalema. Na kopemama na Nzambe, mosangani moko na liboso na Yisraele, akomaki maloba malandi mpo na Soda na Nzambe oyo aleki monene, ye oyo azali kobunda mpo na kolongisa nkombo ya Jéhovah: “Yo ozali na kitoko kati na bana na bato; ngolu esopami na bibebu na yo; boye Nzambe apamboli yo libela. Kanga mopanga na yo na ebelo na yo, E moto makasi! yo na nkembo, yo na bokonzi! Kati na bokonzi na yo, bima na kolonga, mpo na makambo na sembo mpe kobundela bayengebeni. Tika ete loboko na yo na mobali elakisa yo kosala misala na nsomo. Mbanzi na yo ezali na mopotu kati na mitema na bayini na mokonzi; bato na mabota bakokwea na nse na yo. (Nzambe azali kiti na yo na bokonzi mpo na seko, MN) lingenda na bokonzi na yo ezali lingenda na sembo.”​—Nzembo 45:1-6.

Mabota basangani mpo na kotemela Jéhovah

14, 15, Wana batikaki bango, maloba nini na Nzembo 2 bantoma batangaki mpe balobaki ete makokisami, mpe libondeli nini basalaki epai na Nzambe?

14 Mwa moke nsima na kosalama ya lisangá na boklisto na mokolo ya Pantekote na mobu 38, baklisto bapakolami basosolaki kokokisama moko ya Nzembo 2:1, 2. Tozali kotanga kati na ba versets yango ete: “Mpo na nini mabota bazali kotomboka mpe bato na mokili bayangani mwango na mpamba? Mikonzi na nse bazali kotelema mpe mikolo bayangani miango elongo kotemela Jéhovah mpe Mopakolami na ye.” Nsima wana bantoma na Mopakolami na Jéhovah bakangamaki mpo na mbala ya liboso mpe banyokwamaki na maboko na banguna na bango Bayuda, bakendaki kokutana na bandeko na bango baklisto, na nsima batangaki maloba oyo ya Nzembo 2, makomamaki na mokonzi Davidi. Tala oyo tozali kotanga na ntina yango kati na Misala 4:23-30:

15 “Esili bango kopesama nzela, bakei epai na bato na bango mpenza, mpe basololi makambo nyonso malobi banganga minene, mpe mikolo na mboka. Eyokaki bango bongo, batomboli mingongo epai na Nzambe na motema moko, mpe balobi ete, ‘Mokonzi monene, yo osalaki Likoló, na nse, na mai, na biloko nyonso bizali na kati na yango. Olobaki na monoko na Davidi mosali na yo, tata na biso, na elimo santu ete: “Bapakano bangali mpe baluki mayele na mpamba mpo na nini? Mikonzi na mokili babelemi, mikolo bayangani, kotemela Nkolo (Jéhovah) mpe Klisto na ye.” Mpo ete bayangani solo na mboka oyo epai na Yesu, Mosali na yo mosantu oyo opakolaki. Hérode na Ponce Pilate, na bapakano, na bato na Yisraele elongo bayangani kosala nyonso endimaki loboko na yo na mokano na yo liboso ete ekosalema. Mpe sasaipi, Nkolo, tala makaneli na bango, mpe pesa baombo na yo nzela ete basolola Liloba na yo na mpiko nyonso, naino ezali yo kosembola loboko na yo mpo na kobikisa mpe mpo na kosala bilembo na bikamwiseli na nkombo na Mosaleli na yo mosantu Yesu.”’

16, 17. (a) Na lisolo na bato, ezali na eleko mosusu ekokani na eleko oyo ebandaki na 1914? Limbola eyano na yo. (b) Ezalela nini mabota mazali na yango, oyo ekopusa Jéhovah Nzambe ete akoma na mokanda na Bitumba na ye’?

16 Nzokande, soki elobami mpo na mabota mangali, mpo na mikonzi bazali koyangana esika moko, mpo na bakonzi na politike oyo bazali kotemela Jéhovah mpe Mopakolami na ye, Yesu Klisto, kati na lisolo mobimba ya bato, ezali na eleko mosusu ekokani na eleko oyo ebandaki na 1914, esili bongo koleka mibu 76? Na mobu wana 1914 etumba ya liboso ya mokili mobimba kati na lisolo na bato esalemaki, kasi likambo eleki ntina, ezali ete ntango na Bapakano, to “bilaka na mabota”, esukaki na mbula wana. (Luka 21:24) Emonani ete Nzembo 2 ezwaki kokokisama na yango monene kobanda na mobu wana.

