Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ndenge nini nsango malamu ezali kosakolama?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
    • 6. Tosakolaka mpo na kotosa mobeko ya Yehova

      Na siɛklɛ ya liboso, banguna balukaki kopekisa bayekoli ya Yesu kosakola. Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bamonisaki ete bazali na lotomo ya kosakola na ndenge bazalaki “kokɔtela nsango malamu . . . na nzela ya mibeko.” (Bafilipi 1:7) Lelo oyo mpe, Batatoli ya Yehova basalaka bongo.a

      Talá VIDEO.

      VIDEO: Bazali kokɔtela nsango malamu na nzela ya mibeko (2:28)

      Tángá Misala 5:27-42, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

      • Mpo na nini tokotika kosakola te? ​—Talá vɛrsɛ 29, 38, mpe 39.

  • Kokɔta na makambo ya mokili te elakisi nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
    • Kokɔta na makambo ya mokili te elakisi nini?

      Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete basengeli ‘kozala bato ya mokili te.’ (Yoane 15:19) Yango elingi koloba, kokɔta te na makambo ya politiki mpe bitumba. Mpo na koloba solo, koboya kokɔta na makambo ya mokili ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Bato bakoki kotyola biso mpo toboyi kokɔta na makambo ya mokili. Ndenge nini tokoki koboya kokɔta na makambo ya mokili mpe kotikala sembo epai ya Yehova?

      1. Ndenge nini bakristo ya solo batalelaka baguvɛrnema ya mokili?

      Bakristo batosaka baguvɛrnema. Tosalaka oyo Yesu alobaki mpe ‘tozongiselaka Kaisala biloko ya Kaisala.’ Yango elingi koloba, totosaka mibeko ya mboka, na ndakisa oyo esɛngi kofuta mpako. (Marko 12:17) Biblia elobi ete baguvɛrnema ya bato ezali koyangela mpo Yehova atikelá yango nzela. (Baroma 13:1) Yango wana, toyebaka ete bokonzi ya baguvɛrnema yango ezali na ndelo. Totyaka motema ete kaka Nzambe mpe Bokonzi na ye ya likoló nde ekosilisa bampasi nyonso ya bato.

      2. Ndenge nini tokoki komonisa ete tokɔtaka na makambo ya mokili te?

      Ndenge moko na Yesu, tokɔtaka na makambo ya politiki te. Ntango bato bamonaki makamwisi oyo Yesu asalaki, balukaki kokómisa ye mokonzi awa na mabele, kasi aboyaki. (Yoane 6:15) Mpo na nini? Mpo na nsima alobaki ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.” (Yoane 18:36) Biso bayekoli ya Yesu, tokɔtaka na makambo ya mokili te na makambo ndenge na ndenge. Na ndakisa, tokendaka etumba te. (Tángá Mika 4:3.) Totosaka bilembo ya ekólo, na ndakisa bendele to drapo, kasi tosambelaka yango te. (1 Yoane 5:21) Lisusu, topesaka lingomba moko ya politiki mabɔkɔ te mpe totombokelaka yango te. Toponaka moto moko te na ntango ya maponami mpe totɛmɛlaka moto te. Na ndenge yango, tomonisaka ete tozali mpenza sembo na guvɛrnema to Bokonzi ya Nzambe.

      KƆTÁ NA MOZINDO

      Luká koyeba makambo oyo ekoki kosala ete ezala mpasi mpo okɔta na makambo ya mokili te. Luká koyeba mpe oyo okoki kosala mpo ozwa bikateli oyo esepelisaka Nzambe.

      Mobali moko aboyi kokɔta na makambo ya politiki. Azali kolanda te makambo oyo bato ya politiki ya bangámbo mibale bazali koloba na bato.

      3. Bakristo ya solo bakɔtaka na makambo ya mokili te

      Yesu ná bayekoli na ye batikelá biso ndakisa. Tángá Baroma 13:1, 5-7 mpe 1 Petro 2:13, 14. Na nsima, talá VIDEO mpe yanolá na mituna oyo elandi.

      VIDEO: Bakristo ya solo bakɔtaka na makambo ya mokili te​—Eteni 1 (4:28)

      • Mpo na nini tosengeli kotosa baguvɛrnema ya mokili?

      • Na makambo nini tokomonisa ete totosaka baguvɛrnema yango?

      Na ntango ya etumba, bikólo mosusu ekoki koloba ete ekɔtaka na etumba te, nzokande epesaka mabɔkɔ na bikólo mibale oyo ezali kobunda. Koboya kokɔta na makambo ya mokili elakisi mpenza nini? Tángá Yoane 17:16. Na nsima, talá VIDEO mpe yanolá na motuna oyo elandi.

      VIDEO: Bakristo ya solo bakɔtaka na makambo ya mokili te​—Eteni 2 (3:11)

      • Koboya kokɔta na makambo ya mokili elakisi nini?

      Okosala nini soki bakonzi to baguvɛrnema ya bato basɛngi yo osala likambo oyo ebuki mobeko ya Nzambe? Tángá Misala 5:28, 29. Na nsima, talá VIDEO mpe yanolá na mituna oyo elandi.

      VIDEO: Bakristo ya solo bakɔtaka na makambo ya mokili te​—Eteni 3 (1:18)

      • Soki mobeko moko ya baguvɛrnema ya bato eyokani te na oyo ya Nzambe, oyo wapi osengeli kotosa?

      • Na makambo nini mokristo asengeli te kotosa bakonzi ya Leta?

      4. Kokɔta na makambo ya mokili te ezala na makanisi mpe na makambo oyo osalaka

      Tángá 1 Yoane 5:21. Na nsima, talá VIDEO mpe yanolá na mituna oyo elandi.

      VIDEO: Bakristo ya solo basengeli kozala na mpiko​—Mpo bákɔta na makambo ya mokili te (2:49)

      • Na video yango, mpo na nini Ayenge aboyaki kokɔta na parti politiki moko to kosala milulu ya ekólo, na ndakisa kopesa bendele losako?

      • Okanisi nini: Ekateli na ye ezalaki malamu?

      Makambo nini mosusu ekoki kosala ete ezala mpasi tóboya kokɔta na makambo ya mokili? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

      VIDEO: Mateya tozwi na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli​—Kobá koboya kokɔta na makambo ya mokili oyo ekabwani (5:16)

      • Ndenge nini okoki komonisa ete okɔtaka na makambo ya mokili te ntango ozali kotala lisano oyo esangisi bikólo mingi?

      • Ndenge nini tokoki komonisa ete tokɔtaka na makambo ya mokili te ata ntango oyo bakonzi ya politiki bazwi bikateli oyo ememeli biso bolamu to mpasi?

      • Ndenge nini makambo oyo tolandaka na radio, na televizyo to na Internet ekoki kosala ete tókɔta na makambo ya mokili?

      Bililingi: 1. Etuluku ya bato bazali na nkanda mpe basimbi bapankarte mpe bazali kotɛmɛla bakonzi. 2. Mobali moko azali koganga mpe atomboli drapo na molulu moko ya lisano. 3. Mwana-kelasi azali koyemba loyembo ya ekólo. 4. Soda asimbi mondoki. 5. Bato mibale ya politiki bazali kosala mitingi. 6. Mwasi moko azali kokɔtisa papye ya voti na kɛsi.

      Ndenge nini mokristo asengeli koboya kokɔta na makambo ya mokili, ezala na makanisi mpe na makambo oyo asalaka?

      SOKI MOTO ATUNI YO: “Mpo na nini opesaka bendele to drapo losako te?” to “Mpo na nini oyembaka loyembo ya ekólo te?”

      • Okopesa eyano nini?

      NA MOKUSE

      Bakristo basalaka nyonso mpo bákɔta na makambo ya politiki te ezala na makanisi, na maloba, mpe na makambo oyo basalaka.

      Bozongeli

      • Ndenge nini tosengeli kotalela baguvɛrnema ya mokili?

      • Mpo na nini tosengeli kokɔta na makambo ya politiki te?

      • Nini ekoki kosala ete ezala mpasi tóboya kokɔta na makambo ya mokili?

      Oyo okoki kosala

      MAKANISI MOSUSU

      Tokoki komipimela makambo nini mpo tókɔta na makambo ya mokili te?

      Yehova asundolaka biso ata moke te (3:14)

      Ndenge nini mabota ekoki komibongisa liboso mpo na makambo oyo ekoki kosala ete bákɔta na makambo ya mokili?

      Boyá kokɔta na milulu to makambo ya mokili (4:25)

      Talá lisolo ya mobali moko oyo azalaki kokanisa ete kobundela ekólo na ye ezalaki likambo ya lokumu koleka?

      “Makambo nyonso ekoki kosalema mpo na Nzambe” (5:19)

      Talá ndenge oyo okoki koboya kokɔta na makambo ya mokili ntango ozali kozwa ekateli oyo etali mosala.

      “Moto na moto akomema mokumba na ye moko” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/2006)

  • Okoki koyikela minyoko mpiko
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
    • 5. Kobá kosambela Yehova atako minyoko

      Esɛngaka mpiko mpo na kokoba kosalela Yehova ntango basusu bazali koluka kopekisa biso. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

      VIDEO: Bazali komonisa mpiko atako minyoko (6:27)

      • Makambo nini omoni na video yango epesi yo makasi?

      Tángá Misala 5:27-29 mpe Baebre 10:24, 25. Nsima ya kotánga vɛrsɛ mokomoko, yanolá na motuna oyo:

      • Mpo na nini ezali na ntina tókoba kosambela Yehova ata soki baguvɛrnema epekisi biso kosakola to koyangana na makita?

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto