“Makebisi na yo esepelisaka ngai mingi”
“Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo na kolakisa biso.”—BALOMA 15:4.
1. Ndenge nini Yehova akebisaka biso, mpe mpo na nini tozali na mposa ya makebisi yango?
YEHOVA akebisaka basaleli na ye mpo na kosalisa bango bálonga mikakatano oyo bazali kokutana na yango na ntango oyo ya mpasi. Toyokaka makebisi yango ntango tozali kotánga Biblia to mpe na masolo oyo bandeko basalaka mpe na biyano oyo bapesaka na makita. Makambo mingi oyo totángaka mpe oyo toyokaka na makita ezalaka makambo ya sika te. Mbala mingi ezalaka makambo oyo toyebi. Kasi, lokola tobosanaka mingi, ezali na ntina bázongelaka koyebisa biso mikano, mibeko, mpe mateya ya Yehova. Tosengeli mpenza kosepela na makebisi ya Nzambe. Makebisi yango ezongisaka na makanisi na biso makambo oyo etindaki biso tólanda nzela ya Nzambe. Yango wana, mokomi ya nzembo ayembaki ete: “Makebisi na yo esepelisaka ngai mingi.”—Nzembo 119:24, NW.
2, 3. (a) Mpo na nini Yehova akomisaki masolo ya bato ya kala na Biblia? (b) Masolo nini ya Biblia tokotalela na boyekoli oyo?
2 Atako Liloba ya Nzambe ekomamaki eleki sikoyo bankama ya bambula, ezali kaka na nguya. (Baebele 4:12) Na Liloba yango tokokuta masolo ya makambo oyo bato basalaki. Lelo oyo, mimeseno mpe makanisi ya bato ekeseni mingi na oyo ya bato ya ntango ya kala, kasi mikakatano mingi oyo tozali kokutana na yango ekokani na oyo bango bakutanaki na yango. Masolo mingi ya Biblia elobelaka bato oyo balingaki Yehova mpe basalelaki ye na bosembo atako bazalaki mpe na mikakatano. Masolo mosusu ezali kokebisa biso tósala te makambo oyo Nzambe ayinaka. Yehova alingaki ete masolo nyonso wana, ezala ya bato oyo basalaki malamu to oyo basalaki mabe, ekomama na Biblia mpo na kokebisa biso. Ntoma Paulo akomaki boye: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo na kolakisa biso, mpo ete na nzela ya ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na nzela ya kobɔndisama oyo euti na Makomami tókoka kozala na elikya.”—Baloma 15:4.
3 Sikoyo, tótalela masolo misato ya Biblia: lisolo ya Davidi ná Saulo, lisolo ya Ananiasi ná Safila, mpe lisolo ya Yozefe ná mwasi ya Potifala. Lisolo mokomoko ekoteya biso makambo ya ntina mingi.
Tosengeli kotikala sembo na ebongiseli ya Nzambe
4, 5. (a) Likambo nini ezalaki kati na Mokonzi Saulo ná Davidi? (b) Davidi asalaki nini ntango amonaki ete Saulo azali koyina ye?
4 Mokonzi Saulo azalaki lisusu sembo te epai ya Yehova; yango wana abongaki lisusu te kozala mokonzi ya libota ya Nzambe. Nzambe atindaki mosakoli Samwele apakola Davidi lokola mokonzi ya sika ya Yisalaele. Ntango Davidi akómaki mobundi ya mpiko mpe bato bakómaki kokumisa ye, Saulo akómaki koyokela ye zuwa. Saulo alukaki mbala ebele koboma Davidi. Kasi, mbala nyonso Davidi azalaki kobika mpo ete Yehova azalaki kobatela ye.—1 Samwele 18:6-12, 25; 19:10, 11.
5 Mpo na kobatela bomoi na ye, Davidi akómaki kokimakima mpe likambo yango eumelaki bambula mingi. Ntango Davidi azalaki kozwa mabaku ya koboma Saulo, baninga na ye bazalaki kolendisa ye ete aboma ye; bazalaki koloba ete Yehova ye moko apesi Saulo na mabɔkɔ na ye. Kasi, Davidi azalaki koboya. Azalaki kosala bongo mpo alingaki kotikala sembo epai ya Yehova mpe azalaki na limemya mpo na Saulo mpamba te azalaki mokonzi ya libota ya Nzambe. Yehova ye moko nde atyaki Saulo mokonzi ya Yisalaele, ye moko mpe asengelaki kolongola ye na ntango oyo akomona malamu. Davidi amonaki ete ezali mokumba na ye te. Nsima ya kosala nyonso oyo akokaki mpo na kokitisa nkanda ya Saulo oyo azalaki koyokela ye likunya, Davidi alobaki boye: “[Yehova] akobɛta ye, soki ete mokolo na ye ya kufa ekokóma soki ete akokita na etumba mpe akokufa. Kasi [Yehova] apekisa ngai kosembola lobɔkɔ na ngai epai ya mopakolami ya [Yehova].”—1 Samwele 24:3-15; 26:7-20.
6. Mpo na nini lisolo ya Davidi ná Saulo ezali na ntina mpo na biso?
6 Lisolo yango ezali na liteya moko ya ntina mingi. Osilá komituna mpo na nini mikakatano mosusu ebimaka na lisangá? Ekoki kozala ete ndeko moko azali kosala makambo na ndenge ebongi te. Mbala mosusu yango ezali mpenza lisumu te, kasi ezali kotungisa yo. Osengeli kosala nini? Okoki kosolola na ndeko yango na boboto mpe na makanisi ya kosalisa ye mpamba te ozali komibanzabanza mpo na ye mpe olingi kotikala sembo epai ya Yehova. Kasi, okosala nini soki likambo yango ezali kosila kaka te? Nsima ya kosala nyonso oyo okoki, ekozala malamu kotika likambo yango na mabɔkɔ ya Yehova. Ezali yango nde Davidi asalaki.
7. Na kolanda ndakisa ya Davidi, tosengeli kosala nini soki bazali kosalela biso makambo na bosembo te to bazali kokanisela biso mabe?
7 Ekoki mpe kozala ete bato mosusu bazali kosalela yo makambo na bosembo te to bazali kotalela yo na ndenge ebongi te mpo na lingomba na yo. Mbala mosusu okoki kosala eloko te mpo makambo yango esila. Makambo ya ndenge wana etungisaka mingi, kasi tokoki kozwa liteya na ndenge oyo Davidi asalaki ntango basalelaki ye makambo na bosembo te. Banzembo ya Davidi ezali mabondeli oyo azalaki kosala epai ya Nzambe mpo Saulo asala ye mabe te; kasi banzembo yango ezali mpe komonisa ete Davidi azalaki sembo epai ya Yehova mpe azalaki na mposa ete nkombo ya Nzambe ekumisama. (Nzembo 18:1-6, 25-27, 30-32, 48-50; 57:1-11) Davidi atikalaki sembo epai ya Yehova atako Saulo azalaki kosala makambo na bosembo te bambula ebele. Biso mpe tosengeli kotikala sembo epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye ata soki tozali komona makambo ya sembo te to soki bato mosusu bazali kosala makambo ya mabe. Tózala na elikya ete Yehova azali komona makambo nyonso.—Nzembo 86:2.
8. Na Mozambique, Batatoli ya Yehova basalaki nini ntango bakutanaki na makambo oyo emekaki bosembo na bango epai ya Yehova?
8 Na kati ya bato oyo batikalaki sembo atako kondima na bango emekamaki, tokoki kolobela bandeko na biso na ekólo Mozambique. Na 1984, bato mosusu ya ekólo yango bazwaki mandoki mpo na kokweisa guvɛrnema; bato yango bazalaki mbala na mbala kokɔta na bamboka; bazalaki koyiba, kotumba bandako mpe koboma bato. Bandeko na biso bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibatela. Batomboki wana bazalaki kokanga bato na makasi mpe kokɔtisa bango na mosala ya soda; bazalaki mpe kosɛngisa bato na makasi ete básalela bango makambo ndenge na ndenge. Batatoli ya Yehova bamonaki ete kopesa bango mabɔkɔ ezali kokɔta na makambo ya politiki. Lokola baboyaki kosala makambo na bango, batomboki wana basilikaki makasi. Na boumeli ya bambula wana nyonso, babomaki Batatoli soki 30; kasi, ata nsɔmɔ ya liwa ezongisaki basaleli ya Nzambe nsima te.a Na ndakisa ya Davidi, bandeko yango bayikaki mpiko mpe nsukansuka balongaki.
Ndakisa oyo ezali kokebisa biso
9, 10. (a) Bandakisa mosusu oyo ezali na Biblia ezali na ntina nini? (b) Likambo nini ya mabe Ananiasi ná Safila basalaki?
9 Bato mosusu oyo Biblia elobeli basalaki makambo oyo ezali kokebisa biso mpo tóyeba bizaleli nini tosengeli koboya. Biblia elobeli bato mingi, ata basaleli ya Nzambe, oyo basalaki mabe mpe yango ememelaki bango mpasi. (1 Bakolinti 10:11) Tokoki kotánga Ananiasi ná mwasi na ye Safila; bango bazalaki na lisangá ya Yelusaleme na ekeke ya liboso.
10 Nsima ya fɛti ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), bandimi mingi ya sika batikalaki na Yelusaleme mpo báyoka mateya ya bantoma malamumalamu. Baklisto ya Yelusaleme batɛkaki biloko na bango mpo na kosalisa bandeko wana. (Misala 2:41-45) Ananiasi ná Safila batɛkaki elanga na bango mpe bamemaki ndambo ya mbongo epai ya bantoma, kasi balobaki ete yango ezalaki mbongo nyonso oyo batɛkaki elanga. Ananiasi ná Safila bakokaki kopesa mbongo nyonso oyo basepeli kopesa, kasi lokola bazalaki na makanisi ya mabe, babukaki lokuta. Balingaki ete bámona bango bato malamu mpe bákumisa bango na likambo oyo basali te. Elimo santu esalisaki ntoma Petelo abimisa lokuta na bango mpe Yehova abomaki bango mbala moko.—Misala 5:1-10.
11, 12. (a) Wapi mwa makebisi Biblia epesi biso na ntina etali bosembo? (b) Kozala sembo ezali na matomba nini?
11 Soki mpo na kosepelisa bato, likanisi ya kobuka lokuta eyeli biso, tókanisa lisolo ya Ananiasi ná Safila. Tokoki kokosa bato, kasi tokokosa Yehova te. (Baebele 4:13) Biblia ezali mbala na mbala kolendisa biso tólobaka solo, mpamba te bato ya lokuta bakokɔta te na mokili ya boyengebene. (Masese 14:2; Emoniseli 21:8; 22:15) Tosengeli koyeba malamu mpo na nini ezali bongo. Ezali bongo mpamba te Satana Zabolo nde azali tata ya makambo nyonso ya lokuta.—Yoane 8:44.
12 Kozala sembo ememelaka biso matomba mingi. Na kati na yango tokoki kotánga lisosoli ya kimya mpe esengo ya komona ete bato mosusu bazali kotyela biso motema. Baklisto mingi bazwaki misala mpe bamosusu babatelaki misala na bango mpo bazalaki sembo. Kasi, litomba eleki monene ezali ete kozala sembo ekómisaka biso baninga ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.—Nzembo 15:1, 2.
Tóboya pite mpe ekobo
13. Likambo nini ekómelaki Yozefe, mpe ye asalaki nini?
13 Yozefe, mwana ya Yakobo, azalaki kaka na mbula 17 ntango batɛkaki ye lokola moombo. Nsukansuka akómaki kosala na ndako ya Potifala, moto moko oyo azalaki kosala epai ya Falao. Lokola Yozefe azalaki elenge mobali kitoko, mwasi ya Potifala akómaki kolula ye mpe alingaki ete Yozefe asangisa na ye nzoto. Mokolo na mokolo azalaki koloba na ye ete: “Lalá na ngai.” Yozefe azalaki na mboka mosika mpe moto moko te ayebaki ye kuna. Akokaki kosangisa nzoto na mwasi yango mpe moto moko te alingaki koyeba yango. Kasi, mokolo mosusu ntango mwasi ya Potifala akangaki ye na makasi, Yozefe akimaki.—Genese 37:2, 18-28; 39:1-12.
14, 15. (a) Mpo na nini lisolo ya Yozefe ezali na ntina mpo na biso? (b) Mpo na nini elenge mwasi moko azali na botɔndi mpo na makebisi ya Nzambe?
14 Baboti ya Yozefe bazalaki bato oyo babangaka Nzambe; yango wana elenge yango ayebaki ete bato oyo babalani te soki basangisi nzoto, basali lisumu. Yozefe alobaki boye: “Nakoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai ya Nzambe boni?” Ekoki kozala ete azalaki na makanisi wana mpo ayebaki ndenge oyo Nzambe abongisaki makambo banda na Edene, elingi koloba mwasi moko, mobali moko. (Genese 2:24) Lelo oyo, soki basaleli ya Nzambe bazali kokanisa likambo oyo Yozefe asalaki, yango ekoki mpe kosalisa bango. Na bamboka mosusu, bato bazali komona mabe moko te kosala pite; yango wana bilenge oyo baboyaka pite, baninga na bango basɛkaka bango. Bato oyo babalá mpe bamonaka mabe moko te kosala ekobo. Yango wana, lisolo ya Yozefe ezali likebisi oyo ebongi mpenza na ntango na biso. Na miso ya Nzambe, pite mpe ekobo ezali masumu. (Baebele 13:4) Bato mingi oyo bakweaki na pite to na ekobo bandimaka ete koboya kosala yango ezali mpenza malamu. Na kati ya mbuma mabe ya misala yango tokoki kotánga komiyoka lokola eloko oyo basakani na yango na nsima babwaki, kotungisama lisosoli, kozanga kotyelana motema, kokumba zemi, kozwa maladi ya mabe. Ndenge Biblia elobi, moto oyo azali kosala pite azali “kosalela nzoto na ye moko lisumu.”—1 Bakolinti 5:9-12; 6:18; Masese 6:23-29, 32.
15 Jenny,b Motatoli moko ya Yehova oyo azali monzemba, azalaka na botɔndi mingi mpo na makebisi ya Nzambe. Na esika ya mosala, mwana mobali moko akómaki kolula ye. Lokola Jenny azalaki kokipe ye te, mwana mobali yango abakisaki milende. Jenny alobi boye: “Nakómaki na etumba mpo nakwea te mpamba te mwana mwasi nyonso asepelaka soki mobali azali kolula ye.” Kasi, Jenny ayaki koyeba ete mwana mobali yango azalaki bilingalinga mpe azalaki kaka koluka moto mosusu oyo akobakisa na liste ya bana basi oyo asangisá na bango nzoto. Ntango Jenny amonaki ete motema na ye ekómi kolɛmba, abondelaki Yehova makasi mpo asalisa ye akwea te. Jenny alobi ete makambo oyo ayekolaki ntango atángaki Biblia mpe mikanda ya moombo ya sembo ezalaki lokola makebisi oyo elendisaki ye mpo atikala makasi. Moko na makebisi yango ezalaki lisolo ya Yozefe ná mwasi ya Potifala. Asukisi boye: “Ntango nyonso oyo nakobanda kokanisa bolingo makasi oyo nazali na yango mpo na Yehova, nakosala te mabe monene wana mpe lisumu na miso na ye.”
Yokáká makebisi ya Nzambe!
16. Kotánga masolo ya bato oyo Biblia elobeli mpe komanyola likoló na yango ekoki komemela yo matomba nini?
16 Soki tozali kosala makasi ya koyeba ntina oyo Yehova akomisaki masolo ya bato mosusu na Biblia, tokosepela lisusu mingi na mibeko na ye. Masolo yango ezali koteya biso nini? Bato oyo Biblia elobeli bazalaki na bizaleli nini to na elimo nini oyo tosengeli komekola to oyo tosengeli koboya? Liloba ya Nzambe ezali na masolo ya bato ebele mpenza. Moto nyonso oyo alingaka mateya ya Nzambe asengeli kolona mposa ya koyekola bwanya na yango, bakisa mpe mateya oyo tokoki kozwa na bandakisa oyo Yehova akomisaki na kati ya Biblia. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimisá masolo mingi ya bato yango oyo ekoki koteya biso. Tolendisi yo ozwaka ntango ya kotánga yango.
17. Ndenge nini otalelaka makebisi ya Yehova mpe mpo na nini?
17 Tosengeli mpenza kotɔnda Yehova mpo na bolingo na ye mpe ndenge oyo amibanzabanzaka mpo na bato oyo bazali kosala milende ya kokokisa mokano na ye! Toyebi ete tozali bato ya kozanga kokoka, ndenge moko na mibali mpe basi oyo Biblia elobeli. Kasi, masolo ya makambo oyo basalaki ekoki kosalisa biso mingi. Soki tozali koyoka makebisi ya Yehova, tokokwea te na mabunga minene mpe tokolanda ndakisa malamu ya bato oyo batambolaki na nzela ya boyengebene. Soki tosali bongo, biso mpe tokoloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Esengo na baoyo batosaka makebisi [ya Yehova]; batikaka te koluka ye na motema mobimba. Molimo na ngai ebateli makebisi na yo, mpe nalingi yango mingi.”—Nzembo 119:2, 167, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
b Topesi ye nkombo mosusu.
Okopesa eyano nini?
• Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Davidi azalaki kotalela Saulo?
• Lisolo ya Ananiasi ná Safila ezali koteya biso nini?
• Mpo na nini lisolo ya Yozefe ezali na ntina mingi mpo na biso lelo oyo?
[Elilingi na lokasa 26]
Mpo na nini Davidi aboyaki koboma Saulo?
[Elilingi na lokasa 27]
Lisolo ya Ananiasi ná Safila ezali koteya biso nini?
[Elilingi na lokasa 28]
Mpo na nini Yozefe aboyaki kosangisa nzoto na mwasi ya Potifala?