17 Na nsuka na ntango na Bapakano, na 1914, libota moko te ata mabota oyo emibengaka ete ya boklisto mpe ba citoyens na yango mingi bakanisaka ete bazali Bayisraele ya elimo libota moko te endimaki koyamba Yesu Klisto Mopakolami ya Jéhovah, lokola Mokonzi oyo asili kozwa lotomo ya koyangela mabelé mobimba. Lelo oyo, mibu 71 nsima wana “nsango malamu oyo ya bokonzi“ ebandaki “kosakolama na mabelé mobimba oyo bato bafandi, mpo na litatoli na mabota nyonso”, elingi koloba kobanda na 1919, mabota nyonso, oyo emibengaka ete ya boklisto mpe oyo mosusu etikali, baboyi koyamba Mokonzi oyo Jéhovah aponi mpe asakolamaki uta kala, baboyi mpe kotika bokonzi na bango na mabelé. (Matai 24:14) Yango wana, babelemi na ntango mpe na ezalela oyo ekopusa Jéhovah ete akoma mokapo ya nsuka ya mokanda oyo ya nkembo mingi, “mokanda na Bitumba na Jéhovah”.​—Mituya 21:14.

Nzambe mobundi akolonga elonga monene

18. Likambo nini tolingi komona Jéhovah abanda mpe nani akozala esika moko na ye mpo na kokokisa Nzembo 110?

18 O Jéhovah, telema ete obanda etumba, esika moko na Mwana na yo Yesu Klisto, oyo osili kopesa ye bokonzi! Maloba oyo na esakweli mazali mpo na ye: “Zala na bokonzi kati na bayini na yo. Jéhovah ye moko, oyo azali na loboko na yo na mobali, akoboma mikonzi wana ekosilika ye. Ye akokata makambo kati na mabota, akotondisa yango na bibembe. Akobuka mokonzi likoló na mokili na bato mingi.”​—Nzembo 110:2, 5, 6.

19. Mpo na etumba na mokolo monene na Nzambe libondeli nini tozali kopesa epai na Nzambe mpo na ebele monene na bampate mosusu?

19 O Jéhovah na bibele, tika ete basaleli na yo ya sembo na mabelé bazala batatoli na esengo mingi na elonga monene oyo okolonga na nzela na Mokonzi mobundi oyo osili kopona, ye Yesu Klisto, na ntango na “etumba na mokolo monene na Nzambe Mozwi na​—Nguya-Nyonso”, na esika oyo ebiangami na liebele ete Armagedon! (Emoniseli 16:14) Esika moko na batikali na Bayisraele ya solo na elimo, tika ete ebele monene na “bampate” oyo “basukoli bilamba na bango milai mpe bayeisi yango mpembe na makila na Mwana na Mpate” bazala na esengo ya ‘kouta na bolozi monene’ mpo na kozala batemwe na yo ya seko awa na mabelé. (Emoniseli 7:14) Na bolingo na yo monene, tika ete babika mpe bamona mokili ezangi bitumba, kati na yango Mwana na yo molongi akozala mokonzi, mabelé mapetwami oyo makobongwama paradis moko kitoko, na boyokani na mokano na yo na ebandeli! Tika bazala mpo na basekwi nyonso litatoli na polele kolongisaka bokonzi na yo, oyo ozali na lotomo mpo na yango na molongo mobimba! Merci, Jéhovah, mpo ete wana ekosila kokata likambo na bokonzi na molongo mobimba libela na libela, ee, seko na seko!

Bozongeli

◻ Ntembe nini eleki monene ebimisamaki liboso na bato mpe liboso na baanzelu?

◻ Bokeseni nini ezali na lolenge oyo Jéhovah azalaki kobunda mpo na Yisraele ya kala mpe mpo na Yisraele ya elimo?

◻ Na Armagedon nini ekozala ezalela ya ba Témoins de Jéhovah mpe mpo na nini?

◻ Ntango nini esakweli na Nzembo 2:1, 2 ezwaki kokokisama oyo ekokani na mosusu te?

◻ Ndenge nini likambo na bokonzi na molongo mobimba ekokatama libela na libela?

[Elilingi na lokasa 24, 25]

’’Ebele monene’’ bakokumisa Mokonzi-Mobateli na bampate molongi oyo aponami na Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto