Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/10 nk. 3-7
  • ‘Miso ya Yehova oyo ezali kongɛnga’ etalatalaka nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Miso ya Yehova oyo ezali kongɛnga’ etalatalaka nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova atángaka na motema
  • Atalatalaka biso na bolingo
  • Yehova amonaka nyonso mpe akangaka mabɔkɔ te
  • Lisumu moko te ezangi komonana na miso ya Yehova
  • Batelá bosembo ntango nyonso
  • Batelá motema mobimba
  • Bandeko mibale oyo bakesanaki na bizaleli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tópesa Yehova mbeka oyo akondima
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Nkanda etindaki ye aboma
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Kolinga Nzambe elimboli nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/10 nk. 3-7

‘Miso ya Yehova oyo ezali kongɛnga’ etalatalaka nyonso

“Miso [ya Yehova] oyo ezali kongɛnga ezali kotalatala bana ya bato.”​—Nz. 11:4, NW.

1. Tosepelaka mingi na bato ya ndenge nini?

OKANISAKA nini mpo na bato oyo batyelaka yo mpenza likebi? Bato oyo balobaka na bosembo ntango otuni bango makanisi na bango. Ntango ozali na mposa ya lisalisi, bakakatanaka te kosalisa yo na motema mobimba. Ntango ozali na mposa ya toli, bapesaka yo yango na boboto nyonso. (Nz. 141:5; Gal. 6:1) Osepelaka na bato ya ndenge wana, boye te? Yehova ná Mwana na ye batyelaka yo likebi ndenge wana. Kutu, likebi oyo batyelaka yo eleki ya moto mosusu nyonso, mpe basalaka yango mpo na bolamu na yo; bazali na mposa ya kosalisa yo ‘osimba makasi bomoi ya solosolo.’​—1 Tim. 6:19; Emon. 3:19.

2. Ndenge nini Yehova atyelaka basaleli na ye likebi?

2 Davidi, mokomi ya nzembo, amonisaki likebi makasi oyo Yehova atyelaka biso ntango alobaki boye: “Miso [ya Yehova] ezali kotala, miso na ye oyo ezali kongɛnga ezali kotalatala bana ya bato.” (Nz. 11:4, NW) Nzambe asukaka kaka te na kotala biso; kasi, atalatalaka biso. Davidi akomaki lisusu boye: “Oyebi motema na ngai, otali yango na butu; . . . ozwi ngai na mabe moko té.” (Nz. 17:3, Bible na lingala ya lelo oyo) Tomoni polele ete Davidi ayebaki ete Yehova azalaki kotyela ye mpenza likebi. Ayebaki ete soki azali kokolisa mposa ya kosala masumu to soki azali kokana makambo ya mabe na motema na ye, akoyokisa Yehova mpasi mpe Yehova akosepela na ye lisusu te. Yo mpe otalelaka Yehova ndenge Davidi azalaki kotalela ye?

Yehova atángaka na motema

3. Bandakisa nini emonisi ete Yehova alandelaka mabunga na biso te?

3 Yehova atyaka likebi libosoliboso na motema na biso, elingi koloba na bomoto na biso ya kati. (Nz. 19:14; 26:2) Lokola atondi na bolingo, alandelaka mwa mabunga na biso te. Na ndakisa, ntango Sala, mwasi ya Abalayama, alobaki solo te, anzelu apamelaki ye na boboto mpo amonaki ete Sala abangaki mpe ayokaki nsɔni. (Gen. 18:12-15) Atako Yobo “alongisaki molimo na ye moko liboso ya Nzambe,” Yehova aboyaki te kopambola ye mpamba te ayebaki ete Yobo anyokwamaki mingi na mpasi oyo Satana abimiselaki ye. (Yobo 32:2; 42:12) Ndenge moko mpe, Yehova asilikelaki te mwasi akufelá mobali ya mboka Zalefata mpo na maloba na ye epai ya mosakoli Eliya. Nzambe ayebaki mpasi makasi oyo mwasi yango azalaki na yango lokola mwana na ye kaka moko akufaki.​—1 Mik. 17:8-24.

4, 5. Ndenge nini Yehova amoniselaki Abimeleke boboto?

4 Lokola Yehova azali na likoki ya kotánga na motema, amonisaka boboto ata epai ya bato oyo basalelaka ye te. Tótalela likambo oyo asalaki mpo na Abimeleke, mokonzi ya Gelela, engumba moko ya Bafilistia. Lokola Abimeleke ayebaki te ete Sala azali mwasi ya Abalayama, azwaki Sala mpo akóma mwasi na ye. Nzokande, liboso ete Abimeleke asangisa na ye nzoto, Yehova alobaki na ye na ndɔtɔ ete: “Nayebi ete osali na motema ya sembo. Ngai mpe napekisi yo ete osala lisumu epai na ngai te. Ezali na ntina yango natiki yo [osimba] ye te. Sikawa zongisá mwasi ya moto oyo mpo ete ye azali mosakoli mpe ye akobondela mpo na yo mpe okobika.”​—Gen. 20:1-7.

5 Yehova akokaki kopesa etumbu ya makasi epai ya Abimeleke, moto oyo azalaki kosambela banzambe ya lokuta. Kasi, amonaki ete mobali yango asalaki makambo na motema sembo. Yehova abosanaki yango te mpe ayebisaki mokonzi yango likambo oyo asengelaki kosala mpo alimbisama mpe ‘abika.’ Tomoni ete Yehova azali Nzambe oyo tosengeli kosambela, boye te?

6. Yesu amekolaki Tata na ye na likambo nini?

6 Yesu amekolaki mpenza Tata na ye; atyaki likebi na makambo malamu ya bayekoli na ye mpe azalaki kolimbisa mabunga na bango. (Mko. 10:35-45; 14:66-72; Luka 22:31, 32; Yoa. 15:15) Ezaleli ya Yesu eyokani na maloba na ye oyo ezali na Yoane 3:17 ete: “Nzambe atindaki Mwana na ye na mokili, mpo ye asambisa mokili te, kasi mpo mokili ebika na nzela na ye.” Ya solo, bolingo oyo Yehova mpe Yesu bazali na yango mpo na biso ezali makasi mpe ebongwanaka te. Bamonisaka bolingo yango na ndenge balingaka ete tózwa bomoi ya seko. (Yobo 14:15) Bolingo yango esalisi biso tóyeba ntina oyo Yehova atalatalaka biso, ndenge oyo atalelaka biso, mpe ndenge oyo asalaka nsima ya komona makambo oyo ezali na motema na biso.​—Tángá 1 Yoane 4:8, 19.

Atalatalaka biso na bolingo

7. Yehova atalatalaka biso na makanisi nini?

7 Na yango, ezali libunga kokanisa ete Yehova azali lokola polisi oyo atalaka biso longwa na likoló mpo na kokanga biso ntango tokwei na lisumu! Ezali Satana nde atalaka biso na liso ya mabe mpo na kofunda biso. (Emon. 12:10) Kutu, Satana akaniselaka biso mabe, ata soki tozali kosala makambo na bosembo! (Yobo 1:9-11; 2:4, 5) Mokomi ya nzembo alobaki na ntina na Nzambe ete: “Ee, [Yehova], soki yo okotalaka bokeseni, ee Nkolo, nani akotɛlɛma?” (Nz. 130:3) Eyano ezali ete moto moko te akotɛlɛma! (Mos. 7:20) Nzokande, Yehova atalaka biso na liso ya boboto mpe ayokelaka biso mawa lokola tata oyo alingi kobatela bana na ye na likama. Mbala mingi, akebisaka biso liboso tókwea na mabe mpo na bolɛmbu na biso mpo tózwa mpasi te na nsima.​—Nz. 103:10-14; Mat. 26:41.

8. Ndenge nini Yehova ateyaka basaleli na ye mpe apesaka bango disipilini?

8 Nzambe amonisaka bolingo na ye na mateya mpe disipilini oyo apesaka biso na nzela ya Makomami mpe na nzela ya bilei ya elimo oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” apesaka biso. (Mat. 24:45; Ebe. 12:5, 6) Yehova asalisaka biso mpe na nzela ya lisangá ya boklisto mpe ya “makabo oyo ezali bato.” (Ef. 4:8) Longola yango, Yehova atalatalaka biso mpo na koyeba ndenge oyo tozali kosalela batoli na ye, mpe alukaka ndenge oyo akoki kosalisa biso lisusu koleka. Nzembo 32:8 elobi boye: “Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo [kolanda]; Nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.” Yango wana, ezali na ntina mingi tóyokaka Yehova ntango nyonso! Tosengeli komikitisaka liboso na ye, mpe komonaka ete azali Tata mpe Molakisi na biso oyo atondi na bolingo.​—Tángá Matai 18:4.

9. Bizaleli nini tosengeli kokima, mpe mpo na nini?

9 Nzokande, tosengeli kotika nzela te ete lolendo, kozanga kondima to “nguya ya bokosi ya lisumu” ekómisa biso motema makasi. (Ebe. 3:13; Yak. 4:6) Mbala mingi, moto akómaka na bizaleli yango ntango abandi kokolisa makanisi mpe bamposa ya mabe. Moto ya ndenge wana akoki ata kobanda koboya toli malamu oyo euti na Biblia. Likambo ya mabe koleka, moto yango akoki kokangama na makanisi to banzela na ye ya mabe mpe komikómisa monguna ya Nzambe, likambo oyo ezali nsɔmɔ mpenza! (Mas. 1:22-31) Tótalela ndakisa ya Kaina, mwana ya liboso ya Adama ná Eva.

Yehova amonaka nyonso mpe akangaka mabɔkɔ te

10. Mpo na nini Yehova aboyaki mbeka ya Kaina, mpe Kaina asalaki nini?

10 Ntango Kaina ná Abele bapesaki Yehova mbeka, Yehova atalaki kaka bambeka na bango te, atalelaki mpe makanisi oyo etindaki bango bápesa bambeka yango. Yango wana, Nzambe andimaki mbeka ya Abele mpo azalaki na kondima, kasi aboyaki oyo ya Kaina, mpo amonaki ete azangaki kondima. (Gen. 4:4, 5; Ebe. 11:4) Na esika Kaina azwa liteya na likambo yango mpe abongola motema, abombelaki ndeko na ye nkanda.​—Gen. 4:6.

11. Na ndenge nini motema ya Kaina ezalaki na bokosi, mpe yango ekoki koteya biso nini?

11 Yehova amonaki ete Kaina akómaki na makanisi ya mabe, yango wana alobaki na ye na boboto nyonso; amonisaki ye ete soki asali malamu, akondimama. Nzokande, Kaina aboyaki koyoka toli ya Mozalisi na ye mpe abomaki ndeko na ye. Motema mabe ya Kaina emonanaki malamumalamu na eyano ya kozanga limemya oyo apesaki ntango Nzambe atunaki ye ete: “Wapi ndeko na yo Abele?” Kaina ayanolaki ete: “Ngai nayebi te. Ngai nazali nde mobateli ya ndeko na ngai?” (Gen. 4:7-9) Motema ekoki mpenza kokosa moto; ekoki kotinda ye aboya koyoka ata toli oyo Nzambe ye moko azali kopesa ye! (Yil. 17:9) Yango wana, tózwa liteya na masolo ya ndenge wana mpe tóbenganaka nokinoki makanisi mpe mposa nyonso ya mabe. (Tángá Yakobo 1:14, 15.) Ntango toyoki toli ya Biblia, tósalela yango mpe tómona yango lokola elembeteli ete Yehova alingaka biso.

Lisumu moko te ezangi komonana na miso ya Yehova

12. Yehova asalaka nini na moto oyo asali mabe?

12 Bato mosusu bakoki kokanisa ete soki moto amoni bango te ntango basali mabe, bakozwa etumbu te. (Nz. 19:12) Nzokande, lisumu moko te ezangaka komonana. “Biloko nyonso ezali bolumbu mpe etandami polele na miso ya moto oyo epai na ye tokozongisa monɔkɔ.” (Ebe. 4:13) Yehova azali Mosambisi oyo atalatalaka bamposa ya motema na biso, mpe ntango tosali mabe, apesaka biso etumbu na bosembo mpenza. Azali “Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema-boboto mpe na solo.” Kasi, “akozanga te kopesa etumbu” ntango moto azali “kosala lisumu na nko” to azali na makanisi ya mabe to ya nyamunyamu. (Ex. 34:6, 7, NW; Ebe. 10:26) Yehova amonisaki yango na ndenge akataki likambo ya Akana mpe likambo ya Ananiasi ná Safila.

13. Ndenge nini makanisi ya mabe etindaki Akana asala lisumu?

13 Akana abukaki mobeko ya Nzambe, ayibaki biloko na engumba Yeliko mpe abombaki yango na hema na ye; na ntembe te mwasi mpe bana na ye bayebaki likambo yango. Ntango lisumu na ye eyebanaki, Akana amonisaki ete ayebaki ete likambo oyo asalaki ezali mabe mpenza, mpamba te alobaki boye: “Nasali mabe epai ya [Yehova].” (Yos. 7:20) Ndenge moko na Kaina, motema ya Akana ekómaki mabe. Lokoso nde ebebisaki Akana mpe etindaki ye ayiba. Lokola biloko ya Yeliko ezalaki mpo na Yehova, Akana ayibaki nde Nzambe; mpo na yango, ye ná libota na ye babomamaki.​—Yos. 7:25.

14, 15. Mpo na nini ebongaki Nzambe apesa Ananiasi ná Safila etumbu, mpe yango eteyi biso nini?

14 Ananiasi ná mwasi na ye Safila bazalaki na lisangá ya Yelusaleme, na ekeke ya liboso. Nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., lisangá ezwaki bibongiseli ete bandeko bápesaka makabo mpo na kokokisa bamposa ya bandimi ya sika oyo bautaki bamboka mosika, oyo batikalaki naino na Yelusaleme. Moto na moto asengelaki kopesa makabo na bolingo na ye. Ananiasi atɛkaki elanga mpe apesaki kaka ndambo ya mosolo oyo bazwaki; mwasi na ye mpe ayebaki likambo yango malamu. Kasi, Ananiasi akosaki ete apesaki mosolo nyonso. Na ntembe te, mobali yango ná mwasi na ye balukaki ete bandeko ya lisangá bápesa bango lokumu. Nzokande, bakosaki. Na ndenge ya likamwisi, Yehova amonisaki yango epai ya ntoma Petelo, mpe Petelo atunaki Ananiasi mpo na nini akosaki. Na mbala moko, Ananiasi akweaki mpe akufaki. Mwa moke na nsima, Safila mpe akufaki.​—Mis. 5:1-11.

15 Likambo oyo Ananiasi ná Safila basalaki ezalaki te bolɛmbu ya mwa ntango moke. Bayokanaki mpe babongisaki makambo mpo bákosa bantoma. Likambo ya mabe koleka, ‘bakosaki elimo santu mpe Nzambe.’ Likambo oyo Yehova asalaki emonisi polele ete azwi bibongiseli mpo na kolongola bato ya bokosi na kati ya lisangá. Ya solo, “ezali likambo ya nsɔmɔ kokwea na mabɔkɔ ya Nzambe ya bomoi”!​—Ebe. 10:31.

Batelá bosembo ntango nyonso

16. (a) Ndenge nini Satana azali koluka kobebisa basaleli ya Nzambe? (b) Makambo nini Zabolo azali kosalela mpo na kobebisa bato na mboka na bino?

16 Satana azali kosala nyonso mpo na kokosa biso mpo Yehova asepela na biso lisusu te. (Emon. 12:12, 17) Makanisi mabe ya Zabolo ezali komonana polele na mokili oyo etondi na pite mpe mobulu. Lelo oyo, bililingi ya makambo ya nsɔni to ya kosangisa nzoto ekɔti tii na Internet mpe na biloko mosusu, na ndakisa batelefone ya mabɔkɔ. Tosengeli komibatela mpenza mpo tókwea te na mitambo ya Satana. Tózala nde na likanisi moko ná Davidi, oyo akomaki ete: “Nakotambola na moi na moi na nzela alima; . . . Nakotambola na motema malamu kati na ndako na ngai.”​—Nz. 101:2.

17. (a) Mpo na nini Yehova abimisaka polele masumu ya moto? (b) Tosengeli kozala na ekateli nini?

17 Lelo oyo, Yehova amonisaka te lisumu to bokosi ya moto na ndenge ya likamwisi, ndenge asalaki na mabaku mosusu na ntango ya kala. Atako bongo, amonaka makambo nyonso; na ntango mpe na ndenge oyo alingi, amonisaka polele makambo oyo ebombamá. Paulo alobaki boye: “Masumu ya bato mosusu emonanaka polelepolele, komemáká mbala moko na lisambisi, kasi mpo na bato mosusu masumu na bango mpe eyaka komonana polele na nsima.” (1 Tim. 5:24) Ezali libosoliboso bolingo nde etindaka Yehova abimisa polele misala mabe ya moto. Alingaka lisangá mpe alingi etikala pɛto. Lisusu, amonisaka motema mawa epai ya baoyo basalaki lisumu kasi babongoli mpenza motema. (Mas. 28:13) Yango wana, tósala makasi mpo tótikala sembo epai ya Nzambe mpe tóboya makanisi nyonso ya mabe.

Batelá motema mobimba

18. Mokonzi Davidi alingaki mwana na ye atalelaka Nzambe ndenge nini?

18 Mokonzi Davidi alobaki na mwana na ye Salomo ete: “Yebá Nzambe ya tata na yo mpe salelá ye na motema malamu mpe na molimo ya botosi, zambi [Yehova] akotalatala mitema nyonso mpe akososola makanisi mpe mikano nyonso.” (1 Nta. 28:9) Davidi alingaki ete mwana na ye asuka kaka te na kondima ete Nzambe azali. Alingaki Salomo ayeba ete Yehova atyelaka mpenza basaleli na Ye likebi. Yo mpe otalelaka Yehova ndenge yango?

19, 20. Na kolanda Nzembo 19:7-11, nini esalisaki Davidi apusana penepene na Nzambe, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?

19 Yehova ayebi ete bato ya mitema sembo bakosepela na ye mpe soki bayekoli bizaleli malamu na ye, bakopusana penepene na ye. Yango wana, Yehova alingi ete tóyeba ye mpe tóyeba bizaleli na ye ya malamu mingi. Ndenge nini tosalaka yango? Na nzela ya boyekoli ya Liloba na ye mpe ntango tozali komona ndenge oyo azali kopambola biso.​—Mas. 10:22; Yoa. 14:9.

20 Otángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe obondelaka Nzambe asalisa yo osalelaka makambo oyo ozali kotánga? Omonaka ntina ya kosalela mitinda ya Biblia? (Tángá Nzembo 19:7-11.) Soki ezali bongo, kondima na yo epai ya Yehova mpe bolingo na yo mpo na ye ekobakisama ntango nyonso. Ye mpe akopusana lisusu penepene na yo, mpe na ndenge ya elilingi, akosimba yo na lobɔkɔ mpo na kotambola na yo elongo. (Yis. 42:6; Yak. 4:8) Ya solo, Yehova akopambola yo mpe akobatela yo na elimo mpo na komonisa ete alingaka yo, wana ozali kotambola na nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi.​—Nz. 91:1, 2; Mat. 7:13, 14.

Okopesa eyano nini?

• Mpo na nini Yehova atalatalaka biso?

• Ndenge nini bato mosusu bamikómisaki banguna ya Nzambe?

• Ndenge nini tokoki komonisa ete tondimaka ete Yehova azali mpenza?

• Ndenge nini tokoki kobatela motema mobimba epai ya Nzambe?

[Elilingi na lokasa 4]

Na ndenge nini Yehova atalaka biso lokola tata ya bolingo?

[Elilingi na lokasa 5]

Lisolo ya Ananiasi eteyi biso nini?

[Elilingi na lokasa 6]

Nini ekosalisa biso tókoba kosalela Yehova na motema mobimba?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto